Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/12 lok. 30
  • Ozali komikundola?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozali komikundola?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Masolo mosusu
  • Kopesa oyo ememaka esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Ezali na ntina oyekola Ebre mpe Greki?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Kosɛnga bolimbisi ezali sɛkɛlɛ mpo na kozongisa boyokani
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/12 lok. 30

Ozali komikundola?

Osepelaki mpenza na botángi ya banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Na bongo, talá soki okoki kopesa biyano na mituna milandi:

• Ndenge nini “likoki ya kokanisa” ekoki kobatela biso? (Masese 1:⁠4)

Likoki ya kokanisa ekoki kosalisa biso na komona na mosika makama ya elimo mpe kolakisa biso nzela ya malamu oyo ebongi tólanda; na ndakisa, na kokima pite to ekobo na esika ya mosala. Esalisaka biso tóyeba ete bandeko na biso baklisto bazali bato ya kozanga kokoka, likambo oyo ekoki kosala ete tósala makambo na nkanda te ntango basilikisi biso. Ekoki mpe kosalisa biso tókima mposa ya koluka biloko mingi ya mokili, oyo ekoki kokweisa biso na elimo.​—⁠15/8, nkasa 21-24.

• Ndenge nini moto akoki kokóma mozalani ya malamu?

Ndenge mibale ya kozala mozalani ya malamu yango oyo: kozala moto oyo akabaka mpe oyo amonisaka botɔndi ntango bakabeli yo. Kozala mozalani malamu ezali na ntina mingi na ntango likama moko esalemi. Batatoli ya Yehova basalaka makasi mpo na komimonisa bazalani malamu na ndenge bakebisaka bato mosusu ete likambo moko monene elingi kosalema: Nzambe alingi kosukisa mabe.​—⁠1/9, nkasa 4-7.

• Banani oyo Biblia ebengi bango basantu ya solo, mpe ndenge nini bakosalisa bato?

Baklisto ya liboso bazalaki bango nyonso basantu ya solo; ezali Nzambe ye moko nde akómisaki bango basantu, kasi bato te. (Baloma 1:⁠7) Nsima ya kosekwa mpe kozwa bomoi na likoló, basantu bakosangana na Klisto mpo na kopambola bato ya sembo awa na mabele. (Baefese 1:​18-21)​—⁠15/9, nkasa 5-7.

• Koyeba makambo mosusu ya masano oyo ezalaki kosalema na Grèce ya kala ekoki kozala na ntina nini mpo na baklisto?

Mikanda ya ntoma Petelo na ntoma Paulo elobeli bandakisa oyo euti na masano ya ntango ya kala to ezali kolobela masano yango. (1 Bakolinti 9:26; 1 Timote 4:7; 2 Timote 2:5; 1 Petelo 5:10) Moto ya masano na ntango ya kala asengelaki kozala na molakisi malamu, asengelaki koyeba komipekisa mpe koyeba kosalela milende na ye. Ezali mpe bongo mpo na milende ya elimo oyo baklisto bazali kosala lelo oyo.​—⁠1/10, nkasa 28-31.

• Kobokola bana na mboka mopaya ezali na mikakatano nini mpe mbano nini?

Bana mingi bayekolaka noki monɔkɔ ya bapaya koleka baboti na bango, mpe yango ekoki kobimisa mokakatano ya komona ete baboti bazali koyeba makanisi na bango te mpe bazali kokanga ntina ya bizaleli na bango te. Lisusu, bana bakoki kozala na mokakatano mpo na kokanga ntina ya mateya ya Biblia na monɔkɔ ya baboti. Kasi, mabota ekoki kozala na boyokani makasi ntango baboti bazali koteya bana na bango monɔkɔ ya mboka na bango, mpe yango ekosala ete bana báyeba minɔkɔ mibale mpe báyeba mimeseno ya mboka mibale.​—⁠15/10, nkasa 22-26.

• Mpo na nini koyeba kosɛnga bolimbisi ezali na ntina?

Mbala mingi, kosɛnga bolimbisi na bosembo mpenza ezongisaka boyokani. Biblia ezali na bandakisa oyo ezali komonisa nguya ya kosɛnga bolimbisi. (1 Samwele 25:​2-35; Misala 23:​1-5) Mbala mingi, ntango bato mibale bazali koyokana te, moto mokomoko azalaka na esika ata moke oyo asalaki foti. Yango wana, esɛngaka ete moto nyonso andima mabe na ye mpe asɛnga bolimbisi.​—⁠1/11, nkasa 4-7.

• Mpo na nini ezali mabe kobɛta masano ya mbongo, ata mpo na mbongo moke?

Kobɛta masano ya mbongo elonaka ezaleli ya moimi, elimo ya kowelana, mpe lokoso epai ya moto, makambo oyo Biblia epekisi. (1 Bakolinti 6:​9, 10) Ebele ya bato oyo bazali baombo ya masano ya mbongo babandaki ntango bazalaki naino bana mike mpe babandaki na kobɛta masano mpo na mwa mbongo moke.​—⁠1/11, lokasa 31.

• Lokola mikanda mingi ya Biblia ekomamaki na Grɛki, mpo na nini esɛngaki lisusu kobongola Biblia na Grɛki, mpe yango ebotaki mbuma nini?

Grɛki ya sika ekeseni mpenza na Grɛki oyo babongolaki na yango Makomami ya Liebele na Biblia ya Septante mpe oyo bakomaki na yango Makomami ya Grɛki ya boklisto. Na bikeke oyo eleki, bato mingi bamekaki kobongola mikanda mosusu to mpe Biblia mobimba na Grɛki oyo bato bazalaki koloba. Lelo oyo, ezali na mabongoli soki 30 ya Biblia mobimba to ndambo na yango na Grɛki oyo bato mingi balobaka, moko na yango oyo esalemi malamu ezali Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu, oyo ebimaki na 1997.​—⁠15/11, nkasa 26-29.

• Mpo na nini kopesa diimɛ ezali lisɛngami te mpo na baklisto?

Na Mibeko oyo Nzambe apesaki Yisalaele ya kala, bazalaki kopesa diimɛ mpo na kosunga libota ya Balevi mpe kosalisa babola. (Levitike 27:30; Deteronome 14:​28, 29) Liwa ya Yesu lokola mbeka esukisaki Mibeko, bakisa mpe likambo ya kopesa diimɛ. (Baefese 2:​13-15) Na lisangá ya ekeke ya liboso, moklisto mokomoko asengelaki kopesa na kotalela makoki na ye mpe na ndenge oyo akanisi na motema na ye. (2 Bakolinti 9:​5, 7)​—⁠1/12, nkasa 4-6.

• Emoniseli 20:8 elingi nde komonisa ete na komekama ya nsuka, bato oyo Satana akopɛngwisa bakozala ebele mpenza?

Vɛrsɛ yango elobi ete bato oyo Satana akopɛngwisa bakozala “lokola zɛlɔ ya mbu.” Na Biblia, mbala mingi maloba yango elimbolaka motuya oyo eyebani te, kasi emonisaka kaka te motuya ya monene. Mombóto ya Abalayama, oyo esengelaki kozala “lokola zɛlɔ na libongo ya mai,” eyaki komonana ete ezali na bato 144 000, soki tolongoli Yesu Klisto. (Genese 22:17; Emoniseli 14:​1-4)​—⁠1/12, lokasa 29.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto