Kembisá mabɔkɔ na yo
NA KATI ya Biblia, balobeli lobɔkɔ mbala ebele. Basalelaka liloba lobɔkɔ na ndenge ya elilingi elongo na maloba mosusu mpo na kolobela makambo ndenge na ndenge. Na ndakisa, kozala mabɔkɔ pɛto elingi koloba kozala na likambo te. (2 Samwele 22:21; Nzembo 24:3, 4, NW) Kofungola lobɔkɔ elimboli kokaba. (Deteronome 15:11; Nzembo 145:16) Soki moto azali kotya bomoi na ye na likama balobaka ete azali kotya bomoi na ye na lobɔkɔ na ye. (1 Samwele 19:5, NW) Kolɛmbisa mabɔkɔ elimboli kolɛmba nzoto. (2 Ntango 15:7) Mpe kokembisa mabɔkɔ elakisi kozwa makasi mpe nguya mpo na kosala eloko boye to boye.—1 Samwele 23:16, NW.
Lelo oyo, ezali mpenza na ntina mingi ete tókembisa mabɔkɔ na biso. Tozali kobika na “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza.” (2 Timote 3:1) Soki moto alɛmbi nzoto, likanisi oyo eyelaka ye mbala mingi ezali ya kotika kosala likambo oyo azalaki kosala, to kolɛmbisa mabɔkɔ. Yango wana, tomonaka mbala mingi bilenge bazali kotika kotánga kelasi, mibali bazali kosundola mabota na bango, mpe bamama bazali kobwaka bana na bango. Biso baklisto tosengeli kokembisa mabɔkɔ na biso mpo tóyika mpiko liboso ya mikakatano oyo tozali kokutana na yango na mosala ya Nzambe. (Matai 24:13) Soki tosali bongo, tokosepelisa motema ya Yehova.—Masese 27:11.
Ndenge bakembisaka mabɔkɔ
Na mikolo ya Ezela, Bayuda basengelaki kokembisa mabɔkɔ na bango mpo na kosilisa kotonga tempelo ya Yehova na Yelusaleme. Ndenge nini bakembisaki mabɔkɔ na bango? Biblia elobi boye: “Bakumisaki elambo ya [mampa ezangá levire, NW] kino mikolo nsambo na esengo; mpo ete [Yehova] asili kosepelisa bango mpe abongolaki motema ya mokonzi ya Asulia epai na bango mpo na kokembisa mabɔkɔ na bango na mosala ya ndako ya Nzambe, Nzambe ya Yisalaele.” (Ezela 6:22) Emonani polele ete ezalaki na nzela ya nguya na ye oyo esalaka mosala nde Yehova atindaki “mokonzi ya Asulia” apesa basaleli ya Nzambe nzela ya kozonga epai na bango. Lisusu, Yehova alendisaki mitema ya bato na Ye mpo bákoka kosilisa mosala oyo babandaki.
Na nsima, ntango esengelaki ete bábongisa lopango ya Yelusaleme, Nehemia akembisaki mabɔkɔ ya bandeko na ye mpo na mosala yango. Totángi boye: “Nayebisaki . . . bango mpo na lobɔkɔ ya Nzambe na ngai lozalaki likoló na ngai na malamu; mpe mpo na maloba na mokonzi masili ye koloba na ngai. Balobaki mpe ete, Tótɛlɛma mpe tótonga. Boye bakembisaki mabɔkɔ na bango mpo na kosala malamu.” Lokola bakembisaki mabɔkɔ na bango, Nehemia na bandeko na ye Bayuda batongaki lisusu lopango ya Yelusaleme na mikolo 52 mpamba!—Nehemia 2:18; 6:9, 15.
Ndenge moko mpe, Yehova akembisaka mabɔkɔ na biso mpo tósakola nsango malamu ya Bokonzi. (Matai 24:14) Asalaka yango ntango ‘apesaka biso eloko nyonso ya malamu mpo na kosala mokano na ye.’ (Baebele 13:21) Atii bisaleli ya malamu koleka na mabɔkɔ na biso. Tozali na Biblia mpe na mikanda oyo elimbolaka Biblia, bazulunalo, mwa babuku, batrakte, mpe bakasɛti radio mpe bakasɛti video oyo tosalelaka mpo na koteya bato na mokili mobimba. Mikanda na biso ekomami na minɔkɔ koleka 380. Longola yango, na nzela ya makita ya lisangá, ya mayangani ya mike mpe ya minene, Yehova azali kopesa biso mateya mpe azali kobongisa biso mpo tóyeba ndenge ya kosalela biloko yango ya malamu na mosala na biso ya kosakola.
Atako Yehova azali kokembisa mabɔkɔ na biso na ndenge mingi wana, azali mpe kozela ete biso moko tómonisa molende. Kanisá lisusu makambo oyo mosakoli Elisa ayebisaki Mokonzi Yoasa ntango ayaki kosɛnga ye lisalisi mpo akoka kobunda na Basulia oyo bazalaki koya kobundisa ye. Elisa alobaki na mokonzi ete azwa mbanzi mpe abɛta yango na nse. Lisolo ya Biblia elobi ete: “Ye abɛtaki yango mbala misato mpe atikaki. Nde moto ya Nzambe ayokelaki ye nkanda, ye ete, Ekokaki na yo kobɛta mbala mitano to motoba; soki bongo, mbɛlɛ obɛti Basulia kino osilisi bango nyɛɛ! Nde [sikoyo, NW] okobɛta Basulia bobele mbala misato.” (2 MiKonzi 13:18, 19) Lokola Yoasa amonisaki molende te, alongaki Basulia tii na nsuka te.
Ezali se ndenge moko mpo na biso soki tolingi kolonga na mosala oyo Yehova apesi biso. Na esika ete tómitungisa mpo na mikakatano oyo ezali liboso na biso to mpo na mpasi oyo mosala yango ekoki kozala na yango, tosengeli nde komipesa na yango na molende mpe na motema mobimba. Tosengeli kokembisa mabɔkɔ na biso mpe kotya motema ete Yehova akosalisa biso.—Yisaya 35:3, 4.
Yehova akokembisa mabɔkɔ na biso
Yehova akozanga te kosalisa biso to kokembisa mabɔkɔ na biso mpo tósala mokano na ye. Nzokande, Yehova akosalela biso likamwisi te mpe akosala nyonso mpo na biso te. Azali kozela ete biso mpe tókokisa mikumba na biso, elingi koloba ete tosengeli kotángaka Biblia mokolo na mokolo, kobongisaka makita mpe kozangisaka yango te, kobimaka na mosala ya kosakola na kotalela makoki na biso, mpe kobondelaka ye ntango nyonso. Soki, na ntango oyo tozwi libaku, tozali kokokisa mikumba na biso na bosembo mpe na molende, Yehova mpe akopesa biso makasi ya kosala oyo azali kosɛnga biso.—Bafilipi 4:13.
Tózwa ndakisa ya moklisto moko oyo akufelaki mwasi na ye na mama na ye kaka na mbula moko. Mpasi wana esilaki naino te, mwasi ya mwana na ye abomaki libala mpe atikaki nzela ya boklisto. Ndeko yango alobi boye: “Liteya oyo nazwaki ezali ete tokoki te kopona mikakatano oyo ekoyela biso, ata mpe ntango oyo yango esengeli koya to mpe mbala boni esengeli koya.” Ndenge nini azwaka makasi oyo esalisaka ye azonga nsima te? “Mabondeli mpe boyekoli ya ngai moko nde esalisaka ngai ete nazinda te. Lisungi ya bandeko na ngai ya elimo mpe ebɔndisi ngai mingi. Na likoló ya nyonso wana, nasosoli ntina ya kozala na boyokani malamu mpenza na Yehova liboso ete mikakatano ebima.”
Ata soki bomoi na yo ezali sikoyo ndenge nini, zwá ekateli makasi ya kotyelaka Yehova motema na yo mobimba mpe ya kosalelaka malamu bibongiseli nyonso oyo azali kozwa mpo na kokembisa mabɔkɔ na biso. Bongo, okozala na likoki ya kosalela Yehova mosala ya malamu koleka mpe na ndenge yango okosanzola mpe okopesa lokumu na nkombo na ye monene.—Baebele 13:15.
[Elilingi na lokasa 31]
Lokola Yoasa amonisaki molende te, alongaki Basulia tii na nsuka te