Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/11 nk. 20-23
  • Ezali na ntina oyekola Ebre mpe Greki?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ezali na ntina oyekola Ebre mpe Greki?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makambo oyo osengeli koyeba
  • Liloba oyo ezali na ndimbola nini?
  • Ezali mabe kosalela Biblia oyo ebongolami na monɔkɔ mosusu?
  • Yehova, Nzambe oyo ayebi kosolola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Likambo ya esengo mpo na bato oyo balingaka Liloba ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Boyekoli nimero 8—Matomba ya “Libongoli ya Mokili ya Sika”
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Libongoli ya Mokili ya Sika
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/11 nk. 20-23

Ezali na ntina oyekola Ebre mpe Grɛki?

PENE na Biblia mobimba ekomamaki liboso na minɔkɔ mibale, Ebre mpe Grɛki.a Bato oyo bakomaki na minɔkɔ yango batambwisamaki na elimo santu ya Nzambe. (2 Samwele 23:2) Na yango, tokoki mpenza koloba ete nsango oyo ezali na kati ya Biblia ekomamaki “na litambwisi ya elimo ya Nzambe.”​—2 Timote 3:16, 17.

Nzokande, bato mingi oyo batángaka Biblia lelo bayebi monɔkɔ ya Ebre to ya Grɛki te. Mpo na kotánga Biblia, basengeli kosalela Biblia oyo ebongolami na monɔkɔ na bango. Mbala mosusu yo mpe osengeli kosala bongo. Lokola bato oyo babongolaki Biblia bazali te lokola bakomi oyo bakomaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe, mbala mosusu okoki komituna boye, ‘Nakoki mpenza kokanga ntina ya nsango ya Biblia soki nazali kosalela libongoli moko ya Biblia, to nasengeli komeka koyekola monɔkɔ ya Ebre mpe ya Grɛki?’

Makambo oyo osengeli koyeba

Liboso oyanola na motuna wana, osengeli koyeba makambo mingi. Ya liboso, koyeba Ebre to Grɛki ya kala esalaka te ete moto akanga mbala moko ntina ya nsango oyo ezali na Biblia. Yesu alobaki na Bayuda ya ntango na ye ete: “Bozali kolukaluka na kati ya Makomami, mpo bozali kokanisa ete na nzela na yango bokozwa bomoi ya seko; mpe yango mpenza nde ezali kopesa litatoli mpo na ngai. Mpe atako bongo bolingi koya epai na ngai te mpo ete bózwa bomoi.” (Yoane 5:39, 40) Mokakatano na bango ezalaki nini? Ezalaki nde ete bayebaki Ebre te? Te, bayebaki malamu monɔkɔ yango. Nzokande, Yesu abakisaki ete: “Nayebi malamu ete bozali na bolingo ya Nzambe te na kati na bino.”​—Yoane 5:42.

Ndenge moko mpe, ntoma Paulo alobaki na bakristo ya engumba Korinti ya kala, oyo bazalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki ete: “Bayuda bazali kosɛnga bilembo mpe Bagrɛki bazali koluka bwanya; kasi biso tozali nde kosakola Kristo abakami na nzete, likambo oyo ezali kobɛtisa Bayuda libaku kasi ezali bozoba epai ya bikólo.” (1 Bakorinti 1:22, 23) Na yango, ezali polele ete ezalaki te koloba Ebre to Grɛki nde ezalaki kotinda bato bándima nsango oyo ezalaki na Liloba ya Nzambe.

Ya mibale, atako bato mosusu lelo oyo balobaka Ebre to Grɛki ya mikolo oyo, minɔkɔ yango ekeseni mingi na Ebre mpe Grɛki oyo basalelaki mpo na kokoma Biblia. Bato mingi oyo balobaka Grɛki lelo bayebaka malamu te Grɛki oyo basalelaki mpo na kokoma Biblia. Ezali bongo mpo lelo, babakisá maloba ya sika mpo maloba mosusu ya kala esalelamaka lisusu te, mpe maloba mosusu oyo etikalá ekómá na bandimbola mosusu. Na ndakisa, na Grɛki ya mikolo oyo, liloba oyo ebongolami na “kitoko” na Misala 7:20 mpe na Baebre 11:23 elimboli “oyo esɛkisaka.” Longola yango, gramɛrɛ mpe ndenge ya kosala bafraze ebongwaná mingi.

Ata soki oyekoli Ebre to Grɛki ya mikolo oyo, yango elimboli te ete okoyeba Biblia malamumalamu na minɔkɔ oyo bakomaki yango na ebandeli. Okozala kaka na mposa ya kosalela badiksionɛrɛ mpe babuku ya gramɛrɛ mpo esalisa yo oyeba ndenge bazalaki kosalela minɔkɔ yango ntango mikanda ya Biblia ezalaki kokomama.

Likambo ya misato ezali ete koyekola monɔkɔ ya sika ekoki kozala mpasi mingi. Atako na ebandeli ekoki kozala mwa pɛtɛɛ koyeba mwa bafraze ya monɔkɔ mosusu, ekoki kosɛnga ete osala milende makasi na boumeli ya bambula mpo okoka koyeba bandimbola mikemike oyo ezali kati na maloba ya monɔkɔ yango. Kobosana mpe te lisese oyo elobi ete, kozanga koyeba ezali liwa ya ndambo. Na ndenge nini?

Liloba oyo ezali na ndimbola nini?

Esilá kokóma ete moto moko oyo azali koyekola monɔkɔ na bino atuna yo ndimbola ya liloba moko boye? Boye, oyebi ete ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te kopesa eyano. Mpo na nini? Mpo liloba moko ekoki kozala na bandimbola mingi. Mbala mosusu okoki kosɛnga moto yango aloba fraze moko oyo ezali na liloba yango. Soki apesi yo fraze te, ekoki kozala mpasi mpo oyeba ndimbola oyo okoki kopesa ye mpo na liloba yango. Na ndakisa, moto akoki kotuna yo ndimbola ya liloba “mbula.” Liloba yango ekoki kozala na bandimbola ekeseni na kotalela likambo oyo bazali kolobela. Liloba yango ekoki kolimbola mai oyo eutaka na mapata. Ekoki mpe kozala eleko. Na bisika mosusu ekoki kolimbola mobu, to eleko ya sanza zomi na mibale. Ekoki mpe kosalelama mpo na kolobela mikolo oyo moto aumeli na mokili. Na bandimbola nyonso wana, oyo wapi ezali ya solo?

Diksionɛrɛ ekoki komonisa yo bandimbola nyonso ya liloba moko. Badiksionɛrɛ mosusu emonisaka kutu bandimbola yango mpe ndenge ya kosalela yango. Kasi, esika basaleli liloba yango nde ekosalisa yo oyeba ndimbola oyo ebongi na liloba yango. Tózwa ndakisa: Kanisá ete ozali na mwa boyebi ya makambo ya monganga mpe olingi koyeba maladi oyo ozali kobɛla na kolanda bilembo oyo ozali komona na nzoto na yo. Okoki kotánga diksionɛrɛ oyo elobeli makambo ya monganga. Okoki komona ete bilembo mingi (90 %) oyo ozali komona na nzoto na yo emonisi maladi moko boye, kasi bilembo mosusu (10 %) emonisi maladi mosusu oyo ekeseni mpenza na oyo ya liboso. Ekosɛnga oluka koyeba makambo mosusu liboso oloba mpenza soki ozali kobɛla nini. Ndenge moko mpe, ata soki liloba moko esalelamaka mingi na ndimbola moko, yango ekosalisa yo te soki ozali kotánga lisolo moko ya ntina oyo kati na yango, basaleli ndimbola mosusu ya liloba yango. Osengeli koyeba malamu likambo oyo bazali kolobela liboso oyeba ndimbola ya liloba yango.

Na oyo etali koyekola maloba oyo ezali na Biblia, ekoki mpe kosɛnga ete oyeba lisolo mobimba esika liloba moko esalelami. Na ndakisa, liloba ya Ebre mpe ya Grɛki oyo ebongolamaka mingi na “elimo” ekoki kozala na bandimbola ebele, na kolanda lisolo oyo bazali kolobela. Na bisika mosusu, ekoki kobongolama na “mopɛpɛ.” (Kobima 10:13; Yoane 3:8) Na bisika mosusu elimbolaka nguya ya bomoi oyo ezalaka na kati ya bikelamu nyonso ya bomoi, bato mpe banyama. (Ebandeli 7:22; Nzembo 104:29; Yakobo 2:26) Bikelamu oyo bafandaka na likoló, oyo bamonanaka te, babengamaka mpe bilimo. (1 Bakonzi 22:21, 22; Matai 8:16) Nguya ya Nzambe oyo esalaka mosala ebengami elimo santu na ye. (Ebandeli 1:2; Matai 12:28) Liloba yango esalelamaka mpe mpo na kolobela nguya oyo etindaka moto amonisa ezaleli to makanisi moko boye; esalelamaka mpe mpo na kolobela mposa oyo etindaka etuluku moko ya bato básalaka likambo moko boye.​—Yosua 2:11; Bagalatia 6:18.

Atako diksionɛrɛ ya Ebre to ya Grɛki ekoki kopesa bandimbola wana nyonso ya liloba yango, lisolo nde ekosalisa yo oyeba ndimbola oyo ebongi na esika moko.b Ezali bongo ntango ozali kotánga Biblia na minɔkɔ na yango ya ebandeli to ntango ozali kotánga Biblia oyo babongolá na monɔkɔ na bino.

Ezali mabe kosalela Biblia oyo ebongolami na monɔkɔ mosusu?

Bato mosusu basali milende mpo báyeba Ebre to Grɛki oyo bakomaki na yango Biblia, to mpe minɔkɔ yango nyonso mibale. Atako bandimaka ete bakokanga ntina ya makambo nyonso te, basepelaka ndenge bazali na likoki ya kotánga Biblia na minɔkɔ na yango ya ebandeli mpe bamonaka ete milende na bango ezali mpamba te. Kasi, soki ozali na likoki ya kosala bongo te, osengeli kolɛmba nzoto mpe kotika koluka solo oyo ezali na Biblia? Te, kotika te! Mpo na nini? Mpo na bantina mingi.

Ya liboso, ezali mabe te kosalela Biblia oyo ebongolami na monɔkɔ mosusu. Kutu, bato oyo bakomaki Makomami ya Grɛki ya bokristo, oyo ebengamaka Boyokani ya Sika, bazalaki mbala mingi kosalela libongoli moko ya Grɛki ntango bazalaki kozongela maloba ya Makomami ya Ebre.c (Nzembo 40:6; Baebre 10:5, 6) Atako bazalaki koloba Ebre mpe bakokaki kozongela makambo longwa na Makomami ya Ebre ya ebandeli, emonani ete bazalaki kosepela kosalela libongoli ya bavɛrsɛ yango mpo bato mingi oyo bazalaki kokomela bazalaki na libongoli yango.​—Ebandeli 12:3; Bagalatia 3:8.

Ya mibale, ata soki moto ayebi minɔkɔ oyo bakomaki na yango Biblia, akoki te kotánga maloba ya Yesu na monɔkɔ oyo alobaki yango. Ezali bongo mpo bato oyo bakomaki Baevanzile bakomaki yango na Grɛki atako Yesu alobaki yango na monɔkɔ ya Ebre.d Moto nyonso oyo akanisi ete kotánga maloba ya basaleli ya Yehova ya sembo ya kala na minɔkɔ oyo bakomaki yango epesaka bwanya ya ndenge mosusu, asengeli kotalela likambo yango malamu. Lokola elimo santu ya Yehova etindaki bato bákoma maloba ya Mosaleli na ye oyo aleki monene na monɔkɔ mosusu, oyo eyebanaki mingi na ntango wana, emonisi ete monɔkɔ oyo tozali kotánga na yango Biblia ezali na ntina te. Likambo eleki ntina ezali nde kotánga nsango oyo euti na Nzambe na monɔkɔ oyo toyebi malamu mpe kosalela makambo oyo totángi.

Ya misato, “nsango malamu” oyo ezali na Biblia ekomamaki mpo ekómela bato ya komikitisa ya “bikólo nyonso mpe mabota nyonso mpe minɔkɔ nyonso mpe mikili nyonso.” (Emoniseli 14:6; Luka 10:21; 1 Bakorinti 1:27-29) Na boyokani na yango, ebele mpenza ya bato lelo oyo bakoki koyeba mokano ya Nzambe na lisalisi ya Biblia oyo ezali na monɔkɔ na bango kozanga ete báyekola monɔkɔ mosusu. Na minɔkɔ mosusu, ezali na mabongoli mingi ya Biblia, mpe yango etikeli moto na moto likoki ya kopona libongoli oyo alingi kotánga.e

Na yango, ndenge nini okoyeba soki okangaka mpenza ntina ya solo oyo ezali na Biblia? Batatoli ya Yehova bamoni ete koyekola Biblia na kolanda mitó ya makambo mpe kotalela lisolo mobimba, ezali ndenge malamu ya koyekola mpo na kokanga ntina ya nsango oyo ezali na Liloba ya Nzambe. Na ndakisa, bakoki kozwa motó ya likambo “Libala,” mpe koluka bavɛrsɛ oyo elobeli yango. Na ndenge yango, batikaka ete mikapo ya Biblia elimbola mikapo mosusu. Mpo na nini te kondima boyekoli ya Biblia oyo Batatoli ya Yehova basalaka na bato ofele? Ata soki olobaka monɔkɔ nini, Nzambe alingi ete “bato ya ndenge nyonso bábika mpe bázwa boyebi ya sikisiki ya solo.”​—1 Timote 2:4; Emoniseli 7:9.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Biteni mosusu ya Biblia ekomamaki na Aramɛyɛ, monɔkɔ oyo ekokanaki mingi na monɔkɔ ya Ebre oyo bakomaki na yango Biblia. Na ndakisa, tokoki kotánga Ezera 4:8 tii 6:18 mpe 7:12-26, Yirimia 10:11, mpe Danyele 2:4b tii 7:28.

b Tosengeli kobosana te ete badiksionɛrɛ mosusu mpe babuku oyo elimbolaka maloba ya Biblia ekoki kaka komonisa ndenge liloba yango ebongolami na Biblia moko, na ndakisa na King James Version, na esika elobela bandimbola mosusu ya liloba yango.

c Na eleko ya Yesu Kristo ná bantoma na ye, mikanda nyonso ya Makomami ya Ebre ekokaki kotángama na Grɛki. Libongoli yango ekómaki kobengama Septante mpe Bayuda oyo bazalaki koloba Grɛki bazalaki kosalela yango mingi. Mikapo mingi ya Makomami ya Ebre oyo ezongelami na Makomami ya Grɛki ya bokristo eutaki na libongoli ya Septante.

d Bato mosusu balobaka ete ntoma Matai akomaki liboso Evanzile na ye na monɔkɔ ya Ebre. Kasi, ata soki ezali bongo, oyo ezali tii na ntango na biso ezalaki nde libongoli na yango ya Grɛki, oyo mbala mosusu Matai ye moko asalaki.

e Mpo na koyeba bokeseni kati na mabongoli ya Biblia mpe ndenge ya kopona libongoli ya malamu, talá lisolo “Ndenge ya kopona libongoli malamu ya Biblia” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai 2008.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 22]

Libongoli ya Septante

Bayuda oyo bazalaki koloba Grɛki na ntango ya Yesu ná bantoma na ye bazalaki kosalela mingi libongoli ya Grɛki oyo babengi Septante. Yango ezali Makomami ya Ebre oyo babongolaki na monɔkɔ ya Grɛki. Septante ezalaki na ntina mingi kaka te mpo yango nde libongoli ya liboso ya Makomami Mosantu na monɔkɔ mosusu kasi mpe mpo kobongola yango ezalaki mosala monene. Babongoli babandaki mosala ya kobongola Septante na ekeke ya misato liboso ya ntango na biso (L.T.B.), mpe bato mosusu bayaki kosilisa mosala yango mbula koleka nkama na nsima.

Bakristo ya liboso bakakatanaki te kosalela libongoli ya Septante mpo na kondimisa bato ete Yesu azalaki Kristo, Masiya oyo alakamaki. Lokola bazalaki kosalela yango mingi, bato mosusu bakómaki komona ete Septante ezali libongoli “ya bakristo.” Mpo na yango, Bayuda bazalaki lisusu kosalela libongoli yango mingi te mpe bakómaki kobimisa mabongoli mosusu mingi na Grɛki. Moko na mabongoli yango ezalaki oyo prozelite moko na nkombo Aquila abimisaki na ekeke ya mibale ya ntango na biso (T.B.). Ntango moto moko ya mayele na makambo ya Biblia alobelaki libongoli yango, abendaki likebi na “eloko oyo ekamwisaki mpenza.” Na libongoli na ye, Aquila akɔtisaki nkombo ya Nzambe, Yehova, na bisika mingi, ndenge ezalaki kokomama na Ebre.

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Israel Antiquities Authority

[Bililingi na lokasa 23]

Ezali na ntina tótánga nsango oyo euti na Nzambe na monɔkɔ oyo toyebi malamu mpe tósalela makambo oyo totángi

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto