Lisolo ya bomoi
Mwa mokanda oyo ebongolaki bomoi na ngai
YA IRENE HOCHSTENBACH
Ezalaki mokolo moko ya mibale na mpokwa na 1972. Ntango wana nazalaki na mbula 16; nakendeki na baboti na ngai na likita moko ya losambo na engumba Eindhoven, na etúká ya Brabant, na Pays-Bas. Nayokaki mabe, nakanisaki ete elingaki kozala malamu soki nazalaki ata esika mosusu. Mbala moko, bilenge basi mibale bapesaki ngai mwa mokanda moko oyo bakomaki; elobaki boye: “Ndeko ya bolingo Irene, tozali mpenza na mposa tósalisa yo.” Na ntango wana nakokaki kokanisa te ndenge oyo mwa mokanda wana elingaki kobongola bomoi na ngai. Kasi, liboso nayebisa bino makambo oyo esalemaki na nsima, tiká naino nalobela bino mwa moke ndenge nakolaki.
NABOTAMÁ na esanga Belitung, na Indonésie. Tii sikoyo nabosanaka te makɛlɛlɛ mosusu oyo nazalaki koyoka na esanga yango, na ndakisa: makɛlɛlɛ oyo banzete ya mbila ezalaki kosala ntango mopɛpɛ ezali kobɛta yango, mwa makɛlɛlɛ ya ebale moko oyo ezalaki pene wana, kosɛka ya bana oyo bazalaki kosakana na pembeni ya ndako na biso, mpe miziki oyo ezalaki kobɛta na ndako na biso. Na 1960, ntango nazalaki na mbula minei, libota na biso mobimba, tolongwaki na Indonésie mpe tokendeki kofanda na Pays-Bas. Tosalaki mobembo molai wana na masuwa, mpe makɛlɛlɛ oyo nabosanaka te ezali ya mwana-popi na ngai oyo nazalaki kolinga mingi mpe nakumbaki yango, ezalaki mwana-popi oyo esimbi bambonda mingi. Ntango nakokisaki mbula nsambo, nabɛlaki maladi moko oyo ebomaki ngai matoi, mpe banda wana, nayokaka lisusu ata eloko moko te. Na makanisi, natikalá kaka na makɛlɛlɛ oyo nayokaká na bomwana.
Nakolaki nakufá matoi
Lokola baboti na ngai bazalaki kobatela ngai malamu, liboso nazalaki mpenza koyeba te ete bomoi na ngai elingaki kokesana na oyo ya bato mosusu ndenge nakufá matoi. Kutu, ntango nazalaki mwana moke, bazalaki kolatisa ngai mwa masini moko ya monene mpo na koyoka; nazalaki komona yango lokola eloko moko ya kosakana na yango, lokola mpe ezalaki mpenza kosalisa ngai te. Mpo na kosolola na ngai, baninga na ngai bana mike oyo tozalaki kofanda na bango kartye moko bazalaki kokoma makambo nyonso na nse; kasi mpo na kopesa bango eyano, nazalaki koloba atako ngai moko nazalaki koyoka mongongo na ngai te.
Ntango napusanaki na mbula, nayaki komona ete nakeseneki mpenza na bato mosusu. Nayaki mpe komona ete bato mosusu bazalaki kosɛka ngai mpo nayokaka te, mpe bamosusu bazalaki koboya kozala elongo na ngai. Nakómaki komiyoka ngai moko. Nakómaki koyeba mpasi ya kozala moto akufá matoi, mpe ntango nazalaki kokola, mokemoke nakómaki kobangabanga bato oyo bayokaka.
Mpo nakoka kokɔta na eteyelo moko ya bana bakufá matoi, baboti na ngai basalaki ete libota mobimba tólongwa na mboka oyo tozalaki kofanda na etúká ya Limbourg, mpe tokendeki kofanda na engumba Eindhoven. Kuna, tata azwaki mosala mpe bakomisaki leki na ngai ya mobali na bayaya na ngai ya basi na eteyelo ya sika. Nazali na botɔndi mpo na makambo nyonso wana oyo basalaki mpo na bolamu na ngai. Na kelasi, bateyaki ngai ndenge ya koloba na mongongo oyo ebongi mpe ndenge ya kobimisa maloba polele. Lisusu, atako balakisi bazalaki kosalela elobeli ya bikela te, baninga na ngai ya kelasi balakisaki ngai yango.
Nakómi komiyoka ete nazali kaka ngai moko
Ntango nazalaki kokola, baboti na ngai bazalaki kosala makasi mpo na kosolola na ngai, kasi nazalaki kokanga ntina ya makambo mingi te. Na ndakisa, nazalaki koyeba te ete baboti na ngai bazalaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Kasi, nabosanaka te ete mokolo moko libota mobimba tokendeki na esika moko epai ebele ya bato bafandaki na bakiti. Bango nyonso bazalaki kotala liboso, ntango mosusu bazalaki kobɛta mabɔkɔ, mpe ntango mosusu bazalaki kotɛlɛma—kasi nazalaki koyeba te mpo na nini bazalaki kosala bongo. Na nsima mpenza nde nayaki koyeba ete tozalaki na liyangani ya Batatoli ya Yehova. Baboti na ngai bazalaki mpe komema ngai na mwa ndako moko na Eindhoven. Nazalaki kosepela na esika yango mpamba te bato nyonso bazalaki na boboto mpe nazalaki komona ete baboti na ngai bazalaki na esengo, kasi nazalaki koyeba te mpo na nini tozalaki ntango nyonso kokende kuna. Nayebi sikoyo ete mwa ndako wana ezalaki nde Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova.
Kasi, moto moko te azalaki kolimbolela ngai makambo oyo bazalaki koloba na makita yango. Nayebi sikoyo ete bato yango bazalaki na mposa ya kosalisa ngai, kasi bazalaki koyeba te nini básala mpo ngai nakufá matoi. Na makita yango, nazalaki komiyoka ete nazali kaka ngai moko mpe nazalaki koloba na nse ya motema ete, ‘Ebongaki nazala na kelasi na esika nazala awa.’ Kasi, mokolo mosusu ntango nakómaki kokanisa ndenge yango, bilenge basi mibale bakomaki mwa makambo na papye mpe bapesaki ngai yango. Yango nde mwa mokanda oyo nalobeli na ebandeli ya lisolo oyo. Nakokaki kokanisa te ete mwa mokanda yango elingaki kozala ebandeli ya boninga oyo ekosalisa ngai ete natika komiyoka ete nazali ngai moko.
Nakómi na baninga ya solosolo
Colette na Hermine, bandeko basi oyo bakomelaki ngai mwa mokanda yango, bazalaki na bambula koleka mwa moke 20. Na nsima, nayaki koyeba ete bautaki epai mosusu mpe bayaki na lisangá ya Batatoli ya Yehova oyo tozalaki kokende mpo na kosala lokola babongisi-nzela ya sanza na sanza. Atako Colette na Hermine bayebaki mpenza kosolola na elobeli ya bikela te, nazalaki kotala malamumalamu mbɛbu na bango mpe komeka kokanga ntina ya makambo oyo bazalaki koloba na ngai, mpe na ndenge yango, tokómaki mpenza kosolola.
Baboti na ngai basepelaki mingi ntango Colette na Hermine basɛngaki ete bábanda koyekola na ngai Biblia; kasi, bandeko basi yango basukaki kaka wana te. Na Ndako ya Bokonzi, bazalaki kosala makasi mpenza mpo na kolimbolela ngai makambo oyo ezalaki kolobama mpe bazalaki kobosana ngai te ntango bazalaki kokutana to mpe kolekisa ntango na bandeko mosusu na lisangá. Tozalaki komeka na bango ndenge ya komonisa nsango ya Biblia na mosala ya kosakola, mpe bazalaki kosalisa ngai na kobongisa masolo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Kanisá ete nalongolaki kobanga mpe nakómaki tii kosala masolo liboso ya bato oyo bayokaka!
Lisusu, Colette na Hermine basalisaki ngai na kotyela bango motema. Bazalaki na motema molai mpe bazalaki koyoka ngai. Atako mbala mingi tozalaki kosɛka soki nasali libunga, ata mbala moko te bazalaki kotyola ngai; bazalaki mpe koyoka nsɔni te ya kozala na ngai. Bazalaki kosala makasi ya komeka komitya na esika na ngai mpe bazalaki kozwa ngai moninga na bango mpenza. Bana basi yango ya boboto bapesaki ngai likabo moko ya kitoko mpenza: bolingo mpe boninga na bango.
Likambo ya ntina koleka ezali ete Colette na Hermine bateyaki ngai ete nasengeli koyekola koyeba Nzambe na biso, Yehova, mpe kokómisa ye moninga oyo nakoki kotyela motema. Balimbolelaki ngai ete Yehova amonaka ngai ntango nafandaka na Ndako ya Bokonzi mpe ayebi mikakatano na ngai lokola nakufá matoi. Nazali mpenza na botɔndi ete bolingo oyo biso misato tozalaki na yango mpo na Yehova ekómisaki biso mpe baninga! Ndenge oyo Yehova azalaki kobatela ngai esimbaki mpenza motema na ngai, mpe mpo na kolakisa ye bolingo na ngai mpe ete namipesi na ye, nazwaki batisimo na sanza ya Yuli 1975.
Nakómi na moninga ya ndenge mosusu
Na bambula oyo elandaki, nayebanaki na ebele ya bandeko basi mpe mibali. Ndeko mobali moko akómaki mpenza mpo na ngai moninga ya ndenge mosusu, mpe na 1980, tobalanaki. Mwa moke na nsima, nakómaki mobongisi-nzela; mpe na 1994, baponaki ngai na mobali na ngai Harry tósala mosala ya mobongisi-nzela monene mpo na kosakola epai ya bato oyo bakufá matoi na Pays-Bas. Na mbula oyo elandaki, bapesaki biso mokumba oyo ezalaki etumba mpo na ngai. Lokola mobali na ngai ayokaka, bapesaki ye mokumba ya mokɛngɛli ya zongazonga mosungi mpo na kotala masangá mpe ngai nazalaki kotambolaka na ye elongo.
Nasalaka boye: Soki tokómi na lisangá moko mpo na mbala ya liboso, kozanga kokakatana, ngai moko nakendaka kopesa bandeko mingi mbote mpe koyebisa bango nkombo na ngai. Nayebisaka bango ete nayokaka te mpe nasɛngaka bango ete ntango bazali koloba na ngai, bátalaka ngai na elongi mpe bálobaka malɛmbɛ. Na makita, nasalaka mpe makasi napesa eyano na ebandeli. Lisusu, natunaka soki ezali na ndeko moko oyo akolinga kolimbolela ngai makambo oyo balobaki na makita mpe na mosala ya kosakola na pɔsɔ wana.
Na ndenge yango, makambo elekaka malamu na boye ete bandeko babosanaka kutu ete nakufá matoi; yango wana, ntango mosusu tosalaka makambo oyo esɛkisaka biso nyonso. Na ndakisa, bayebisaka ngai ete soki bazali na motuka bamoni ngai na balabala, ntango mosusu babɛtaka pi-pi-pi mpo na kopesa ngai mbote, kasi natalaka te. Ngai moko mpe ntango mosusu nabosanaka ete nakufá matoi; na ndakisa, na ntango nalingi koyebisa mobali na ngai mwa likambo na litoi. Soki namoni ete mbala moko asali lokola akangi elongi mwa moke, nayebaka ete nalobi makasi.
Bana mike mpe basalisaka ngai na ndenge oyo ntango mosusu nakokaki kokanisa te. Na lisangá moko oyo tokendeki kotala mpo na mbala ya liboso, mwana moko ya mobali ya mbula libwa amonaki ete bato mosusu na Ndako ya Bokonzi bazalaki kokakatana mpo na kosolola na ngai, mpe alukaki kosala eloko moko mpo na kosalisa ngai. Apusanaki pene na ngai, asimbaki ngai na lobɔkɔ, abendaki ngai na katikati ya Ndako ya Bokonzi, mpe alobaki na mongongo makasi mpenza ete: “Nalingi kolakisa bino Irene, matoi na ye eyokaka te!” Bandeko oyo bazalaki wana bapusanaki mpe babandaki kopesa ngai mbote mpe koyebisa ngai bankombo na bango.
Na ndenge nazali kotambola na mobali na ngai na mosala ya zongazonga, nazali kokóma na baninga ebele. Bomoi na ngai ekeseni mpenza na ntango nazalaki komiyoka ete nazali kaka ngai moko! Banda mokolo oyo Colette na Hermine bapesaki ngai mwa mokanda wana, namoni bolamu ya kozala na baninga mpe nakutani na bato oyo bakómi baninga na ngai ya motema. Kasi, likambo eleki monene, nayebi Yehova, Moninga oyo aleki baninga nyonso. (Baloma 8:38, 39) Talá ndenge oyo mwa mokanda wana ebongolá mpenza bomoi na ngai mobimba!
[Elilingi na lokasa 24]
Nayebaka lisusu makɛlɛlɛ ya mwana-popi na ngai oyo nazalaki kolinga mingi
[Bililingi na lokasa 25]
Na mosala ya kosakola mpe elongo na mobali na ngai Harry