Tólingaka bandeko na biso bababa!
LELO oyo basaleli ya Nzambe basali libota moko monene na mokili mobimba, oyo ebandá na mibali mpe basi ya kala. Kati na bango tokoki kotánga, Samwele, Davidi, Samsone, Rahaba, Moize, Abrahama, Sara, Noa, mpe Abele. Kati na basaleli ya sembo ya Yehova ezali na ebele ya bababa. Na ndakisa, bato mibale ya liboso oyo bakómaki Batatoli ya Yehova na Mongolie ezali mwasi moko ná mobali na ye oyo bazali bababa. Mpe bosembo ya bandeko na biso bababa na Russie, esalaki ete tólonga na tribinale ya Mpoto mpo na ntomo ya bato (Cour européenne des droits de l’homme).
Lelo oyo, “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kobimisa mikanda na elobeli ya bajɛstɛ mpe azali kobimisa masangá mpe kobongisa mayangani na elobeli ya bajɛstɛ. (Mat. 24:45) Yango esalisi mpenza bababa.a Kasi, osilá komituna soki bababa bazalaki kosala ndenge nini mpo na koyekola solo mpe kokola na elimo liboso ete bibongiseli wana ezwama? Osilá kokanisa oyo okoki kosala mpo na kosalisa bababa oyo bafandaka na teritware na bino?
Liboso bibongiseli ezwama
Soki otuni bababa mosusu ya kala báyebisa yo ndenge bayebaki Nzambe, bakoloba nini? Bakoki koyebisa yo ndenge bayokaki ntango bayebaki ete Nzambe azali na nkombo—ndenge likambo yango ebongolaki bomoi na bango mpe esalaki ete bákangama na solo na boumeli ya bambula mingi liboso ete bakasɛti-video to ba-DVD ebanda kobima na elobeli ya bajɛstɛ mpo na kosalisa bango báyeba mateya mozindo ya Makomami. Bakoki koyebisa yo ndenge bazalaki kolanda makita ntango ezalaki kosalema na elobeli ya bajɛstɛ te mpe bato ya kobongola bazalaki te. Mpo na kosalisa bango bákanga ntina ya makambo oyo ezalaki kolobama na makita, moto moko azalaki kofanda pene na bango mpe kokomela bango na papye. Ndeko moko oyo azali baba ayekolaki Biblia ndenge wana na boumeli ya mbula nsambo liboso ete mobongoli amonana.
Batatoli mosusu oyo bazali bababa bakanisaka ndenge bazalaki kosala mpo na kosakola epai ya bato oyo bazali bababa te. Na lobɔkɔ moko bazalaki kosimba papye oyo bakomá mwa maloba ya kobanda lisolo na mosala ya ndako na ndako. Mpe na lobɔkɔ mosusu bazalaki kosimba nimero ya sika ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká! Ezalaki mpenza mpasi koyekola Biblia na baba mosusu; mpo bazalaki kaka kosalela mikanda oyo ntango mosusu bango nyonso mibale bazalaki kokanga malamu mpenza te ntina ya makambo mosusu oyo ezali na kati. Basakoli mosusu ya kala oyo bazali bababa bakanisaka ndenge bazalaki kotungisama ntango bato bazali kokanga mpenza te ntina ya nsango oyo balingi koyebisa bango; yango ezalaki kosala ete bákoka lisusu mpenza te kokoba koyebisa bango mateya ya solo. Bayebi mpe ndenge esalaka ntango olingi mpenza Yehova, kasi ozali kokoka te komonisa yango na mpiko nyonso. Mpo na nini? Mpo bazalaki koyeba mpenza te soki boyebi na bango na likambo moko boye ezali mpenza bongo.
Atako bongo, bandeko na biso bababa bakangamaki makasi na bosembo na bango. (Yobo 2:3) Bazalaki se kozela Yehova. (Nz. 37:7) Mpe lelo oyo azali kopambola bango koleka ndenge oyo mingi kati na bango bakokaki kokanisa.
Tótalela naino milende oyo ndeko mobali moko oyo azali baba mpe tata ya libota azalaki kosala. Liboso ete bakasɛti-video ebanda kobima na elobeli ya bajɛstɛ, azalaki kotambwisa boyekoli ya libota. Mwana na ye alobi boye: “Kotambwisa boyekoli yango ezalaki pɛtɛɛ te mpo na tata, mpamba te makambo nyonso oyo azalaki koteya biso esengelaki kouta kaka na mikanda. Mbala mingi, ye moko azalaki kokanga ntina te ya makambo mosusu oyo ezalaki na mikanda yango. Biso bana tozalaki mpe kobakisela ye mokakatano. Tozalaki koyebisa ye mbala moko bisika oyo alimboli malamu te. Atako bongo, azalaki ntango nyonso kotambwisa boyekoli ya libota. Azalaki komona ete koteya biso makambo ya Yehova ezalaki na ntina mingi koleka mokakatano oyo azalaki na yango mpo ayebaki Lingelesi malamu te.”
Tozali mpe na ndakisa ya ndeko Richard oyo afandaka na Brooklyn, na engumba New York na États-Unis, azali na mbula koleka 70 mpe akufá miso ná matoi. Richard ayebani ete azangisaka makita te. Mpo na kokende na makita, amataka na engbunduka; mpo ayeba esika akokita, atángaka mbala boni engbunduka etɛlɛmi. Mokolo moko na eleko ya mpiɔ, malili ezalaki makasi mpe nɛjɛ ezalaki kokwea mingi, yango wana makita esalemaki te. Bandeko nyonso ya lisangá bayebaki yango, kasi babosanaki koyebisa Richard. Ntango bandeko bayebaki ete Richard ayebi te, bakendaki koluka ye mpe bakutaki ye atɛlɛmi liboso ya Ndako ya Bokonzi, azali kozela báfungola porte. Ntango batunaki ye mpo na nini abimaki na kati ya mopɛpɛ makasi bongo, alobaki ete “nalingaka Yehova.”
Okoki kosala nini?
Bababa bazalaka mpe na teritware na bino? Okoki koyekola elobeli ya bajɛstɛ mpo na kosololaka na bango? Mbala mingi bababa basepelaka mpe bazalaka motema molai mpo na kolakisa basusu elobeli na bango. Okoki kokutana na baba ntango ozali kotambola mpo na makambo na yo mosusu to ntango ozali na mosala ya kosakola. Okoki kosala nini? Meká kosolola na ye. Okoki kosala bajɛstɛ, kokoma, kosala mayemi, kosalela bililingi to mpe kosalela makambo wana nyonso. Ata soki baba yango amonisi ete asepeli na nsango malamu te, yebisá baba oyo azali Motatoli to mpe ndeko mosusu oyo ayebi elobeli ya bajɛstɛ ete okutanaki na baba moko. Ntango mosusu baba yango akosepela na nsango soki bayebisi ye yango na elobeli ya bajɛstɛ.
Ekoki kozala ete ozali koyekola elobeli ya bajɛstɛ mpe oyanganaka na lisangá oyo basalelaka elobeli yango. Ndenge nini okoki koyeba lisusu malamumalamu elobeli yango? Atako na kati ya lisangá ekoki kozala na basakoli mosusu oyo bazali bababa te, mpo na nini te kosolola kaka na elobeli ya bajɛstɛ? Yango ekosalisa yo okanisaka na elobeli ya bajɛstɛ oyo esɛngaka kosalela miso. Ntango mosusu okoki komona malamu koloba kaka mbala moko na monɔkɔ na esika ya kosala bajɛstɛ. Nzokande, ntango ozali koyekola monɔkɔ moko, osengeli koyika mpiko mpo okóma koloba yango malamu.
Kosala makasi mpo na kosalela elobeli ya bajɛstɛ emonisaka bolingo mpe limemya mpo na bandeko na biso bababa. Kanisá naino ndenge bababa bayokaka mikolo nyonso mpo bakokaka te kokanga mpenza ntina ya makambo oyo bato bazali koloba ezala na mosala to na kelasi. Ndeko moko oyo azali baba, alobi boye: “Mikolo nyonso, bato oyo nazalaka na bango balobaka. Mbala mingi namiyokaka ete nazali kaka ngai moko mpe nasundolami mpe yango elɛmbisaka ngai, esalaka mpe ete nasilika. Maloba ezali te mpo na komonisa ndenge namiyokaka ntango mosusu.” Makita na biso esengeli kozala esika oyo bandeko na biso bababa babɔndisamaka, bazwaka bilei ya elimo mpe basepelaka kosolola na bandeko na bango bakristo.—Yoa. 13:34, 35.
Tosengeli mpe te kobosana ete na masangá mosusu ezali na bituluku mikemike ya bababa. Bandeko mosusu babongolaka makita mpo na bango. Mpo bákanga malamu ntina ya makambo oyo ezali kolobama na makita, bandeko yango ya bababa bafandaka na bakiti ya liboso na Ndako ya Bokonzi. Yango esalisaka bango bámona malamu mpe bálanda na likebi molobi mpe mobongoli. Mbala mingi bandeko mosusu na lisangá bamesanaka na ebongiseli yango mpe yango elongolaka likebi na bango te. Ebongiseli yango esalelamaka mpe na mayangani ntango esɛngi kobongola mpo na bababa. Bandeko ya lisangá oyo basalaka mosala makasi mpo na kobongola malamu mpe na ndenge ebongi na elobeli ya bajɛstɛ, babongi mpenza kozwa longonya.
Ntango mosusu oyanganaka na lisangá to na etuluku moko ya elobeli ya bajɛstɛ to mpe ezali na mwa bandeko oyo bazali bababa na lisangá na bino mpe esɛngaka kobongola makita na elobeli ya bajɛstɛ mpo na bango. Okoki kosala nini mpo na komonisa ete omibanzabanzaka mpo na bandeko yango? Okoki kobenga bango na ndako na yo. Soki likoki ezali yekolá kosolola mwa moke na elobeli ya bajɛstɛ. Kotika te ete elobeli yango epekisa yo kosolola na bango. Okoki koluka ndenge ya kosololaka na bango, mpe komonisa bolingo ya ndenge wana ekosala ete bóbosana te ntango malamu oyo bolekisaki elongo. (1 Yoa. 4:8) Tokoki koyekola makambo mingi epai ya bandeko na biso oyo bazali bababa. Bayebi kosolola, bazalaka na bwanya, mpe bayebaka kosɛkisa. Ndeko moko oyo baboti na ye bazali bababa alobi boye: “Nalekisi bomoi na ngai mobimba elongo na bababa, mpe bateyá ngai makambo mingi oyo mpo na yango nazali na eloko te ya kozongisela bango. Bandeko na biso oyo bazali bababa bakoki koteya biso makambo mingi.”
Yehova alingaka basaleli na ye ya sembo ata mpe baoyo bazali bababa. Kondima mpe mpiko na bango ebakisaka bozwi na ebongiseli ya Yehova. Na yango, tiká tólinga bandeko na biso bababa!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lisolo “Yehova angɛngisi elongi na ye epai na bango,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto 2009.
[Elilingi na lokasa 31]
Ntango mosusu baba akosepela na nsango ya Bokonzi soki bayebisi ye yango na elobeli ya bajɛstɛ
[Bililingi na lokasa 32]
Makita esengeli kozala esika oyo bandeko na biso bababa babɔndisamaka mpe balendisamaka na elimo