Mituna ya batángi
Makomami endimi ete moklisto akoki kotya lobɔkɔ likoló ya Biblia mpo na kolapa ndai na tribinale ete akoloba mpenza solo?
Moto na moto asengeli kozwa ekateli na ye na likambo yango. (Bagalatia 6:5) Kasi, Biblia epekisi te ete moto alapa ndai na tribinale ete akoloba solo.
Momeseno ya kolapa ndai epalanganá banda kala mpenza. Na ndakisa, na ntango ya kala, Bagrɛki bazalaki kotombola lobɔkɔ likoló to kosimba etumbelo ntango bazali kolapa ndai. Na Loma, soki moto azali kolapa ndai, azalaki kosimba libanga na lobɔkɔ na ye mpe azalaki koloba boye: “Soki nabuki lokuta na nko, ntango [nzambe] Jupiter akobikisa engumba oyo na ndako na yango ya makasi, alongola makambo nyonso ya malamu na bomoi na ngai, ndenge ngai nazali kobwaka libanga oyo.”—Buku Cyclopedia of Biblical, Theological, and Ecclesiastical Literature, ekomami na John McClintock na James Strong, Volimi VII, lokasa 260.
Kosala bongo ezali komonisa ete bato bazalaki na mposa ya kondima ete nzambe moko azali, oyo akoki kotala bango mpe oyo akoki kotuna bango mpo na makambo oyo bazali kosala. Na ntango ya kala, basaleli ya solo ya Yehova bazalaki koyeba ete Yehova ayebi makambo oyo bazalaki koloba mpe oyo bazalaki kosala. (Masese 5:21; 15:3) Bazalaki kolapa ndai lokola nde na miso ya Nzambe, to bazalaki kozwa ye lokola temwe. Na ndakisa, Boaza, Davidi, Salomo, mpe Sidikiya basalaki bongo. (Luta 3:13; 2 Samwele 3:35; 1 Mikonzi 2:23, 24; Yilimia 38:16) Basaleli ya Nzambe ya solosolo bazalaki mpe kondima ete bato mosusu bálapisa bango ndai. Abalayama na Yesu Klisto basalaki bongo.—Genese 21:22-24; Matai 26:63, 64.
Moto oyo azalaki kolapa ndai na miso ya Yehova, azalaki ntango mosusu kosala mpe ekela (geste) moko. Abalama to Abalayama ayebisaki mokonzi ya Sodoma ete: “Natomboli mpenza lobɔkɔ na ngai mpo na kolapa ndai liboso ya Yehova, Nzambe Oyo-Aleki-Likoló, Mozalisi ya likoló na mabele.” (Genese 14:22, NW) Anzelu moko oyo alobaki na mosakoli Danyele “atombolaki lobɔkɔ na ye ya mobali mpe lobɔkɔ na ye ya mwasi epai na lola mpe [alapaki] ndai na nkombo na ye oyo azali na bomoi lobiko na lobiko.” (Danyele 12:7) Ata mpo na Nzambe, Biblia ezali koloba na maloba ya elilingi ete atomboli lobɔkɔ na ye likoló mpo na kolapa ndai.—Deteronome 32:40; Yisaya 62:8.
Biblia epekisi te kolapa ndai. Kasi, yango elingi koloba te ete moklisto asengeli ntango nyonso kolapa ndai mpo na komonisa ete likambo oyo ye alobi ezali solo. Yesu alobaki boye: “Tiká ete liloba na bino Ɛɛ ezala Ɛɛ, Te na bino, Te.” (Matai 5:33-37) Moyekoli Yakobo amonisaki mpe likanisi motindo wana. Ntango alobaki “bótika kolapa ndai,” azalaki nde kopekisa kolapaka ndai na ndenge ya lisɛki. (Yakobo 5:12) Yesu na Yakobo balobaki te ete ezali mabe moto alapa ndai na tribinale ete akoloba solo.
Kasi, tokoloba boni soki na tribinale basɛngi na moklisto ete alapa ndai mpo na komonisa ete akoloba solo? Akoki ntango mosusu kondima kosala yango. To mpe, na esika ya kolapa ndai, akoki kosɛnga bápesa ye nzela ya koloba maloba mosusu mpo na kondimisa bango ete azali kobuka lokuta te.—Bagalatia 1:20.
Soki na ntango ya kosambisa moto, basɛngaka ye atombola lobɔkɔ likoló to atya yango likoló ya Biblia ntango azali kolapa ndai, moklisto akoki mpe kondima kotosa. Akoki kokanisa bandakisa oyo ezali na Makomami oyo ezali kolobela bato oyo basalaki ekela moko na ntango bazalaki kolapa ndai. Mpo na moklisto, kosala ekela boye to boye ntango azali kolapa ndai yango te nde likambo ya ntina mpenza, kasi likambo oyo eleki ntina ezali nde ete asengeli kobosana te ete azali kolapa ndai liboso ya Nzambe ete akoloba solo. Kolapa ndai ndenge wana ezali likambo ya lisɛki te. Soki moklisto amoni ete akoki to asengeli koyanola na motuna oyo batuni ye wana asilaki kolapa ndai motindo wana, asengeli kobosana te ete alapaki ndai ete akoloba solo. Yango mpe asengeli koloba mpamba te moklisto nyonso asengeli kolobaka ntango nyonso solo.