Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/2 nk. 18-23
  • ‘Bókoba kobota mbuma mingi’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Bókoba kobota mbuma mingi’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tokoki kosala mingi koleka
  • Bizaleli malamu ya boklisto
  • Tóbota mbuma ya Bokonzi
  • Tozali kobota mbuma na ntango tozali kopalanganisa milona ya Bokonzi
  • Tópesa nyonso oyo tokoki kopesa mpo na nkembo ya Nzambe
  • Kosakola mpe koteya
  • Kosepela na bato esalisaka mpenza na kobota mbuma
  • Yehova alingaka baoyo ‘babotaka mbuma wana bazali koyika mpiko’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Tókoba “kobota mbuma mingi”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Kobota mbuma mpe kokóma baninga ya Yesu
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yesu bomoi na ye mpe mosala na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/2 nk. 18-23

‘Bókoba kobota mbuma mingi’

‘Bókoba kobota mbuma mingi mpe bólakisa mpenza ete bozali bayekoli na ngai.’​—YOANE 15:8.

1. (a) Yesu ayebisaki bantoma na ye likambo nini oyo moto asengeli kokokisa mpo na kozala moyekoli na ye? (b) Motuna nini tosengeli komituna?

NA BUTU ya nsuka liboso akufa, Yesu asololaki na bantoma na ye lisolo moko ya mozindo mpe ntango molai mpo na kolendisa bango. Ekoki kozala ete midi ya butu esilaki koleka, kasi Yesu, lokola alingaki baninga na ye wana ya motema, akobaki kaka koloba. Bongo, na kati ya lisolo na ye, amonisaki bango likambo mosusu oyo basengelaki kokokisa mpo bátikala bayekoli na ye. Alobaki boye: “Tata na ngai azali kozwa nkembo na likambo oyo, ete bozali kokoba kobota mbuma mingi mpe kolakisa mpenza ete bozali bayekoli na ngai.” (Yoane 15:8) Lelo oyo, tozali nde kokokisa likambo yango mpo na kozala bayekoli? “Kobota mbuma mingi” elimboli nini? Mpo tózwa eyano, tótalela lisusu lisolo na bango na butu wana.

2. Na butu ya nsuka liboso ya liwa na ye, ndakisa nini Yesu apesaki oyo etali mbuma?

2 Yesu azalaki koyebisa bantoma na ye ndakisa moko ntango apesaki bango toli ya kobota mbuma. Alobaki boye: “Ngai nazali nzete ya vinyo ya solosolo, mpe Tata na ngai azali mosali-elanga. Etape nyonso oyo ezali na kati na ngai oyo ebotaka mbuma te alongolaka yango, mpe nyonso oyo ebotaka mbuma apɛtolaka yango, mpo ebota mbuma mingi koleka. Bino bosili kopɛtolama mpo na liloba oyo nalobaki na bino. Bótikala na kati ya bomoko elongo na ngai, mpe ngai na bomoko elongo na bino. Lokola etape ekoki te kobota mbuma yango moko kozanga kokangama na nzete ya vinyo, bino mpe ndenge moko bokoki te kobota mbuma, soki bokobi te kozala na bomoko elongo na ngai. Ngai nazali nzete ya vinyo, bino bozali bitape. . . . Tata na ngai azali kozwa nkembo na likambo oyo, ete bozali kokoba kobota mbuma mingi mpe kolakisa mpenza ete bozali bayekoli na ngai. Kaka ndenge Tata alingi ngai mpe ngai nalingi bino, bókoba kozala na kati ya bolingo na ngai. Soki botosi bakomandema na ngai, bokokoba kozala na kati ya bolingo na ngai.”​—Yoane 15:1-10.

3. Bayekoli ya Yesu basengeli kosala nini mpo na kobota mbuma?

3 Na ndakisa yango, Mosali-elanga ezali Yehova, Yesu azali nzete ya vinyo, mpe bantoma oyo Yesu azalaki kosolola na bango bazali bitape. Ntango nyonso oyo bantoma bakosala makasi mpo na ‘kotikala na bomoko’ elongo na Yesu, bakobota mbuma. Yesu alimbolaki mpe ndenge oyo bantoma bakokaki kobatela bomoko yango ya ntina mingi: “Soki botosi bakomandema na ngai, bokokoba kozala na kati ya bolingo na ngai.” Nsima ya bambula ebele, ntoma Yoane akomelaki baninga na ye baklisto maloba ya ndenge wana: “Moto oyo azali kotosa bakomandema na [Klisto] azali kotikala na kati ya bomoko elongo na ye.”a (1 Yoane 2:24; 3:24) Na bongo, soki bayekoli bazali kotosa bakomandema ya Klisto, bakozala ntango nyonso na bomoko elongo na ye, mpe bomoko yango ekosalisa bango bábota mbuma. Mbuma nini oyo tosengeli kobota?

Tokoki kosala mingi koleka

4. Lokola Yehova “alongolaka” etape nyonso oyo ezali kobota mbuma te, yango ezali koteya biso nini?

4 Na kati ya ndakisa ya vinyo, Yesu alobaki ete soki etape moko ezali kobota mbuma te, Yehova “alongolaka,” to akataka yango. Yango elingi koloba na biso nini? Elingi koloba ete bayekoli nyonso basɛngisami na kobota mbuma, mpe ete bango nyonso bakoki kobota mbuma, ata soki bazali na bomoi ya ndenge nini to mikakatano ya ndenge nini. Kutu, soki Yehova ‘alongoli’ moyekoli moko ya Klisto to atángi ye ete abongi te mpo akoki te kosala likambo moko oyo eleki makoki na ye, yango ekozala na boyokani te na bolingo Ye.​—Nzembo 103:14; Bakolose 3:23; 1 Yoane 5:3.

5. (a) Ndenge nini ndakisa ya Yesu ezali komonisa ete tokoki kobota mbuma mingi koleka? (b) Wapi mitindo mibale ya mbuma tokolobela?

5 Ndakisa ya vinyo oyo Yesu apesaki ezali mpe komonisa ete ata soki tozali na bomoi ya ndenge nini, biso bayekoli na ye tosengeli koluka ndenge oyo tokoki kosala mingi lisusu na mosala na biso. Yesu alobaki boye: “Etape nyonso oyo ezali na kati na ngai oyo ebotaka mbuma te alongolaka yango, mpe nyonso oyo ebotaka mbuma apɛtolaka yango, mpo ebota mbuma mingi koleka.” (Yoane 15:2) Na nsuka ya ndakisa yango, Yesu alendisaki bayekoli na ye ete bábota “mbuma mingi.” (Vɛrsɛ 8) Yango elingi koloba nini? Biso bayekoli tosengeli te kosepela kaka na ndenge oyo tozali kosala mosala sikoyo. (Emoniseli 3:14, 15, 19) Tosengeli nde koluka ndenge oyo tokoki kobota mbuma mingi koleka. Mbuma nini oyo tosengeli kosala makasi ete tóbota yango mingi koleka? Ezali (1) “mbuma ya elimo” mpe (2) mbuma ya Bokonzi.​—Bagalatia 5:22, 23; Matai 24:14.

Bizaleli malamu ya boklisto

6. Ndenge nini Yesu Klisto amonisaki ntina ya ezaleli ya liboso oyo batángi na kati ya mbuma ya elimo?

6 Bolingo ezali ezaleli ya liboso oyo batángi na kati ya “mbuma ya elimo.” Elimo santu ya Nzambe ebotaka bolingo epai ya baklisto, mpamba te batosaka komandema oyo Yesu ayebisaki mwa moke liboso apesa ndakisa ya nzete ya vinyo oyo ebotaka mbuma. Alobaki na bantoma na ye boye: “Nazali kopesa bino komandema ya sika, ete bólinganaka bino na bino.” (Yoane 13:34) Kutu, na lisolo wana mobimba na butu ya nsuka ya bomoi na ye awa na mabele, mbala mingi Yesu azongelaki ntina ya komonisa bolingo.​—Yoane 14:15, 21, 23, 24; 15:12, 13, 17.

7. Ndenge nini ntoma Petelo amonisaki ete kobota mbuma ezali na boyokani na komonisa bizaleli lokola oyo ya Klisto?

7 Petelo, oyo azalaki wana na butu yango, akangaki ntina ete bayekoli ya solosolo basengeli komonisana bolingo mpe bizaleli mosusu lokola oyo ya Klisto. Bambula mingi na nsima, Petelo alendisaki baklisto ete bálona bizaleli lokola komipekisa, bolingo ya bondeko mpe bolingo. Abakisaki ete kosala bongo epekisaka moto ‘azanga kosala mosala to azanga kobota mbuma.’ (2 Petelo 1:5-8) Ata soki tozali na bomoi ya ndenge nini, biso nyonso tokoki kobota mbuma ya elimo. Yango wana, tiká tósala makasi mpo na komonisa bolingo, motema malamu, boboto, mpe bizaleli mosusu lokola ya Klisto mingi koleka, mpamba te “ezali na mobeko ata moko te oyo ezali kotɛmɛla makambo wana,” to oyo ezali kotya ndelo epai tosengeli kosuka na komonisa yango. (Bagalatia 5:23) Ɛɛ, tiká tóbota “mbuma mingi koleka.”

Tóbota mbuma ya Bokonzi

8. (a) Boyokani nini ezali kati na mbuma ya elimo ná mbuma ya Bokonzi? (b) Motuna nini tosengeli kotalela yango malamumalamu?

8 Mbuma oyo eteli mpe oyo ezali na elɛngi ebakisaka kitoko ya nzete oyo ezali kobota yango. Kasi, mbuma yango esukaka kaka te na kokómisa nzete kitoko. Mbuma ezali mpe na ntina mingi mpo ebimisaka milona oyo bakolona mpo ebota banzete mosusu. Ndenge moko mpe, mbuma ya elimo esukaka kaka te na kobongisa bomoto na biso ya boklisto. Bizaleli lokola bolingo mpe kondima etindaka biso mpe na kopalanganisa nsango ya Bokonzi oyo ezali na kati ya Liloba ya Nzambe. Yoká ndenge oyo ntoma Paulo alobelaki boyokani yango ya ntina mingi oyo ezali kati na komonisa bizaleli yango ná kopalanganisa nsango ya Bokonzi. Alobaki boye: “Biso mpe tozali komonisa kondima [oyo ezali na kati ya mbuma ya elimo] mpe na yango tozali koloba.” (2 Bakolinti 4:13) Mpo na yango, Paulo alobaki lisusu ete tozali ‘kopesa Nzambe mbeka ya lisanzoli, elingi koloba, mbuma ya mbɛbu’​—yango nde motindo ya mibale ya mbuma oyo tosengeli kobota. (Baebele 13:15) Tokoki nde kobota “mbuma mingi” lisusu na bomoi na biso lokola basakoli ya Bokonzi ya Nzambe?

9. Kobota mbuma ezali nde kokómisa bato bayekoli? Limbolá.

9 Mpo na kozwa eyano oyo ebongi, tosengeli naino koyeba malamumalamu mbuma ya Bokonzi soki ezali nini. Tokoki nde koloba ete kobota mbuma elimboli kokómisa bato bayekoli? (Matai 28:19) Mbuma oyo tosengeli kobota elimboli libosoliboso nde bato oyo tozali kosalisa ete bázwa batisimo lokola basambeli ya Yehova? Te. Soki ezali bongo, boye ekozala mpenza likambo ya kolɛmbisa nzoto mpo na bandeko na biso Batatoli mosusu oyo, banda ebele ya bambula bazali kosakola nsango ya Bokonzi na bosembo mpenza na bisika oyo bato basepelaka mpenza na nsango na biso te. Soki mbuma ya Bokonzi oyo tozali kobota elimboli kaka bayekoli ya sika, boye tokoloba ete Batatoli wana oyo basalaka mosala makasi bazali lokola bitape oyo ebotaka mbuma te oyo Yesu alobelaki na kati ya ndakisa na ye! Nzokande, ezali bongo te. Kasi, mbuma ya libosoliboso ya Bokonzi na mosala na biso ezali mpenza nini?

Tozali kobota mbuma na ntango tozali kopalanganisa milona ya Bokonzi

10. Ndakisa ya moloni mpe mitindo ndenge na ndenge ya mabele oyo Yesu apesaki ezali komonisa ete mbuma ya Bokonzi ezali nini mpe ezali nini te?

10 Ndakisa ya moloni mpe mitindo ndenge na ndenge ya mabele oyo Yesu apesaki ezali kopesa eyano oyo ezali kolendisa baoyo bazali kosakola na bisika oyo bato basepelaka na nsango na biso te. Yesu alobaki ete milona ezali nsango ya Bokonzi oyo ezali na Liloba ya Nzambe mpe ete mabele ezali motema ya elilingi. Milona mosusu “ekweaki na mabele ya malamu, mpe nsima ya kobima, ebotaki mbuma.” (Luka 8:8) Mbuma nini? Soki milona ya blé ebimi, ekolaka, ebotaka mbuma; kasi mbuma yango ezalaka mwa milona ya blé te, ezalaka nde mbuma ya sika. Ndenge moko mpe, mbuma oyo moklisto abotaka ezali kaka te bayekoli ya sika, kasi milona ya sika ya Bokonzi.

11. Ndenge nini tokoki kolimbola mbuma ya Bokonzi?

11 Yango wana, awa mbuma ezali te bayekoli ya sika to bizaleli malamu ya boklisto. Lokola milona oyo baloni ezali nde liloba ya Bokonzi, mbuma esengeli kozala ebele ya milona ya sika oyo milona ya liboso ebimisi. Awa, kobota mbuma elimboli kosakola Bokonzi yango. (Matai 24:14) Biso nyonso tokoki nde kobota mbuma ya Bokonzi to kosakola nsango malamu ya Bokonzi ata soki tozali na bomoi ya ndenge nini? Ɛɛ, tokoki kosala yango! Kaka na ndakisa na ye wana, Yesu alimbolaki mpo na nini ezali bongo.

Tópesa nyonso oyo tokoki kopesa mpo na nkembo ya Nzambe

12. Baklisto nyonso bakoki nde kobota mbuma? Limbolá.

12 Yesu alobaki ete: ‘Oyo elonamaki na mabelé ya malamu ebimisi, oyo mbala nkama moko, oyo kuna ntuku motoba, mpe oyo mosusu ntuku misato.’ (Matai 13:23) Makambo mingi ekoki kosala ete milona oyo elonami na elanga ebota ndenge moko te. Ndenge moko mpe, mosala na biso ya kosakola nsango malamu ekoki kokesana na mosala ya bandeko mosusu na kotalela bomoi na biso; Yesu mpe amonisaki ete ayebaki likambo yango. Bandeko mosusu bakoki kozala na ntango mingi; basusu mpe bakoki kozala nzoto kolɔngɔnɔ mpe na makasi mingi. Yango wana, tokoki kosala mingi koleka moto mosusu to mpe moto mosusu akoki kosala mingi koleka biso, kasi soki yango ezali mpenza nyonso oyo tokoki kosala, Yehova akosepela na yango. (Bagalatia 6:4) Ata soki tozali kokoka kosakola mingi te mpo tokómi mibange to tozali na maladi oyo ezali kolɛmbisa biso mpenza, na ntembe te Yehova, Tata na biso oyo azali na motema mawa, azali kotánga biso lokola bato oyo ‘bazali kokoba kobota mbuma mingi.’ Mpo na nini? Mpamba te tozali kopesa ye ‘nyonso oyo tozali na yango,’ tozali kosalela ye na molimo na biso mobimba.b​—Malako 12:43, 44; Luka 10:27.

13. (a) Wapi ntina ya libosoliboso oyo tosengeli ‘kokoba’ kobota mbuma ya Bokonzi? (b) Nini ekosalisa biso na kokoba kobota mbuma na esika oyo bato mingi basepelaka koyoka nsango na biso te? (Talá etanda na lokasa 21.)

13 Mbuma ya Bokonzi oyo tozali kobota ezala mingi to moke, tokozala na mposa ya ‘kokoba kobota mbuma’ soki tozali koyeba ntango nyonso ntina oyo tozali kosala yango. (Yoane 15:16) Yesu alobelaki ntina ya libosoliboso: “Tata na ngai azali kozwa nkembo na likambo oyo, ete bozali kokoba kobota mbuma mingi.” (Yoane 15:8) Ya solo, mosala na biso ya kosakola esantisaka nkombo ya Yehova liboso ya bato nyonso. (Nzembo 109:30) Honor, Motatoli moko ya sembo oyo azali sikoyo na mbula koleka 70, alobaki boye: “Ata na esika oyo bato mingi basepelaka koyoka biso te, kozala momonisi ya Oyo-Aleki-Likoló ezali libaku malamu.” Batunaki Claudio, Motatoli moko ya molende banda 1974, mpo na nini atikaka te kosakola atako na esika afandi bato mingi basepelaka koyoka te. Na eyano na ye atángaki maloba ya Yoane 4:34, epai Yesu alobaki ete: “Bilei na ngai ezali nde kosala mokano ya moto oyo atindaki ngai mpe kosilisa mosala na ye.” Claudio abakisaki ete: “Na ndakisa ya Yesu, nalingi kobanda kaka te, kasi nalingi mpe kosilisa mosala na ngai ya mosakoli ya Bokonzi.” (Yoane 17:4) Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bazali mpe na likanisi yango.​—Talá etanda “Ndenge ya ‘kobota mbuma na koyika mpiko’” na lokasa 21.

Kosakola mpe koteya

14. (a) Wapi mikano mibale oyo mosala ya Yoane Mobatisi mpe ya Yesu ekokisaki? (b) Mosala nini baklisto bazali kosala lelo oyo?

14 Mosakoli ya libosoliboso ya Bokonzi oyo Baevanzile elobeli ezali Yoane Mobatisi. (Matai 3:1, 2; Luka 3:18) Mokano na ye ya liboso ezalaki ya ‘kotatola,’ mpe asalaki yango na kondima makasi mpe na elikya ete “bato ya ndenge nyonso bákoka kondima.” (Yoane 1:6, 7) Bato mosusu oyo Yoane ateyaki bakómaki mpenza bayekoli ya Klisto. (Yoane 1:35-37) Na bongo, Yoane azalaki mosakoli mpe azalaki kokómisa bato bayekoli. Yesu mpe azalaki mosakoli mpe moteyi. (Matai 4:23; 11:1) Yango wana, ezali likambo ya kokamwa te ete Yesu atindaki bayekoli na ye ete básuka te kaka na kosakola nsango ya Bokonzi kasi básalisa mpe bato oyo bakondima nsango yango ete bákóma bayekoli na ye. (Matai 28:19, 20) Na ndenge yango, mosala na biso lelo oyo ezali ya kosakola mpe ya koteya.

15. Makambo nini ekokani na ndenge oyo bato bayambaki nsango oyo esakolamaki na ekeke ya liboso ya T.B. mpe ndenge bazali koyamba nsango oyo ezali kosakolama lelo oyo?

15 Na ekeke ya liboso na ntango na biso (T.B.), na kati ya bato oyo bayokaki Paulo ntango azalaki kosakola mpe koteya, “bamosusu babandaki kondima makambo oyo elobamaki; bamosusu bazalaki kondima te.” (Misala 28:24) Lelo oyo mpe makambo ezali se ndenge yango. Ebele ya milona ya Bokonzi ezali kokwea na mabele ya mabe mpe yango ezali kopesa biso mawa. Atako bongo, milona mosusu ezali kokwea kaka na mabele ya malamu, ezali kobimisa misisa, mpe ezali kokola, se ndenge oyo Yesu asakolaki yango. Na mokili mobimba, bato koleka 5 000 bazali kokóma bayekoli ya solosolo ya Klisto pɔsɔ na pɔsɔ! Bayekoli yango ya sika ‘bazali kondima makambo oyo elobami,’ atako bato mingi mosusu bazali kondima te. Nini esalaki ete mitema na bango endima nsango ya Bokonzi? Mbala mingi, ntango Batatoli bamonisaki bato yango ete bazali kosepela na bango, yango ebotaki mbuma ya malamu; basalaki oyo tokoki kobenga mosala ya komwangisa mai na milona oyo elonami sika. (1 Bakolinti 3:6) Tótalela kaka bandakisa mibale.

Kosepela na bato esalisaka mpenza na kobota mbuma

16, 17. Mpo na nini ezali na ntina tósepelaka na bato oyo tozali kokutana na bango na mosala ya kosakola?

16 Karolien azali elenge Motatoli ya Yehova na Belgique, asololaki na mwasi moko mobange, kasi mwasi yango asepelaki na nsango ya Bokonzi te. Lokola bakangaki mwasi yango bande na lobɔkɔ, Karolien na moninga na ye balukaki kosalisa ye, kasi mwasi yango aboyaki. Mikolo mibale na nsima, Batatoli yango bazongaki lisusu na ndako ya mwasi yango mpe batunaki ye soki azali nzoto malamu. Karolien alobi ete: “Likambo yango ebimisaki mbuma malamu. Mwasi yango akamwaki na komona ete tosepelaki mpenza nde na ye moto. Akɔtisaki biso na ndako na ye, mpe tobandaki koyekola Biblia.”

17 Sandi, Motatoli moko na États-Unis, amonisaka bato oyo ayebisaka bango nsango malamu ete asepelaka na bango. Alukaka na kati ya zulunalo ya engumba na bango esika oyo bapesaka mayebisi ya bana oyo babotami sika mpe akendaka kotala baboti ya bana yango mpe amemelaka bango buku Mokanda mpo na masolo ya Biblia.c Lokola basi oyo baboti sika babimaka mingi te mpe basepelaka ete bapaya oyo bayei kotala bango bámona mwana na bango, mbala mingi Sandi azwaka libaku ya kosolola malamu na basi ya ndenge wana. Sandi alobi boye: “Nayebisaka baboti ntina ya kotángela mwana oyo abotami sika mokanda mpo na kokolisa bolingo kati na baboti ná mwana. Na nsima, nalobelaka mikakatano ya kobɔkɔla bana na mokili ya lelo.” Na mikolo eleki, akendaki kotala mwasi moko; nsima na yango, mwasi yango ná bana na ye motoba bakómaki basaleli ya Yehova. Biso mpe tokoki kozwa matomba ya ndenge wana na mosala ya kosakola soki tozali kosala mosala mpe tozali kosepela na bato.

18. (a) Mpo na nini biso nyonso tokoki ‘kobota mbuma mingi’? (b) Wapi makambo misato oyo Evanzile ya Yoane elobeli oyo esɛngami mpo na kozala moyekoli oyo ozali na ekateli ya kokokisa?

18 Ezali likambo ya kolendisa na koyeba ete tokoki kokokisa likambo oyo basɛngi biso ya ‘kokoba kobota mbuma mingi’! Tózala bilenge to mikóló, tózala nzoto kolɔngɔnɔ to na maladi, tózala na esika oyo bato mingi basepelaka to te, biso nyonso tokoki kobota mbuma mingi. Ndenge nini? Soki tozali komonisa mbuma ya elimo mingi koleka mpe soki tozali komipesa na kopalanganisa nsango ya Bokonzi ya Nzambe na makoki na biso nyonso. Lisusu, tozali kosala makasi ya ‘kotikala na kati ya liloba ya Yesu’ mpe ‘kozala na bolingo na kati na biso.’ Ya solo, soki tozali kokokisa makambo misato oyo Evanzile ya Yoane elobeli mpo na kozala moyekoli, tokomonisa ete ‘tozali mpenza bayekoli ya Klisto.’​—Yoane 8:31; 13:35.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Atako na kati ya ndakisa oyo Yesu apesaki bitape ya vinyo elimboli bantoma na ye mpe baklisto mosusu oyo bakozala na Bokonzi ya Nzambe na likoló, ndakisa yango ezali na mateya oyo bayekoli nyonso ya Klisto bakoki kozwela yango litomba lelo oyo.​—Yoane 3:16; 10:16.

b Bato oyo babimaka lisusu libándá te mpo bakómi mibange makasi to mpo na maladi bakoki kokoma mikanda mpe kotindela yango bato, to mpe na bisika oyo ekoki kosalema, bakoki kosolola na bato na telefone, mbala mosusu mpe bakoki koyebisa nsango malamu na bato oyo bakendaka kotala bango.

c Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

Mituna ya bozongeli

• Mbuma nini tosengeli kobota mingi mpenza?

• Mpo na nini tolobi ete tokoki “kobota mbuma mingi”?

• Wapi makambo misato ya ntina oyo esɛngami mpo na kozala moyekoli oyo Evanzile ya Yoane elobeli mpe oyo totaleli?

[Etanda/Elilingi na lokasa 21]

NDENGE YA ‘KOBOTA MBUMA NA KOYIKA MPIKO’

NINI esalisaka yo okoba kosakola nsango ya Bokonzi na bisika oyo bato basepelaka koyoka biso te? Yoká mwa biyano oyo ekoki kosalisa yo.

“Bato bándima to bándima te, nazalaka na elikya mpe na molende lokola nayebi ete Yesu azali na biso.”​—Harry, mbula 72; azwá batisimo na 1946.

“Bakolinti ya Mibale 2:17 elendisaka ngai ntango nyonso. Vɛrsɛ yango elobi ete tozali kosala mosala ‘na miso ya Nzambe, esika moko na Klisto.’ Ntango nazali na mosala ya kosakola, nazalaka elongo na baninga ya malamu mpenza.”​—Claudio, mbula 43; azwá batisimo na 1974.

“Nakoki koloba mpenza ete mosala ya kosakola ezalaka mpenza etumba mpo na ngai. Kasi, namonaka bosolo ya maloba ya Nzembo 18:29 (NW) ete: ‘Na lisalisi ya Nzambe na ngai, nakoki komata efelo moko molai.’”​—Gerard, mbula 79; azwá batisimo na 1955.

“Soki natángi ata vɛrsɛ moko kaka na mosala ya kosakola, nasepelaka ete moto moko apesi nzela ete Biblia emeka motema na ye.”​—Eleanor, mbula 26; azwaki batisimo na 1989.

“Namekaka kosalela mayele ndenge na ndenge ya kobanda lisolo. Mayele yango ezali ebele, mosusu kutu nakozwa ntango te ya kosalela yango tii na nsuka ya bomoi na ngai.”​—Paul, mbula 79; azwá batisimo na 1940.

“Nasilikaka te soki moto aboyi koyoka ngai. Nasalaka makasi naloba na bato lokola nde nazali moninga na bango, nasololaka na bango mpe nayokaka makanisi na bango.”​—Daniel, mbula 75; azwá batisimo na 1946.

“Bandeko mosusu oyo bazwi batisimo sika bayebisaki ngai ete mosala na ngai ya kosakola ezali moko na makambo oyo esalisaki bango bákóma Batatoli. Kozanga ete nayeba yango, moto mosusu ayekolaki na bango Biblia na nsima mpe asalisaki bango bákola. Nayokaka esengo na koyeba ete na mosala na biso, tozali kopesana mabɔkɔ.”​—Joan, mbula 66; azwá batisimo na 1954.

Nini esalisaka yo na ‘kobota mbuma na koyika mpiko’?​—Luka 8:15.

[Bililingi na lokasa 20]

Tozali kobota mbuma mingi ntango tozali komonisa mbuma ya elimo mpe ntango tozali kosakola nsango ya Bokonzi

[Elilingi na lokasa 23]

Yesu alingaki koloba nini ntango ayebisaki bantoma ete: ‘Bókoba kobota mbuma mingi’?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto