Tókoba “kobota mbuma mingi”
1 Na maloba ya elilingi, Yesu amonisaki ete azali nzete ya vinyo ya solo, Tata na ye azali Mosali-bilanga, mpe bayekoli na ye bapakolami na elimo bazali bitape ya vinyo oyo ebotaka mbuma. Ntango Yesu alobelaki mosala ya Mosali-bilanga ya elilingi, amonisaki mingi mpenza ntina ya kokangama makasi na nzete ya vinyo. (Yoa. 15:1-4) Liteya oyo tozwi ezali ete moto nyonso oyo azali na boyokani malamu na Yehova asengeli kozala lokola etape oyo ebotaka mbuma, oyo ekangani na Yesu Klisto, “nzete ya vinyo ya solosolo.” Tosengeli kokoba kobota mbuma mingi, elingi koloba “mbuma ya elimo” mpe mbuma ya Bokonzi.—Gal. 5:22, 23; Mat. 24:14; 28:19, 20.
2 Mbuma ya elimo: Bokoli na biso ya elimo eyebanaka mingi mpenza na ndenge oyo tozali komonisa mbuma ya elimo. Osalaka makasi olona mbuma ya elimo ya Nzambe na koyekoláká mpe komanyoláká Liloba ya Nzambe mbala na mbala? (Filp. 1:9-11) Kokakatana te kobondela Yehova mpo apesa yo elimo santu, mpo esalisa yo okóma na bizaleli oyo ekumisaka Yehova mpe okoba kokola na elimo.—Luka 11:13; Yoa. 13:35.
3 Lisusu, kolona mbuma ya elimo ekosalisa biso tósakolaka na molende. Na ndakisa, bolingo mpe kondima etindaka biso tósakolaka mbala na mbala, atako tozali na makambo mingi ya kosala. Bizaleli lokola kimya, motema molai, motema malamu, boboto, mpe komipekisa, esalisaka biso tózongisaka mabe te epai ya bato oyo batɛmɛlaka biso. Esengo esalisaka biso tósepela na mosala ya kosakola ata ntango bato baboyi koyoka nsango yango.
4 Mbuma ya Bokonzi: Tolingaka mpe kobota mbuma ya Bokonzi. Yango esangisi mpe “mbeka ya lisanzoli . . ., elingi koloba, mbuma ya mbɛbu na biso oyo ezali kosala eyambweli mpo na nkombo na ye.” (Ebe. 13:15) Tokosala bongo soki tozali kosakola nsango malamu na molende mpenza mpe na motema moko. Osalaka makasi obongisa lolenge na yo ya kosakola mpo obota mbuma ya Bokonzi mingi?
5 Yesu amonisaki ete bayekoli na ye nyonso ya sembo bakobota mbuma ndenge moko te. (Mat. 13:23) Yango wana, tosengeli te komikokanisaka na basusu, kasi tosengeli nde kopesa Yehova nyonso oyo tozali na yango ya malamu koleka. (Gal. 6:4) Soki totaleli malamu makambo oyo tosalaka na bomoi na biso, na nzela ya Liloba ya Nzambe, tokokoba kopesa Yehova nkembo mpe “kobota mbuma mingi.”—Yoa. 15:8.