Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/5 nk. 25-27
  • Bazali kosalela bandeko na bango baklisto na mboka mopaya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bazali kosalela bandeko na bango baklisto na mboka mopaya
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mikakatano oyo bakutanaka na yango
  • Kosakola esɛngaka kozala na mpiko
  • Bazalaka na elimo ya komipesa
  • Misala ya kotonga na filiale​—Eteni ya ntina mingi ya mosala ya bosantu
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Tósepela na ntina na bokóli oyo Nzambe azali kopesa biso
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Kotonga bandako mpo na kokumisa Yehova
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Okoki kopesa ntango mpe makasi na yo!
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/5 nk. 25-27

Bazali kosalela bandeko na bango baklisto na mboka mopaya

“BASALI ya bolingo malamu na mosala ya botongi”; osilá koyoka nkombo wana? Batatoli ya Yehova oyo babengamaka bongo bandimá kopesa ntango mpe kosalela mayele na bango mpo na kotonga bandako mpo na konyata mpe kokabola mikanda oyo ezali na nsango ya Bokonzi oyo ezali na Biblia. Basali yango ya bolingo malamu batongaka mpe Bandako ya Mayangani mpe Bandako ya Bokonzi, bisika oyo mateya ya Biblia epesamaka. Bazali sikoyo kotonga na bikólo 34, oyo mingi na yango ezali mikili ya bozwi te. Mikakatano mpe makambo nini ya esengo baministre yango bakutanaka na yango ntango bazali kosalela bandeko na bango na mikili mosusu? Ndenge nini batalelaka “mosala mosantu” oyo basalaka? (Emoniseli 7:9, 15) Mpo na koyeba yango, tiká tótuna bamosusu oyo basalaki na Mexique.

Basali ya bolingo malamu ya liboso bakómaki na Mexique na sanza ya Mai 1992. Mwa moke na nsima, babandisaki mosala monene ya kobakisa bandako ya sika na filiale ya Batatoli ya Yehova na Mexique. Basengelaki kotonga bandako ya sika 14, elingi koloba, bandako ya kolala mpo na basali ya bolingo malamu oyo basalaka na Betele, ndako ya konyata mikanda, mpe ndako moko ya monene mpo na babiro.

Bato koleka 730 oyo bautaki na Canada, na États-Unis, na Grande-Bretagne, mpe na bikólo mosusu basalaki na bomoko mosala yango ya botongi elongo na ebele ya basali mosusu ya bolingo malamu oyo bautaki na Mexique mobimba. Lisusu, Batatoli mosusu pene na 28 000 ya masangá soki 1 600 oyo ezalaki pene na esika oyo mosala ezalaki kosalema bazalaki mpe koya na bawikende kopesa mabɔkɔ na mosala yango. Bango nyonso bazalaki na elimo ya komipesa mpe basepelaki kosalela mayele na bango na mosala yango. Bamonaki ete ezalaki libaku ya malamu mpo básalela Yehova na ndenge wana. Na boumeli ya mosala wana ya kotonga, bazalaki kobosana te maloba epemami oyo ezali na Nzembo 127:1: “Soki ezali [Yehova] te oyo akotongaka ndako, basali bakosala wana bobele mpamba.”

Mikakatano oyo bakutanaka na yango

Mikakatano nini basali wana ya bolingo malamu bakutanaka na yango ntango bakendaka kosala na mboka mopaya? Yoká mwa makambo oyo bamosusu bakutanaka na yango. Curtis ná mwasi na ye Sally, bango bazali bato ya États-Unis, bapesaki mabɔkɔ na mosala ya botongi na Allemagne, na Inde, na Mexique, na Paraguay, na Roumanie, na Russie, na Sénégal, mpe na Zambie. Curtis alobi boye: “Likambo ya liboso oyo esalaki biso mpasi mingi ezalaki ya kokabwana na mwana na biso ya mwasi oyo azalaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza mpe kotika lisangá na biso na etúká ya Minnesota. Ngai ná mwasi na ngai tosalaki mbula 24 na lisangá yango, mpe tomesanaki na yango mingi.”

Sally alobi boye: “Kofanda esika omesaná te ezali likambo ya pɛtɛɛ te, mbala mosusu ekoki kozala mpasi mingi mpo na mwasi koleka mobali; kasi nayekolaki ete nakoki komesana na makambo ya sika. Kutu, nameseneki na ebele ya mwa banyama-nkɛkɛ!” Abakisi ete: “Na mboka moko, tozalaki kofanda na ndako moko basali ya bolingo malamu 10, kuku ezalaki te mpe batwalɛti ezalaki kaka mibale. Kuna nde nayekolaki kozala na motema molai koleka.”

Mokakatano mosusu oyo esɛngaka kozala na molende mpe komikitisa ezali koyekola monɔkɔ ya sika. Sharon asalaki ná mobali na ye mosala ya kotonga na bamboka mwa mingi, ye alobi boye: “Koyeba monɔkɔ ya mboka te epai ozali kosala ezali mokakatano monene. Na ebandeli, ezalaka mpasi mpo osala boninga na bandeko na yo ya elimo mpamba te okoyeba te ndenge nini koyebisa bango ndenge oyo ozali koyoka. Yango elɛmbisaka mpenza. Kasi bandeko oyo tokutanaka na bango na bisika oyo batindaka biso na mboka mopaya bazalaka mpenza na motema molai epai na biso mpe basalaka nyonso mpo tózala malamu. Eumelaka mpenza te mpo tókóma kosolola atako toyebi monɔkɔ na bango te.”

Kosakola esɛngaka kozala na mpiko

Atako basali ya bolingo malamu bazali na elimo ya komipesa mpe basalaka mosala makasi ya kotongaka bandako, bayebaka ete bazali libosoliboso basakoli ya nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Yango wana basalaka nyonso mpo na kosangana na mosala ya kosakola na masangá ya bisika oyo batindi bango. Åke ná mwasi na ye Ing-Mari oyo basalaki mosala ya kotonga na Guadeloupe, na Malawi, na Mexique, mpe na Nigeria, bandimi ete koteya na monɔkɔ ya bapaya esɛngaka kozala na mpiko.

Ing-Mari alobi ete: “Na ebandeli tozalaki kosala mingi te na mosala ya kosakola, lokola tozalaki kokakatana, tobandaki kobima kaka elongo na Batatoli ya mboka wana mpe mbala mingi bango kaka nde bazalaki koloba. Kasi, mokolo moko na ntɔngɔ, tozwaki ekateli ya kobima kaka biso moko na mosala ya kosakola. Tobimaki atako tozalaki mitema likoló. Tokutanaki na elenge mwasi moko oyo ayokaki mwa lisolo oyo nabongisaki. Natángaki vɛrsɛ moko mpe natikelaki ye mwa mikanda ya kotánga. Mwana mwasi yango alobaki boye: ‘Nazali na mwa motuna. Ndeko na ngai moko ayekolaka Biblia na Batatoli ya Yehova. Ndenge nini ngai mpe nakoki kobanda koyekola?’ Natikalaki monɔkɔ polele. Nakitisaki motema mpe nayebisaki ye ete nayekola na ye.”

Ing-Mari abakisi: “Kanisá esengo mpe botɔndi oyo tozalaki na yango epai ya Yehova na ndenge apambolaki likanisi oyo tozwaki mpe mposa na biso ya koyebisa bato mosusu solo.” Mwana mwasi yango akolaki malamu na elimo mpe azwaki batisimo na liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova oyo esalemaki na Mexique. Åke ná Ing-Mari balobi na mokuse ndenge oyo mosala na bango elekaka: “Tosepelaka mingi na mosala na biso ya kotonga na bisika nyonso oyo batindaka biso, kasi ata eloko moko te eleki esengo ya kosalisa moto andima solo.”

Bazalaka na elimo ya komipesa

Basali ya bolingo malamu oyo bakendaka kosala na mboka mopaya bandimaka kozanga makambo mingi, lokola kokabwana na mabota mpe baninga na bango, kasi bakutanaka mpe na makambo oyo esepelisaka bango mingi lisusu koleka. Makambo nini?

Howard oyo asalaki ye ná mwasi na ye Pamela na Angola, na Colombie, na Équateur, na Guyana, na Mexique, na Porto Rico mpe na Salvador alobi boye: “Ezali esengo mpenza kokutana na bandeko basi mpe mibali ya bikólo ndenge na ndenge mpe komona bolingo makasi oyo esangisi bandeko na biso baklisto ya mokili mobimba. Mbala mingi totángaka yango na mikanda, kasi ntango ozali kofanda mpe kosala esika moko na bato mosusu oyo bauti na bikólo mosusu mpe oyo bakolá na makambo ya ndenge mosusu, okosepela lisusu koleka na bandeko na biso baklisto.”

Gary oyo asalaki mosala ya botongi na Colombie, na Costa Rica, na Équateur, na Mexique mpe na Zambie, alobi mpe ete mosala yango esili kopesa ye matomba mingi. Alobi boye: “Formasyo oyo nazwi na boumeli ya ebele ya mbula na ndenge oyo nazali kosala na bandeko oyo bateli na elimo na Babetele ya bamboka oyo bazalaki kotinda ngai epesaki ngai makoki ya kolonga mikakatano oyo nakokaki kokutana na yango na bisika oyo bazalaki kotinda ngai. Kondima na ngai elendisamaki mpamba te namonaki na miso na ngai moko bomoko ya ebongiseli ya Yehova na mokili mobimba, bomoko oyo ezali na kati ya bato oyo bakeseni minɔkɔ, mindɛlɛ na baindo, mpe bato ya mimeseno ndenge na ndenge.”

Misala ya botongi na Mexique esilaki, mpe likita mpo na bofungoli bandako ya sika oyo babakisaki na Betele esalemaki na mbula oyo euti koleka. Bolingo mpo na Nzambe etindi basali ya bolingo malamu na mosala ya botongi básala mingi mpo na kopalanganisa losambo ya solo na Mexique mpe na bamboka mosusu. Bolingo malamu oyo bazali komonisa mpe komipesa na bango mpo na kosalela bandeko na bango na mboka mopaya esepelisaka Batatoli ya Yehova na mokili mobimba.

[Elilingi na lokasa 25]

Équateur

[Elilingi na lokasa 25]

Colombie

[Elilingi na lokasa 25]

Angola

[Elilingi na lokasa 26]

Ntango mosala ya kobakisa bandako ya sika ebandaki na Betele ya Mexique

[Elilingi na lokasa 26]

Jardin ya Betele

[Elilingi na lokasa 26]

Na nse: Ndambo ya bandeko oyo basalaki mosala ya kotonga, liboso ya bandako ya sika ya Betele

[Elilingi na lokasa 27]

Basali ya bolingo malamu mpo na mosala ya botongi bazalaka na esengo ya kosangana na mosala ya kosakola na masangá ya bisika oyo batindi bango

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto