Tósepela na ntina na bokóli oyo Nzambe azali kopesa biso
1 Baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki basakoli ya molende ya Bokonzi. Bazalaki kosepela ntango ‘motuya ya masangá ezalaki kokóla mokolo na mokolo.’ (Mis. 16:5) Mosala na bango ya kosakola na molende nyonso mokómaki kino na Azia, na Mpótó mpe na Afrika, yango esalaki ete bandimi bákóma mingi.
2 Yesu asakolaki ete na mikolo ya nsuka mosala ya kosakola ekokóma ‘na mabelé mobimba oyo bato bafandi mpe na mabota nyonso!’ (Mat. 24:14) Na boumeli ya mbula ya mosala 1996, tozwaki balapólo oyo eutaki na bamboka ekeseni na mokili mobimba, balapólo oyo ezali komonisa bokóli monene mpe mitángo ya sika ya basakoli. Masangá mingi masalemaki. Na ntina na bokóli wana ya lombangu, esengeli kotonga ebele ya Bandako ya Bokonzi mpe Bandako ya mayangani mpe koyeisa monene bandako ya bafiliale mingi.
3 Mosala na biso ya Bokonzi ya Augústo 1996 elobelaki mosala monene ya botongi oyo ezali kosalema na Afrika. Ezali mpe bobele bongo mpo na Amérique latine. Mpo na mbula ya mosala 1996, Mexique epesi lapoló ya motuya ya sika ya kokamwa ya basakoli 470 098 mpe mwayene ya boyekoli ya Biblia 600 751, yango esalaki ete masangá ya sika 466 másalema! Ekanisami ete mosala ya boyeisi monene bandako ya filiale ya Mexique ekosila na nsuka ya mobu 1998. Lokola tozali komona bokóli motindo moko na bamboka mosusu mingi, ezalaka ntango nyonso na ebongiseli oyo ekanami mpo na botongi na makambo ya Teokrasi.
4 Bipai nyonso esɛngaka mosolo mingi mpo na botongi, mpe na bamboka mingi bandeko na biso bazali na makoki mingi te na biloko ya mosuni. Nzokande, lokola bazali na molende makasi na mosala ya Yehova, ntembe ezali te ete bazali kozwa bokóli na makambo ya elimo mpe bazali ntango nyonso kokóma mingi. Masese 28:27 epesi biso elikya ete “mopesi epai na mobólá akozanga te.” Na kozaláká pene mpo na kosunga na mosolo bibongiseli wana ya botongi, tokopesa nzela ete “bokokani” bózala na biloko ya mosuni. Boye, moko na moko akozwa bolamu bouti na kopesa mpe esengo ya komona bokóli oyo Yehova azali kopesa biso!—2 Kol. 8:14, 15; Mis. 20:35.
[Elilingi na lokasa 4, 5]
Filiale ya Paraguay
[Elilingi na lokasa 4]
Filiale ya Équateur
[Elilingi na lokasa 4, 5]
Bandako ya sika ya filiale ya Mexique
[Elilingi na lokasa 4, 5]
Filiale ya République dominicaine
[Elilingi na lokasa 4]
Bandako ya sika ya filiale ya Brésil
[Elilingi na lokasa 4, 5]
Bandako ya filiale ya Uruguay ezali naino kotongama
[Bililingi na lokasa 5]
Bandako ya Bokonzi oyo esɛngaki mosolo mingi te na Amérique latine:
1. Brésil
2. Nicaragua
3. Chili
4. Colombie
5. Mexique;
6. Brésil
7. Pérou
8. Venezuela
9. Mexique