“Bózala na kobanga te to na nsɔmɔ te”
“Bózala na kobanga te to na nsɔmɔ te. . . . Yehova akozala na bino.”—2 NTANGO 20:17, NW.
1. Misala ya bateroriste etindaka bato bámiyoka ndenge nini, mpe mpo na nini tokoki kokamwa te ntango tozali komona ete bazali kobanga?
MISALA ya bateroriste! Maloba wana mpamba epesaka bato malili na nzoto, soki bakanisi yango, bamonaka ete bazali na kimya te mpe babatelami te. Epesaka bato nsɔmɔ, mawa, ná nkanda mbala moko. Ebele ya bato bazali kokanisa ete misala ya bateroriste ekotungisa bato mingi na boumeli ya bambula oyo ezali koya. Soki totali makasi oyo bikólo mosusu ezali kosala banda ebele ya bambula mpo na kosukisa misala ya bateroriste kasi ezali kolonga te, tokomona ete kobanga ya bato wana ezali mpamba te.
2. Ndenge nini Batatoli ya Yehova batalelaka misala ya bateroriste, mpe yango ezali kobimisa mituna nini?
2 Atako bongo, ezali na likambo oyo esengeli mpenza kopesa biso elikya. Batatoli ya Yehova, oyo bazali lelo oyo kosakola na bikólo 234 na mokili, bazali na elikya. Na esika ya kokanisa ete misala ya bateroriste ekosila te, bazali na elikya ete etikali moke esila. Kozala na elikya motindo wana elongobani mpenza? Nani akoki kosilisa likambo mabe wana na mokili, mpe ndenge nini akosala yango? Lokola biso nyonso tokutaná na makambo ya mobulu na lolenge moko to mosusu, ezali malamu tótalela ntina oyo Batatoli ya Yehova bazali na elikya.
3. Makambo nini ezali kobangisa bato, mpe nini esakolamaki mpo na ntango na biso?
3 Lelo oyo, makambo ebele ezali kobangisa bato mpe kopesa bango nsɔmɔ. Kanisá ebele ya bato oyo bazali kokoka lisusu kosala makambo bango moko te mpo bakómi mibange; kanisá ebele ya bato oyo bazali na maladi oyo esilaka te, mpe ebele ya mabota oyo ezali kobunda na mikakatano ya mbongo. Lisusu, kanisá ata makambo oyo ekoki kosukisa bomoi yango moko! Liwa ekoki koyela moto na mbalakaka to mpe likama ekoki kobima mpe ebebisi biloko nyonso oyo ezalaki na motuya na miso na biso. Kobanga mpe nsɔmɔ wana, bakisa ebele ya matata mpe makambo ya kolɛmbisa nzoto na kati ya bato, ezali komonisa ete tozali na ntango oyo ntoma Paulo alobelaki: “Yebá likambo oyo, ete na mikolo ya nsuka bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza ekozala. Mpo bato bakozala bato oyo bamilingaka bango moko, . . . bazangi bolingo ya libota, bandimaka boyokani te, bakoselaka bato makambo, bazangi komipekisa, bato ya kongala, bazangi bolingo ya makambo ya malamu.”—2 Timote 3:1-3.
4. Atako 2 Timote 3:1-3 elobeli makambo ya mabe, elikya nini ezali kopesa biso?
4 Bavɛrsɛ yango elobeli makambo ya mabe, kasi ezali mpe kopesa elikya. Tóbosana te ete ntango ya mpasi yango esengelaki koya “na mikolo ya nsuka” ya ebongiseli ya makambo ya Satana. Elingi koloba ete lobiko ekómi pene mpe etikali moke ebongiseli ya makambo mabe etika esika na Bokonzi ya Nzambe, oyo Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka ete eya. (Matai 6:9, 10) Bokonzi yango ezali guvɛrnema ya Nzambe na likoló, oyo mosakoli Danyele alobaki ete ‘ekobebisama soki moke te, ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso [ya bato], mpe ekotikala lobiko na lobiko.’—Danyele 2:44.
Koboya kokɔta na makambo ya mokili mpe misala ya bateroriste
5. Bikólo ya mokili oyo esali likambo nini mpo na kolonga misala ya bateroriste?
5 Kobanda bambula mingi tii sikoyo, bateroriste bazali koboma ebele ya bato. Bato ya mokili mobimba bamonaki ete misala ya bateroriste ezali mpenza likama nsima ya likambo ya nsɔmɔ oyo basalaki mokolo ya 11 Sɛtɛmbɛ 2001 na New York mpe na Washington. Ntango bamonaki ete bibongiseli ya bateroriste ezali makasi mpe epalangani na mokili mobimba, bikólo ebele esanganaki nokinoki mpo na kobundisa yango. Na ndakisa, basakolaki na radio mpe na televizyo mpe bakomaki na bazulunalo ete na mokolo ya 4 Desɛmbɛ 2001, “baministre ya makambo matali boyokani na bikólo mosusu ya mikili 55 ya Mpoto, ya Amerika ya Nɔrdi mpe ya Azia ya Ntei bayokanaki” básangisa makasi na bango mpo na kobundisa bateroriste. Mosali moko monene ya Leta na États-Unis akumisaki boyokani yango; alobaki ete epesi “nguya ya sika” na milende oyo ezali kosalema mpo na kobundisa bateroriste. Bamilio ya bato bamikɔtisaki mbala moko na oyo zulunalo moko (The New York Times Magazine) ebengaki “ebandeli ya etumba moko monene.” Toyebi te soki bakolonga etumba yango. Nzokande, etumba yango mpo na kosukisa misala ya bateroriste ezali kobangisa ebele ya bato; kasi, bato oyo batyelaka Yehova motema bazali kobanga te.
6. (a) Mpo na nini ekoki ntango mosusu kozala mpasi bato bákanga ntina oyo Batatoli ya Yehova baboyaka kokɔta na makambo ya politiki? (b) Yesu apesaki bayekoli na ye ndakisa nini na oyo etali makambo ya politiki?
6 Eyebani malamu ete Batatoli ya Yehova bakɔtaka na makambo ya politiki te. Na ntango mboka ezali na kimya, bato mingi bamonaka yango mabe te; nzokande, soki makambo ebebi, mingi bakómaka komona likambo yango mabe mpenza. Mingimingi, lokola bato bakómaka na kobanga mpe mitema likoló ntango etumba ezali koya, bolingo ya ekólo ekómaka makasi. Yango wana ekoki kozala mpasi mpo bato mosusu bámitya na esika ya moto oyo aboyi kopesa mabɔkɔ na milende oyo bana-mboka bazali kosala mpo na kobundela ekólo na bango. Kasi, baklisto ya solo bayebaka ete basengeli kotosa Yesu oyo atindaki bango ete bázala ‘bato ya mokili te.’ (Yoane 15:19; 17:14-16; 18:36; Yakobo 4:4) Yango ezali kosɛnga bango bákɔta te na makambo ya politiki to makambo mosusu ya mobulu. Yesu ye moko apesaki ndakisa ya malamu. Soki tokanisi bwanya mpe mayele mingi oyo Yesu azalaki na yango, tokomona ete akokaki kosilisa makambo oyo ezalaki kotungisa bato na ntango wana. Kasi, aboyaki kokɔta na makambo ya politiki. Na ebandeli ya mosala na ye, aboyaki na motema moko ntango Satana alakaki kopesa ye bikonzi nyonso ya mokili. Na nsima, aboyaki na mpiko nyonso ete bákómisa ye mokonzi.—Matai 4:8-10; Yoane 6:14, 15.
7, 8. (a) Atako Batatoli ya Yehova bakɔtaka na makambo ya politiki te, yango elingi koloba nini te, mpe mpo na nini? (b) Ndenge nini Baloma 13:1, 2 ezali komonisa ete kosala mobulu mpo na kotɛmɛla baguvɛrnema ezali mabe?
7 Ntango Batatoli ya Yehova balobi ete bakɔtaka na makambo ya polikiti te, elingi koloba te ete bandimaka to basepelaka na makambo ya mobulu. Soki basepeli na makambo ya ndenge wana, ekomonisa ete bazali te ndenge balobaka ete bazali basaleli ya “Nzambe ya bolingo mpe ya kimya.” (2 Bakolinti 13:11) Batatoli bayebi ndenge Yehova atalelaka mobulu. Mokomi ya nzembo akomaki ete: “Yehova atalaka moyengebene ná moto mabe, mpe moto oyo alingaka mobulu, molimo na Ye eyini ye mpenza.” (Nzembo 11:5, NW) Bayebi mpe malamu maloba oyo Yesu ayebisaki ntoma Petelo ete: “Zongisá mopanga na yo na esika na yango, mpo baoyo nyonso bakamataka mopanga bakokufa na mopanga.”—Matai 26:52.
8 Atako eyebani malamu ete mbala mingi mangomba ya boklisto esalelaki “mopanga,” ata mokolo moko te Batatoli ya Yehova basalá likambo ya ndenge wana. Bango bakɔtaka ata moke te na makambo wana. Batatoli batosaka mpenza etinda oyo ezali na Baloma 13:1, 2: “Tiká molimo nyonso etosaka bakonzi oyo bazali liboso [bakonzi ya Leta], mpo ezali na bokonzi te soki na nzela ya Nzambe te; bakonzi oyo bazali batyami na bibonga na bango oyo elandaná na nzela ya Nzambe. Na yango moto oyo azali kotɛmɛla bokonzi atɛmɛli ebongiseli ya Nzambe; baoyo batɛmɛli yango bakozwa lisambisi mpo na bango moko.”
9. Yebisá ndenge mibale oyo Batatoli ya Yehova babundisaka misala ya bateroriste.
9 Kasi, lokola misala ya bateroriste ezali mabe mingi, Batatoli ya Yehova bakoki kopesa mabɔkɔ te mpo na kobundisa yango? Eyano ezali ete basengeli kopesa mabɔkɔ mpe bapesaka mabɔkɔ. Ya liboso, bango moko basalaka makambo yango te. Ya mibale, bateyaka bato mitinda ya boklisto oyo, soki balandi yango, esilisaka mobulu nyonso.a Na mbula oyo eleki, Batatoli balekisaki ngonga 1 202 381 302 na mosala ya kosalisa bato báyekola nzela wana ya boklisto. Tokoki koloba te ete basalaki mosala ya mpunda, mpamba te mbuma ya mosala na bango ezali ete bato 265 469 bakómaki Batatoli ya Yehova oyo bazwi batisimo mpe, na ndenge yango, bamonisaki na miso ya bato nyonso ete baboyi mpenza mobulu.
10. Tosengeli kozala na elikya nini mpo na kosukisama ya mabe na mokili oyo?
10 Longola yango, Batatoli ya Yehova bayebaka ete na makasi na bango moko bakoki te kosilisa makambo ya mabe na mokili oyo. Yango wana batyaka motema na bango mobimba epai ya Yehova Nzambe, Moto oyo akoki kosilisa mabe nyonso. (Nzembo 83:18) Ata basali milende ya ndenge nini, bato bakoki kosilisa mobulu te. Mokomi moko ya Biblia akebisi mpo na ntango na biso, oyo ebengami “mikolo ya nsuka,” ete: “Bato mabe mpe bakosi bakokende lisusu mosika na kati ya mabe, kobungisáká bato nzela mpe kobungisamáká.” (2 Timote 3:1, 13) Soki tozali kotalela makambo na ndenge yango, tokomona ete bato bakoki te kolonga etumba ya kosilisa mabe. Nzokande, tokoki kotyela Yehova motema ete akolongola mabe nyonso mpo na libela.—Nzembo 37:1, 2, 9-11; Masese 24:19, 20; Yisaya 60:18.
Etumba ezali koya kasi tozali kobanga te
11. Makambo nini Yehova así asali mpo na kosilisa mobulu?
11 Lokola Nzambe ya kimya ayini mobulu, ezali mpasi te tókanga ntina oyo azali kosala makambo oyo ekosuka na kobomama ya Satana Zabolo, mobandisi ya mabe. Nzambe apesaki anzelu-mokonzi Mikaele, elingi koloba Yesu Klisto oyo akómi Mokonzi, nguya ya kolonga Satana na etumba ya liboso oyo babundaki. Biblia elobi ndenge etumba yango elekaki: “Etumba ebimaki na likoló: Mikaele mpe baanzelu na ye babundaki ná dalagona, mpe dalagona mpe baanzelu na ye babundaki, kasi alongaki te, mpe esika ezalaki lisusu te mpo na bango na likoló. Bongo dalagona yango ya monene abwakamaki na nse, ye nyoka ya ebandeli, oyo abengami Zabolo mpe Satana, oyo azali kobungisa mabelé mobimba oyo efandami nzela; abwakamaki na mabelé, mpe baanzelu na ye babwakamaki na nse elongo na ye.”—Emoniseli 12:7-9.
12, 13. (a) Likambo nini ya monene esalemaki na 1914? (b) Mokanda ya Ezekiele esakolaki nini mpo na bato oyo bamitye na ngámbo ya Bokonzi ya Nzambe?
12 Bisakweli ya Biblia oyo elobeli ndenge makambo ekolandana eyokani na makambo oyo ezali kosalema na mokili mpo na komonisa ete etumba yango esalemaki na likoló na 1914. Banda mbula wana, makambo ebebi mingi mpenza na mokili. Emoniseli 12:12 elimboli ntina oyo makambo ezali bongo na maloba oyo: “Yango wana bósepela, bino likoló mpe bino baoyo bozali kofanda na likoló! Mawa na mabelé mpe na mbu, mpamba te Zabolo akiteli bino, azali na nkanda makasi, mpo ayebi ete azali na eleko moko ya ntango mokuse.”
13 Tokoki kokamwa te ete Zabolo azali libosoliboso komonisa nkanda na ye epai ya bapakolami ya Nzambe ná baninga na bango “bampate mosusu.” (Yoane 10:16; Emoniseli 12:17) Etikali moke, nkanda yango ekongala ntango Zabolo akobundisa bato nyonso oyo bamitye na ngámbo ya Bokonzi ya Nzambe mpe bazali kotyela yango elikya. Ezekiele mokapo 38 (NW) ebengi etumba monene yango ete etumba ya “Gogo ya mokili ya Magogo.”
14. Ndenge nini Batatoli ya Yehova babatelamaki, mpe bakolanda kaka kobatelama ndenge yango?
14 Banda ntango babenganaki Satana na likoló, bibongiseli mosusu ya politiki oyo elobelami na maloba ya elilingi na Emoniseli 12:15, 16 ezalaki ntango mosusu kobatela basaleli ya Nzambe ntango Satana alingi kobundisa bango. Nzokande, Biblia emonisi ete na etumba ya nsuka ya Satana, ebongiseli moko te ya bato ekobatela baoyo bazali kotyela Yehova elikya. Yango esengeli nde kobangisa baklisto to koyokisa bango nsɔmɔ? Ata moke te!
15, 16. (a) Maloba ya kokitisa motema oyo Yehova ayebisaki basaleli na ye na mikolo ya Yosafata ezali kopesa baklisto elikya nini lelo oyo? (b) Ndakisa nini Yosafata ná bato na ye bapesaki oyo basaleli ya Nzambe lelo oyo basengeli kolanda?
15 Tozali na elikya ete Nzambe akobatela basaleli na ye se ndenge abatelaki libota na ye na mikolo ya Mokonzi Yosafata. Biblia elobi boye: “Bófungola matoi, bato nyonso ya Yuda ná bino bana Yelusaleme ná Mokonzi Yosafata! Yehova alobi na bino boye, ‘Bózala na kobanga te to na nsɔmɔ te mpo na ebele ya bato oyo; mpamba te etumba ezali ya bino te, kasi ya Nzambe. . . . Na mbala oyo bino bokobunda te. Bótɛlɛma esika moko, bóningana te mpe bótala lobiko ya Yehova. Ee Yuda mpe Yelusaleme, bózala na kobanga te to mpe na nsɔmɔ te. Lobi bóbima mpo na kokutana na bango, mpe Yehova akozala na bino.’ ”—2 Ntango 20:15-17, NW.
16 Yehova ayebisaki bato ya Yuda ete bango bakobunda te. Ntango mpe Gogo ya Magogo akobundisa basaleli ya Nzambe, bango bakosimba bibundeli te mpo na komibatela. Kasi, ‘bakotɛlɛma esika moko mpe bakotala lobiko ya Yehova’ mpo na bango. Kasi, kotɛlɛma elingi koloba te kokanga mabɔkɔ, lokola mpe basaleli ya Nzambe na mikolo ya Yosafata bakangaki mabɔkɔ te. Tozali kotánga boye: “Na mbala moko Yosafata afukamaki mpe akitisaki elongi na ye na mabelé, mpe bato nyonso ya Yuda ná bana Yelusaleme bakweaki liboso ya Yehova mpo na kopesa Yehova nkembo. . . . Lisusu, [Yosafata] asalaki likita ná bato mpe atyaki bayembi mpo na Yehova mpe baoyo bazalaki kokumisa ye na molato kitoko ya bosantu ntango bazalaki kotambola liboso ya bato oyo bazalaki na bibundeli, bazalaki koyemba ete: ‘Bópesa Yehova nkembo, mpamba te motema-boboto na ye ezali mpo na seko.’ ” (2 Ntango 20:18-21, NW) Tomoni ete ata liboso ya banguna oyo bayaki kobundisa bango, basaleli ya Yehova batikaki te kosanzola ye. Yango nde ndakisa oyo Batatoli ya Yehova basengeli kolanda ntango Gogo akobundisa bango.
17, 18. (a) Elimo nini ya malamu Batatoli ya Yehova bazali komonisa na ntina etali etumba ya Gogo? (b) Makambo nini bazongelaki koyebisa bilenge oyo bazali baklisto?
17 Liboso Gogo abundisa bango mpe ata nsima na yango, Batatoli ya Yehova bakozala kaka na ngámbo ya Bokonzi ya Nzambe. Bakotika te koyangana na masangá koleka 94 600 ya mokili mobimba epai bazali kolendisama mpe kobatelama. (Yisaya 26:20) Oyo ezali mpenza ntango ya kokumisa Yehova na mpiko! Ata bayebi ete etikali moke etumba ya Gogo eya, bazali kobanga te. Kutu, yango ezali lisusu kotinda bango bábakisa mbeka ya masanzoli na bango na meko oyo makoki na bango ezali kopesa bango nzela.—Nzembo 146:2.
18 Na mokili mobimba, ebele ya bilenge oyo bandimi kosala mosala ya ntango nyonso bazali komonisa elimo malamu yango. Mpo na komonisa ete kopona bomoi wana ezali ekateli oyo eleki malamu, na mayangani ya etúká ya mobu 2002, babimisaki trakte oyo ezali na motó ya likambo ete Bilenge—Bokosala nini na bomoi na bino? Baklisto nyonso, bilenge mpe mikóló bazali na botɔndi mpo na makambo yango oyo bazongelaki koyebisa bango na ntango oyo ebongi mpenza.—Nzembo 119:14, 24, 99, 119, 129, 146.
19, 20. (a) Mpo na nini baklisto basengeli kozala na kobanga te to na nsɔmɔ te? (b) Lisolo oyo elandi ekosala nini?
19 Atako mokili etondi na makambo ya mabe, baklisto basengeli kozala na kobanga te to na nsɔmɔ te. Bayebi ete etikali moke Bokonzi ya Yehova esukisa mobulu nyonso mpo na libela. Lisusu, lokola bayebi ete ebele ya bato oyo babomamaki na mobulu bakosekwa, yango ezali kokitisa bango mitema. Bato mingi oyo bakosekwa bakoteyama makambo ya Yehova mpo na mbala ya liboso; nzokande, bamosusu oyo bamipesaki na Yehova liboso bákufa bakokoba nde kosalela ye.—Misala 24:15.
20 Biso baklisto ya solo toyebi ete tosengeli kokɔta na makambo ya politiki te mpe tokokɔta te. Tozali mpenza na mposa ya kokangama na ekateli na biso mpo na ‘kotɛlɛma mpe kotala lobiko ya Yehova.’ Lisolo oyo elandi ekolendisa kondima na biso na ndenge ekosalisa biso tóyeba makambo oyo ezali kosalema lelo, oyo ezali kobakisa biso mayele ya koyeba ndenge bisakweli ya Biblia ezali kokokisama.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bandakisa ya bato oyo batikaki mobulu na bomoi na bango mpo na kokóma Batatoli ezali na Lamuká! ya 22 Marsi 1990, lokasa 21; ya 8 Augusto 1991, lokasa 18 (nyonso ebimeli ya Lifalanse); mpe na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali 1996, lokasa 5; ya 1 Augusto 1998, lokasa 5.
Okoki kolimbola?
• Mpo na nini lelo oyo ebele ya bato bazali na elikya te?
• Mpo na nini Batatoli ya Yehova bazali na elikya mpo na mikolo oyo ezali koya?
• Yehova así asali mobandisi ya mobulu likambo nini?
• Mpo na nini tosengeli kobanga etumba ya Gogo te?
[Elilingi na lokasa 13]
Yesu apesaki ndakisa malamu ya koboya kokɔta na makambo ya mokili
[Bililingi na lokasa 16]
Ebele ya bilenge Batatoli bamipesi mpo na kosala mosala ya ntango nyonso
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 12]
FƆTƆ YA ONU 186226/M. Grafman