Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/6 nk. 17-22
  • Bóningana te mpe bótala lobiko ya Yehova!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bóningana te mpe bótala lobiko ya Yehova!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Akobundisa guvɛrnema ya Nzambe
  • Mokonzi asukisi bolongi na ye
  • Nani akobunda etumba ya Gogo?
  • Basaleli ya Nzambe bakosala nini?
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Etikali moke Goge ya Magoge abomama
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
  • “Bózala na kobanga te to na nsɔmɔ te”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • “Kosikolama na bino ekómi pene”!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/6 nk. 17-22

Bóningana te mpe bótala lobiko ya Yehova!

“Bótɛlɛma esika moko, bóningana te mpe bótala lobiko ya Yehova.”​—2 NTANGO 20:17, NW.

1, 2. Mpo na nini etumba ya “Gogo ya mokili ya Magogo” oyo ezali koya ekosala makambo ya minene koleka oyo bateroriste bakoki kosala?

BATO mosusu bazali koloba ete bateroriste bazali nde kobundisa mokili mobimba. Ya solo, tosengeli kozwa misala ya bateroriste na lisɛki te. Nzokande, ezali na etumba mosusu oyo ekosala makambo ya minene koleka, kasi bato bazali kotyela yango mpenza likebi te to mpe bazali kotyela yango likebi ata moke te. Ezali etumba nini?

2 Ezali etumba ya “Gogo ya mokili ya Magogo,” oyo Biblia elobeli na mokanda ya Ezekiele mokapo 38. Tokolekisa nde ndelo soki tolobi ete etumba yango ekosala makambo ya minene koleka oyo bateroriste bakoki kosala? Te, mpamba te Gogo akobundisa kaka baguvɛrnema ya mokili te. Akobundisa nde guvɛrnema ya Nzambe na likoló! Kasi, Mozalisi azali lokola bato te oyo bazali kolonga mpenza te banguna oyo bazali kobundisa bango; Ye azali na makoki nyonso ya kosukisa Gogo ata soki Gogo yango asaleli bibundeli na ye oyo eleki makasi.

Akobundisa guvɛrnema ya Nzambe

3. Banda 1914, likambo nini basɛngaki na bayangeli ya mokili, mpe ndenge nini bango batalelaki yango?

3 Matata kati na Moto oyo Nzambe atye na kiti ya bokonzi mpe ebongiseli ya makambo ya Satana ebandaki ntango kaka Bokonzi ya Nzambe etyamaki na likoló na 1914. Na ntango wana, bayebisaki bayangeli ya mokili ete bátosa Moyangeli oyo Nzambe aponi. Kasi, bango baboyaki, se ndenge esakolamaki ete: “Bakonzi ya mokili batɛlɛmi mpe bato minene basangani lokola moto moko mpo na kotɛmɛla Yehova mpe mopakolami na ye, balobi ete: ‘Tókata bansinga na bango mpe tóbwaka mosika bankamba na bango!’” (Nzembo 2:1-3, NW) Ezali polele ete kotɛmɛla oyo bazali kotɛmɛla Bokonzi ekoya ndongo na ntango ya etumba ya Gogo ya Magogo.

4, 5. Ndenge nini bato bakoki kobundisa guvɛrnema ya Nzambe oyo bakoki komona te?

4 Tokoki komituna ndenge nini bato bakoki kobundisa guvɛrnema ya likoló, oyo bakoki komona te. Biblia emonisi ete bato “nkóto nkama moko na ntuku minei na minei, oyo basombamaki na mabelé” nde bazali na guvɛrnema yango elongo na “Mwana-Mpate,” Klisto Yesu. (Emoniseli 14:1, 3; Yoane 1:29) Lokola guvɛrnema yango ya sika ezali na likoló, ebengami “likoló ya sika,” mpe bato oyo guvɛrnema yango ekoyangela awa na mabelé babengami “mabelé ya sika.” (Yisaya 65:17; 2 Petelo 3:13) Na kati ya bato 144 000 oyo bakoyangela elongo na Klisto, mingi bazali lisusu awa na mabelé te, batikalaki sembo tii na nsuka. Na ndenge yango, bamonisaki ete babongi mpenza na mikumba ya sika kuna na likoló.

5 Kasi, mwa ndambo moke na kati ya bato 144 000 bazali naino awa na mabelé. Na kati ya bato koleka 15 000 000 oyo bayanganaki na Bolei ya Mpokwa ya Nkolo na mobu 2002, kaka bato 8 760 bamonisaki ete bazali na elikya ya kozwa mikumba wana na likoló. Moto nyonso oyo abundisi bato oyo bakozala na Bokonzi yango oyo bazali naino awa na mabelé, azali nde kobundisa Bokonzi ya Nzambe.​—Emoniseli 12:17.

Mokonzi asukisi bolongi na ye

6. Ndenge nini Yehova ná Klisto batalelaka bato oyo bazali kotɛmɛla basaleli ya Nzambe?

6 Likambo oyo Yehova akosala ntango bakotɛmɛla Bokonzi oyo ye atye esakolamaki boye: “Ye oyo afandi na likoló akosɛka; Yehova akosɛka bango. Na ntango wana akoloba na bango na nkanda na ye mpe na kongala na ye akobulunganisa bango na maloba oyo: ‘Ngai natye mokonzi na ngai na Siona, ngomba na ngai ya bosantu.’” (Nzembo 2:4-6, NW) Ntango ekoki mpo Klisto alanda malako ya Yehova mpe ‘asukisa bolongi na ye.’ (Emoniseli 6:2) Ndenge nini Yehova akotalela bato oyo bakotɛmɛla basaleli na ye na bolongi ya nsuka? Akomona ete bazali nde kotɛmɛla ye ná Mokonzi oyo azali koyangela na nkombo na Ye. Yehova alobi ete: “Ye oyo asimbi bino, azali kosimba mbuma ya liso na ngai.” (Zekalia 2:8, NW) Lisusu, Yesu alobaki polele ete atalelaka makambo oyo bato bazali kosala bandeko na ye bapakolami lokola nde bazali kosala yango epai na ye, mpe oyo bazali kosala bango te lokola nde bazali kosala yango te epai na ye.​—Matai 25:40, 45.

7. Mpo na nini Gogo azali kolakisa nkanda na ye epai ya “ebele ya bato” oyo Emoniseli 7:9 elobeli?

7 Na ntembe te Gogo akolakisa mpe nkanda na ye epai ya bato oyo bazali kopesa batikali bapakolami mabɔkɔ. Bato yango oyo bakobengama “mabelé ya sika” ya Nzambe bazali “ebele ya bato” oyo bauti “na bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso.” (Emoniseli 7:9) Biblia elobi ete “batɛlɛmi liboso ya kiti ya bokonzi mpe liboso ya Mwana-Mpate, balati bazambala ya mpɛmbɛ.” Elingi koloba ete Nzambe ná Klisto Yesu bandimi bango. Lokola basimbi ‘mandalala na mabɔkɔ na bango,’ bazali kokumisa Yehova lokola Nkolo Mokonzi oyo abongi mpenza koyangela molɔ́ngɔ́, ye oyo azali koyangela na nzela ya Yesu Klisto, “Mwana-Mpate ya Nzambe” oyo atyami Mokonzi.​—Yoane 1:29, 36.

8. Etumba ya Gogo ekotinda Klisto asala nini, mpe nsuka na yango ekozala nini?

8 Etumba ya Gogo ekotinda Mokonzi oyo Nzambe atye atɛlɛma mpe abunda etumba ya Armagedon. (Emoniseli 16:14, 16) Baoyo baboyaki bokonzi ya Yehova bakobomama. Nzokande, bato oyo banyokwamaki mpo bakangamaki kaka na Bokonzi ya Nzambe, bakopema mpo na libela. Mpo na yango, ntoma Paulo akomaki ete: “Yango ezali elembeteli ya lisambisi ya boyengebene ya Nzambe, oyo ezali komema bino na kotángama bato babongi na bokonzi ya Nzambe, oyo mpo na yango bozali mpenza komona mpasi. Yango elakisi mpe ete ezali likambo ya boyengebene mpo na Nzambe kozongisa bolɔzi epai ya baoyo bazali kobimisela bino bolɔzi, kasi, epai na bino baoyo bozali kozwa bolɔzi, kopema elongo na biso na ntango ya emoniseli ya Nkolo Yesu uta na likoló elongo na baanzelu na ye ya nguya na kati ya mɔtɔ ya kopela, ntango akozongisa mabe na baoyo bayebi Nzambe te mpe baoyo bazali te kotosa nsango malamu oyo etali Nkolo na biso Yesu.”​—2 Batesaloniki 1:5-8.

9, 10. (a) Ndenge nini Yehova asalisaki bato ya Yuda bákoka kolonga monguna ya makasi? (b) Likambo nini baklisto basengeli kokoba kosala lelo oyo?

9 Na ntango ya bolɔzi monene oyo ezali koya, oyo ekosuka na Armagedon, Klisto akobunda etumba mpo na kosukisa mabe nyonso. Kasi, bayekoli na ye bakobunda te, se ndenge bato ya Yuda, bokonzi ya mabota mibale, basengelaki kobunda te eleki sikoyo bankóto ya bambula. Etumba wana ezalaki etumba ya Yehova, mpe asalisaki bango bákoka kolonga. Lisolo elobi boye: “Yehova atyaki mibali oyo babombamaki mpo na kobimela bato ya Amona, Moaba mpe bangomba ya Seili oyo bazalaki koya na Yuda, mpe babundaki bango na bango. Na nsima, bato ya Amona ná Moaba babalukelaki bato oyo bazalaki kofanda na bangomba ya Seili mpo na koboma bango mpe kosilisa bango nyɛɛ; ntango kaka basilisaki likambo ya bato ya Seili, bapesaki mabɔkɔ na koboma moto na moto moninga na ye. Nzokande bato ya Yuda bakómaki na linɔ́ngi ya mosɛnzɛli ya esobe. Ntango babalolaki miso epai ya ebele ya bato, yoká likambo: bibembe elalaki na nse, ata moto moko te akimaki.”​—2 Ntango 20:22-24, NW.

10 Makambo elekaki mpenza ndenge Yehova asakolaki: “Bino bokobunda te.” (2 Ntango 20:17) Yango ezali ndakisa oyo baklisto bakolanda ntango Yesu Klisto akobima mpo na “kosukisa bolongi na ye.” Liboso na yango, bazali kokoba kobundisa mabe, na mindoki to na makɔnga te, kasi na bibundeli ya elimo. Na ndenge yango bazali ‘kokoba kolonga mabe na kosaláká malamu.’​—Baloma 6:13; 12:17-21; 13:12; 2 Bakolinti 10:3-5.

Nani akobunda etumba ya Gogo?

11. (a) Bibongiseli nini Gogo akosalela mpo na kobunda etumba na ye? (b) Kolala mpɔngi te na elimo ezali kosɛnga nini?

11 Gogo ya Magogo ezali nde Satana Zabolo na ndenge oyo akitisami banda 1914. Lokola azali ekelamu ya elimo, ye te moto akobunda etumba, kasi akosalela bibongiseli ya bato mpo na kosala misala na ye. Ekozala bibongiseli nini? Biblia eyebisi biso makambo nyonso te, kasi epesi biso mwa bilembo oyo ekoki kosalisa biso na koyeba bibongiseli yango. Makambo oyo ezali koleka na mokili, oyo ezali kokokisa bisakweli ya Biblia, ekobanda kosalisa biso mokemoke tókanga ntina polele. Basaleli ya Nzambe baboyaka kolimbola makambo na kolanda kaka makanisi na bango, kasi balalaka mpɔngi te na elimo; balandaka malamu ndenge makambo ya politiki mpe ya losambo ezali kokokisa bisakweli ya Biblia.

12, 13. Ndenge nini Danyele asakolaki etumba ya nsuka oyo bakobundisa basaleli ya Nzambe?

12 Mosakoli Danyele ayebisi biso makambo oyo ezali kosalisa biso tóyeba ndenge bakobundisa basaleli ya Nzambe; akomaki boye: “Ye [mokonzi ya nɔrdi] akobima na nkanda makasi mpo na kosilisa mpe koboma ebele ya bato. Akopika mpe bahema minene na ye na katikati ya mbu monene mpe ngomba mosantu ya Kitoko.”​—Danyele 11:44, 45, NW.

13 Na Biblia, “mbu monene” ezali Mai Monene ya Méditerranée, mpe “ngomba mosantu” ezali Siona, oyo Yehova alobaki mpo na yango ete: “Ngai natye mokonzi na ngai na Siona, ngomba mosantu na ngai.” (Nzembo 2:6, NW; Yosua 1:4) Na bongo, na ndimbola ya elimo, mokili oyo ezali na “katikati ya mbu monene mpe ngomba mosantu” ezali komonisa bozwi ya elimo oyo baklisto bapakolami bazali na yango. Bamikaboli na mbu, elingi koloba na bato oyo bapesi Nzambe mokɔngɔ, mpe bazali kozela ntango oyo bakoyangela elongo na Klisto Yesu na Bokonzi ya likoló. Na bongo, na etumba oyo Danyele asakolaki, mokonzi ya nɔrdi akobimisa manzaka nyonso mpo na koluka basaleli ya Nzambe oyo bapakolami na elimo ná baninga na bango ya sembo, elingi koloba ebele ya bato.​—Yisaya 57:20; Baebele 12:22; Emoniseli 14:1.

Basaleli ya Nzambe bakosala nini?

14. Tángá makambo misato oyo basaleli ya Nzambe bakosala ntango bakobundisa bango.

14 Basaleli ya Nzambe basengeli kosala nini ntango bakobundisa bango? Na likambo yango mpe bakolanda ndakisa oyo ekólo ya Nzambe epesaki na mikolo ya Mokonzi Yosafata. Tósimba ete Yehova asɛngaki bato na ye básala makambo misato: (1) kotɛlɛma esika moko, (2) koningana te, mpe (3) kotala lobiko ya Yehova. Ndenge nini basaleli ya Nzambe lelo oyo bakolanda maloba yango?​—2 Ntango 20:17.

15. Mpo na basaleli ya Yehova, kotɛlɛma esika moko elimboli nini?

15 Kotɛlɛma esika moko: Basaleli ya Nzambe bakokakatana te, bakotikala na ngámbo ya Bokonzi ya Nzambe. Bakokangama na ekateli na bango ya koboya kokɔta na makambo ya mokili. ‘Bakopikama makasi, bakoningana te,’ bakosalela Yehova na bosembo mpe bakotika te kokumisa ye liboso ya bato nyonso mpo na motema-boboto na ye. (1 Bakolinti 15:58; Nzembo 118:28, 29) Ezala lelo to na mikolo ezali koya, mangungu moko te oyo bakoki kosalela bango ekoki kosala ete bátika ekateli na bango oyo Nzambe andimi.

16. Basaleli ya Yehova bakoningana te na makambo nini?

16 Koningana te: Basaleli ya Yehova bakoluka komibikisa te, bakotyela nde Yehova motema na bango mobimba. Kaka ye nde akoki kobikisa basaleli na ye na mobulu oyo etondi na mokili oyo, mpe alaki ete akosala yango. (Yisaya 43:10, 11; 54:15; Bileli 3:26) Kotyela Yehova motema ekosɛnga mpe kotya motema na ebongiseli oyo azali kosalela awa na mabelé banda bambula ebele mpo na kokokisa mikano na ye. Na ntango wana ekosɛnga mpenza ete baklisto ya solo bátya motema epai ya baninga na bango oyo Yehova ná Mokonzi oyo azali koyangela na nkombo na ye baponi mpo na kotambwisa bango. Bato yango ya sembo bakotambwisa basaleli ya Nzambe. Moto oyo akoboya kolanda bango akosuka na libebi.​—Matai 24:45-47; Baebele 13:7, 17.

17. Mpo na nini basaleli ya sembo ya Nzambe bakotala lobiko ya Yehova?

17 Kotala lobiko ya Yehova: Baklisto nyonso oyo bazali kotikala sembo mpe bazali kotyela Yehova motema bakozwa mbano ya lobiko. Tii nsuka mpenza ekoya, mpe na meko oyo bakokoka kosala yango, bakoyebisa bato mpo na mbala ya nsuka ete kosambisa ya Yehova ezali koya. Bikelamu nyonso esengeli koyeba ete Yehova azali Nzambe ya solo mpe ete azali na basaleli ya sembo awa na mabelé. Ekozala lisusu na ntina te bátika ntango mpo na kokata likambo na ntembe oyo batyelaki lotomo ya Yehova ya kozala mokonzi.​—Ezekiele 33:33; 36:23.

18, 19. (a) Ndenge nini nzembo ya bolongi oyo ezali na Exode mokapo 15 ezali komonisa esengo oyo bato oyo bakobika na etumba ya Gogo bakozala na yango? (b) Ebongi mpenza basaleli ya Nzambe básala nini lelo oyo?

18 Lokola basaleli ya Nzambe bakozwa lisusu nguya, bakokɔta na mokili ya sika, mpe bakozala na mposa makasi ya koyemba nzembo ya bolongi, se ndenge Bayisalaele ya kala bayembaki ntango bakatisaki Mbu Motane. Lokola bakozala na botɔndi epai ya Yehova libela na libela mpo na libateli na ye, moto na moto mpe bango nyonso bakozongela maloba ya nzembo moko ya kala: “Tiká nayembela Yehova, mpo ete atombwani likoló koleka. . . . Yehova azali mobali na etumba. Nkombo na ye Yehova. . . . Ee Yehova, lobɔkɔ na yo ya mobali ekoki kobukabuka monguna. Mpe na bonene na yo okoki kobuka baoyo bazali kotɛmɛla yo; okobimisa nkanda na yo oyo ezali kongala lokola mɔtɔ, ekozikisa bango lokola matiti. . . . Na motema-boboto na yo otambwisaki bato oyo osikolaki; na nguya na yo okokamba bango na esika mosantu na yo ya libela. . . . Okomema bango mpe okolona bango na ngomba ya libula na yo, esika oyo obongisi mpo ofandaka, Ee Yehova, esika ya losambo, Ee Yehova, oyo mabɔkɔ na yo ebongisaki. Yehova akoyangela lokola mokonzi seko, ɛɛ mpo na libela.”​—Exode 15:1-19, NW.

19 Sikoyo, lokola basaleli ya Nzambe bakómi komona elikya ya bomoi ya seko polele koleka, oyo ezali ntango oyo ebongi mpenza mpo bákoka komonisa ezaleli ya kokangama na Yehova mpe bálendisa ekateli na bango ya kosalela ye libela na libela lokola Mokonzi na bango!​—1 Ntango 29:11-13.

Okoki kolimbola?

• Mpo na nini Gogo akobundisa bapakolami ná bampate mosusu?

• Ndenge nini basaleli ya Nzambe bakotɛlɛma esika moko?

• Koningana te elimboli nini?

• Ndenge nini basaleli ya Nzambe bakotala lobiko ya Yehova?

[Elilingi na lokasa 18]

Yehova asalisaki Yosafata na bato na ye bálonga, atako bango moko babundaki te

[Elilingi na lokasa 20]

Bapakolami basangani ná bampate mosusu mpo na kokumisa bokonzi ya Yehova

[Elilingi na lokasa 22]

Lokola Bayisalaele na ntango ya kala, basaleli ya Nzambe bakoyemba nzembo ya bolongi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto