Kotumba mpaka ya malasi esɛngami mpe na losambo ya solo?
BATO ya Ezipito ya kala bazalaki koloba ete: “Banzambe balingaka nsolo ya mpimbo.” Kotumba mpaka ya malasi ezalaki na esika monene na kati ya losambo na bango. Bato ya Ezipito bazalaki kotumba mpaka ya malasi mokolo na mokolo na bitumbelo ya batempelo mpe ya bandako na bango, ata mpe na bisika ya mimbongo, mpamba te bazalaki kokanisa ete yango ezali na nguya ya kobenda banzambe. Bato ya bikólo mosusu mpe bazalaki na momeseno yango.
Mpaka ya malasi ezali nini? Ezali biloko moko boye oyo batumbaka mpo na kobimisa milinga ya nsolo kitoko. Basalaka yango na bampaka mpe na bandembo ya nsolo kitoko, lokola olibana mpe makiki ya banzete mosusu ya nsolo kitoko. Batutaka yango mpo ekóma mputulu mpe mbala mingi babakisaka bikelakela lokola matiti ya nsolo, mposo ya nzete mpe bafololo, mpo na kopesa yango nsolo oyo balingi.
Na ntango ya kala, bazalaki kosalela mpaka ya malasi mingi mpe ezalaki eloko ya motuya mingi, yango wana mombongo na yango ekómaki makasi. Bakomelesa bazalaki kokende kosomba yango na bamboka mosika mpe bazalaki komema yango na makalo. Mbala mosusu oyebi ete elenge Yozefe, mwana ya Yakobo, atɛkamaki epai ya Bayisamaele, bato ya mombongo oyo “balongwaki na [Gileadi] mpe bazalaki kokende na Ezipito. Bakamela na bango bakumbaki mpaka mpe biloko ya malasi mpe mola.” (Genese 37:25) Lokola bato bazalaki koluka mpaka ya malasi mingi, mombongo ya olibana, oyo emonani mpenza ete ebandaki na bato oyo bazalaki kotɛka mpaka ya malasi, efungolaki nzela ya mibembo na kati ya Azia mpe Mpoto.
Tii lelo oyo, mangomba mingi esalelaka mpaka ya malasi na losambo. Lisusu, bato mingi bakómi kotumba mpaka ya malasi na bandako na bango kaka mpo na nsolo kitoko na yango. Ndenge nini baklisto basengeli kotalela likambo ya kotumba mpaka ya malasi? Nzambe andimaka ete básalela yango na losambo? Tótalela naino oyo Biblia ezali koloba mpo na likambo yango.
“Eloko moko ya bosantu epai na Yehova”
Epai ya bato ya Yisalaele ya kala, kotumba mpaka ya malasi ezalaki likambo ya ntina mingi na kati ya makambo oyo banganga-nzambe basengelaki kosala na kati ya tabenakle. Buku moko (Cyclopedia) ya McClintock ná Strong elobi ete: “Ya solo, emonani ete Bayuda bazalaki kotalela kotumba mpaka ya malasi lokola molulu ya losambo to likabo ya bosantu, yango wana ekomamá ata na esika moko te ete bazalaki mpe kosalela mpaka ya malasi mpo na likambo mosusu.”
Yehova Nzambe alakisaki bango biloko minei oyo basengelaki kosangisa mpe kotumba na tabenakle: “Kamatá biloko ya nsolo malasi: setakete mpe onika mpe kalabane mpe olibana ya pɛto. Okomeka biloko yango nyonso ndenge moko. Mpe okosala na yango mpaka ya malasi, eloko ya nsolo mpimbo oyo esangisami malamu na mayele ya mosali malasi, ekozala na mungwa, pɛto, eloko ya bosantu. Mpe osengeli kotuta ndambo na yango mpe kokómisa yango mputulu mpe osengeli kotya ndambo na yango liboso ya Litatoli na kati ya hema ya koyangana. (Exode 30:34-36, NW) Bato ya mayele oyo balimbolaka maloba ya Biblia balobaka ete balabi ya Bayuda babakisaki biloko mosusu na kati ya biloko ya kosala na yango mpaka ya malasi ya kotumba na tempelo.
Mpaka ya malasi oyo bazalaki kotumba na tabenakle ezalaki mosantu, bazalaki kosalela yango kaka na losambo ya Nzambe. Yehova apesaki mobeko ete: “[Mpaka ya malasi oyo okosala na biloko wana, NW] bokosala yango na motindo boye mpo na bino mpenza te, yango ekozala na miso na bino bulɛɛ epai ya [Yehova]. Soko nani akosala yango na lolenge boye mpo na malasi, akolongolama na bato na ye.” (Exode 30:37, 38) Banganga-nzambe bazalaki kotumba mpaka ya malasi mbala mibale na mokolo likoló ya etumbelo ya mpaka ya malasi. (2 Ntango 13:11) Mpe na Mokolo ya Mbɔndi, nganga-nzambe monene azalaki kotumba mpaka ya malasi na Esika-Eleki-Bosantu.—Levitike 16:12, 13.
Nzambe azalaki koboya makabo mosusu ya mpaka ya malasi. Apesaki bitumbu na bato oyo bazalaki banganga-nzambe te kasi batumbelaki ye yango na ndenge na bango moko, lokola nde bazalaki banganga-nzambe. (Mituya 16:16-18, 35-40; 2 Ntango 26:16-20) Ntango Bayuda bazalaki komipesa na losambo ya lokuta mpe kosopa makila, Yehova azalaki kosepela na mpaka ya malasi na bango te. Bokosi na bango etindaki Yehova aloba na bango ete: “Mpaka ya malasi ezali eloko eboyami na ngai.” (Yisaya 1:13, 15) Bana ya Yisalaele batikaki kolanda mitinda ya Yehova mpo na losambo, yango wana bakangaki tempelo mpe bakómaki kotumba mpaka ya malasi na bitumbelo mosusu. (2 Ntango 28:24, 25) Nsima ya bambula, bakómaki kutu kosalela mpaka ya malasi mosantu na losambo ya mbindo ya banzambe ya lokuta. Makambo ya ndenge wana ezalaki mabe mpenza na miso ya Yehova.—Ezekiele 16:2, 17, 18.
Mpaka ya malasi mpe baklisto ya liboso
Kondimana ya mibeko, oyo ezalaki mpe kosɛnga ete banganga-nzambe bátumbaka mpaka ya malasi, esukaki ntango Klisto asalaki kondimana ya sika na mobu 33 ya ntango na biso (T.B.). (Bakolose 2:14) Ezali na lisolo moko te oyo ezali koyebisa biso ete baklisto ya liboso bazalaki kotumba mpaka ya malasi na losambo. Buku ya McClintock ná Strong (Cyclopedia) elobi ete: “Emonani mpenza ete [baklisto ya liboso] bazalaki kotumba mpaka ya malasi te. Kutu, kotumba mpaka ya malasi ezalaki nde momeseno ya bopakano . . . Mpo na bapakano, kobwaka mwa mpumbulu ya mpaka ya malasi likoló ya etumbelo ezalaki molulu ya losambo.”
Baklisto ya liboso bazalaki mpe koboya kotumba mpaka ya malasi, ata soki bakokaki koboma bango mpo na yango, mpamba te, mpo na bango, moto oyo asali bongo andimi ete amperɛrɛ azali “nzambe.” (Luka 4:8; 1 Bakolinti 10:14, 20) Lokola bazalaki kotumba mpaka ya malasi na losambo ya bikeko na ntango wana, tokoki kokamwa te ete baklisto ya liboso bazalaki koboya ata kosala mombongo ya mpaka ya malasi.
Kotumba mpaka ya malasi lelo oyo
Ndenge nini bazali kosalela mpaka ya malasi lelo oyo? Na mangomba mingi ya boklisto, batumbaka mpaka ya malasi na misa mpe na milulu mosusu ya losambo. Na Azia, mabota mingi batumbaka mpaka ya malasi na bitumbelo ya batempelo to oyo ezalaka liboso ya bandako mpo na kokumisa banzambe na bango mpe mpo na bawei. Na losambo, basalelaka mpaka ya malasi mpo na bantina mingi, lokola kotondisa ndako na milinga ya nsolo ya mpimbo, kobikisa bato ya maladi, kopɛtola mpe kobatela.
Na mikolo na biso, ata bato oyo basambelaka te bakómi kosepela na mpaka ya malasi. Bamosusu batumbaka mpaka ya malasi ntango bazali komanyola. Buku moko ezali kolendisa bato básalelaka mpaka ya malasi mpo bámemamaka na “mokili ya elimo” mpe mpo na kozwa “nguya” oyo eleki nguya ya nzoto. Mpo na kosalisa bango na kolonga mikakatano ya bomoi, buku yango ezali mpe kolendisa bato básalaka milulu ya kotumba mpaka ya malasi oyo ekokutanisa bango na “bikelamu ya elimo.” Baklisto bakoki mpe kosala makambo ya ndenge wana?
Yehova aboyaka mpenza bato oyo balukaka kosangisa losambo ya lokuta ná losambo ya solo. Ntoma Paulo atángaki esakweli ya Yisaya mpe asalelaki yango mpo na kolendisa baklisto báboya misala ya mbindo ya losambo ya lokuta. Akomaki ete: “ ‘Bóbima na kati na bango, mpe bókabwana,’ Yehova alobi bongo, ‘mpe bótika kosimba eloko ya mbindo’; ‘mpe ngai nakoyamba bino.’ ” (2 Bakolinti 6:17; Yisaya 52:11) Baklisto ya solo baboyaka makambo nyonso oyo ezali na boyokani na losambo ya lokuta to na misala ya molili.—Yoane 4:24.
Lokola basalelaka mpaka ya malasi na milulu ya losambo mpe na bikelakela, elingi koloba ete kotumba mpaka ya malasi nyonso ezali mabe? Ezali mpenza bongo te. Ekoki kozala ete moto asepeli kotumba mpaka ya malasi na ndako na ye kaka mpo na nsolo kitoko. (Masese 27:9) Atako bongo, liboso ya kozwa ekateli ya kotumba mpaka ya malasi, moklisto asengeli kotalela naino mwa makambo mosusu. Bato na esika ofandi bakoki nde kokanisa ete ozali kosalela mpaka ya malasi mpo na losambo ya lokuta? Na esika oyo ofandi bato basalelaka mpaka ya malasi mingimingi mpo na bikelakela? To basalelaka yango mingi ata na makambo ya losambo te?
Soki moto asepeli kotumba mpaka ya malasi, asengeli naino kotalela lisosoli na ye moko mpe makanisi ya bato mosusu liboso ya kozwa ekateli ya kosala bongo. (1 Bakolinti 10:29) Ebongi mpenza tósalelaka maloba ya ntoma Paulo epai ya Baloma. Akomaki ete: “Tiká tólanda makambo oyo epesaka kimya mpe makambo oyo etongaka biso nyonso. Tiká kobuka mosala ya Nzambe kaka mpo na biloko ya kolya. Ya solo, biloko nyonso ezali pɛto, kasi yango ezali likama epai ya moto oyo azali kolya yango na ntango oyo yango ekoki kobɛtisa libaku. Ezali malamu koboya kolya mosuni to komɛla vinyo to kosala eloko moko boye oyo ezali kobɛtisa ndeko na yo libaku.”—Baloma 14:19-21.
Mabondeli oyo ‘ebongisami lokola mpaka ya malasi’
Mpo na Bayisalaele, kotumba mpaka ya malasi ezalaki elilingi oyo ebongi mpenza mpo na komonisa lolenge ya mabondeli oyo Nzambe ayokaka. Yango wana mokomi ya nzembo Davidi ayembelaki Yehova ete: “Tiká ete libondeli na ngai ebonga liboso na yo lokola mpaka ya malasi.”—Nzembo 141:2.
Bayisalaele ya sembo bazalaki komona kotumba mpaka ya malasi lokola molulu ya mpambampamba te. Bazalaki kokeba mpenza ete básala mpaka ya malasi mpe bátumba yango ndenge mpenza Yehova asɛngaki bango. Na esika ya mpaka ya malasi, baklisto ya lelo basalaka mabondeli oyo emonisaka botɔndi mpe limemya na bango epai ya Tata na biso ya likoló. Lokola mpaka ya malasi ya nsolo kitoko oyo banganga-nzambe bazalaki kotumba na tempelo, Liloba ya Nzambe ezali koyebisa biso ete: “Libondeli ya bayengebene ezali esengo mpo na ye.—Masese 15:8, NW.
[Bililingi na lokasa 29]
Mpaka ya malasi oyo bazalaki kotumba na tabenakle mpe na tempelo ezalaki mosantu
[Elilingi na lokasa 30]
Baklisto basengeli nde kotumba mpaka ya malasi ntango bazali komanyola?