Babola bazali se kozinda na bobola
“Mboka moko te ekoki mpenza kokende liboso mpe kozala malamu, soki bato mingi na mboka yango bazali babola mpe bazali na mpasi.”
ADAM SMITH, moto ya mayele na ekonomi alobaki maloba yango na bambula ya 1700. Lelo oyo, ebele ya bato bazali mpenza komona bosolo ya likambo oyo alobaki. Bokeseni na kati ya bazwi na babola ekómi lisusu monene. Na ekólo Philippines, na kati ya bato misato, moto moko abikelaka na mbongo oyo ekoki ata dolare moko te na mokolo; nzokande, na mikili ya bozwi, dolare moko ezali mbongo oyo moto azwaka na mwa miniti. Mokanda moko ya ONU (Rapport mondial sur le développement humain 2002) eyebisi ete “mbongo oyo bato mitano likoló ya monkama (5%) na kati ya bato oyo baleki na bozwi na mokili mobimba bazali kozwa eleki mbala 114 mbongo ya bato mitano likoló ya monkama (5%) na kati ya bato oyo baleki na bobola.”
Atako bato mosusu bazali na bomoi ya mwa malamu, bamilio na bamilio ya bato bazali kofanda na mwa bandako ya mabemabe na bisika nyonso oyo bamoni. Bato mosusu bazali ata na bisika ya ndenge wana te; bazali kolala na balabala, ntango mosusu likoló ya bakarto to bakapo. Ebele ya bato bazali konyokwama mpo na kozwa mwa eloko ya kobikela: na ndakisa bazali kolɔkɔta biloko, komemela bato mikumba, to kolɔkɔta biloko oyo babwaki mpe komema yango na pusupusu mpo bákende kotɛka.
Bokeseni na kati ya bazwi ná babola ezali kaka na mikili ya bobola te; mokanda moko ya Banque mondiale elobi ete: “‘Bakartye ya babola’ ezali na mikili nyonso.” Ezala na mikili ya bobola lokola Bangladesh to mikili ya bozwi lokola États-Unis, ata soki bato mosusu bazali na bozwi mingi, ezali na bato oyo bazali konyokwama mpo na kozwa ata mwa eloko ya kolya to esika ya kolala. Lapolo moko ya biro ya resansema na États-Unis oyo ebimaki na zulunalo moko (The New York Times) emonisaki ete na mokili yango, bato ya mbongo bazali se kokóma na mbongo mingi mpe babola bazali se kozinda na bobola. Lapolo yango elobaki boye: “Na mbula eleki, mwa bato moke oyo baleki na bozwi (20%) na États-Unis bazwaki katikati ya mbongo ya mabota nyonso . . . mpe mbongo oyo bato oyo baleki na bobola (20%) bazwaki ezali 3,5% ya mbongo ya bato nyonso.” Makambo ezali se ndenge moko to eleki kutu mabe na ebele ya bikólo mosusu. Lapolo moko ya Banque mondiale emonisaki ete bato 57 likoló ya monkama na mokili mobimba bazwaka mbongo oyo ekoki ata dolare mibale te na mokolo.
Likambo ya mabe lisusu ezali ete na 2002, ebele ya bato batungisamaki na koyoka ete bakonzi mingi ya bakompanyi bakómaki bazwi na banzela ya nyamunyamu. Atako basalaki te makambo oyo mibeko epekisi mpenza, mingi bamonaki, ndenge zulunalo moko (Fortune) elobi yango, ete bakonzi yango “bakómaki na bozwi oyo eleki, ya kokamwa, mpe ya nsɔni.” Bato mosusu, soki batali makambo oyo ezali koleka na mokili, bazali komituna ndenge nini bamilio wana ya badolare ekoki kozala na mabɔkɔ ya mwa bato moke, nzokande ebele ya bato bazali babola.
Bobola ekosila to te?
Yango elingi koloba te ete ata moto moko te azali koluka kosilisa bobola. Bakonzi mosusu ya Leta oyo bazali na makanisi ya malamu mpe bibongiseli oyo esungaka babola epesi makanisi mingi oyo bakoki kosalela mpo na kobongola makambo. Atako bongo, makambo oyo ezali komonana ezali kolɛmbisa nzoto. Mokanda Rapport mondial sur le développement humain 2002 eyebisi boye: “Bikólo mingi ezindi na bobola koleka ndenge ezalaki eleki mbula 10, 20 mpe ntango mosusu 30,” atako milende ezali kosalema mpo na kobongisa makambo.
Makambo yango ezali komonisa ete elikya moko ezali te mpo na babola? Tolendisi yo otánga lisolo oyo elandi mpo na komona mwa mayele oyo ekoki kosalisa moto sikoyo mpe ndenge ya kosilisa bobola oyo mbala mosusu ekokamwisa yo.