Milende mpo na kosilisa bobola
BATO ya bomɛngo basilisá bobola, kasi kaka mpo na bango moko. Nzokande, milende oyo esalemá mpo na kosilisa bobola ya moto nyonso elongaka te. Mpo na nini? Mpamba te mbala mingi, bazwi balingaka te ete moto to eloko mosusu etya bango nkaka. Salomo, mokonzi ya Yisraele akomaki ete: “Talá! mpisoli ya bato oyo bazali konyokwama, kasi bazalaki na mobɔndisi te; nde bato oyo bazalaki konyokola bango bazalaki na nguya.”—Mosakoli 4:1.
Bato minene mpe ya nguya bakoki kobongola makambo na mokili mpe kolongola bobola? Na litambwisi ya elimo santu, Salomo akomaki ete: “Talá! eloko nyonso ezalaki mpamba mpe kolanda mopɛpɛ. Oyo etɛngami ekoki kosembolama te.” (Mosakoli 1:14, 15) Soki totaleli milende oyo esalemi na mikolo na biso mpo na kosilisa bobola, tokomona likambo yango polele.
Milende oyo esalemi mpo bato nyonso bákóma bazwi
Na siɛklɛ ya 19, lokola mwa bikólo mingi ekómaki na bomɛngo ebele mpo na mimbongo mpe bakompanyi, bato mosusu ya minene batyaki likebi makasi na likambo etali bobola. Nkita ya mabele ekoki kokabolama ndenge moko na moto nyonso?
Bato mosusu bakanisaka ete ebongiseli ya politiki oyo babengi socialisme to communisme ekoki kosala ete bomɛngo ekabolama ndenge moko na moto nyonso ya mokili. Ya solo, bato ya bomɛngo basepelaki na likanisi yango te. Bato mingi balandaki likanisi oyo elobaka ete moto nyonso asengeli kopesa mabɔkɔ mpo na bolamu ya mboka na kotalela makoki na ye, mpe kolya biloko oyo mboka ezali kobimisa na kotalela bamposa na ye. Bato mingi bakanisaki ete bikólo nyonso bakondima likanisi ya socialisme mpo mokili ekóma esika ya malamu mpenza mpo na kofanda. Mwa bikólo mosusu ya bozwi endimaki makanisi ya socialisme mpe basalaki biyangeli oyo elakaki ete ekokipe bana-mboka nyonso “bomoi na bango mobimba.” Balobaka ete basilisaki bobola ya bato na bango.
Kasi, ebongiseli ya socialisme ekokisaki soki moke te mokano na yango ya kosala mokili oyo ezangi moimi. Mokano oyo bazalaki na yango ete bana-mboka bakosala mpo na bolamu ya bato nyonso na esika ezala kaka mpo na bango moko, ezalaki ndɔtɔ mpamba. Bato mosusu basepelaki te kosalisa babola, mpo balobaki ete ebongiseli wana ekómisaki babola mosusu gɔigɔi na mosala. Maloba oyo ya Biblia emonani mpenza solo: “Ezali na moto moko te oyo azali moyengebene na mabele oyo asalaka kaka malamu mpe asalaka lisumu te. . . . Nzambe ya solo asalaki bato sembo, kasi bango moko baluki myango mingi.”—Mosakoli 7:20, 29.
Elikya mosusu ezali oyo babengaki Ndɔtɔ ya Amerika—kolɔta esika oyo, moto nyonso oyo akolinga kosala mosala makasi akokóma mozwi. Na mokili mobimba, bikólo mingi endimaki bibongiseli lokola demokrasi, kotikela bakompanyi bonsomi ya kosala kozanga ete Leta atya miso mpe kosala mimbongo kozanga kofuta bampako; emonanaki lokola ete bibongiseli yango ekómisaki États-Unis na bozwi. Kasi bikólo nyonso te nde elandaki ndɔtɔ ya Amerika mpo bomɛngo ya Amerika ya nɔrdi eutaki te kaka na ebongiseli na yango ya politiki. Ebele ya nkita na yango ya mabele mpe kosala mimbongo kozanga nkaka na banzela oyo ekei na mikili mosusu nde esalisaki mingi. Lisusu, kowelana na makambo ya nkita ebimisi kaka te bato oyo bazali kokóma bazwi, kasi mpe bato oyo bazali kobungisa biloko na bango. Esengeli kolendisa bikólo oyo ezali na bomɛngo mpo esalisa oyo ezali naino na bobola?
Ebongiseli babengi Marshall ekokaki kosilisa bobola?
Nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mikili ya Mpoto ebebisamaki mpe bato na yango mingi bakómaki konyokwama na nzala. Guvɛrnema ya États-Unis ekómaki kosepela na mayele babengi socialisme, oyo bato mingi ya Mpoto bandimaki. Na yango, mpo na mbula minei, États-Unis epesaki ebele ya mbongo mpo na kozongisa bakompanyi mpe misala ya bilanga na bikólo oyo endimaki mayele na yango. Bato bamonaki ete ebongiseli wana oyo ebengamaki Marshall, oyo ezwamaki mpo na kosunga mikili ya Mpoto, elongaki. Na wɛsti ya Mpoto, bopusi ya États-Unis ebakisamaki mpe mitungisi ya bobola ezalaki mpenza mingi te. Ebongiseli yango ezalaki lolenge ya kosilisa bobola na mokili mobimba?
Lokola ebongiseli yango etambolaki malamu, yango etindaki guvɛrnema ya États-Unis epesa lisungi na bikólo ya bobola na mokili mobimba, mpo na kosalisa bango bákolisa mosala ya bilanga, bábongisa likambo etali kolɔngɔnɔ ya nzoto, kelasi mpe transport. États-Unis endimaki polele ete ezalaki kopesa mikili mosusu lisalisi mpo na matomba na yango moko. Bikólo mosusu mpe elingaki ete bato bálanda makanisi na bango, yango wana etindaki lisalisi na mikili ya bapaya. Mbula ntuku motoba na nsima, nsima ya kobebisa mbongo mingi koleka oyo ebimaki mpo na ebongiseli Marshall, litomba moko te emonanaki. Ya solo, bikólo mosusu oyo ezalaki na bobola liboso, ekómaki mpenza na bozwi, mingimingi na ɛsti ya Azia. Atako na bisika mosusu lisalisi oyo epesamaki esalaki ete bana bákufa mingi te mpe mingi na bango batánga kelasi; kasi bikólo mingi etikalaki kaka na bobola makasi.
Mpo na nini lisalisi ya mikili ya bapaya esilisi bobola te?
Kosalisa bikólo ya bobola elongwa na bobola na yango eleki mpasi kosalisa bikólo ya bozwi oyo ebebisamaki na bitumba. Mikili ya Mpoto ezalaki na bakompanyi, mimbongo mpe transport banda kala. Esengelaki kaka kobongisa nkita na bango. Na bikólo ya bobola, ata ntango lisalisi ya bapaya ezali kosunga mpo na kosala banzela, biteyelo mpe balopitalo, bato bazali kaka konyokwama na bobola makasi mpo bazangi bakompanyi, nkita ya mabele mpe banzela ya malamu mpo na kokende kosala mimbongo.
Makambo oyo ebimisaka bobola mpe oyo bobola ebimisaka, ezali mpasi mpo na kolimbola yango. Na ndakisa, maladi ebimisaka bobola, mpe bobola ebimisaka maladi. Bana oyo bazali kolya malamu te, bakoki kolɛmba na nzoto mpe na makanisi, mpe ntango bakokola, bakokoka te kobatela bana na bango. Lisusu, soki bikólo ya bozwi etindi biloko oyo bazali na mposa na yango te na mikili ya bobola, lokola “lisalisi,” basali bilanga mpe batɛkisi ya mikili wana basalaka lisusu te, mpe yango esalaka ete bobola ekóma lisusu makasi. Kotindela baguvɛrnema ya mikili ya bobola mbongo ekoki komema makambo mosusu: Bakoki koyiba mbongo yango kozanga mindɔndɔ, mpe yango ekoki komema na kanyaka, mpe kanyaka ekoki kobakisa lisusu bobola. Mbala mingi, lisalisi oyo eutaka na mikili ya bapaya elongaka te kosilisa eloko mpenza oyo ebimisaka bobola.
Eloko oyo ebimisaka bobola
Bobola makasi eyaka ntango bikólo, baguvɛrnema mpe bato mosusu bazali kosala kaka mpo na kokolisa mpe kobatela matomba ya bango moko. Na ndakisa, baguvɛrnema ya mikili ya bozwi etyaka mpenza te likambo ya kosilisa bobola na mokili mobimba na esika ya liboso, mpo baponamaka na ndenge ya demokrasi mpe basengeli kosepelisa bato oyo baponaki bango. Na yango, bapekisaka basali bilanga ya mikili ya bobola bátɛka biloko na bango na mikili ya bozwi. Basalaka bongo mpo basali bilanga ya bikólo na bango bátɛka malamu. Lisusu, bakonzi ya mikili ya bozwi basungaka mpenza basali bilanga ya mikili na bango mpo bátɛka mingi koleka basali bilanga ya mikili ya bobola.
Emonani polele ete eloko oyo ebimisaka bobola—makanisi oyo bato mpe baguvɛrnema ezali na yango ya kobatela matomba na bango moko—ezali bisalasala ya bana ya bato. Salomo, moko ya bakomi ya Biblia, amonisaki likambo yango boye: “Moto ayangeli moto mpo na komonisa ye mpasi.”—Mosakoli 8:9.
Kasi, elikya ezali ete bobola ekosila? Ezali na guvɛrnema oyo ekoki kobongola bato?
[Etanda na lokasa 6]
Mibeko oyo esalisaki na bobola
Yehova Nzambe apesaki Bayisraele na ntango ya kala mibeko oyo soki basalelaki yango, elingaki kosalisa mpo bobola ezala mingi te. Mibeko elobaki ete libota nyonso ezwa libula ya mabele, longola kaka libota ya Levi. Libula ya libota ebatelamaki mpo basengelaki kotɛka mabele mpo na libela te. Nsima ya mbula 50 nyonso, esengelaki kozongisela nkolo mabele, mabele na ye, to na libota ya moto yango. (Balevi 25:10, 23) Soki moto moko asengelaki kotɛka mabele na ye mpo na maladi, likama moko, to mpo azali gɔigɔi, basengeli kozongisela ye yango kozanga ete afuta, na mbula ya Yubile. Libota moko te ekokaki kozala na bobola mabota na mabota.
Mibeko ya Nzambe ezalaki mpe na ebongiseli moko ya malamu, oyo epesaki nzela na moto oyo akutani na mikakatano makasi ete amitɛka lokola moombo. Basengelaki kopesa ye mbongo liboso mpo afuta banyongo na ye. Soki akoki komisikola te na nsuka ya mbula nsambo, asengelaki kokóma na bonsomi mpe basengelaki kopesa ye mboto mpe banyama mpo azongela kolona bilanga. Lisusu, soki mobola adefi mbongo, Mibeko epekisaki Bayisraele kofutisa ye na matabisi. Mibeko epekisaki mpe Bayisraele kobuka mbuma na nsuka ya bilanga na bango mpo babola bálɔkɔta yango. Na ndenge yango, Moyisraele moko te asengelaki kosɛngasɛnga.—Kolimbola Mibeko 15:1-14; Balevi 23:22.
Nzokande, lisolo ya Bayisraele emonisi ete bamosusu kati na bango bazalaki babola. Mpo na nini yango ekómaki? Bayisraele batosaki Mibeko ya Yehova te. Na yango, bato mosusu bakómaki na mabele mingi mpe bazwi mpe basusu bazangaki mabele mpe bakómaki babola. Bobola ekɔtaki na Yisraele mpo bato mosusu baboyaki kotosa Mibeko ya Nzambe mpe batyaki matomba na bango moko liboso.—Matai 22:37-40.