Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/8 lok. 8
  • Matomba ya motema molai mpe ya molende

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Matomba ya motema molai mpe ya molende
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Masolo mosusu
  • “Tómonisa motema pɛtɛɛ”
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Ntina oyo nasepelaka kokómisa bato bayekoli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mbano ya bompikiliki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/8 lok. 8

Masolo ya Basakoli ya Bokonzi

Matomba ya motema molai mpe ya molende

YESU KLISTO asakolaki ete na mikolo ya nsuka “bolingo ya bato mingi ekokóma mpiɔ.” Yango wana, na bisika mingi na mokili lelo oyo, bato bazali kosepela te na nsango malamu ya Bokonzi. Kutu, bamosusu balingaka koyoka makambo ya Nzambe ata moke te.​—Matai 24:12, 14.

Atako bongo, lokola basakoli ya Bokonzi bazali na kondima mpe na motema molai, bazali mpenza kolonga mokakatano yango; lisolo oyo euti na République tchèque emonisi yango.

Batatoli mibale ya basi basololaki na mwasi moko oyo azalaki na kati ya ndako kasi afungolaki porte te. Nsima ya mwa ntango, afungolaki porte mwa moke, abimisaki kaka lobɔkɔ mpe azwaki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ná Lamuká! oyo Batatoli yango bapesaki ye. Alobaki ete “natɔndi bino,” mpe akangaki porte. Batatoli yango bakómaki komituna ete: “Esengeli nde tózongela mwasi yango to te?” Moko na bango oyo azalaki mobongisi-nzela, elingi koloba mosakoli ya ntango nyonso, azwaki mokano ya kozongela ye, kasi na boumeli ya mbula mobimba, mwasi yango azalaki kosala kaka ndenge wana.

Mobongisi-nzela yango azwaki mokano ya kobongola lolenge na ye ya kosolola na mwasi yango mpe abondelaki Yehova asalisa ye. Na mbala ya nsima oyo akendaki kotikela mwasi yango bazulunalo, atunaki ye na boboto mpenza ete: “Ozali malamu? Osepelaki na bazulunalo yango?” Na ebandeli, mwasi yango azalaki kopesa ye ata eyano te, kasi mwa moke na nsima, abandaki kokóma na boboto. Mokolo moko, afungolaki mpenza porte, kasi basololaki kaka mwa moke.

Ntango mobongisi-nzela yango amonaki ete mwasi yango azali kolinga mpenza te kosolola na porte, akomelaki ye mokanda mpo na kolimbwela ye ntina oyo ayaka kotala ye mpe mpo na kotuna ye soki akosepela bábanda koyekola Biblia. Nsukansuka, nsima ya komonisa motema molai mpe molende mbula mobimba ná ndambo, mobongisi-nzela yango abandaki koyekola Biblia na mwasi yango. Akamwaki mingi mpe alendisamaki makasi ntango mwasi yango ayebisaki ye nsima ya mikolo ete: “Nabandaki kondima Nzambe kaka mbala ya liboso oyo bopesaki ngai bazulunalo.”

Ya solo mpenza, motema molai mpe molende ekoki kobimisa matomba mingi na mosala ya kosakola Bokonzi mpe ya kokómisa bato bayekoli.​—Matai 28:19, 20.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto