Mituna ya batángi
Yehova atikaki basaleli na ye ya kala, Bayisalaele, bábalaka basi ebele, kasi lelo ezali lisusu ndenge wana te. Elingi nde koloba ete mibeko na ye ebongwanaka?
Ndenge Yehova atalelaka likambo ya kobala basi ebele ebongwaná te. (Nzembo 19:7; Malaki 3:6) Banda na ebandeli, mokano na ye ezalaki te ete mibali bábalaka basi ebele, mpe yango ebongwani te lelo oyo. Ntango Yehova asalaki Eva mpo azala mwasi ya Adama, amonisaki polele ete mobeko na ye ezali ete mobali azala kaka na mwasi moko. “Yango wana moto akotika tata na ye mpe mama na ye mpe akokangama na mwasi na ye, mpe bango mibale bakozala mosuni moko.”—Genese 2:24, NW.
Ntango Yesu Klisto azalaki awa na mabelé, alobelaki lisusu mobeko yango na eyano oyo apesaki bato oyo batunaki ye soki koboma libala mpe kobala mwasi mosusu ezali malamu. Alobaki boye: “Botángá te ete moto oyo azalisaki bango na ebandeli asalaki bango mobali mpe mwasi mpe alobaki ete, ‘Mpo na ntina yango nde moto akotika tata na ye mpe mama na ye mpe akokangama na mwasi na ye, mpe bango mibale bakozala mosuni moko kaka’? Na bongo bazali lisusu mibale te, kasi mosuni moko kaka.” Yesu abakisaki boye: “Moto nyonso oyo abomi libala ná mwasi na ye, soki mpo na pite te, mpe abali mosusu azali kosala ekobo.” (Matai 19:4-6, 9) Na kotalela maloba yango, emonani polele ete soki moto abali basi mibale to koleka asali mpe ekobo.
Kasi, mpo na nini na ntango ya kala Nzambe atikaki ete mibali bábalaka basi ebele? Tóbosana te ete Yehova te moto atindaki bato bábalaka basi ebele. Moto ya liboso oyo Biblia elobi ete azalaki na basi ebele ezali Lemeke, moko ya bankɔkɔ ya Kaina. (Genese 4:19-24) Ntango Yehova ayeisaki Mpela na ntango ya Noa, Noa ná bana na ye misato bazalaki kaka na mwasi mokomoko. Mibali nyonso oyo bazalaki na basi ebele bakufaki na Mpela.
Bankama ya bambula na nsima, ntango Yehova aponaki Bayisalaele bázala bato na ye, mibali mosusu bazalaki kobala basi ebele, atako emonani ete mingimingi mibali bazalaki kobala kaka mwasi moko. Nzambe asɛngaki te ete mibali oyo bazalaki na basi ebele bákabwana na basi na bango. Atako bongo, apesaki mibeko ya polele mpo na mabala ya ndenge wana.— Exode 21:10, 11; Deteronome 21:15-17.
Makambo oyo Yesu alobaki mpo na ndenge Yehova azalaki kotalela libala na ebandeli ná oyo ntoma Paulo akomaki na lisalisi ya elimo santu ya Nzambe, ezali komonisa ete Nzambe atikelaki mibali nzela ya kobala basi ebele kaka mpo na mwa ntango. Ntoma Paulo alobaki boye: “Tiká ete mobali moko na moko azala na mwasi na ye moko mpe mwasi moko na moko azala na mobali na ye moko. (1 Bakolinti 7:2) Elimo santu etindaki mpe Paulo akoma ete mobali nyonso oyo aponami nkulutu to mosaleli na misala na kati ya lisangá ya boklisto asengeli kozala “mobali ya mwasi kaka moko.”—1 Timote 3:2, 12; Tito 1:6.
Na yango, ntango oyo Yehova azalaki kotika ete mibali bábalaka basi ebele esukaki ntango lisangá ya boklisto esalemaki, eleki lelo mbula soki 2 000. Kobanda na ntango wana, mobeko ya Nzambe mpo na libala ezongaki ndenge ezalaki na ebandeli ntango akelaki mobali ná mwasi ya liboso: mobali moko mpo na mwasi moko. Lelo oyo, basaleli ya Nzambe na mokili mobimba batosaka mobeko yango.—Malako 10:11, 12; 1 Bakolinti 6:9, 10.