Ndenge oyo bakanisaka bato mosusu
ELEKI mbula nkóto misato, Davidi azalaki kokima Saulo, mokonzi ya Yisalaele. Davidi atindaki bato epai ya Nabala mpo na kosɛnga ye biloko ya kolya ná mai ya komɛla; Nabala azalaki na ebele ya bampate ná bantaba. Davidi ná bato na ye babatelaki bitonga na ye, na bongo, Nabala azalaki nde na nyongo na bango. Kasi, Nabala aboyaki kopesa bato ya Davidi biloko. Kutu agangelaki bango. Nabala azalaki nde kotumola nzoi, mpamba te Davidi azalaki moto ya kosakana na ye te.—1 Samwele 25:5, 8, 10, 11, 14.
Nabala azalaki na ezaleli ya koyamba bapaya te ndenge bato ya mikili ya Moyen-Orient bamesanaki kosala. Na bongo, Nabala apesaki nkombo na ye lokumu nini? Biblia elobi ete azalaki “moto ya nkanda mpe ya makambo mabe” mpe “moto mpamba.” Nkombo na ye elimboli “zoba” mpe na ntembe te ye moko azalaki ndenge yango. (1 Samwele 25:3, 17, 25) Okolinga ete bato bákanisa yo na bizaleli ya ndenge wana? Ozalaka motema mabe mpe makambo makasi epai ya bazalani na yo, mingimingi soki bango nde bazali na bosɛnga? To ozalaka nde na boboto, oyambaka bapaya mpe oyebaka komitya na esika ya basusu?
Abigaili, mwasi ya bokɛngi
Mpo na motema mabe na ye, Nabala amityaki na likama monene. Davidi ná bato na ye 400 bazwaki mipanga na bango mpe babandaki kokitela Nabala. Abigaili, mwasi ya Nabala, ayokaki makambo oyo elekaki. Amonaki ete likama monene ezali koya. Asalaki nini? Abongisaki bilei nokinoki mpe akendaki kokutana na Davidi ná bato na ye. Ntango akutanaki na bango, abondelaki Davidi ete atangisa makila mpamba te. Motema ya Davidi elɛmbaki. Ayokelaki ye mpe akitisaki motema. Mwa moke na nsima ya makambo yango, Nabala akufaki. Lokola Davidi amonaki bizaleli malamu ya Abigaili, abalaki ye.—1 Samwele 25:14-42.
Abigaili apesaki nkombo na ye lokumu nini? Azalaki “mwasi ya mayele.” Tomoni mpenza ete azalaki na boboto mpe ayebaki ndenge nini mpe ntango nini esengeli kokanga mabɔkɔ te. Asalaki na bosembo mpo na kobatela mobali na ye oyo azangaki mayele mpe libota na ye. Abigaili akufá, kasi atiká lokumu malamu lokola mwasi ya bokɛngi.—1 Samwele 25:3, NW.
Petelo atiká nkombo ya ndenge nini?
Tótalela sikoyo makambo ya bantoma 12 ya Yesu na ekeke ya liboso na ntango na biso (T.B.). Na ntembe te ntoma oyo azalaki koloba mingi mpe azalaki motema mɔtɔmɔtɔ ezalaki Petelo, to Kefa, oyo azalaká mobomi-mbisi na Galilai. Emonani mpenza ete azalaki moto ya mpiko mpe azalaki kobanga te komonisa makanisi na ye. Na ndakisa, mokolo moko Yesu azalaki kosukola bayekoli na ye makolo. Petelo alobaki nini ntango ekómaki ngala na ye?
Petelo alobaki na Yesu ete: “Nkolo, ozali kosukola ngai makolo?” Yesu azongiselaki ye ete: “Oyo nazali kosala ozali koyeba ntina na yango sikoyo te, kasi okoyeba ntina na yango nsima ya makambo oyo.” Petelo alobaki ete: “Okosukola ngai makolo soki moke te.” Petelo alobaki na mpiko, kasi akanisaki te. Yesu alobaki nini?
Yesu apesaki ye eyano ete: “Soki nasukoli yo te, okosangana na ngai te.” Simona Petelo alobaki na ye ete: “Nkolo kaka makolo te, kasi ná mabɔkɔ ná motó.” Petelo akendaki mosika lisusu! Kasi Petelo azalaki ntango nyonso komonisa makanisi na ye. Azalaki moto ya minɔkɔ mibale te.—Yoane 13:6-9.
Toyebi mpe ete Petelo azalaki na bolɛmbu lokola bato mosusu. Na ndakisa, awanganaki Klisto mbala misato liboso ya bato oyo balobaki ete azali moyekoli ya Yesu ya Nazalete, moto oyo bakangaki. Ntango Petelo amonaki libunga na ye, alelaki mpenza. Abangaki te komonisa mawa na ye. Lokola bakomi ya Baevanzile nde balobelaki lisolo oyo eyebisi kowangana oyo Petelo awanganaki Yesu, yango ezali kobenda likebi, mpo ekoki mpenza kozala ete ye moko moto ayebisaki bango likambo yango! Azalaki mpenza na komitikisa, yango wana andimaki mabunga na ye. Yo mpe ozalaka na komikitisa ndenge yango?—Matai 26:69-75; Malako 14:66-72; Luka 22:54-62; Yoane 18:15-18, 25-27.
Nsima ya mwa bapɔsɔ, na mokolo ya Pantekote, Petelo atondaki na elimo santu mpe asakolaki na mpiko liboso ya ebele ya Bayuda. Likambo yango emonisi polele ete Yesu atyelaki Petelo motema ata nsima ya lisekwa na ye.—Misala 2:14-21.
Mokolo mosusu, Petelo akweaki na motambo mosusu. Ntoma Paulo alobaki ete liboso bandeko mosusu oyo bazalaki Bayuda bákóma na Antiokia, Petelo azalaki kosala makambo nyonso ná bandimi oyo bazalaki Bayuda te. Kasi, akabwanaki na bandimi oyo bazalaki Bayuda te “mpo azalaki kobanga etuluku yango ya bato oyo bakatamá ngenga” oyo bautaki na Yelusaleme. Paulo apamelaki ye mpo na bongolabongola wana.—Bagalatia 2:11-14.
Kasi, moyekoli nini alobaki ntango emonanaki ete bayekoli mingi ya Yesu balingi kosundola ye? Yesu alobaki likambo moko ya sika, elingi koloba ntina ya kolya mosuni na ye mpe komɛla makila na ye. Alobaki boye: “Soki bolei mosuni ya Mwana ya moto te mpe bomɛli makila na ye te, bozali na bomoi na kati na bino te.” Ebele ya bayekoli ya Yesu oyo bazalaki Bayuda babɛtaki libaku mpe balobaki ete: “Liloba oyo ezali ya kozokisa; nani akoki koyoka yango?” Nini esalemaki? “Mpo na yango, mingi na kati ya bayekoli na ye bazongelaki biloko ezalaki na nsima mpe balingaki lisusu kotambola elongo na ye te.”—Yoane 6:50-66.
Na ntango yango, Yesu atalaki bantoma 12 mpe atunaki motuna monene oyo: “Bino mpe bolingi nde kokende?” Petelo apesaki eyano ete: “Nkolo, tokokende epai ya nani? Yo ozali na maloba ya bomoi ya seko; mpe biso tosili kondima mpe koyeba ete yo ozali Mosantu ya Nzambe.”—Yoane 6:67-69.
Lokumu nini Petelo apesaki na nkombo na ye? Moto oyo azali kotánga masolo oyo elobeli ye akomona na elobeli na ye ya polele ete azalaki moto ya sembo mpe azalaki kondima bolɛmbu na ye. Apesaki mpenza nkombo na ye lokumu!
Bato bakanisaka Yesu na makambo nini?
Mosala ya Yesu awa na mabelé eumelaki kaka mbula misato na ndambo. Kasi, bayekoli na ye bakanisaka ye na makambo nini? Azalaki nde koboya kozala pembeni ya bato mpo azalaki moto ya kokoka mpe azalaki na lisumu te? Lokola azalaki Mwana ya Nzambe, azalaki nde kotya bokonzi na ye liboso? Azalaki kobangisa bayekoli na ye mpe kosɛngisa bango na makasi ete bátosa ye? Azalaki komipesa valɛrɛ koleka na boye ete ayebaki ata kosɛkisa te? Azalaki nde komona ete azali na mosala mingi na boye ete azangaki ntango ya kolekisa na bato ya bolɛmbu mpe bato ya maladi to bana mike? Azalaki nde komona bato ya bikólo mosusu mpe basi lokola bato mpamba, ndenge mibali mingi ya ntango wana bazalaki kosala? Masolo na ye ezali komonisa biso nini?
Yesu azalaki kosepela na bato. Soki totaleli mosala na ye, tokomona ete mbala mingi abikisaki bibɔsɔnɔ mpe bato ya maladi. Azalaki komipesa mpo na kosalisa bato ya mpasi. Azalaki kosepela na bana mike, mpe alobaki na bayekoli na ye ete: “Bótika bana mike báya epai na ngai; bómeka te kopekisa bango.” Na nsima, Yesu “akamataki bana na mabɔkɔ na ye mpe abandaki kopambola bango, kotyáká mabɔkɔ na ye likoló na bango.” Ozwaka ntango ya kosolola na bana, to mosala eleki yo mingi na boye ete okipaka ata bango te?—Malako 10:13-16; Matai 19:13-15.
Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, Bayuda bazalaki na ebele ya mibeko ya lingomba koleka kutu makambo oyo Mibeko ya Moize ezalaki kosɛnga. Bakonzi ya mangomba batyelaki bato kilo na mitó, nzokande bango moko bazalaki ata koningisa yango na misapi na bango te. (Matai 23:4; Luka 11:46) Na bongo, bakesanaki mpenza na Yesu! Ye alobaki boye: “Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona mpasi na mosala mpe kokumbisama mikumba, mpe ngai nakopemisa bino.”—Matai 11:28-30.
Bato oyo balandaki Yesu bazalaki kozwa kopema. Ezali te ete bayekoli na ye bazalaki kobanga ye mpe bazalaki ata kokoka koloba te. Kutu, azalaki kotuna bango mituna mpo bábimisa oyo ezalaki na mitema na bango. (Malako 8:27-29) Ebongi baklisto oyo bazali bakɛngɛli bámitunaka ete: ‘Bandeko mpe bamonaka ngai ndenge yango? Baninga na ngai bankulutu bayebisaka ngai mpenza makanisi na bango, to bakakatanaka mpo na koloba?’ Ezalaka mpenza esengo soki bakɛngɛli bazali bato oyo bandeko babangaka te kosolola na bango, bayebaka koyoka, mpe bazali na makambo makasi te! Ezalaka mpasi kosolola malamu mpe na motema polele na moto oyo azali na makambo makasimakasi.
Atako Yesu azalaki Mwana ya Nzambe, ata mbala moko te asalelaki bokonzi to nguya na ye na ndenge ya mabe. Kutu, azalaki kokanisa na bato oyo bazalaki koyoka ye. Asalaki bongo na ndakisa ntango Bafalisai batyelaki ye motambo na motuna oyo: “Epesami nzela kofuta mpako ya moto na moto epai ya Kaisala to te?” Yesu asɛngaki bango bálakisa ye mbongo moko ya ebende mpe atunaki bango ete: “Oyo elilingi mpe likomi ya nani?” Balobaki ete: “Ya Kaisala.” Na nsima alobaki na bango ete: “Boye, bózongisa biloko ya Kaisala epai ya Kaisala, kasi biloko ya Nzambe epai ya Nzambe.” (Matai 22:15-21) Kokanisa na bango malamu esukisaki likambo.
Yesu azalaki mpe kosɛkisa? Bato mosusu bakoki komona ete azalaki kosɛkisa soki batángi esika oyo Yesu alobaki ete ezali pɛtɛɛ mingi kamela eleka na lidusu ya ntonga koleka kokɔta ya moto na Bokonzi ya Nzambe. (Matai 19:23, 24) Koloba ete kamela eleka na lidusu ya ntonga ezali kolekisa ndelo. Ndakisa mosusu ya ndenge wana oyo apesaki elobelaki komona libaya ya motɔndɔ na liso ya ndeko na yo kasi ozali komona te lititi na liso na yo moko. (Luka 6:41, 42) Tomoni mpenza ete Yesu azalaki moto ya nkandankanda te. Azalaki moto ya boboto mpe ya esengo. Mpo na baklisto lelo oyo, koyeba kosɛkisa ekoki kokitisa mpasi na ntango ya mikakatano.
Yesu azalaki koyokela basi mawa
Basi bazalaki komiyoka ndenge nini pembeni ya Yesu? Na ntembe te azalaki na bayekoli mingi ya basi, ata mpe mama na ye moko, Malia. (Luka 8:1-3; 23:55, 56; 24:9, 10) Basi bazalaki kokakatana te kopusana pembeni ya Yesu, yango wana, mokolo mosusu, mwasi moko oyo ‘ayebanaki ete azali mosumuki’ apɔlisaki makolo ya Yesu na mpisoli na ye mpe apakolaki yango mafuta ya nsolo kitoko. (Luka 7:37, 38) Lisusu, mwasi moko oyo azalaki kotanga makila banda ebele ya bambula, alekaki na kati ya bato mpo na kosimba elamba ya Yesu mpo akoka kobika. Yesu asepelaki na kondima ya mwasi yango. (Matai 9:20-22) Mwasi yango amonaki mpenza ete Yesu azalaki moto ya mindɔndɔ te.
Mokolo mosusu, Yesu asololaki na mwasi moko Mosamalia na libulu ya mai. Mwasi yango akamwaki mpenza mpe alobaki boye: “Ndenge nini yo, atako ozali Moyuda, ozali kosɛnga ngai mai ya komɛla, nzokande ngai nazali mwasi Mosamalia?” Tóyeba ete na ntango wana, Bayuda ná Basamalia bazalaki koyokana te. Yesu ateyaki mwasi yango mateya kitoko etali ‘mai oyo ezali kopunzwapunzwa mpo na kopesa bomoi ya seko.’ Azalaki kosolola malamu na basi. Azalaki komona te ete bakobanga ye te.—Yoane 4:7-15.
Bato bakanisaka Yesu mpo na bizaleli mingi ya malamu oyo azalaki na yango, lokola elimo na ye ya komipesa. Amonisaki mpenza bolingo ya Nzambe. Yesu apesaki ndakisa mpo na moto nyonso oyo alingi kozala moyekoli na ye. Olandaka ndakisa na ye malamumalamu?—1 Bakolinti 13:4-8; 1 Petelo 2:21.
Bakanisaka baklisto ya mikolo na biso na makambo nini?
Na ntango na biso, ebele ya baklisto ya sembo basili kokufa, mosusu bakómaki mibange, mosusu mpe bazalaki naino makasi. Kasi batikaki lokumu ya malamu. Bamosusu, lokola Crystal, oyo akufaki mobange, bakanisaka bango mpo bazalaki na bolingo mpe bazalaki kosepela na bato. Bamosusu, lokola Dirk, oyo akufaki ntango azalaki na mbula mwa moke koleka 40, bakanisaka bango mpo bazalaki bato ya esengo mpe bazalaki na elimo ya komipesa.
Tozali mpe na ndakisa ya José, na Espagne. Na bambula ya 1960, ntango mosala ya Batatoli ya Yehova epekisamaki na ekólo yango, José azalaki na mwasi ná bana misato ya basi. Azalaki na mosala ya malamu na Barcelone. Kasi, na ntango yango, masangá ya sudi ya Espagne ezalaki na mposa ya bankulutu oyo bakɔmeli. José atikaki mosala na ye ya malamu mpe ye ná libota na ye bakendaki kofanda na Málaga. Kuna, babundaki na mikakatano ya mbongo, mbala mingi azalaki na mosala te.
Kasi, José ayebanaki lokola moto ya sembo, azalaki kopesa ndakisa malamu na mosala ya kosakola mpe, na lisungi ya mwasi na ye, Carmela, azalaki kobɔkɔla bana na ye malamu. Soki bazali na mposa ya moto mpo na kobongisa mayangani na etúká na bango, José azalaki ntango nyonso komipesa. Kasi, ntango akómaki na mbula koleka mwa moke 50, abɛlaki makasi mpe akufaki. Kasi, atikaki lokumu malamu lokola moto oyo bakokaki kotyela motema, nkulutu oyo azalaki kosala mosala makasi mpe mobali mpe tata ya bolingo.
Na bongo, bakokanisa yo na makambo nini? Soki okufaki lobi, bato balingaki koloba nini mpo na yo lelo oyo? Motuna wana ekoki kotinda yo obongisa misala na yo.
Tokoki kosala nini mpo na kokóma na lokumu ya malamu? Ndelo ezali te na oyo etali kolona mbuma ya elimo; na ndakisa bolingo, motema molai, boboto, bopɔlɔ, mpe komipekisa. (Bagalatia 5:22, 23) Ya solo, “Nkombo malamu eleki mafuta na motuya; mokolo ya kufa eleki mokolo ya kobotama na malamu.”—Mosakoli 7:1; Matai 7:12.
[Elilingi na lokasa 5]
Tokanisaka Abigaili mpo na bokɛngi na ye
[Elilingi na lokasa 7]
Tokanisaka Petelo mpo na motema mɔtɔmɔtɔ mpe bosembo na ye
[Elilingi na lokasa 8]
Yesu azalaki kozwa ntango ya kozala na bana mike