Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 15/8 nk. 3-4
  • Ozali kopesa Nkombo na yo lokumu nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozali kopesa Nkombo na yo lokumu nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Masolo mosusu
  • Ndenge oyo bakanisaka bato mosusu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Bikateli oyo ememaka esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Okoki kozala na bomoi ya ntina!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • ‘Mapamboli ezali na moyengebene’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 15/8 nk. 3-4

Ozali kopesa Nkombo na yo lokumu nini?

OSÍ otángá mayebisi ya liwa na zulunalo ya mboka na bino to otalá emisyo moko oyo ezali kolobela moto moko oyo akufá? Omitunaki ete, ‘Bakoloba nini mokolo oyo ngai nakokufa?’ Kasi bato boni bamitunaka soki bato mosusu bakokanisa bango na likambo nini nsima ya liwa na bango? Yango wana, motuna ya malamu ezali oyo: Bato balingaki koloba nini mpo na yo lelo soki okufaki lobi? Ozali kopesa nkombo na yo lokumu nini? Okolinga bato oyo bayebaki yo bákanisa yo na makambo nini mpe Nzambe akanisa yo na makambo nini?

Moto ya bwanya oyo akomaki mokanda ya Mosakoli alobaki boye: “Kozala na lokumu eleki malasi ya talo mingi; . . . mokolo ya liwa eleki mokolo ya kobotama na malamu.” (Mosakoli 7:1, Bible na lingala ya lelo oyo) Mpo na nini mokolo ya liwa ya moto eleki mokolo ya kobotama na ye na malamu? Ezali bongo mpamba te, ntango moto abotami azalaka na lokumu te. Na ntango wana, asali naino ata likambo moko te na bomoi na ye. Ndenge akomitambwisa na bomoi na ye nde ekosala ete atika nkombo ya malamu to ya mabe. Na ndimbola wana nde mokolo ya liwa ezalaka malamu koleka mokolo ya kobotama mpo na bato oyo bamitambwisaki malamu.

Yango elingi koloba ete biso moko nde tosengeli kopona. Kutu, mokolo na mokolo toponaka makambo mingi oyo ekosala ete, na mokolo ya liwa na biso, nkombo na biso ezala na lokumu, mingimingi na ndenge oyo Nzambe akokanisa biso. Yango wana, moto ya bwanya oyo totángaki maloba na ye akomaki mpe ete: “Bakanisaka moto ya sembo na malamu, kasi nkombo ya bato mabe ekopɔla.” (Masese 10:7, NW) Ezali mpenza lokumu ete Nzambe akanisa biso na malamu!

Soki tozali na bwanya, mokano na biso ekozala ete tótosa mibeko ya Nzambe mpo na kosepelisa ye. Yango elimboli kokokisa likambo ya ntina mingi oyo Klisto alobaki: “‘Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.’ Wana nde komandema oyo eleki monene mpe ya liboso. Ya mibale, oyo ekokani na yango, ezali oyo, ‘Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’ Na bakomandema oyo mibale Mibeko nyonso ekakisami, mpe Basakoli.”​—Matai 22:37-40.

Bakanisaka bato mosusu mpo bazalaki kosalisa babola, bazalaki kosunga bato, bazalaki kobundela ntomo ya bato, to mpo na makambo minene oyo basalá na mombongo, na siansi, na mosala ya monganga, to na misala mosusu. Kasi, yo okolinga bákanisa yo na nini?

Robert Burns, mokomi ya maloba ya ntɔki mpe moto ya Écosse (1759-1796) alobaki ete azali na mposa ete Nzambe apesa biso likoki ya komimona ndenge bato mosusu bamonaka biso. Okoki komitalela malamumalamu mpe koloba ete ozali na lokumu na miso ya bato mpe na miso ya Nzambe? Boyokani na biso na bato mosusu nde ezalaka na ntina mingi koleka makambo minene oyo tokoki kosala ezala na masano to na makambo ya mombongo. Na yango, motuna yango oyo: Bato mosusu bamonaka biso ndenge nini, elingi koloba masolo na biso, bomoto na biso, bizaleli na biso? Bamonaka ete bakoki kosolola na biso kozanga nkaka to ete tokipaka bato te? Tozalaka na boboto to nde na makambo makasimakasi? Tolekisaka makambo mosusu to tozalaka nde na mindɔndɔ? Tozalaka esengo esengo to nkandankanda? Tolingaka kotɔnga bato to topesaka bango nde toli ya malamu? Tiká tótalela mwa bandakisa ya bato ya kala mpe ya ntango na biso mpo tóyeba liteya oyo tokoki kozwa.

[Elilingi na lokasa 3]

Robert Burns azalaki na mposa ete Nzambe apesa biso likoki ya komimona ndenge bato mosusu bamonaka biso

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Euti na buku A History of England

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto