Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/9 nk. 3-4
  • ‘Lingomba ya solo’ ezali kaka moko?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Lingomba ya solo’ ezali kaka moko?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Mangomba ya nkombo mpamba”
  • Ezali na ntina moto atalela lingomba na ye?
  • Mpo na nini mangomba mazali kosɛnga bolimbisi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/9 nk. 3-4

‘Lingomba ya solo’ ezali kaka moko?

“LOKOLA Klisto azali moko, nzoto ya Klisto mpe ezali kaka moko, Mwasi ya Klisto azali mpe kaka moko: ‘Lingomba se moko ya Katolike mpe ya bantoma.’ ”​—Dominus Iesus.

Kardinale Joseph Ratzinger alobaki maloba wana mpo na komonisa ete lingomba ya solo esengeli kozala kaka moko. Alobaki ete lingomba yango ezali “Lingomba se moko ya Klisto, elingi koloba Lingomba ya Katolike.”

“Mangomba ya nkombo mpamba”

Atako Pápa Jean-Paul II alobaki mbala na mbala ete mokanda Dominus Iesus ezalaki “kotyola mangomba mosusu te to kozanga limemya liboso na yango,” bakonzi ya Lingomba ya Protesta basepelaki na yango ata moke te. Na ndakisa, na likita monene ya Lingomba ya Presbytérien, oyo esalemaki na engumba Belfast, na ekólo Irlande du Nord, na sanza ya Yuni 2001, pastɛrɛ moko alobaki ete mokanda wana ezalaki makanisi ya “etuluku moko oyo ezali na nguya mingi na kati ya Lingomba ya Katolike . . . oyo bazali kobanga elimo ya kondima mangomba mosusu oyo likita ya Vatican II ekɔtisaki.”

Robin Eames, episkɔpɔ-mokonzi ya Lingomba ya Irlande, alobaki ete ekosala ye “mpasi mingi” soki mokanda yango “ezali nde kozongisa makanisi oyo ezalaki liboso ya Vatican II.” Mpo na makanisi ya Pápa oyo emonisi ete mangomba oyo ezali koboya mateya mosusu ya Lingomba ya Katolike “ezali Mangomba ya nkombo mpamba,” Eames alobaki ete: “Mpo na ngai, maloba wana ezali nde kofinga.”

Mpo na nini babimisaki buku Dominus Iesus? Emonani ete bakonzi ya Lingomba ya Katolike bakómaki kotungisama na likanisi ete lingomba ya solo ezali kaka moko te. Zulunalo moko (The Irish Times) elobaki ete “Kardinale Ratzinger akómaki kotungisama mingi . . . ndenge ebele ya mangomba ezali kobima mpo bato bazali kokanisa ete mangomba nyonso ezali malamu.” Emonani ete makanisi wana nde etindaki ye na koloba ete lingomba ya solo ezali kaka moko.

Ezali na ntina moto atalela lingomba na ye?

Likanisi oyo emonisi ete mangomba nyonso ezali malamu esepelisaka bato mingi koleka oyo emonisi ete lingomba ya solo ezali kaka moko. Mpo na bato yango, moto na moto asengeli kopona lingomba oyo esepelisi ye. Balobaka ete ‘likambo oyo eleki ntina ezali te lingomba ya moto.’

Ekoki komonana ete likanisi wana ezali na bokatikati, atako yango ezali kobimisa ebele ya mangomba mikemike. Bato mingi bazali koloba ete ‘ndenge mangomba ezali mingi emonisi ete bato bazali na bonsomi.’ Kasi, mokomi Steve Bruce alobaki ete, soki totali malamu, “kondima ete mangomba esengeli kozala ebele” ezali nde “kopesa losambo mokɔngɔ.”​—Buku A House Divided: Protestantism, Schism, and Secularization.

Na bongo, likanisi ya malamu ezali nini? Lingomba ya solo ezali kaka moko? Lingomba yango ezali nde Lingomba ya Katolike? Nzambe andimaka mpe mangomba mosusu? Lokola mituna yango etaleli boyokani na biso na Mozalisi na biso, ntembe ezali te ete koyeba makanisi na ye na likambo yango ezali na ntina. Ndenge nini tokoki koyeba yango? Soki totaleli Biblia, Liloba ya Nzambe. (Misala 17:11; 2 Timote 3:​16, 17) Tótalela oyo Biblia elobi mpo na lingomba ya solo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto