Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 1/3 nk. 4-7
  • Mpo na nini mangomba mazali kosɛnga bolimbisi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini mangomba mazali kosɛnga bolimbisi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bosangisi mangomba mpe bizaleli malamu
  • Bato mosusu baboyi likanisi yango
  • Lisambisi ya Nzambe
  • Mangomba mazali kotubela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • ‘Lingomba ya solo’ ezali kaka moko?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 1/3 nk. 4-7

Mpo na nini mangomba mazali kosɛnga bolimbisi?

LIKANISI oyo ete mangomba masengeli kobongwana mpo na kotika mabe na yango mpe komisembola ezali likanisi ya sika te. Religioni e miti (Mangomba mpe masapo), diksionere moko ya mangomba, elobi ete na boumeli ya eleko ya Moyen-Âge, bato basepelaki na likanisi oyo ete lingomba ya ebandeli ezalaki sembo mpe yango epusaki bato mingi na kosɛnga ete mbongwana esalema kati na lingomba.

Na mobu 1523, nsima wana Martin Luther akataki boyokani na Loma, Pápa Adrien VI amekaki kobongisa makambo na kotindáká maloba oyo na lisangani ya baepiskɔ́pɔ ya Nuremberg: “Toyebi malamu ete uta bambula mingi makambo oyo tosengeli mpenza koyina mazali komonana zingazinga ya Pápa . . . Tosengeli kosala na lombangu mpo na kobongola libosoliboso ebongiseli ya boyangeli ya Pápa likoló na Lingomba, mbala mosusu, yango nde ezali eutelo ya mabe oyo nyonso.” Nzokande, kondima ete mabe ezali esilisaki bokabwani te mpe esukisaki makambo mabe te na ebongiseli ya boyangeli ya Pápa.

Na mikolo oyo euti koleka, bato mingi balobaki mabe mpo na mangomba na lolenge elobaki eloko te na ntango ya libomi monene oyo Banazi basalaki. Lisusu, mangomba mafundamaki na ndenge mapekisaki basangani na yango te na komikɔtisa na bitumba. Na 1941, wana Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki kongala, sángó moko na nkombo Primo Mazzolari atunaki boye: “Mpo na nini Vatican esali likambo moko te na mpiko nyonso liboso ya kobeba ya mateya ya Lingomba ya Katolike lokola ezalaki kosala yango liboso, mpe lokola emeseni kosala kino sikawa, mpo na mateya oyo mazali likama monene te?” Mateya oyo mazali likama monene te koleka nini? Sángó oyo azalaki koloba na ntina na bolingi-ekólo oyo ebimisaki etumba oyo ezalaki kobebisa kotombwana ya makambo ya bomoi ya bato na ntango wana.

Kasi, ezali solo ete kino mikolo miuti koleka, kondima ekweli ezali likambo oyo ezalaki kosalema mpenza te mpo na mangomba. Na mobu 1832, mpo na koyanola na baoyo bazalaki kosɛngisa Lingomba ya Katolike ete ‘ezongela lolenge na yango ya ebandeli,’ Pápa Grégoire XVI alobaki ete: “Kopesa likanisi ya ‘kobongisa to kozongela lolenge ya ebandeli’ mpo na bolamu mpe bokóli ya [lingomba], lokola nde tokoki kokanisa ete yango ekoki kozala na mbeba, ezali mpenza na kolongobana te mpe ezali mpenza kofinga lingomba.” Ezali boni mpo na mbeba oyo ezalaki komonana polele, oyo bakokaki kowangana yango te? Basalelaki myango ndenge na ndenge mpo na kolóngisa yango. Na ndakisa, bato mosusu ya teoloji babimisaki likanisi ete lingomba ezali bulɛɛ kasi ezali mpe na masumu. Elingi koloba ete lingomba yango moko lokola ebongiseli ezali bulɛɛ—Nzambe abatelaka yango ete ezala na libunga te. Kasi, basangani na yango bazali basumuki. Na bongo, ntango makambo mabe masalemi na nkombo ya lingomba, esengeli kopamela Lingomba te, kasi nde bato oyo bazali kati na yango. Obanzi ete likanisi yango elongobani? Ezali bongo te na makanisi ya Hans Küng, moto ya teoloji na Lingomba ya Katolike ya Loma, oyo akomaki ete: “Lingomba ya kokoka oyo ekabolami na basangani oyo bazali bato ya masumu ezali te.” Alimbolaki boye: “Lingomba oyo ezangi masumu ezali te.”

Bosangisi mangomba mpe bizaleli malamu

Kasi, okoki komituna makambo nini masali ete mangomba mákoka kosɛnga bolimbisi sikawa. Ya liboso, Baprotestá mpe Baortodokse bandimaki mabe na bango mpo na “bokabwani oyo esalemaki kala” kati na bituluku na bango ndenge na ndenge. Basalaki yango na likita monene ebéngamaki “Kondima mpe Mibeko” oyo esangisaki mangomba mingi mpe esalemaki na engumba Lausanne, na ekólo Suisse, na 1927. Na nsima, Lingomba ya Katolike ya Loma elandaki ndakisa yango. Mingimingi kobanda na likita ebéngami Vatican II,a baepiskɔ́pɔ ya lokumu, na bapápa bango moko, mbala na mbala basɛngaki bolimbisi mpo na bokabwani kati na mangomba ya boklisto. Ezalaki mpo na mokano nini? Emonani ete balingi ete bomoko ezala makasi kati na mangomba ya boklisto. Nicolino Sarale, moyekoli ya lisolo ya Lingomba ya Katolike, alobaki ete mwango moko ebombani nsima ya “mokano ya ‘ba mea culpa’ ya Jean-Paul II, ezali bongo bosangisi mangomba.”

Nzokande, longola bosangisi mangomba, makambo mosusu mazali. Lelo oyo, lisolo ya makambo mabe ya mangomba ya boklisto eyebani mingi mpenza. Hans Urs von Balthasar, moto ya teoloji, alobi ete, “Mokatolike moko te akoki bobele kokanga miso na lisolo oyo mobimba. Lingomba na ye mpenza esalaki to epesaki nzela na kosalema ya makambo oyo, na ntembe te, tokoki kondima yango te na mikolo na biso.” Na bongo, Pápa abongisaki komisyó moko mpo na “koloba solo na ntina na makambo mabe oyo lingomba esalaki na boumeli ya bikeke mpo ete . . . bolimbisi ekoka kosɛngama.” Na yango, ntina mosusu oyo lingomba endimi kotalela misala na yango ezali bongo mposa ya kozongela etɛlɛmɛlo malamu na miso ya bato na oyo etali bizaleli.

Na likanisi sé moko wana, Alberto Melloni, oyo azali nganga-mayele ya istware, kolobáká na ntina na bolimbisi oyo lingomba ezali kosɛnga, akomi ete: “Mpo na koloba solo, oyo ezali kosɛngama ntango mosusu ezali bongo ngɔlu ya mwa ntango mpo na bifundeli ya ngambo oyo Lingomba ezali na yango.” Ɛɛ, emonani ete Lingomba ya Katolike ezali komeka kolɛmbisa bozito ya masumu ya kala mpo ete endimama lisusu na miso ya bato. Kasi, na bosembo nyonso, tosengeli koloba ete ezali komibanzabanza mingi na kozongisa boyokani elongo na mokili kasi elongo na Nzambe te.

Ezaleli motindo wana ezali kokundwela biso ezaleli ya Saulo, mokonzi ya liboso ya Yisalaele. (1 Samwele 15:1-12) Ye asalaki libunga moko monene, mpe ntango etɔndɔlamaki, na ebandeli alingaki koboya ekweli—alukaki komilóngisa na libunga na ye—liboso ya Samwele, mosakoli ya sembo ya Nzambe. (1 Samwele 15:13-21) Na nsuka, mokonzi andimaki liboso ya Samwele ete: “Nasali mabe mpo ete nasopaki mobeko na [Yehova].” (1 Samwele 15:24, 25) Ɛɛ, andimaki mabe na ye. Kasi maloba oyo alobaki na nsima epai ya Samwele mamonisaki nini elekaki ntina na makanisi na ye: “Nasali mabe; kasi nabondeli yo ete otosa ngai liboso na bankolo na bato na ngai mpe liboso na Yisalaele.” (1 Samwele 15:30) Ezali polele ete Saulo amibanzabanzaki mingi na etɛlɛmɛlo na ye na Yisalaele koleka kozongisa boyokani malamu elongo na Nzambe. Ezaleli wana epesaki nzela te ete Nzambe alimbisa Saulo. Okanisi ete ezaleli motindo moko ekosala ete Nzambe alimbisa mangomba?

Bato mosusu baboyi likanisi yango

Bato nyonso te nde bazali kondima ete lingomba esengeli kosɛnga bolimbisi na miso ya bato nyonso. Na ndakisa, Bakatolike mingi bazali koyoka mabe ntango pápa na bango azali kosɛnga bolimbisi mpo na likambo ya boombo to na ndenge azongisi lokumu ya “bapɛngwi” lokola Hus mpe Calvin. Na kolanda bansango euti na Vatican, bakardinale oyo bakendaki na likita moko esalemaki na Yúni 1994, balobaki mabe na ntina na nkomá oyo batindelaki bango, oyo epesaki likanisi ya “kotalela lisosoli” mpo na lisolo ya Lingomba na boumeli ya mbula nkóto oyo eleki. Ntango pápa, atako batɔngaki nkomá na ye, alingaki kokɔtisa makanisi wana kati na nkomá na ye epai ya baepiskɔ́pɔ, kardinale Giacomo Biffi na ekólo Italie, atindaki nkomá moko na mangomba mpe kati na yango alobaki ete: “Lingomba ezali na lisumu te.” Atako bongo, andimaki ete: “Kosɛnga bolimbisi mpo na mabunga ya bakonzi ya lingomba na bikeke bileki . . . ekoki kosala ete bato bámona biso mabe mingi te.”

Luigi Accattoli, mokomi na makambo ya Vatican, alobi ete: “Kotubela masumu ezali moko na makambo oyo mazali kobimisa ntembe kati na Lingomba ya Katolike. Soki pápa andimi mabunga ya bamisionere, ezali na bamisionere oyo bazali na bosembo nyonso koyoka mabe mpo na yango.” Lisusu, Mokatolike moko, oyo azali mokomi na zulunalo, akomaki ete: “Soki solo mpenza pápa azali na likanisi ya bobangi mingi mpo na lisolo ya Lingomba, ezali mpasi na kokanga ntina na lolenge oyo akoki sikawa koloba ete bobele Lingomba yango nde ezali mobateli monene ya ‘ntómo ya bato’ ‘mama mpe molakisi’ oyo akoki kokamba bato kino na eleko ya bolamu oyo ekoya na bambula ya 2000.”

Biblia ezali kokebisa na ntina na kobongola motema ya likolólikoló oyo epusami bobele na nsɔni soki bato bayebi ete tosali mabe. Mbala mingi kobongola motema lolenge wana ememaka moto oyo asali yango na mbongwana ya solosolo te. (Kokanisá na 2 Bakolinti 7:8-11.) Kobongola motema oyo ezali na motuya na miso ya Nzambe esalemaka nzela moko na “mbuma ibongi na kobongwana na motema”—elingi koloba, bilembeteli oyo bizali komonisa bosembo ya mbongwana.​—Luka 3:8.

Biblia elobi ete ye oyo abongoli motema mpe ayamboli mabe asengeli kotika misala mabe, akosala yango lisusu te. (Masese 28:13) Ezali yango nde esili kosalema? Nsima ya ntubela nyonso oyo Lingomba ya Katolike mpe mangomba mosusu esalaki mpo na mabe na yango, makambo nini emonanaki na matata ya banamboka oyo euti kosalema na Afrika ya Ntei mpe na Mpótó ya Ɛ́sti, epai kuna motuya monene ya bato oyo bazali “baklisto” bamikɔtisaki na matata yango? Mangomba mazalaki nde lokola esaleli ya nguya mpo na kimya? Bakambi na yango nyonso, basalaki na bomoko mpo na kotɛmɛla mabe oyo basangani na yango bazalaki kosala? Te. Kutu, baministre mosusu ya mangomba bapesaki mabɔkɔ mpo na koboma bato!

Lisambisi ya Nzambe

Kolobáká na ntina na bolimbisi oyo pápa azali kosɛnga mbala na mbala, kardinale Biffi atunaki na lityo nyonso ete: “Mpo na masumu oyo masalemá kala, ekozala malamu ete biso nyonso tózela lisambisi ya Nzambe, boye te?” Ya solo, lisambisi ya bato nyonso ebɛlɛmi. Yehova Nzambe ayebi malamu makambo mabe ya lisolo ya mangomba. Mosika te, akosɛnga baoyo bazali na ekweli ete bázongisa monɔkɔ. (Emoniseli 18:4-8) Liboso ete yango esalema, tozali nde na likoki ya komona lingomba oyo ezangi nyongo ya makila, ezangi ezaleli ya koboya makanisi ya basusu oyo ezali komema na koboma bato, mpe lolenge mosusu ya mabe oyo mangomba ya boklisto ezali kosɛnga bolimbisi mpo na yango? Ɛɛ.

Lolenge nini tokoki kosala yango? Na kosaleláká etinda oyo Yesu Klisto apesaki ete: “Bokoyeba bango mpo na mbuma na bango.” Lisolo ya makambo ya kala, oyo mangomba mosusu elingi ete bato bábosana yango, ezali kosalisa biso na koyeba bobele baoyo Yesu abéngaki “basakoli ya lokuta” te kasi lisusu baoyo bazali kobota “mbuma malamu.” (Matai 7:15-20) Bango bazali banani? Tobyangi yo na koyeba bango yo moko na kotaleláká Biblia elongo na Batatoli ya Yehova. Luká koyeba banani oyo bazali mpenza kosala makasi na kolanda Liloba ya Nzambe na esika ya koluka kobatela etɛlɛmɛlo ya lokumu kati na mokili.​—Misala 17:11.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Likita ya mbala ya 21 mpo na bosangisi mangomba oyo esalemaki na bokutani minei na Rome kobanda na 1962 kino na 1965.

[Elilingi na lokasa 5]

Mangomba mazali kosɛnga bolimbisi mpo na makambo ya nsɔ́mɔ lokola oyo

[Eutelo ya bafɔtɔ]

The Complete Encyclopedia of Illustration/J. G. Heck

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto