Lingomba ya boklisto ya solo se moko ezali mpenza
YESU KLISTO asalaki lingomba kaka moko. Lingomba yango nde nzoto ya elimo, to libota ya elimo. Elingi koloba ete ezalaki lisangá ya bato oyo baponamaki na elimo santu ya Nzambe; mpe Nzambe andimaki bango nyonso ete bazali “bana” na ye.—Baloma 8:16, 17; Bagalatia 3:26.
Yesu ateyaki ete Nzambe asalelaka ebongiseli kaka moko mpo na kolakisa bato na ye nzela ya solo mpe ya bomoi. Mpo na kolimbola solo yango ya ntina mingi, Yesu akokanisaki ebongiseli oyo ezali komema na bomoi ya seko na nzela. Alobaki boye: “Bókɔta na ekuke ya nkaka; mpamba te nzela ya monene mpe oyo efungwamá ezali oyo ememaka na libebi, mpe bato oyo bazali kokɔta na yango bazali mingi; nzokande ekuke oyo ezali nkaka mpe nzela oyo ekangamakangamá ememaka na bomoi, mpe bato oyo bazali komona yango bazali moke.—Matai 7:13, 14; Yoane 14:6; Misala 4:11, 12.
Lisangá oyo ezali na bomoko
Buku moko (The New Dictionary of Theology) elobi ete tosengeli kokanisa te ete lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso ezalaki “ebongiseli ya mokili mobimba na ndenge tomonaka lingomba ya katolike lelo oyo.” Mpo na nini? Buku yango ebakisi ete, “Ezali bongo mpamba te ebongiseli ya mokili mobimba ndenge wana ezalaki te.”
Moto moko te akoki kotya ntembe ete lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso ekesanaki na ndenge mangomba ezali lelo oyo. Atako bongo, ezalaki ebongiseli. Ezalaki te ete lisangá na lisangá ezalaki kosala makambo na ndenge na yango. Masangá nyonso ezalaki kotosa lisangani ya mikóló-bakambi oyo ezalaki na Yelusaleme. Lisangani yango oyo esalemaki na bantoma mpe bankulutu ya lisangá ya Yelusaleme ezalaki kobatela bomoko ya lisangá lokola “nzoto kaka moko” ya Klisto.—Baefese 4:4, 11-16; Misala 15:22-31; 16:4, 5.
Lisangá wana ya solo ekendá wapi? Yango nde ekómá Lingomba ya Katolike? Ekómá nde Lingomba ya Protesta oyo ekabwani na ebele ya mangomba mikemike oyo tozali komona lelo oyo? To likambo mosusu nde esalemaki?
“Blé” mpe “matiti mabe”
Mpo na kozwa biyano na mituna yango, tótalela malamumalamu makambo oyo Yesu Klisto ye moko alobaki ete ekosalema. Mbala mosusu okokamwa na koyoka ete Yesu ayebaki ete lingomba na ye ekobunga mpe akotika likambo yango eumela bankama ya bambula.
Yesu akokanisaki lingomba na ye na “bokonzi ya likoló” mpe alobaki boye: “Bokonzi ya likoló ekómi lokola moto moko oyo alonaki milona ya malamu na elanga na ye. Wana bato bazalaki kolala mpɔngi, monguna na ye ayaki mpe alonaki matiti mabe na katikati ya blé, mpe alongwaki. Ntango milona yango ebimaki mpe ebotaki mbuma, boye matiti mabe mpe ebimaki. Bongo baombo ya nkolo-ndako bayaki mpe balobaki na ye ete, ‘Nkolo, yo olonaki milona ya malamu te na elanga? Bongo, ndenge nini matiti mabe ezali na kati?’ Alobaki na bango, ‘Monguna, moto moko, asali bongo.’ Balobaki na ye, ‘Boye, olingi biso tóbima mpe tólɔkɔta yango?’ Alobaki ete, ‘Te; noki te wana bozali kolɔkɔta matiti mabe, bokopikola blé elongo na yango. Bótika yango nyonso mibale ekola esika moko tii na bobuki mbuma; mpe na eleko ya kobuka mbuma nakoyebisa babuki-mbuma ete, Liboso bólɔkɔta matiti mabe mpe bókangisa yango mabokemaboke mpo na kotumba yango, na nsima bóbanda koyanganisa blé na kati ya ndako na ngai ya kobomba biloko.’”—Matai 13:24-30.
Yesu alobaki ete ye moko nde “moloni.” “Milona ya malamu” ezali bayekoli na ye ya solosolo. “Monguna” na ye ezali Satana Zabolo. “Matiti mabe” ezali baklisto ya lokuta oyo bakɔtaki na lisangá na ekeke ya liboso. Alobaki ete akotika “blé” mpe “matiti mabe” ekola nzela moko tii na “bobuki mbuma,” oyo ekozala na ‘bosukisi ya ebongiseli moko ya makambo.’ (Matai 13:37-43) Nyonso wana elimboli nini?
Lingomba ya boklisto ebebi
Ntango kaka bantoma nyonso basilaki kokufa, bateyi oyo bapɛngwaki bakómaki kobebisa lingomba. Bazalaki koloba “makambo oyo etɛngamá mpo na kobenda bayekoli bálanda bango.” (Misala 20:29, 30) Yango wana, baklisto mingi ‘batikaki kondima.’ ‘Babalukaki epai ya masapo ya lokuta.’—1 Timote 4:1-3; 2 Timote 4:3, 4.
Buku oyo tolobelaki (The New Dictionary of Theology) elobi lisusu ete, na ekeke ya minei ya ntango na biso (T.B.), “Lingomba ya Katolike ekómaki . . . lingomba ya Ampire ya Loma.” “Bakómaki kosangisa makambo ya lingomba ná ya Leta”—likambo oyo eyokanaki ata moke te na mateya ya baklisto ya liboso. (Yoane 17:16; Yakobo 4:4) Buku yango elobi ete nsima ya bambula, ebongiseli mobimba ya lingomba ná makambo na yango, bakisá mpe mateya na yango ya minene, ebongwanaki mpenza mpe ekómaki “makambo ya ndenge mosusu oyo esangisaki mateya ya Testamá ya Kala ná filozofi ya balandi ya Platon.” Lokola Yesu Klisto asakolaki, bayekoli na ye ya solo bazalaki lisusu koyebana mpenza te mpamba te baklisto ya lokuta bakómaki ebele.
Bato oyo bayokaki Yesu ntango azalaki koloba bayebaki ete ezali mpasi kokesenisa blé ná matiti mosusu ya mabe oyo ekokanaka na yango ntango ezali kokola. Na bongo, Yesu azalaki komonisa ete ekozala na eleko moko oyo bato bakoyeba te kokesenisa baklisto ya solo ná baklisto ya lokuta. Yango elingi koloba te ete lingomba ya boklisto ezalaki lisusu te, mpamba te Yesu alakaki ete akokoba kotambwisa bandeko na ye ya elimo “mikolo nyonso tii na bosukisi ya ebongiseli ya makambo.” (Matai 28:20) Yesu alobaki ete blé ekotika kokola te. Atako bongo, na bileko nyonso, baklisto ya solo, mokomoko to mwa etuluku, bazalaki kosala nyonso mpo na kolanda mateya ya Klisto. Kasi, ezalaki lisusu ebongiseli te oyo ezalaki komonana polele. Na ntembe te baklisto wana bakesanaki na bandimi ya mangomba ya lipɛngwi oyo ezalaki kobebisa nkombo ya Yesu Klisto na bileko wana nyonso.—2 Petelo 2:1, 2.
“Moto ya botyoli-mibeko amonisami”
Ntoma Paulo asakolaki likambo mosusu oyo esengelaki komonana na ebongiseli yango ya losambo ya lokuta. Akomaki boye: “Tiká ete moto moko te akosa bino ata na motindo nini, mpo [mokolo ya Yehova] ekoya te soki lipɛngwi eyei naino te mpe moto ya botyoli-mibeko amonisami te.” (2 Batesaloniki 2:2-4) ‘Moto yango ya botyoli-mibeko’ ezali nde bakonzi ya mangomba oyo bamitye na esika ya liboso na lisangá ya “boklisto.”a
Lipɛngwi ebandaki ntango ntoma Paulo azalaki naino awa na mabelé. Ntango bantoma, bato oyo bazalaki kokangela lipɛngwi nzela mpo epalangana te bakufaki, lipɛngwi yango eyaki lisusu makasi. Ntoma Paulo alobaki ete lipɛngwi yango ekomonana polele na “mosala ya Satana elongo na misala nyonso ya nguya mpe bilembo ya lokuta mpe makamwisi oyo ezali komonisa makambo oyo ekoya mpe na bokosi nyonso ezangi boyengebene.” (2 Batesaloniki 2:6-12) Maloba yango emonisi mpenza misala oyo bakonzi mingi ya mangomba basalaka banda kala!
Mpo na komonisa ete Lingomba ya Katolike nde lingomba ya solo, bakonzi na yango balobaka ete baepiskɔpɔ bazali “bakitani ya bantoma.” Nzokande, ata na esika moko te masolo ya kala mpe Biblia emonisi ete bantoma bazalaki na bakitani. Likambo moko te ezali kondimisa ete lingomba oyo ebimaki nsima ya liwa ya bantoma ya Yesu etambwisamaki na elimo santu ya Nzambe.—Baloma 8:9; Bagalatia 5:19-21.
Tokoloba boni mpo na mangomba mosusu oyo ebimaki nsima ya Réforme? Ezongisaki nde makambo ndenge ezalaki na lingomba ya boklisto ya ebandeli? Ezongisaki nde bopɛto ya lingomba ya boklisto ya ebandeli? Ezali solo ete nsima ya Réforme, Biblia ebongolamaki na ebele ya minɔkɔ ya bato. Kasi, masolo ya kala ezali komonisa ete mangomba ekobaki koteya mateya ya lokuta.b—Matai 15:7-9.
Kasi, tósimba likambo moko. Yesu Klisto asakolaki ete lingomba na ye ya solo ekomonana lisusu na bosukisi ya ebongiseli ya makambo. (Matai 13:30, 39) Kokokisama ya bisakweli ya Biblia ezali komonisa ete tozali sikoyo na ntango yango. (Matai 24:3-35) Yango wana, moto na moto asengeli komituna ete, ‘Lingomba yango ya solo ezali oyo wapi?’ Lingomba yango esengeli komonana polele na miso ya bato.
Mbala mosusu ozali kokanisa ete yo ozali na lingomba yango. Ezali mpenza na ntina otalela likambo yango malamumalamu. Mpo na nini? Mpamba te lingomba ya solo esengeli kozala kaka moko ndenge ezalaki na ekeke ya liboso. Osí ozwá ntango ya koluka koyeba soki lingomba na yo elandaka mpenza ndakisa ya lisangá ya boklisto ya ekeke ya liboso mpe soki elandaka mpenza mateya ya Yesu Klisto? Tolendisi yo otalela likambo yango sikoyo. Batatoli ya Yehova bakozala na esengo ya kosalisa yo.—Misala 17:11.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na kozwa ndimbola molai ya “moto ya botyoli-mibeko,” talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Febwali 1990, nkasa 10-14.
b Talá mokapo “La Réforme: Un nouveau tournant dans la recherche” na buku L’humanité à la recherche de Dieu, nkasa 306-328, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Bililingi na lokasa 5]
Lisese ya blé mpe matiti mabe eteyi biso nini mpo na lisangá ya solo?
[Bililingi na lokasa 7]
Lingomba na yo ezali mpenza kolanda ndakisa ya baklisto ya ekeke ya liboso na oyo etali kosakola mpe koyekola?