Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb18 Février lok. 3
  • Ndakisa ya blé mpe matiti mabe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndakisa ya blé mpe matiti mabe
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
  • Masolo mosusu
  • “Bayengebene bakongɛnga makasi lokola moi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • “Talá! Nazali elongo na bino mikolo nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Boklisto ya solo ekozala ndenge nini lobi?
    Lamuká!—2007
  • Lingomba ya boklisto ya solo se moko ezali mpenza
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
mwb18 Février lok. 3

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MATAI 12-13

Ndakisa ya blé mpe matiti mabe

Yesu asalelaki ndakisa ya blé mpe matiti mabe mpo na komonisa ndenge nini mpe ntango nini asengelaki koyanganisa blé nyonso; elingi koloba bakristo oyo batyami mafuta na elimo, kobanda na mobu 33 T.B.

Eleko ya kolona, kobuka mbuma, mpe koyanganisa na kati ya ndako ya kobomba biloko

13:24

‘Moto moko alonaki mboto ya malamu na elanga na ye’

  • Moloni: Yesu Kristo

  • Mboto ya malamu elonami: Bayekoli ya Yesu oyo batyami mafuta na elimo santu

  • Elanga: Mokili

13:25

“Ntango bato balalaki mpɔngi, monguna na ye ayaki kolona matiti mabe”

  • Monguna: Zabolo

  • Bato balalaki mpɔngi: Liwa ya bantoma

13:30

“Bótika yango nyonso mibale ekola esika moko tii na ntango ya kobuka mbuma”

  • Blé: Bakristo oyo batyami mafuta na elimo

  • Matiti mabe: Bakristo ya lokuta

“Liboso bópikola matiti mabe . . . ; na nsima bóbanda koyanganisa blé”

  • Baombo/​babuki-mbuma: Baanzelu

  • Matiti mabe oyo bapikoli: Bakristo ya lokuta bakabwani na bakristo oyo batyami mafuta na elimo

  • Koyanganisa blé na kati ya ndako ya kobomba biloko: Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bayanganisami na lisangá ya bokristo oyo epɛtolami

Ntango eleko ya kobuka mbuma ebandaki, nini ekesenisaki bakristo ya solo na bakristo ya lokuta?

Koyeba ndimbola ya ndakisa oyo ekosalisa ngai na nini?

OYEBAKI YANGO?

Blé ná matiti mabe ezali kokola elongo

Bato mingi balobaka ete matiti mabe oyo Yesu alobeli ezali molona moko ya pwazɔ oyo ekokanaka na blé ntango ebandi kokola. Ntango blé ná matiti mabe ezali kokola elongo, misisa na yango ekanganaka makasi yango wana ezalaka mpasi kolongola matiti mabe kozanga ete blé mpe epikwama. Kasi soki matiti mabe yango ekoli, ekesanaka mpenza na blé mpe kopikola yango ezalaka mpasi te.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto