Sanzolá Yehova “na kati ya koyangana”
MAKITA ya lisangá ezali ebongiseli ya Yehova oyo esalisaka basaleli na ye bázala ntango nyonso makasi na elimo. Koyangana pɔsɔ na pɔsɔ na makita emonisaka botɔndi na biso mpo na bibongiseli ya Yehova. Lisusu, yango epesaka biso nzela ya ‘kopusa [bandeko na biso] na kozala na bolingo mpe na misala ya malamu,’ oyo ezali lolenge malamu ya komonisana bolingo. (Baebele 10:24; Yoane 13:35) Kasi, ndenge nini tokoki kolendisa bandeko na biso na makita?
Pesáká biyano
Mokonzi Davidi akomaki boye: “Nakolakisa nkombo na yo epai ya bandeko na ngai, na kati ya koyangana nakosanzola yo.” “Kosanzola na ngai kati na koyangana monene euti na yo; nakokokisa ndaka na ngai liboso na bango baoyo bakotosaka ye.” “Nakotɔnda yo kati na koyangana monene mpe nakosanzola yo kati na bato mingi.” “Nasakoli boyengene kati na koyangana monene; talá nakokanga bibebu na ngai te.”—Nzembo 22:22, 25; 35:18; 40:9.
Na mikolo ya ntoma Paulo, ntango baklisto bazalaki koyangana mpo na losambo, bazalaki mpe koloba mpo na komonisa kondima na bango epai ya Yehova mpe kolobela nkembo na ye. Na ndenge yango, bazalaki kolendisana mpe kopusana na bolingo mpe na misala ya malamu. Na mikolo na biso, bankama ya bambula nsima ya Davidi mpe nsima ya Paulo, ‘tozali mpenza komona ete mokolo [ya Yehova] ekómi pene.’ (Baebele 10:24, 25) Lokola etikali moke ebongiseli ya makambo ya Satana ebomama, mikakatano mpe ezali se kobakisama. Lelo oyo, ‘tozali na mposa ya ezaleli ya koyika mpiko’ koleka ndenge ezalaki liboso. (Baebele 10:36) Soki bandeko na biso bazali kolendisa biso te na koyika mpiko, nani mosusu akosala yango?
Lelo oyo, se ndenge ezalaki na ntango ya kala, ezali na bibongiseli oyo ezali kopesa mondimi mokomoko libaku ya koloba mpo na komonisa kondima na ye “na kati ya koyangana.” Moko na bibongiseli yango ezali libaku malamu ya kopesa biyano na makita ya lisangá. Tótalela na lisɛki te malamu oyo eutaka na kopesa biyano. Na ndakisa, biyano oyo elobelaka ndenge ya kolonga mikakatano to kokima yango elendisaka ekateli ya bandeko ya kotosa mitinda ya Biblia. Biyano oyo elimbolaka bavɛrsɛ oyo batángi maloba na yango te to biyano oyo ezalaka na makanisi oyo tozwaki na mikanda mosusu ekoki kolendisa basusu na komipesa na koyekola.
Koyeba ete biyano oyo tozali kopesa na makita ekoki komemela biso moko mpe bandeko mosusu matomba esengeli kotinda Motatoli ya Yehova mokomoko na kolongola nsɔni to na kotika kokakatana. Ezali na ntina mingi ete bankulutu mpe basaleli na misala bápesaka biyano na makita, mpamba te bango nde basengeli kopesa ndakisa na likambo etali koyangana na makita mpe kopesa biyano. Kasi, ndenge nini moto na moto akoki kobongisa soki azali komona ete azali na mokakatano mpo na kopesa biyano, oyo ezali moko ya makambo oyo moklisto asengeli kokokisa?
Toli mpo na kobongisa
Kobosana te ete kopesa biyano ezali na kati ya losambo na biso epai ya Yehova. Ndeko mwasi moklisto moko ya Allemagne alobeli ndenge atalelaka likambo ya kopesa biyano na makita. “Na ndenge yango nde napesaka Satana eyano, ye oyo azali koluka kopekisa basaleli ya Nzambe báloba mpo na komonisa kondima na bango.” Ndeko mobali moko ya lisangá na bango oyo azwi batisimo sika alobi boye: “Nabondelaka mingi mpo napesaka biyano.”
Omibongisaka malamu. Soki oyekolaki te lisolo oyo bokotalela na makita, ezalaka mwa mpasi opesa biyano mpe, ata opesi yango, elendisaka mpenza te. Buku Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, na lokasa 70, epesi toli mpo na kopesa biyano na makita.a
Zwá mokano ya kopesa ata eyano moko na likita mokomoko. Yango ezali kosɛnga obongisa biyano mingi, mpamba te soki ozali kotombola mosapi mingi, nsukansuka ndeko oyo azali kotambwisa boyekoli akopona yo. Okoki ata koyebisa ye liboso motuna nini obongisi eyano na yango. Mingimingi yango ezali malamu mpo na bandeko ya sika. Atako okoki kokakatana mpo na kotombola mosapi “na koyangana monene,” soki bokómi na paragrafe oyo yo oponaki mpe oyebi ete ndeko oyo azali kotambwisa boyekoli akotala yo, yango ekopesa yo makasi ya kotombola mosapi.
Pesá eyano na ebandeli. Likambo oyo ozali komona ete ezali mpasi ekómaka pɛtɛɛ te mpo ozali kozongisa yango nsima. Kopesa eyano na ebandeli ya makita ekoki mpenza kosalisa yo. Okomona ete ekozala lisusu mpasi te opesa eyano mpo na mbala ya mibale to ya misato soki osí olongi kopesa mbala ya liboso.
Poná esika ya malamu mpo na kofanda. Bandeko mosusu bamonaka ete bakakatanaka mingi te mpo na kopesa eyano soki bafandi na bakiti ya liboso. Makambo oyo elongolaka likebi ezalaka mingi te, mpe ezali mwa mpasi mpo ndeko oyo azali kotambwisa amona bango te. Soki olandi toli yango, kobosana te koloba makasi mpo bato nyonso báyoka, mingimingi soki bozali na mikro te.
Yokáká malamu. Toli oyo ekosalisa yo ozongela te makambo oyo ndeko mosusu auti koloba. Lisusu, eyano oyo ndeko mosusu apesi ekoki kotinda yo okanisa vɛrsɛ moko to likanisi moko ya kolendisa oyo eyokani na likambo oyo euti kolobama. Na bantango mosusu, mwa ndakisa ya mokuse ekoki kolimbola likambo oyo bozali kolobela. Biyano ya ndenge yango ezalaka malamu mingi.
Salá makasi opesaka biyano na maloba na yo moko. Kotánga na mokanda ekoki komonisa ete omoni eyano, ekoki mpe kozala ndenge malamu ya kobanda kopesa biyano. Kasi, soki okómi kopesa biyano na maloba na yo moko, ekomonisa ete ozali kokanga ntina ya makambo. Ezali na ntina te kozongela maloba ndenge kaka ekomami na mokanda. Batatoli ya Yehova bazongelaka te makambo ndenge kaka ekomami na mikanda na bango.
Kobima na lisolo te. Ebongi te kopesa biyano oyo eyokani te na lisolo oyo bozali koyekola to oyo ezali kotika makanisi ya ntina. Elingi koloba ete biyano na yo esengeli koyokana mpenza na makambo oyo bozali koyekola. Biyano ya ndenge wana nde ekosala ete lisolo oyo bozali koyekola elendisa na elimo.
Zalá na mokano ya kolendisa. Lokola ntina mpenza oyo topesaka biyano ezali ya kolendisa basusu, tosengeli kosala makasi tólobaka te makambo oyo ekoki kolɛmbisa bango. Lisusu, esengeli te koloba makambo ya paragrafe mobimba mpo bato mosusu bázala mpe na likambo ya kobakisa. Biyano ya milaimilai mpe ya mindɔndɔmindɔndɔ ebungisaka bato oyo bazali koyoka. Biyano ya mokuse nde elekaka malamu, mpe yango nde elendisaka bato ya sika bápesa biyano na bango ya mikuse.
Mokumba ya bandeko oyo batambwisaka masolo
Na likambo etali kolendisa, ndeko oyo azali kotambwisa lisolo azalaka na mokumba monene. Na esika atya likebi na ye na makambo mosusu ntango moto azali kopesa eyano, asengeli koyoka eyano na ye malamumalamu mpe kotalaka ye ntango azali koloba. Ekozala mpenza malamu te soki ndeko oyo azali kotambwisa ayoki malamu te eyano oyo epesami mpe azongeli lisusu makambo oyo moto auti koloba to atuni lisusu motuna oyo bauti kopesela eyano!
Ezali mpe malamu te ete motambwisi azongelaka na maloba mosusu eyano oyo euti kopesama; yango emonisaka lokola nde eyano yango ezalaki malamu mpenza te. Nzokande, bayangani balendisamaka mpenza ntango maloba na ye ezali kotinda bandeko bálobela likanisi moko ya ntina. Mituna lokola, ‘Ndenge nini tokoki kosalela yango na lisangá na biso?’ to, ‘Vɛrsɛ nini ezali kondimisa likambo oyo ndeko auti koloba?’ etindaka bandeko bápesa biyano ya kolendisa, bábimisa makanisi ya ntina.
Ntango moto ya sika to ndeko oyo azalaka nsɔninsɔni apesi eyano, esengeli kopesa ye longonya. Mpo moto ya ndenge wana ayoka nsɔni te mpe motambwisi azwa likoki ya kopesa ye mwa makanisi mpo na kobongisa na esika oyo esɛngi kobongisa, akoki kosolola na ye nsima ya makita, kaka bango mibale.
Ntango bato basololaka, soki moto moko alingi ete báyokaka kaka ye, elɛmbisaka bamosusu. Elongolaka bamosusu mposa ya koloba. Na mitema na bango balobaka ete, ‘lobá na yo kaka.’ Ekoki mpe kosalema bongo soki ndeko oyo azali kotambwisa lisolo azali koloba mingi. Nzokande, motambwisi akoki ntango mosusu kotuna mwa mituna mpo na kotinda bayangani báloba mpe mpo na kosalisa bango bákanisa. Mituna ya ndenge wana esengeli koleka mingi te.
Motambwisi asengeli kaka te kopona moto ya liboso oyo atomboli mosapi. Yango ekoki kolɛmbisa bato oyo bazwaka mwa ntango mpo na kobongisa maloba oyo bakoloba. Soki motambwisi azali kozela mwa moke, akopesa moto oyo alobi naino te libaku ya koloba. Lisusu, asengeli kosalela bososoli mpo apona bana mike te na mituna oyo etaleli makambo oyo bakoki kokanga ntina na yango te.
Esengeli kosala nini soki ndeko moko apesi eyano ya malamu te? Motambwisi asengeli kosalela mayele mpo ayokisa ye nsɔni te. Eyano nyonso, ata soki ezali malamu te, ezalaka na mwa likanisi ya solo. Soki motambwisi asaleli mayele ya kobimisa likambo moko ya solo, to soki azongeli motuna na maloba mosusu, to soki abakisi motuna mosusu, akoki kobongisa eyano kozanga ete ayokisa moto nsɔni.
Mpo na kolendisa bandeko na kopesa biyano, motambwisi asengeli te kotuna mituna ya bongobongo lokola, ‘Nani azali na likanisi mosusu?’ Ntango mosusu motambwisi akoki kozala na makanisi malamu ntango azali kotuna motuna lokola, ‘Nani alobi naino te? Oyo ezali libaku ya nsuka!,’ kasi kotuna ndenge wana elendisaka mpenza moto te aloba. Esengeli te ete bandeko báyoka lokola nde basali mabe lokola bapesaki naino eyano te. Nzokande, esengeli kolendisa bango bábimisa makanisi oyo bazali na yango, mpamba te koloba emonisaka bolingo. Lisusu, ntango motambwisi aponi ndeko moko, ekozala malamu te koloba ete, “Nsima na ye, tokoyoka eyano ya Ndeko Songolo mpe na nsima makanisi ya Ndeko-mwasi Fulani.” Motambwisi asengeli naino koyoka eyano ya liboso mpe na nsima akotala soki ezali na ntina bandeko mosusu bábakisa makanisi.
Kopesa biyano ezali libaku malamu
Koyangana na makita ezali lisɛngami mpo na baklisto; kopesa biyano na makita yango ezali libaku malamu. Soki tozali kosangana na lolenge yango ya kosanzola Yehova “na kati ya koyangana,” tozali kolanda ndakisa ya Davidi mpe tozali kosalela mpenza toli ya Paulo. Kopesa biyano na makita emonisaka ete tolingaka bandeko na biso mpe ete tozali na kati ya ebongiseli monene ya Yehova. Esika nini mosusu okolinga kozala ‘lokola ozali komona mokolo yango ezali kokóma pene’?—Baebele 10:25.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Bililingi na lokasa 20]
Koyoka mpe kopesa biyano na makita ya lisangá ezali na ntina mingi
[Elilingi na lokasa 21]
Motambwisi ya boyekoli asengeli komonisa ete azali kosepela na biyano nyonso