Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/98 lok. 1
  • Tólendisana na kopesáká biyano na makita

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tólendisana na kopesáká biyano na makita
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Masolo mosusu
  • Sanzolá Yehova na lisangá
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Tólendisanaka na makita ya lisangá
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Sanzolá Yehova “na kati ya koyangana”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Biyano na mituna na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1998
km 11/98 lok. 1

Tólendisana na kopesáká biyano na makita

1 Baebele 10:24 elobi na biso ete ‘tólendisana na bolingo mpe na misala malamu.’ Yango elingi mpenza koloba ete tólendisana na kopesáká biyano bibongi wana toyangani na makita ya lisangá. Mpo na nini tosengeli kopesa biyano? Ndenge nini tokoki kosala yango? Nani akozwa matomba na yango?

2 Tókanisa naino mbala mingi oyo tozwaka matomba na biyano ya pɛtɛɛ mpe ya polele oyo ekolisaka bososoli na biso mpe oyo elendisaka biso na elimo. Tozali na libaku malamu ya kosala mpe bongo mpo na basusu. Na kopesáká biyano, tozali komonisa mposa na biso ya ‘kokabola mwa likabo ya elimo’ oyo ekolendisa bayangani nyonso.​—Lom. 1:11, 12.

3 Ndenge nini tokoki kopesa biyano ya malamu: Tosengeli kopɛngola biyano ya milaimilai oyo elobelaka makanisi nyonso ya paragrafe. Mbala mingi, biyano ya motindo wana ebimisaka likanisi ya polele te oyo eyokani na motuna. Biyano yango ekoki mpe kolɛmbisa bayangani mosusu oyo balingaki kopesa makanisi na bango. Eyano ya liboso oyo epesami esengeli kozala mokuse mpe kobimisa likanisi ya polele oyo eyokani na motuna. Biyano oyo ekolanda ekoki kobimisa makanisi ya bavɛrsɛ to komonisa boyokani na yango na lisolo. Talá Mokanda mpo na Eteyelo, nkasa 90-92.

4 Soki obangaka kopesa biyano, okoki kobongisa biyano ya mokuse mpe kosɛnga na motambwisi ya likita liboso ete apona yo opesa eyano na paragrafe oyo olingi. Soki osali bongo mbala mingi, okokóma na makoki ya kopesaka biyano. Omikundola ete Mose na Yilimia babangaki koloba liboso ya bato. (Ex. 4:10; Yil. 1:6, NW, maloba na nse ya lokasa) Kasi Yehova asalisaki bango ete báloba na nkombo na ye. Na bongo, akosalisa mpe biso.

5 Nani akozwa matomba na biyano na yo? Yo moko okozala moto ya liboso mpo na kozwa matomba, mpamba te biyano na yo ekosalisa yo ete solo etikala na makanisi na yo mpe na motema na yo. Yango ekosalisa yo ete omikundola yango nsima. Lisusu, bayangani mosusu bakozwa mpe matomba mpamba te biyano na yo ekolendisa bango. Ya solo, tolendisamaka na ntango bayangani nyonso, ezala baoyo baumeli mingi kati na solo, ezala bilenge, ezala bato ya nsɔninsɔni to bato ya sika, bazali kosala milende ya kolobela kondima na bango na makita ya lisangá.

6 Tomoni mpenza ete ‘liloba oyo elobami na ntango ekoki, ezali malamu mpenza’ soki elobami mpo na kolendisana na makita!​—Mas. 15:23.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto