Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/9 lok. 29
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Masolo mosusu
  • Bato bazali koluka likabo eleki malamu ya kopesa basusu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Koyoka esengo oyo eutaka na kopesa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Ozali na elimo ya kokaba?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • “Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/9 lok. 29

Mituna ya batángi

Na mikili mingi, bato bazalaka na momeseno ya kopesa bato oyo bazali kobalana makabo. Wapi mitinda ya Biblia oyo tosengeli kotalela ntango tozali kopesa to kozwa makabo yango?

Biblia epekisi te kopesa makabo soki ezali kosalema na makanisi malamu mpe na ntango oyo ebongi. Na likambo ya kopesa, Biblia elendisi baklisto bálanda ndakisa ya Yehova, Nzambe oyo akabaka mingi. (Yakobo 1:17) Ntoma Paulo alendisaki baninga na ye baklisto ete: “Bóbosana te kosala malamu mpe kokabela bamosusu biloko, mpo Nzambe asepelaka mpenza na bambeka ya ndenge wana.” Na yango, baklisto balendisami ete bákabaka.​—Baebele 13:16; Luka 6:38.

Na bamboka mosusu, bato oyo balingi kobalana basalaka liste ya biloko oyo bakosepela ete bandeko ná baninga na bango bápesa bango. Bayebisaka bango magazini nini bakoki kosomba biloko yango. Liste ya ndenge wana ekoki koyeisa makambo mosusu pɛpɛlɛ, na ndakisa mpo na kobɛtisa moto motó te na koluka eloko nini akopesa bato oyo bazali kobalana; ezali mpe kosalisa na kokabela bango te biloko oyo bakozala na mposa na yango te.

Bato oyo bazali kobalana bakotalela bango moko soki bakoki kosala liste ya ndenge wana to te. Nzokande, baklisto basengeli kokeba ete básala te makambo oyo eyokani te na mitinda ya Biblia. Na ndakisa, tokanisi boni soki bato oyo bazali kobalana basali liste ya biloko ya ntalo mingi? Na ntango wana, moto oyo azali na mbongo mingi te akokoka te kopesa bango likabo, to akomona ete eleki malamu akende na fɛti yango te mpo ayoka nsɔni te mpo amemi likabo ya ntalo moke. Moklisto moko ya mwasi akomaki boye: “Likambo ya makabo ebandi kokómela biso kilo mpenza. Liboso, nazalaki kosala makasi ya kopesa bato oyo babalani mwa eloko, kasi sikoyo, esengo ya kopesa oyo nazalaki koyoka ezalaka lisusu te.” Ezali malamu te ete libala ekóma kolɛmbisa bato mosusu nzoto!

Esengeli te ete bato oyo bazali kopesa makabo bákanisa ete makabo na bango ekondimama te soki basombi yango te na magazini moko boye to soki ezali na nse ya ntalo moko boye. Kutu, Yesu Klisto amonisaki ete Nzambe atalaka nde motema ya moto oyo azali kopesa, kasi te valɛrɛ ya eloko oyo azali kopesa. (Luka 21:1-4) Ndenge moko, mpo na makabo ya motema mawa epai ya baoyo bazali na bosɛnga, ntoma Paulo akomaki boye: “Tiká ete moto na moto asala ndenge akani na motema na ye, na komilela te to na kotindikama te, mpo Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.”​—2 Bakolinti 9:7.

Biblia elobi te ete ezali mabe soki bato oyo opesi likabo moko boye bayebi ete euti epai na yo, na ndakisa, ntango otye mwa mokanda pembeni ya likabo yango. Kasi, na bamboka mosusu, bazalaka na momeseno ya koyebisa na bato nyonso nani apesi likabo boye to boye. Momeseno wana ekoki kobimisa mindɔndɔ. Bato mosusu balingaka te ete soki bapesi likabo, eyebana na bato mosusu mpo bábenda likebi ya bato te. Bato yango balandaka etinda ya Yesu oyo ezali na Matai 6:3: “Kasi yo, ntango ozali kopesa makabo ya motema mawa, tiká te ete lobɔkɔ na yo ya mwasi eyeba oyo lobɔkɔ na yo ya mobali ezali kosala.” Bamosusu bamonaka ete likabo esengeli kotikala sɛkɛlɛ ya moto oyo apesi ná moto oyo azwi. Lisusu, soki bazali koyebisa bankombo ya bato, yango ekoki kosala ete bábanda kotalela nani apesi likabo kitoko to ya motuya koleka, mpe yango ekoki ‘kobimisa kowelana.’ (Bagalatia 5:26) Baklisto basengeli te kotánga liboso ya bato nyonso bankombo ya bato oyo bapesi makabo, mpamba te yango ekoki koyokisa bamosusu nsɔni.​—1 Petelo 3:8.

Soki tozali kolanda mitinda ya Liloba ya Nzambe, kopesa makabo ekotikala ntango nyonso likambo ya esengo.​—Misala 20:35.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto