Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/12 lok. 5
  • Koyoka esengo oyo eutaka na kopesa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Koyoka esengo oyo eutaka na kopesa
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini ata na Azia bazali kosepela Noele?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Noel Mpo na nini ezali na lokumu mingi na mboka Japon?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Eyenga ya Mbótama elimboli nini mpo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/12 lok. 5

Koyoka esengo oyo eutaka na kopesa

“Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”​—MISALA 20:35.

Ntina oyo bato mosusu basalaka fɛti ya Noele.

Ndenge Yesu amonisaki yango, kokaba epesaka esengo ezala epai ya moto oyo akabi to moto oyo bakabeli ye. Mpo na koyoka esengo yango, bato mingi bamonaka ete kopesa basusu bakado ezali moko ya makambo eleki ntina na Noele. Ankɛtɛ moko emonisi ete ata na ntango oyo nkita ekweaki na mbula oyo eleki, na ndakisa na Irlande, libota mokomoko ezalaki kokana kosalela mosolo ya dolare 660 mpo na bakado ya Noele.

Mokakatano ezali wapi?

Bato mingi bamonaka ete na esika bakado ya Noele epesa bango esengo, ebakiselaka bango nde mitungisi. Na ndenge nini? Bato mingi bamonaka ete basengeli kosomba ata bakado oyo bazali na makoki ya kosomba yango te. Lokola bato mingi bakendaka kosomba biloko bango nyonso na mbala moko, mingi bamonaka ete kosomba biloko na kati ya ebele wana ya bato epesaka bango nkanda.

Toli nini ya Biblia ekoki kosalisa?

Yesu alobaki boye: “Bópesaka.”a (Luka 6:38) Alobaki te ete esengeli kozela ntango moko boye oyo etyamá na mbula mpo na kokabela basusu. Yesu alendisaki bayekoli na ye bákabelaka basusu kozanga kotindikama, mpe esengeli kozala momeseno na bango.

“Moto na moto asala ndenge akani na motema na ye, na koimaima te to na kotindikama te, mpo Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.” (2 Bakorinti 9:7) Buku moko oyo elimbolaka maloba ya Biblia elobi ete likanisi ya toli ya Paulo ezali ete “esengeli te kopesa moto eloko na ‘kotindikama,’ komiyoka ete batindi yo na makasi ete opesa.” Kozala “moto oyo apesaka na esengo” epekisaka moto amona ete asengeli kokabela moto oyo ye ayebi, eloko oyo eyebani, mpe na ntango oyo eyebani; ndenge bato basalaka mpo na bakado ya Noele.

“Soki libosoliboso mposa makasi ezali, ekondimama mingi mpenza na kotalela oyo moto azali na yango, kasi te na kotalela oyo moto azali na yango te.” (2 Bakorinti 8:12) Nzambe asɛngaka te mokristo akɔta nyongo mpo na kosomba bakado ya ntalo mingi. Kutu, ntango moto apesi ‘na kotalela oyo azali na yango,’ likabo na ye ekozala malamu mpe “ekondimama mingi mpenza.” Ekeseni mpenza na bapiblisite oyo elekaka na eleko ya Noele, oyo elobaka ete “defá na yo, okofuta nsima!”

a Babiblia mosusu ebongoli liloba yango na: “pesá.” Nzokande, na grɛki vɛrbɛ yango epesaka likanisi ya kokoba kosala. Mpo na kobimisa mpenza likanisi ya maloba ya Yesu, Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika ebongoli yango na “bópesaka.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto