Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 15/9 nk. 15-20
  • Mpo na nini tosengeli kobondelaka ntango nyonso?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini tosengeli kobondelaka ntango nyonso?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kómá moninga ya Nzambe na nzela ya mabondeli
  • Mpo na nini “kobondela ntango nyonso”?
  • Lendendelá na mabondeli ata soki ozali kosala mabunga
  • Bondeláká ntango nyonso
  • Pusaná penepene na Nzambe na libondeli
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Lolenge nini okoki kobɛlɛma epai na Nzambe
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • “Tiká ete masɛngi na bino eyebana epai ya Nzambe”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Kobondela Nzambe ezali likambo ya lokumu monene
    Makambo oyo Biblia eteyaka
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 15/9 nk. 15-20

Mpo na nini tosengeli kobondelaka ntango nyonso?

“Bóbondelaka ntango nyonso. Na makambo nyonso bópesaka matɔndi.”​—1 BATESALONIKI 5:17, 18.

1, 2. Ndenge nini Danyele amonisaki ete azalaki kosepela na libaku malamu ya kobondela, mpe kobondela yango esalaki nini na boyokani na ye na Nzambe?

MOSAKOLI Danyele azalaki kobondela Nzambe mbala misato na mokolo. Azalaki kofukama na lininisa ya shambre na ye ya likoló oyo etalaki na ngámbo ya Yelusaleme, mpe azalaki kobondela. (1 Mikonzi 8:46-49; Danyele 6:10) Ata ntango mobeko moko ya mokonzi elobaki ete bato bábondela nzambe mosusu te, bábondela kaka Dalio, mokonzi ya Bamede, Danyele akakatanaki ata moke te kokoba na momeseno na ye. Ezala likambo yango ekotya bomoi na ye na likama to te, moto yango oyo amipesaki na mabondeli azalaki kotika te kobondela Yehova.

2 Ndenge nini Yehova azalaki kotalela Danyele? Ntango anzelu Gabiliele akendaki kopesa eyano na libondeli moko ya Danyele, abengaki mosakoli yango moto oyo ‘alingami mingi.’ (Danyele 9:20-23) Na esakweli ya Ezekiele, Yehova abengaki Danyele moyengebene. (Ezekiele 14:14, 20) Mabondeli oyo Danyele azalaki kosala na bomoi na ye esalaki ete akóma na boyokani makasi na Nzambe; Dalio mpe amonaki likambo yango.​—Danyele 6:16.

3. Lokola lisolo ya misionɛrɛ moko emonisi yango, ndenge nini libondeli ekoki kosalisa biso na kotikala sembo?

3 Kobondela ntango nyonso ekoki mpe kosalisa biso tóyika mpiko ntango tomekami makasi. Tótala ndakisa ya Harold King, oyo azalaki misionɛrɛ na Chine, epai bakatelaki ye etumbu ya bolɔkɔ ya mbula mitano na esika moko oyo azalaki kaka ye moko. Ndeko King alobaki boye: “Bakabolaki ngai na bandeko na ngai, kasi moto moko te akokaki kokabola ngai na Nzambe. . . . Yango wana, na miso ya moto nyonso oyo akokaki koleka liboso ya ndako na ngai ya bolɔkɔ, nazalaki kofukama mbala misato na mokolo mpe kobondela na mongongo makasi; nazalaki kokanisa Danyele, oyo Biblia elobeli. . . . Na mabaku wana, elimo ya Nzambe ezalaki komema makanisi na ngai na makambo oyo ezali mpenza na litomba mpe ezalaki kopesa ngai kimya ya motema. Libondeli ezalaki mpenza kopesa ngai makasi na elimo mpe kobɔndisa ngai!”

4. Mituna nini etaleli libondeli tokolobela na lisolo oyo?

4 Biblia elobi ete: “Bóbondelaka ntango nyonso. Na makambo nyonso bópesaka matɔndi.” (1 Batesaloniki 5:17, 18) Na boyokani na toli yango, tótalela mituna oyo: Mpo na nini esengeli tótalela mabondeli na biso? Mpo na bantina nini tosengeli kobondelaka Yehova ntango nyonso? Mpe tosengeli kosala nini soki tokanisi ete tobongi te kobondela Nzambe mpo tosalaki mabunga?

Kómá moninga ya Nzambe na nzela ya mabondeli

5. Libondeli epesaka biso nzela ya kosala boninga nini oyo ekokani na mosusu te?

5 Okolinga ete Yehova abenga yo moninga na ye? Alobaki ete Abalayama azali moninga na ye. (Yisaya 41:8; Yakobo 2:23) Yehova alingi biso tókóma baninga na ye. Azali kosɛnga biso tópusana penepene na ye. (Yakobo 4:8) Tomoni te ete maloba wana esengeli kotinda biso na kotalela malamu libaku oyo tozali na yango ya kobondela? Ezalaka mpasi mingi mpo na kozwa libaku ya kosolola na mokonzi moko ya Leta, mpe ezalaka mpasi koleka kokóma moninga na ye! Kasi, Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba azali kolendisa biso tópusana penepene na ye na nzela ya libondeli, na ntango nyonso oyo tolingi to tosepeli kosala yango. (Nzembo 37:5) Kobondela ntango nyonso esalisaka biso tókóma baninga ya motema ya Yehova.

6. Ndakisa ya Yesu ezali koteya biso nini na oyo etali mposa ya “kobondela ntango nyonso”?

6 Kasi, ezali mpasi te tókóma na bopɔtu mpo na kobondela! Mitungisi ya bomoi ya mokolo na mokolo ekoki kotinda biso tókanisaka mingi makambo mosusu mpe tótika kosala molende ya kosolola na Nzambe. Yesu alendisaki bayekoli na ye ‘bábondelaka ntango nyonso,’ mpe ye moko azalaki kosala yango. (Matai 26:41) Atako azalaki ntango nyonso na ebele ya makambo ya kosala kobanda ntɔngɔ tii butu, azalaki koluka ntango ya kosolola na Tata na ye ya likoló. Ntango mosusu Yesu azalaki kolamuka “ntɔngɔntɔngɔ, ntango molili ezalaki naino” mpo na kobondela. (Malako 1:35) Na bantango mosusu, azalaki koluka esika oyo akozala kaka ye moko na mpokwa mpo na kosolola na Yehova. (Matai 14:23) Yesu azalaki ntango nyonso kozwa ntango mpo na kobondela, biso mpe tosengeli kosalaka bongo.​—1 Petelo 2:21.

7. Makambo nini esengeli kotinda biso na kosolola na Tata na biso ya likoló mokolo na mokolo?

7 Mokolo na mokolo, ntango malamu mpo na kobondela biso moko emonanaka mbala ebele, ntango tozali kokutana na mikakatano, komekama, to kozwa bikateli. (Baefese 6:18) Soki tozali koluka toli ya Nzambe na makambo nyonso ya bomoi na biso, boninga na biso na ye ekokola. Soki baninga mibale bakutani na mikakatano elongo, boninga na bango ekómaka lisusu makasi! (Masese 17:17) Ezali mpe bongo ntango tozali komitika na mabɔkɔ ya Yehova mpe tozali komona ndenge azali kosalisa biso.​—2 Ntango 14:11.

8. Ndakisa ya Nehemia, ya Yesu, mpe ya Hana, ezali koteya biso nini na oyo etali bolai ya mabondeli na biso?

8 Tokoki mpenza kosepela ete Nzambe akateli biso te bolai mpe motángo ya mabondeli oyo tokoki kosala epai na ye! Nehemia asalaki libondeli mokuse na nse ya motema liboso asɛnga mokonzi ya Perse likambo moko. (Nehemia 2:4, 5) Yesu mpe asalaki libondeli ya mokuse ntango asɛngaki Yehova apesa ye nguya ya kosekwisa Lazalo. (Yoane 11:41, 42) Nzokande, Hana ‘asalaki libondeli molai epai ya Yehova’ ntango azalaki koyebisa ye likambo oyo ezalaki kotungisa ye. (1 Samwele 1:12, 15, 16, NW) Mabondeli na biso ekoki kozala mokuse to molai na kotalela mposa oyo tozali na yango mpe esika oyo tozali.

9. Mpo na nini na mabondeli na biso tosengeli mpe kosanzola mpe kotɔnda Yehova mpo na nyonso oyo azali kosalela biso?

9 Mabondeli mingi oyo ezali na Biblia ezali komonisa botɔndi mpo na esika eleki likoló ya Yehova mpe mpo na misala na ye ya kokamwa. (Exode 15:1-19; 1 Ntango 16:7-36; Nzembo 145) Na emonaneli moko, ntoma Yoane amonaki bankulutu 24​—motuya mobimba ya baklisto bapakolami na likoló​—bazali kosanzola Yehova ete: “Yehova, ɛɛ Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya, mpamba te yo ozalisaki biloko nyonso, mpe mpo na mokano na yo yango ezalaki mpe ezalisamaki.” (Emoniseli 4:10, 11) Biso mpe tozali na ntina ya kokumisa Mozalisi na biso ntango nyonso. Baboti bayokaka esengo mingi ntango bana na bango bazali kopesa bango botɔndi euti na motema mpo na likambo moko oyo basaleli bango! Kokanisa boboto ya Yehova mpe kotɔnda ye mpo na yango ezali ndenge ya malamu ya kobongisa mabondeli na biso.

Mpo na nini “kobondela ntango nyonso”?

10. Ndenge nini libondeli elendisaka kondima?

10 Kobondela ntango nyonso ezali na ntina mingi mpo na kondima na biso. Nsima ya komonisa ntina “ya kobondela ntango nyonso mpe ya kolɛmba te,” Yesu atunaki boye: “Ntango Mwana ya moto akoya, akokuta mpenza kondima awa na mabelé?” (Luka 18:1-8) Mabondeli ya solosolo, oyo euti mpenza na motema, elendisaka kondima. Ntango Abalayama akómaki mobange kasi azalaki naino na mwana te, ayebisaki Nzambe likambo yango. Yehova apesaki ye eyano mpe alobaki na ye naino ete atala likoló mpe atánga minzoto soki akokoka. Na nsima, Nzambe alobaki na Abalayama ete: “Bana na yo bakozala na motuya bongo.” Nini esalemaki? Abalayama “andimaki [Yehova], mpe ye atángelaki ye yango lokola boyengebene.” (Genese 15:5, 6) Soki tofungoleli Yehova mitema na biso na nzela ya libondeli, tondimi bilaka oyo apesi na kati ya Biblia, mpe totosi ye, akolendisa kondima na biso.

11. Ndenge nini libondeli ekoki kosalisa biso na kolonga mikakatano?

11 Libondeli ekoki mpe kosalisa biso na kolonga mikakatano. Bomoi na biso ezali nde mpasi mingi mpe tozali kokutana na ebele ya mikakatano? Biblia elobi na biso boye: “Kitisá mokumba na yo epai na [Yehova] mpe ye akokumba yo; libela ye akotika te ete moyengebene atelengana.” (Nzembo 55:22) Ntango tolingi kozwa bikateli ya minene, tokoki kolanda ndakisa ya Yesu. Alekisaki butu mobimba na kobondela ye moko liboso apona bantoma na ye 12. (Luka 6:12-16) Na butu oyo ezalaki liboso ya liwa na ye, Yesu abondelaki makasi mpe “motoki na ye ekómaki lokola matangá ya makila oyo ezalaki kokwea na nse.” (Luka 22:44) Esukaki ndenge nini? “Andimamaki mpo na ezaleli na ye ya kobanga Nzambe.” (Baebele 5:7) Soki tozali kobondela na etingya mpe ntango nyonso, yango ekosalisa biso na kolonga bampasi mpe mikakatano.

12. Na ndenge nini libondeli ezali komonisa ete Yehova atyelaka biso likebi?

12 Ntina mosusu ya kopusana penepene na Yehova na nzela ya libondeli ezali ete ye mpe, na nsima, akopusana penepene na biso. (Yakobo 4:8) Ntango tofungoleli Yehova motema na biso na libondeli, tomonaka mpenza ete amibanzabanzaka mpo na bamposa na biso mpe atyelaka biso likebi, boye te? Mokomoko na biso amonaka bolingo ya Nzambe. Yehova apesi moto mosusu te mokumba ya koyoka mabondeli nyonso oyo basaleli na ye basalaka epai na ye Tata na bango ya likoló. (Nzembo 66:19, 20; Luka 11:2) Azali mpe kosɛnga biso ‘tóbwaka mitungisi na biso nyonso likoló na ye, mpamba te ye atyelaka biso likebi.’​—1 Petelo 5:6, 7.

13, 14. Wapi bantina oyo tozali na yango ya kobondelaka ntango nyonso?

13 Libondeli ekoki kobakisa molende na biso na mosala ya kosakola mpe kolendisa biso ntango tobandi kolɛmba mpo tozali kokutana na bato oyo bazali kosepela na nsango malamu te to bazali kotɛmɛla biso. (Misala 4:23-31) Libondeli ekoki mpe kobatela biso na “mayele mabe ya Zabolo.” (Baefese 6:11, 17, 18) Ntango tozali kobunda na mikakatano ya mokolo na mokolo, tokoki ntango nyonso kosɛngaka Nzambe alendisa biso. Libondeli ya ndakisa oyo Yesu ateyaki elobeli mpe kosɛnga Yehova ‘abikisa biso longwa na moto mabe,’ Satana Zabolo.​—Matai 6:13.

14 Soki tozali kokoba kobondela mpo na kosɛnga lisalisi mpo na kolonga bamposa na biso ya mabe, Yehova akosalisa biso. Tozali na elikya oyo: “Nzambe azali sembo, mpe akotika te ete bómekama koleka oyo bokoki kokangela motema, kasi nzela moko na komekama akobongisela mpe bino nzela ya kobimela mpo bózala na likoki ya koyikela yango mpiko.” (1 Bakolinti 10:13) Ye moko ntoma Paulo amonaki ndenge oyo Yehova abatelaki ye mpe alendisaki ye na makambo ndenge na ndenge. Alobaki boye: “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.”​—Bafilipi 4:13; 2 Bakolinti 11:23-29.

Lendendelá na mabondeli ata soki ozali kosala mabunga

15. Nini ekoki kosalema ntango tosali likambo moko ya mabe na miso ya Nzambe?

15 Mpo Nzambe ayoka mabondeli na biso, tosengeli koboya te toli ya Liloba na ye. Ntoma Yoane akomaki boye: “Nyonso oyo tozali kosɛnga tozali kozwa yango epai na ye, mpamba te tozali kotosa bakomandema na ye mpe tozali kosala makambo oyo esepelisaka ye.” (1 Yoane 3:22) Kasi, nini ekoki kosalema soki tosali likambo moko ya mabe na miso ya Nzambe? Adama ná Eva bamibombaki nsima ya kosala lisumu na elanga ya Edene. Biso mpe tokoki koluka komibomba “na elongi ya [Yehova]” mpe kotika kobondela. (Genese 3:8) Klaus, mokɛngɛli-motamboli moko oyo aumeli na mosala yango, alobaki boye: “Namoni ete mingimingi, libunga ya liboso oyo bato oyo batikaki Yehova mpe ebongiseli na ye basalaki ezali kotika kobondela.” (Baebele 2:1) Likambo yango ekómelaki José Ángel. Alobi boye: “Na boumeli ya mbula soki mwambe, nazalaki mpenza kobondela Yehova te. Nazalaki komona ete nabongi te kosolola na ye, atako nazalaki komona ete azali kaka Tata na ngai ya likoló.”

16, 17. Pesá bandakisa oyo emonisi ete kobondela ntango nyonso ekoki kosalisa mpo na kolonga bolɛmbu ya elimo.

16 Bamosusu kati na biso bakoki komona ete babongi kobondela te mpo na bolɛmbu ya elimo to mpo bakweaki na mabe. Kasi, ezali mpenza na ntango yango nde tosengeli kobondela mingi. Yona akimaki mokumba oyo bapesaki ye. Kasi, ‘abyangaki epai ya Yehova mpo na mpasi na ye, mpe Yehova azongiselaki ye; longwa na libumu ya ewelo Yona agangaki, mpe Yehova ayokaki mongongo na ye.’ (Yona 2:2) Yona abondelaki, Yehova ayokaki libondeli na ye, mpe Yona akómaki lisusu malamu na elimo.

17 José Ángel mpe abondelaki makasi mpo na kosɛnga lisalisi. Alobi boye: “Nafungolaki motema na ngai epai ya Nzambe mpo na kosɛnga ye bolimbisi. Mpe asalisaki ngai. Nandimi te ete nakokaki kozonga na lisangá soki nabondelaki te. Sikoyo, nakómá kobondela mbala mingi na mokolo, mpe nayokaka mposa ete ngonga na ngai ya kobondela ekoka.” Tosengeli kobangaka te kosolola polele na Nzambe mpo na mabunga na biso mpe kosɛnga ye bolimbisi. Ntango Mokonzi Davidi ayambolaki masumu na ye, Yehova alimbisaki ye. (Nzembo 32:3-5) Yehova alukaka kosalisa biso, kasi te kopesa biso etumbu. (1 Yoane 3:19, 20) Lisusu, mabondeli ya bankulutu na lisangá ekoki kosalisa biso na elimo, mpamba te mabondeli ya ndenge wana ezali “na bokasi mingi.”​—Yakobo 5:13-16.

18. Basaleli ya Nzambe bakoki kozala na elikya nini ata soki bapɛngwaki mpenza?

18 Tata nini akoki koboya mwana na ye oyo asalaki libunga soki amikitisi mpe ayei koluka lisalisi mpe toli? Ndakisa ya mwana ya kilikili ezali komonisa ete ata soki topɛngwaki mpenza, Tata na biso ya likoló asepelaka ntango tozongi epai na ye. (Luka 15:21, 22, 32) Yehova azali kosɛnga bato oyo basali mabunga bábelela ye, “zambi akolimbisa na solo.” (Yisaya 55:6, 7) Atako Davidi asalaki masumu ya minene, abondelaki Yehova ete: “Ee Nzambe, tyá litoi na yo epai na libondeli na ngai mpe komibomba te wana nakolɔmba yo.” Alobaki lisusu ete: “Na ntango ya mpokwa mpe na ntɔngɔ mpe na moi makasi nakolela mpe nakoganga; [Yehova] akoyoka mongongo na ngai.” (Nzembo 55:1, 17) Maloba yango ezali mpenza kokitisa motema!

19. Soki tozali komona lokola nde Nzambe azali koyoka mabondeli na biso te, mpo na nini tosengeli te kokanisa mbala moko ete azali kosepela na biso te?

19 Ezali boni soki tozali kozwa eyano noki te na mabondeli na biso? Na ntango yango tosengeli koluka koyeba soki mabondeli na biso eyokani na mokano ya Yehova mpe soki tozali kosala yango na nkombo ya Yesu. (Yoane 16:23; 1 Yoane 5:14) Yakobo alobaki ete baklisto mosusu bazalaki kozwa biyano te na mabondeli na bango mpamba te bazalaki “kosɛnga na mokano ya mabe.” (Yakobo 4:3) Epai mosusu, ntango tozali komona lokola nde Nzambe azali koyoka mabondeli na biso te, tosengeli te kokanisa mbala moko ete azali kosepela na biso te. Yehova akoki ntango mosusu kotika ete basambeli na ye ya sembo bákoba kobondela mpo na likambo moko mwa ntango molai liboso apesa eyano. Yesu alobaki ete: “Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino yango.” (Matai 7:7) Yango wana, tosengeli ‘kotingama na mabondeli.’​—Baloma 12:12.

Bondeláká ntango nyonso

20, 21. (a) Na “mikolo ya nsuka” oyo, mpo na nini tosengeli kobondelaka ntango nyonso? (b) Tokozwa nini soki mokolo na mokolo tozali kopusana na kiti ya bokonzi ya boboto monene ya Yehova?

20 Na “mikolo ya nsuka” oyo ezali “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza,” mitungisi mpe mikakatano ezali se kobakisama. (2 Timote 3:1) Lisusu, komekama ekoki kotungisa makanisi na biso. Nzokande, soki tozali kobondela ntango nyonso, ekosalisa biso tótya likebi na biso na makambo ya elimo ata soki tokutani na mikakatano, komekama, mpe tolɛmbi nzoto. Mabondeli oyo tozali kosala epai ya Yehova mokolo na mokolo ekoki kopesa biso lisungi oyo tosengeli na yango.

21 Yehova, ye oyo ‘ayokaka mabondeli,’ azangaka ntango te ya koyoka biso. (Nzembo 65:2) Yango wana, biso mpe tózangaka te ntango ya kosolola na ye. Boninga na biso na Nzambe nde eloko eleki motuya oyo tozali na yango. Tótalela yango kaka bongobongo te. “Na yango, tiká tópusana na elobeli ya polele penepene na kiti ya bokonzi ya boboto monene, mpo tóyokelama mawa mpe tózwa boboto monene mpo na kosalisama na ntango oyo ekoki.”​—Baebele 4:16.

Okopesa eyano nini?

• Liteya nini tozwi epai ya mosakoli Danyele na oyo etali motuya ya libondeli?

• Ndenge nini tokoki kolendisa boninga na biso na Yehova?

• Mpo na nini tosengeli kobondelaka ntango nyonso?

• Mpo na nini komimona ete tobongi te esengeli te kopekisa biso kobondela Yehova?

[Elilingi na lokasa 16]

Nehemia asalaki libondeli mokuse na nse ya motema liboso aloba na mokonzi

[Elilingi na lokasa 17]

Hana ‘asalaki libondeli molai epai ya Yehova’

[Bililingi na lokasa 18]

Yesu abondelaki butu mobimba liboso apona bantoma 12

[Bililingi na lokasa 20]

Na boumeli ya mokolo tozwaka ebele ya mabaku ya kobondela

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto