Tokoki kolikya ete Nzambe akosala nini?
NA EKEKE ya mwambe liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Hizikiya, mokonzi ya Yuda, azalaki na mbula 39; bayebisaki ye ete maladi oyo azalaki na yango ekoboma ye. Lokola nsango yango ebangisaki Hizikiya mingi, abondelaki Nzambe makasi abikisa ye. Nzambe ayanolaki ye na nzela ya mosakoli na ye ete: “Nayoki libondeli na yo. Namoni mpisoli na yo. Talá nazali kobakisela yo mbula zomi na mitano.”—Yisaya 38:1-5, NW.
Mpo na nini Nzambe asalisaki Hizikiya na libaku wana? Bankama ya bambula liboso, Nzambe alakaki Davidi, mokonzi ya sembo ete: “Libota na yo mpe bokonzi na yo ekobongisama liboso na yo libela; kiti ya bokonzi na yo ekokokisama seko.” Lisusu, Nzambe ayebisaki ete Masiya akozala nkɔkɔ ya Davidi. (2 Samwele 7:16; Nzembo 89:20, 26-29; Yisaya 11:1) Ntango Hizikiya abɛlaki, azalaki naino na mwana te. Boye, likama ezalaki ete moto ya libota ya Davidi oyo akoki kozwa bokonzi akozala te. Nzambe asalisaki Hizikiya mpo na kobatela molɔngɔ ya libota epai Masiya asengelaki kobotama.
Mpo na kokokisa bilaka na ye, Yehova azalaki mbala na mbala kobatela libota na ye liboso Klisto abotama. Mpo na kolongwa ya Yisalaele na boombo na Ezipito, Moize alobaki boye: “Ezali mpo ete [Yehova] alingi bino, mpe azali kokokisa ndai oyo esimbelaki ye batata na bino ete [Yehova] abimisaki bino na lobɔkɔ ya nguya.”—Deteronome 7:8.
Na ekeke ya liboso, Nzambe azalaki mpe kosala mpo kokokisa mikano na ye. Na ndakisa, na nzela ya Damasi, Moyuda moko na nkombo Saulo amonaki emonaneli moko mpo atika konyokola bayekoli ya Klisto. Kobongwana ya mobali yango, oyo bakómaki kobenga ntoma Paulo, esalisaki mpenza mpo nsango malamu esakolama epai ya bato ya bikólo mosusu.—Misala 9:1-16; Baloma 11:13.
Nzambe azalaki mbala nyonso kosala?
Nzambe azalaki kosala mbala nyonso to kaka na bantango mosusu? Biblia emonisi polele ete Nzambe azalaki kosala ntango nyonso te. Atako Nzambe abikisaki bilenge Baebele misato na litumbu ya mɔtɔ mpe abikisaki mosakoli Danyele na libulu ya bankɔsi, abikisaki basakoli mosusu te na liwa. (2 Ntango 24:20, 21; Danyele 3:21-27; 6:16-22; Baebele 11:37) Petelo abimisamaki na ndenge ya likamwisi na bolɔkɔ oyo Elode Akalipa I atyaki ye. Kasi, kaka mokonzi yango abomaki ntoma Yakobo, mpe Nzambe abikisaki ye te. (Misala 12:1-11) Atako Nzambe apesaki bantoma nguya ya kobikisa bato ya maladi, ata mpe ya kosekwisa bakufi, andimaki te kolongola “nzubɛ moko na kati ya mosuni,” oyo ekoki kozala maladi moko, oyo ezalaki kotungisa ntoma Paulo.—2 Bakolinti 12:7-9; Misala 9:32-41; 1 Bakolinti 12:28.
Nzambe asalaki eloko te mpo na kopekisa Amperɛrɛ Néron konyokola bayekoli ya Klisto. Banyongaki baklisto, batumbaki bango mpe babwakaki bango na bisika oyo banyama mabe ezalaki. Kasi, bayekoli ya ekeke ya liboso bazalaki kokamwa na botɛmɛli yango te, mpe esalaki te ete bátika kondima ete Nzambe azali. Kutu, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete bakomema bango na batribinale mpe ete basengeli konyokwama, ata mpe kokufa, mpo na kondima na bango.—Matai 10:17-22.
Kaka ndenge azalaki kobikisa basaleli na ye ya kala, Nzambe azali na likoki ya kobikisa basaleli na ye ya lelo oyo na makama, mpe esengeli te kobɛta ntembe ntango bamosusu balobi ete bamonaki ete Nzambe abatelaki bango. Nzokande, ezali mpasi mpo na koyeba soki Nzambe abatelaki to abatelaki te na makambo ya ndenge wana. Ebele ya basaleli ya sembo ya Yehova bazwaki likama ntango izini moko ezikaki na Toulouse, mpe bankóto ya baklisto bakufaki na bakaa ya Banazi mpe ya Bakoministe to na makama mosusu ya nsɔmɔ, kozanga ete Nzambe apekisa yango. Mpo na nini Nzambe abatelaka te bato oyo asepelaka na bango na likambo mokomoko oyo ekómelaka bango?—Danyele 3:17, 18.
“Ntango mpe likambo ya mbalakaka”
Ntango likama moko esalemi, ekoki kozwa moto nyonso, mpe yango ekipaka te soki moto azali sembo epai ya Nzambe to te. Ntango izini ezikaki na Toulouse, Alain ná Liliane babikaki, kasi bato 30 bakufaki mpe bankóto ya bato mosusu bazwaki makama, atako basalaki likambo moko ya mabe te. Na mokili mobimba, bato mabe bazali koboma bankóto na bankóto ya bato, bato mosusu bazali kokufa na makama ya mituka to mpe na bitumba, mpe tokoki koloba te ete ezali foti ya Nzambe. Biblia eyebisi biso ete “ntango mpe likambo ya mbalakaka ekómelaka” moto nyonso.—Mosakoli 9:11, NW.
Longola yango, bato babɛlaka, banunaka mpe bakufaka. Atako bato oyo bamonaki ete Nzambe abikisaki bango na makama na ndenge ya likamwisi to mpe balobaki ete Nzambe nde abikisaki bango na maladi oyo bakokaki kobika na yango te, nsukansuka bakufaki. Ntango ekoki naino te mpo ‘maladi mpe liwa elongolama’ mpe ‘mpisoli nyonso epangwisama’ na miso ya bato.—Emoniseli 21:1-4.
Mpo makambo yango esalema, esengeli likambo moko ya monene koleka esalema. Biblia ezali kolobela “mokolo monene ya [Yehova].” (Sefania 1:14) Na mokolo oyo Nzambe akosala likambo monene wana, akolongola mabe nyonso. Bato bakozwa likoki ya kozala libela na libela na bomoi ya kokoka; na bomoi yango “makambo ya liboso makokanisama te, makoya mpe na motema te.” (Yisaya 65:17) Ata mpe bato oyo bakufá akozongisa bango na bomoi, mpe na bongo, likambo oyo ezali komonisa bato mpasi koleka makambo mosusu nyonso ekosuka. (Yoane 5:28, 29) Na bolingo mpe malamu na ye oyo ezangi nsuka, Nzambe akosilisa mikakatano nyonso ya bato mpo na libela.
Ndenge Nzambe azali kosala lelo oyo
Makambo oyo touti koloba emonisi te ete Nzambe atalaka kaka na miso ntango bikelamu na ye bazali kobunda na bampasi. Lelo oyo, Nzambe azali kopesa bato ya bikólo nyonso mpe ya lolenge nyonso libaku ya koyeba ye mpe kokóma baninga na ye mpenza. (1 Timote 2:3, 4) Yesu alobelaki likambo yango na maloba oyo: “Moto moko akoki koya epai na ngai te soki Tata, oyo atindaki ngai, abendi ye te.” (Yoane 6:44) Nzambe azali kobenda bato ya mitema sembo epai na ye na nzela ya nsango ya Bokonzi oyo basaleli na ye bazali kosakola na mokili mobimba.
Longola yango, Nzambe ye moko atambwisaka bomoi ya bato oyo bazali kondima ete atambwisa bango. Na lisalisi ya elimo santu, Nzambe azali ‘kofungola mitema na bango’ mpo báyeba mokano na ye mpe bákokisa masɛngami na ye. (Misala 16:14) Ya solo, ntango Nzambe azali kopesa biso libaku ya koyeba ye, ya koyeba Liloba na ye mpe mikano na ye, azali mpenza komonisa ete amibanzabanzaka na bolingo nyonso mpo na mokomoko na biso.—Yoane 17:3.
Ya nsuka, lelo oyo Nzambe azali mpe kobikisa basaleli na ye, kasi na ndenge ya makamwisi te; azali nde kopesa bango elimo na ye mpe “nguya oyo eleki makasi” mpo báyikela likambo nyonso oyo bakutani na yango mpiko. (2 Bakolinti 4:7) Ntoma Paulo akomaki boye: “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya [Yehova Nzambe,] moto oyo apesaka ngai nguya.”—Bafilipi 4:13.
Na yango, tozali mpenza na ntina ya komonisa botɔndi epai ya Nzambe mokolo na mokolo mpo na bomoi oyo apesi biso mpe mpo na elikya ya kozala na bomoi libela na libela na mokili oyo ezangi mikakatano. Mokomi ya nzembo alobaki boye: “Nakopesa Yehova nini mpo na mapamboli na ye nyonso epai na ngai? Nakotombola nkɛni ya lobiko monene, mpe nakobelela nkombo ya Yehova.” (Nzembo 116:12, 13, NW) Soki ozali mbala na mbala kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, okoyeba nini Nzambe así asali, nini azali kosala mpe nini akosala na mikolo ezali koya mpe yango ekomemela yo esengo sikoyo mpe elikya makasi mpo na mikolo ezali koya.—1 Timote 4:8.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]
“Makambo ya liboso makokanisama te, makoya mpe na motema te.”—Yisaya 65:17
[Bililingi na lokasa 5]
Na ntango ya kala, Yehova apekisaki te ete báboma Zekalia na mabanga . . .
apekisaki mpe Elode te koboma bana oyo basalaki ata likambo moko te
[Elilingi na lokasa 7]
Etikali moke bampasi ekozala lisusu te; ata mpe bato oyo bakufá bakozonga na bomoi