Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/10 lok. 8
  • “Naino nayoká likambo ya boye te!”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Naino nayoká likambo ya boye te!”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Masolo mosusu
  • Kondima etyami na komekama na Pologne
    Lamuká!—2001
  • Baboti—Bósalisa bana na bino bálinga Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Baboti, bóbatela libula na bino ya motuya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Lolenge ya kozala na libota oyo ezali makasi na elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/10 lok. 8

Masolo ya Basakoli ya Bokonzi

“Naino nayoká likambo ya boye te!”

DOROTA, Motatoli ya Yehova moko ya Pologne oyo azali mobongisi-nzela, akendaki na mwana na ye ya mobali ya mbula 14 na lopitalo ya eteyelo mpo básala ye ekizame. Ntango doktɛrɛ Janinaa azalaki kosala mwana ekizame, atunaki Dorota soki mwana na ye asalaka misala nini na ndako.

Dorota alobaki ete, “Soki nazali na makasi ya kolamba te, mwana na ngai alambaka biloko mpo na libota mobimba, tozali bato motoba. Atyaka bopɛto na ndako mpe abongisaka mwa biloko ya mikemike. Alingaka kotánga mingi. Ayekolaka mingi mpenza.”

Janina alobaki ete: “Oyo ezali likambo ya kokamwa. Nakokisi mbula 12 banda nazali kosala awa, kasi naino nayoká likambo ya boye te.”

Lokola Dorota amonaki ete ezali libaku malamu ya kopesa litatoli, alobaki boye: “Lelo oyo, baboti mingi bazali kobɔkɔla bana na bango malamu te. Yango wana mbala mingi bana na bango bamipesaka valɛrɛ te.”

Janina atunaki ye ete: “Ndenge nini yo oyebi makambo yango? Baboti mingi bayebaka yango te.”

Dorota ayanolaki ete: “Biblia ezali mokanda ya ntina mingi oyo etondi na makambo ya ndenge wana. Na ndakisa, Deteronome 6:6-9 ezali komonisa ete liboso ya koteya bana na biso, esengeli naino tómiteya biso moko. Omoni te ete ebongi biso moko tókɔtisa na mitema na biso makambo malamu oyo tolingi koteya bana na biso?”

Janina alobaki ete: “Oyo ezali likambo ya kokamwa!” Na nsima atunaki Dorota ayebisa ye ndenge oyo Biblia esalisaki ye na kobɔkɔla mpe koteya bana na ye.

Dorota ayanolaki ete: “Toyekolaka Biblia pɔsɔ na pɔsɔ na bana na biso. Tosalelaka buku moko oyo ezali na moto ya likambo ete Mituna oyo bilenge batunaka​—Biyano bibongi.”b Na nsima ayebisaki ye ndenge buku yango ezali mpe makambo mosusu oyo ezali na kati.

Janina alobaki ete: “Naino nayoká likambo ya boye te! Okoki kolakisa ngai buku yango?”

Nsima ya ngonga moko, Dorota ayaki na buku yango.

Ntango Janina atalaki buku yango, atunaki ete: “Ozali na lingomba nini?”

“Nazali Motatoli ya Yehova.”

“Ndenge nini Batatoli ya Yehova batalelaka bato ya mangomba mosusu?”

Dorota ayanolaki ete: “Kaka ndenge nazali kotalela yo, elingi koloba na limemya”; mpe abakisaki ete: “Kasi, tozalaka na mposa ete bango mpe báyeba solo ya Biblia.”

Janina alobaki ete: “Nasí natondi na esengo.”

Na ntango asilisaki kosalisa mwana na ye ekzame, Dorota alendisaki Janina ete atángaka Biblia. “Bomoi na yo ekokóma na ntina mpe ekosalisa yo na mosala na yo.”

Janina alobaki ete: “Osí opesi ngai mposa ya kotánga Biblia.”

Na mayele mpenza mpe kozanga kokakatana, Dorota asalelaki libaku ya kotika mwana na ye epai ya monganga mpo na kopesa litatoli ya malamu mpenza.​—1 Petelo 3:15.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Topesi ye nkombo mosusu.

b Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto