Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/11 nk. 19-25
  • Yehova ateyaki ngai banda bomwana

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova ateyaki ngai banda bomwana
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nayekoli solo ya Biblia banda bomwana
  • Nabandi mosala ya ntango nyonso
  • Na Betele ya Brooklyn
  • Mbongwana minene na bomoi na ngai
  • Mosala na mboka mopaya
  • Tozongi na Brooklyn
  • Nasaleli Nzambe banda bomwana
  • Epai mosala ya ntango nyonso ememaki ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Bomoi ya malamu mpenza na mosala ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Betele ezali na mposa ya basali na bolingo malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Mosala ya pionnier ezalaki mosala ya bomoi na ngai mobimba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/11 nk. 19-25

Lisolo ya bomoi

Yehova ateyaki ngai banda bomwana

YA RICHARD ABRAHAMSON

“Ee Nzambe, oteyi ngai banda bomwana na ngai, mpe tii lelo oyo nazali kosakola misala na yo ya kokamwa.” Tiká nalimbolela bino mpo na nini maloba wana ya Nzembo 71:17 (NW) ezali na ntina mingi mpo na ngai.

NA MOBU 1924, Mama na ngai, Fannie Abrahamson, akutanaki na Bayekoli ya Biblia, nkombo oyo bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova na ntango wana. Na ntango yango nazalaki kaka na mbula moko. Ntango bazalaki koteya Mama Biblia, ye mpe azalaki koyebisa baninga ya kartye makambo oyo azalaki koyekola; azalaki mpe koteya ngai ná yaya na ngai ya mobali ná mosusu ya mwasi. Liboso nayeba kotánga, asalisaki ngai na kokanga na motó mikapo oyo elobelaka mapamboli ya Bokonzi ya Nzambe.

Na nsuka ya bambula ya 1920, etuluku na biso ya boyekoli ya Biblia na engumba La Grande, na etúká ya Oregon, na États-Unis, epai nabotamaki mpe nakolaki, ezalaki kaka na mwa basi mpe bana. Atako tozalaki mosika mpenza, bakɛngɛli-batamboli bazalaki koya kotala biso mbala moko to mibale na mbula. Bakɛngɛli yango bazalaki kosala masukulu mpo na kolendisa biso, tozalaki kosakola na bango ndako na ndako, mpe bazalaki mpenza kotyela bilenge likebi. Na kati ya bakɛngɛli yango, nakoki kotánga Shield Toutjian, Gene Orrell mpe John Booth.

Na 1931, ata moko te kati na biso azalaki na likoki ya kokende na liyangani ya etúká oyo esalemaki na engumba Columbus, na etúká ya Ohio, epai Bayekoli ya Biblia bazwaki nkombo ya Batatoli ya Yehova. Kasi, masangá mpe bituluku ya boyekoli oyo basangani na yango bakendaki te na liyangani yango, bayanganaki na bamboka na bango na sanza ya Augusto mpo na kondima ekateli ya kobengama na nkombo yango. Mwa etuluku na biso na engumba La Grande esalaki mpe bongo. Na nsima, na kampanye ya kokabola mwa buku La Crise oyo esalemaki na 1933, nakangaki na motó mwa maloba ya kobanda lisolo ya Biblia mpe, mpo na mbala ya liboso, nabimaki ngai moko kosakola ndako na ndako.

Na bambula ya 1930, bakómaki kotɛmɛla mosala na biso makasi. Yango wana, tosangisaki masangá, mpe tozalaki kosala mayangani ya mike mpe, mbala moko to mibale na mbula, tozalaki kosala bakampanye ya kosakola. Na mayangani yango, bazalaki kolakisa biso ndenge ya kosakola mpe ya komonisa limemya epai ya bapolisi oyo bazalaki kopekisa biso. Lokola bazalaki komema Batatoli ya Yehova mbala na mbala na biro ya bapolisi to na batribinale mpo na kosambisa bango, tozalaki koyekola malamumalamu makambo ya mwa buku oyo bazalaki kobenga Toli mpo na kosamba. Yango esalisaki biso mingi liboso ya botɛmɛli yango.

Nayekoli solo ya Biblia banda bomwana

Nakómaki kosepela mingi na solo ya Biblia mpe na elikya ya kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela. Na ntango wana, bazalaki kolobela mpenza te batisimo mpo na bato oyo bazalaki na elikya te ya koyangela elongo na Klisto na likoló. (Emoniseli 5:10; 14:1, 3) Atako bongo, bayebisaki ngai ete soki nazwi mpenza ekateli ya kosala mokano ya Yehova, ebongi nazwa batisimo. Nazwaki batisimo na sanza ya Augusto 1933.

Ntango nazalaki na mbula 12, molakisi na ngai amonaki ete nayebi mpenza koloba liboso ya bato; yango wana, ayebisaki Mama afuta ye mpo atángisaka ngai nsima ya kelasi. Mama amonaki ete yango ekosalisa ngai mingi na mosala ya Yehova. Yango wana, na esika afutaka molakisi, andimaki kosukolelaka ye bilamba mbula mobimba. Mateya oyo molakisi yango apesaki ngai esalisaki ngai mingi na mosala ya Nzambe. Ntango nakómaki na mbula 14, nabɛlaki maladi ya mingai mpe nafandaki na ndako koleka mbula mobimba.

Na 1939, Warren Henschell, oyo azalaki mobongisi-nzela, ayaki kosala na teritware na biso.a Akómaki mpenza yaya na ngai ya elimo; azalaki kokamata ngai tókende kosakola mikolo ebele. Mosika te, asalisaki ngai nabanda mosala ya pionnier de vacances (mobongisi-nzela mosungi). Na eleko ya molunge ya mbula wana, etuluku na biso ya boyekoli ekómaki lisangá. Baponaki Warren mokɛngɛli ya lisangá, mpe ngai motambwisi ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Ntango Warren atikaki biso mpo na kokende kosala na Betele, na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, na etúká ya New York, ngai nakómaki mokɛngɛli ya lisangá.

Nabandi mosala ya ntango nyonso

Mokumba ya mokɛngɛli ya lisangá ebakiselaki ngai mposa ya kosala mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza, mpe ntango nakómaki na mbula 17, nsima ya mbula misato na kelasi ya ntei, nabandaki mosala yango. Tata na ngai azalaki Motatoli te, kasi azalaki kokokisa bamposa na biso nyonso mpe azalaki na bizaleli malamu mpenza. Azalaki na mposa ete nakɔta na iniversite. Kasi, alobaki na ngai ete soki nakoki ngai moko kofutela ndako mpe komileisa, nakoki kolanda nzela nyonso oyo naponi. Boye, nabandaki mosala ya mobongisi-nzela mokolo ya 1 Sɛtɛmbɛ 1940.

Liboso natika ndako, mama atángisaki ngai Masese 3:5, 6 oyo elobi ete: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.” Lokola namitikaki na mabɔkɔ ya Yehova bomoi na ngai mobimba, esalisaki ngai mingi.

Mosika te, nakendaki kosala mosala ya kosakola elongo na Joe Hart ná mwasi na ye Margaret na nɔrdi ya etúká ya Washington. Teritware yango ezalaki na baferme, bamboka ya Ba-Indien, mwa bingumba mpe bamboka ya mikemike. Na prɛnta ya 1941, bapesaki ngai mokumba ya mokɛngɛli ya lisangá ya engumba Wenatchee, na etúká ya Washington.

Na liyangani moko oyo tosalaki na engumba Walla Walla, na etúká ya Washington, nazalaki koyamba bato. Namonaki elenge moko azali kobunda na kobongisa mikro. Nayebisaki ye asala na esika na ngai mpe ngai nasala na esika na ye. Ntango mokɛngɛli ya etúká, Albert Hoffman, ayaki mpe amonaki ete natikaki mosala na ngai, ayebisaki ngai na boboto nyonso ntina oyo esengeli kotikala kaka na esika batyaki yo, soki balongoli yo naino te. Nabosanaka toli yango te tii lelo.

Na Augusto 1941, Batatoli ya Yehova babongisaki liyangani moko ya monene oyo esengelaki kosalema na engumba Saint Louis, na etúká ya Missouri. Joe Hart ná mwasi na ye, Margaret, batyaki kapo na nsima ya motuka na bango mpe batyaki bakiti. Babongisi-nzela libwa tosalaki mobembo ya kilomɛtrɛ 2 400 na motuka yango tii na engumba Saint Louis. Na kokende tosalaki pɔsɔ moko, na kozonga mpe pɔsɔ moko. Bapolisi balobaki ete tozalaki bato soki 115 000 na liyangani yango. Atako tozalaki mpenza motango wana te na liyangani yango, ntembe ezali te ete bato oyo bayanganaki wana balekaki Batatoli ya Yehova nyonso 65 000 oyo bazalaki na États-Unis na ntango wana na ebele. Liyangani yango elendisaki biso mpenza na elimo.

Na Betele ya Brooklyn

Ntango nazongaki na Wenatchee, batindelaki ngai mokanda nakende na Betele ya Brooklyn. Nakómaki kuna mokolo ya 27 Ɔkɔtɔbɛ 1941 mpe Nathan Knorr, mokɛngɛli ya imprimerie, ayambaki ngai na biro na ye. Ayebisaki ngai ndenge makambo etambolaka na Betele, mpe anyataki mingimingi ete esɛngaka kokangama mpenza na Yehova mpo na kolonga na mosala na Betele. Na nsima, batindaki ngai na Departema ya kotinda mikanda mpe kuna bapesaki ngai mosala ya kokangaka bakartɔ ya mikanda.

Na mokolo ya 8 Yanuali 1942, Joseph Rutherford, oyo azalaki kokamba mosala ya Batatoli ya Yehova ya mokili mobimba akufaki. Mikolo mitano na nsima, bakambi ya Société Watch Tower baponaki Ndeko Knorr na esika na ye. Ntango William Van Amburgh, ndeko oyo aumelá mingi na mosala ya mobateli ya mosolo ya la Société Watch Tower, ayebisaki bandeko nyonso ya Betele likambo yango, alobaki ete: “Nazali koyeba lisusu ntango Charles Russell akufaki [na 1916] mpe Joseph Rutherford akómaki na esika na ye. Nkolo akobaki kotambwisa mosala na ye mpe kosala ete ekende liboso. Sikoyo, lokola Nathan Knorr akómi prezida, nazali na elikya ete mosala yango ekokoba kokende liboso, mpamba te ezali mosala ya Nkolo, kasi ya moto te.”

Na sanza ya Febwali 1942, bayebisaki biso ete bakobanda formasyo moko oyo ebengamaki “Cours supérieur du ministère théocratique.” Ezalaki mpo na kosalisa bandeko ya Betele bákóma na makoki mingi na oyo etali bolukiluki na masolo ya Biblia, báyeba ndenge ya kobongisa masolo na bango mpe kosala yango malamu. Lokola nayekolaki koloba liboso ya bato ntango nazalaki na kelasi, yango esalisaki ngai nakola nokinoki na formasyo yango.

Mosika te, batindaki ngai na Departema ya Mosala ya kosakola, oyo etalelaka mosala ya Batatoli ya Yehova na États-Unis. Na mbula yango, bazwaki mokano ya kotinda bakɛngɛli bákendeke kotala masangá ya Batatoli. Na nsima, bakɛngɛli-batamboli yango bakómaki kobengama bakɛngɛli ya zongazonga. Na eleko ya molunge ya 1942, babandaki kopesa bandeko ya Betele formasyo na mosala yango, mpe ngai nazwaki libaku malamu ya kolanda yango. Nabosanaka te likambo moko oyo Ndeko Knorr, moko ya balakisi, ayebisaki biso: “Koluka kosepelisa bato te. Okokoka kosepelisa ata moto moko te. Sepelisá nde Yehova; na bongo okosepelisa bato nyonso oyo balingaka Yehova.”

Mosala ya zongazonga ebandaki na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1942. Bandeko mosusu ya Betele, na bawikende mosusu tozalaki kosala mosala yango, tozalaki kokende kotala masangá oyo ezalaki tii na ntaka ya kilomɛtrɛ 400 na New York. Tozalaki kotalela balapolo ya mosala ya kosakola mpe ya bayangani na makita, kosala likita na bandeko oyo bazalaki na mikumba na lisangá, kosala lisukulu moko to mibale mpe kobima na bandeko na mosala ya kosakola.

Na 1944, nazalaki moko ya bandeko ya Departema ya Mosala ya kosakola oyo batindaki na mosala ya zongazonga mpo na sanza motoba; nasalaki na bitúká ya Delaware, Maryland, Pennsylvanie mpe Virginie. Na nsima, na boumeli ya mwa basanza, natalaki mpe masangá na bitúká ya Connecticut, Massachusetts mpe na Rhode Island. Ntango nazongaki na Betele, nazalaki kosala ndambo ya mokolo na biro elongo na Ndeko Knorr ná sɛkrɛtɛrɛ na ye Milton Henschel, epai nayebaki malamumalamu ndenge mosala na biso na mokili mobimba etambolaka. Nazalaki mpe kosala ndambo ya mokolo na Biro oyo etalelaka makambo ya mbongo na litambwisi ya William Van Amburgh ná mosungi na ye, Grant Suiter. Na 1946, nazwaki mokumba ya kotambwisa mwa misala mingi na Betele.

Mbongwana minene na bomoi na ngai

Ntango nazalaki kotala masangá na 1945, nayebanaki na Julia Charnauskas na engumba Providence, na etúká ya Rhode Island. Na katikati ya mobu 1947, tokómaki na mokano ya kobalana. Nalingaki mosala ya Betele mingi, kasi na ntango wana, soki ndeko ya Betele abali, akokaki kotikala na Betele te. Yango wana na sanza ya Yanuali 1948, nabimaki na Betele, mpe ngai ná Julia (Julie) tobalanaki. Nazwaki mosala moko ya ndambo ya mokolo na magazini moko ya monene na engumba Providence, mpe tobandaki mosala ya mobongisi-nzela.

Na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1949, batindaki ngai na mosala ya mokɛngɛli ya zongazonga na nɔrdi-wɛsti ya etúká ya Wisconsin. Kosakola na bingumba ya mikemike mpe na baferme oyo babɔkɔlaka banyama oyo epesaka miliki ezalaki mbongwana monene mpo na ngai ná Julie. Bileko ya mpiɔ ezalaki koumela mingi mpe ntango mosusu malili ezalaki kokóma makasi koleka mpe mbula-mpɛmbɛ ezalaki kokita mingi na boumeli ya bapɔsɔ. Tozalaki na motuka te. Kasi, na lisangá mokomoko, ndeko moko azalaki kokende kotika biso na motuka na ye na lisangá mosusu.

Mwa moke nsima ya kobanda mosala ya zongazonga, tosalaki liyangani moko ya zongazonga. Nazali komona lisusu ndenge nazalaki kolandela likambo mokomoko, mpe yango ezalaki kotya bandeko mosusu nkaka. Yango wana, Nicholas Kovalak, mokɛngɛli ya etúká, ayebisaki ngai na boboto nyonso ete nasengeli te komitungisa mingi, mpamba te bandeko bameseni na misala yango. Toli yango esalisaki ngai mpenza na mikumba mingi oyo nazwaki na nsima.

Na 1950, na liyangani ya liboso na kati ya mayangani ya minene oyo tosalá na Yankee Stadium, na engumba New York, nazwaki mokumba ya kopesa bapaya bisika ya kolala. Tozalaki mpenza na esengo banda na ebandeli tii na nsuka ya liyangani yango oyo esangisaki bato 123 707 oyo bautaki na mikili 67! Nsima ya liyangani yango, ngai ná Julie tozongelaki mosala ya zongazonga. Tozalaki kosepela na mosala yango. Kasi, tozalaki komona ete tosengeli kondima mosala nyonso oyo bakopesa biso. Yango wana, mbula na mbula tozalaki kotondisa lokasa mpo na kosala na Betele mpe mpo na mosala ya misionɛrɛ. Na 1952, tozalaki na esengo ntango babengaki biso na kelasi ya 20 ya Gileadi, eteyelo ya la Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia, epai tozwaki formasyo mpo na mosala ya misionɛrɛ.

Mosala na mboka mopaya

Ntango tosilisaki formasyo yango na 1953, batindaki biso na Angleterre, epai nasalaki mosala ya mokɛngɛli ya etúká na sudi ya Angleterre. Tosalaki ata mbula mobimba te na teritware yango oyo ngai ná Julie tosepelaki na yango mingi, kasi tokamwaki mingi koyoka ete batindi biso na Danemark. Na Danemark bazalaki na mposa ya ndeko moko mpo na kokamba filiale. Lokola nazalaki mosika te na Danemark mpe nazwaki formasyo mpo na misala ya ndenge wana na Brooklyn, batindaki ngai nakende kopesa mabɔkɔ kuna. Tozwaki masuwa tii na Pays-Bas, mpe kuna tozwaki engbunduka oyo ememaki biso na engumba Copenhague, na Danemark. Tokómaki na mokolo ya 9 Augusto 1954.

Moko ya makambo oyo tokutanaki na yango kuna ezalaki ete bandeko mingi oyo bazalaki kokamba filiale yango baboyaki kondima malako ya biro monene na Brooklyn. Lisusu, na bandeko minei oyo bazalaki kobongola mikanda na biso na monɔkɔ ya Danois, misato balongwaki na Betele mpe na nsima batikaki lisangá. Kasi Yehova ayokaki mabondeli na biso. Babongisi-nzela mibale, Jørgen Larsen ná mwasi na ye Anna, oyo bazalaki koya kopesa mabɔkɔ na mosala yango ya kobongola, bandimaki komipesa mobimba na mosala yango. Na yango, bazulunalo na biso ekobaki kobongolama na monɔkɔ ya Danois, mpe ata nimero moko te ezangaki kobima. Jørgen Larsen ná mwasi na ye bazali tii lelo oyo na Betele ya Danemark, mpe Jørgen azali mokambi ya komite ya filiale.

Na bambula wana ya liboso, nazalaki kolendisama mingi ntango Ndeko Knorr azalaki koya kotala biso mbala na mbala. Azalaki mpenza kozwa ntango ya kosolola na ndeko mokomoko mpe kobɛta masolo oyo ezalaki kosalisa biso na koyeba ndenge ya kosilisa mikakatano. Ntango ayaki kotala biso na 1955, mokano ezwamaki ete tosengeli kotonga filiale ya sika oyo ekozala na bamasini ya konyata mikanda mpo na kobimisaka bazulunalo mpo na Danemark. Tozwaki mabelé na nɔrdi ya engumba Copenhague, mpe na eleko ya molunge ya mobu 1957, tokendaki na bandako ya sika oyo eutaki kotongama. Harry Johnson, oyo ayaki sika na Danemark elongo na mwasi na ye Karin nsima ya kozwa diplome na kelasi ya 26 ya Gileadi, asalisaki biso na kotya masini mpe kotambwisa yango.

Tobongisaki makambo mpo na kosala mayangani ya minene na Danemark, mpe formasyo nazwaki ntango nazalaki kosala na mayangani na États-Unis esalisaki mingi. Na 1961, tosalaki liyangani oyo esangisaki bandeko oyo bautaki na mikili koleka 30 na Copenhague. Bayangani bazalaki 33 513. Na 1969, tosalaki liyangani oyo eleki monene na mayangani nyonso oyo esalemá na mikili ya Scandinavie, oyo ezalaki na bato 42 073!

Na 1963, babengaki ngai na kelasi ya 38 ya Gileadi. Ezalaki programe ya sanza zomi mpo na mateya oyo ebongisamaki kaka mpo na bakambi ya filiale. Nazalaki mpenza na esengo ya kokutana lisusu na bandeko ya Betele ya Brooklyn mpe ya kosolola na bandeko oyo baumeli na mikumba minene na biro monene ya Batatoli ya Yehova.

Nsima ya formasyo yango, nazongaki na Danemark mpo na kokoba na mokumba na ngai. Lisusu, nazwaki libaku malamu ya kotalaka bafiliale ya Mpoto ya Wɛsti mpe ya Nɔrdi lokola mokɛngɛli ya zone, mpo na kolendisaka bandeko oyo basalaka na bafiliale yango mpe kosalisa bango bákokisa mikumba na bango malamu. Na bambula eleki, nasalaki mosala yango na Afrika ya Wɛsti mpe na mikili ya Caraïbes.

Na nsuka ya bambula ya 1970, bandeko na Danemark babandaki koluka esika mpo na kotonga biro ya monene lisusu mpo na kobakisa mosala ya kobongola mpe ya konyata mikanda. Bazwaki esika moko kitoko na ntaka ya kilomɛtrɛ 60 na wɛsti ya Copenhague. Elongo na bandeko mosusu, tosalaki plan ya biro yango ya sika, mpe ngai ná Julie tozalaki mpenza kozela ntango oyo tokozala elongo na bandeko ya Betele na bandako yango ya sika. Kasi, makambo ebongwanaki.

Tozongi na Brooklyn

Na Novɛmbɛ 1980, babengaki ngai ná Julie na Betele ya Brooklyn, epai tokómaki na ebandeli ya sanza ya Yanuali 1981. Na ntango wana, tokómaki na mbula pene na 60, mpe lokola tosalaki na bandeko ya Danemark pene na mbula ntuku misato mobimba, kokabwana na bango mpe kozonga na États-Unis ezalaki pɛtɛɛ te. Nzokande, totikaki te ete bamposa na biso moko elonga, kasi tosalaki nyonso mpo na kotya makanisi na biso na misala na biso ya sika mpe na mikakatano oyo tokokaki kokutana na yango na misala yango.

Tokómaki na Brooklyn mpe tofandaki kuna. Batindaki Julie na biro ya comptabilité, epai asengelaki kosala mosala oyo ekokani na oyo azalaki kosala na Danemark. Batindaki ngai na Departema ya Bokomi mpo na kopesa mabɔkɔ na kobongisa programe ya kobimisama ya mikanda. Na ebandeli ya bambula 1980, makambo ebongwanaki mpenza na misala na biso na Brooklyn, totikaki kosalela bamasini ya kobɛta mikanda mpe ya kobongisa mikanda mpe tokómaki na baordinatɛrɛ mpe tokómaki konyata mikanda na bamasini ya offset. Nayebaki kosalela ordinatɛrɛ ata moke te, kasi nayebaki mwa makambo mingi na oyo etali kotambwisa misala mpe kosala na bato.

Mwa moke na nsima, esengelaki tóbongisa lisusu makambo na Departema ya Mayemi, mpamba te tokómaki konyata mikanda na bamasini ya offset oyo ebimisaka mikanda ya langilangi. Atako nayebaki koyema te, nakokaki kosalisa na kobongisa misala na departema yango. Yango wana, nakambaki departema yango na boumeli ya mbula libwa.

Na 1992, batindaki ngai napesa mabɔkɔ na Komite ya kobimisa mikanda mpe na nsima batindaki ngai na biro oyo etalelaka makambo ya mosolo. Tii lelo nazali kosala na biro ya makambo ya mosolo mpo na misala ya Batatoli ya Yehova.

Nasaleli Nzambe banda bomwana

Banda bomwana na ngai mpe na boumeli ya mbula 70 oyo namipesi mobimba na mosala ya Nzambe, Yehova ateyi ngai mokemoke na nzela ya Liloba na ye, Biblia, mpe na nzela ya bandeko na kati ya ebongiseli na ye. Nasali mbula koleka 63 na mosala ya ntango nyonso, mpe na kati na yango, mbula koleka 55 elongo na mwasi na ngai, Julie. Namonaka mpenza ete Nzambe apamboli ngai mingi.

Na 1940, ntango nalongwaki na ndako ya baboti mpo na kobanda mosala ya mobongisi-nzela, tata na ngai asɛkaki ngai mpe alobaki na ngai ete: “Mwana, soki otiki ndako mpo na mosala wana, kotya motema te ete okoki kozongela ngai mpo nasalisa yo.” Nakendá kosɛnga tata na ngai lisalisi ata mokolo moko te. Yehova akokisaki bamposa na ngai nyonso, mbala mingi na nzela ya bandeko baklisto. Na nsima, tata na ngai akómaki komemya mosala na biso mingi, mpe liboso akufa na 1972, akómaki mwa mosika na boyekoli ya solo ya Biblia. Mama na ngai, oyo azalaki na elikya ya kozala na bomoi na likoló, atikalaki sembo na mosala ya Yehova tii ntango akufaki na 1985, na mbula 102.

Atako tokutanaka na mikakatano na mosala ya ntango nyonso, ata mokolo moko te ngai ná Julie tozwaki likanisi ya kotika mosala na biso. Yehova asalisaki biso ntango nyonso ete tólonga na ekateli yango. Ntango baboti na ngai bakómaki mibange mpe bakómaki na mposa ya lisalisi, yaya na ngai ya mwasi, Victoria Marlin, andimaki kosalisa bango na boboto nyonso. Tozalaka na botɔndi mpenza mpo na lisalisi na ye, oyo epesaki biso nzela ya kokoba na mosala ya ntango nyonso.

Julie asungaki ngai mpenza bipai nyonso bazalaki kotinda biso, mpe amonaka yango lokola likabo oyo azali kopesa Yehova. Mpe atako nazali lelo na mbula 80 mpe nazali lisusu nzoto malamu mpenza te, namonaka ete Yehova apamboli ngai mingi na bomoi na ngai. Nalendisamaka mingi na maloba ya mokomi ya nzembo oyo, nsima ya koloba ete Nzambe ateyaki ye banda bomwana na ye, abondelaki ete, ‘ata ntango nakokóma mobange, Ee Nzambe, kotika ngai te, tii ntango nakosakola nguya na yo epai ya baoyo nyonso bakoya na nsima.’​—Nzembo 71:17, 18, NW.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Warren azalaki yaya ya Milton Henschel, oyo asalaki ebele ya bambula na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova.

[Elilingi na lokasa 20]

Ngai ná Mama na 1940, ntango nabandaki mosala ya mobongisi-nzela

[Elilingi na lokasa 21]

Ná baninga na ngai babongisi-nzela Joe Hart ná mwasi na ye Margaret

[Elilingi na lokasa 23]

Mokolo ya libala na biso na sanza ya Yanuali 1948

[Elilingi na lokasa 23]

Elongo na baninga na biso ya kelasi na Gileadi na 1953. Banda na lobɔkɔ ya mwasi: Don Ward ná mwasi na ye Virginia, Geertruida Stegenga, Julie mpe ngai

[Elilingi na lokasa 23]

Ngai ná Frederick Franz ná Nathan Knorr na Copenhague, na Danemark, na 1961

[Elilingi na lokasa 25]

Ngai ná Julie lelo oyo

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto