Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 15/11 nk. 4-7
  • Okoki kondima ete Paladiso ekozala na mabelé

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki kondima ete Paladiso ekozala na mabelé
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mobulungano euti wapi?
  • Biblia elobi nini?
  • Biloko ya mokili ezali nde mabe?
  • Mpo na nini bato mosusu bakokende na likoló?
  • Mokano ya Nzambe ya ebandeli ekokokisama
  • Mpo na nini bato mosusu bazali kobotama lisusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mokano ya Nzambe mpo na mabelé ezali nini?
    Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
  • Mpo na nini bomoi ezali komonana lokola nde ezangi ntina?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Osilá naino te komituna?
    Lamuká!—1994
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 15/11 nk. 4-7

Okoki kondima ete Paladiso ekozala na mabelé

BANDA kalakala, ebele ya bato bandimaka ete mokolo mosusu bakolongwa na mabelé mpe bakokende na likoló. Bamosusu balobaka ete Mozalisi akanaki ata mokolo moko te ete tófanda na mabelé libela. Kutu, bato oyo banyokolaka nzoto mpo na kozwa matomba ya elimo bakei lisusu mosika koleka. Mingi kati na bango balobaka ete mabelé mpe biloko ya mokili ezali mabe​—epekisaka moto kokola na elimo mpe kopusana penepene na Nzambe.

Bato oyo babimisaki makanisi wana bayebaki te oyo Nzambe alobá na ntina na paladiso na mabelé to mpe baboyaki kaka kondima yango. Kutu, bato mingi lelo oyo basepelaka te kotalela makambo oyo Nzambe akomisá na kati ya Liloba na ye, Biblia, mpo na likambo yango. (2 Timote 3:16, 17) Kasi, na esika tólanda makanisi ya bato, ebongi nde tóndima Liloba ya Nzambe. (Baloma 3:4) Kosala bongo ezali na ntina mingi, mpamba te Biblia eyebisi biso ete ekelamu moko ya mabe mpe ya nguya, oyo emonanaka te, ezipi bato miso ya elimo mpe ezali sikoyo “kobungisa mabelé mobimba oyo efandami nzela.”​—Emoniseli 12:9; 2 Bakolinti 4:4.

Mobulungano euti wapi?

Makanisi ndenge na ndenge oyo bato bazali na yango mpo na molimo esali ete bato báyeba lisusu te mokano ya Nzambe mpo na mabelé. Bato mingi bandimaka ete tozali na molimo oyo ekokufaka te, elingi koloba eloko moko oyo elongwaka na nzoto mpe etikalaka na bomoi ntango moto akufi. Bamosusu bandimaka ete molimo ezalaki liboso nzoto esalema. Buku moko elobi ete Platon, filozofe moko ya Grɛki, azalaki kokanisa ete molimo “ekɔtá nde bolɔkɔ na nzoto mpo na masumu oyo esalaká ntango ezalaká na likoló.” Ndenge moko mpe, Origène, moto moko ya teoloji na ekeke ya misato, alobaki ete “milimo esalaki masumu [na likoló] liboso eya kokɔta na nzoto” mpe “ekɔtaki bolɔkɔ [na kati ya nzoto awa na mabelé] mpo na kofuta masumu na yango.” Ebele ya bato mpe bandimaka ete mabelé ezali kaka esika ya komekama ntango moto azali na mobembo na ye ya kokende na likoló.

Bato babimisá ebele ya makanisi mpo na oyo ekómelaka molimo ntango moto akufi. Buku History of Western Philosophy (Lisolo ya filozofi ya Mpoto) elobi ete bato ya Ezipito bazalaki koloba ete “milimo ya bato oyo bakufá ekitaka na nse ya mabelé.” Na nsima, bafilozofe bakómaki koloba ete milimo ya bato oyo bakufá ekitaka na molili ya nse ya mabelé te, kasi emataka nde na mokili ya elimo kuna na likoló. Balobaka ete Socrate, filozofe moko ya Grèce, alobaki ete nsima ya liwa, molimo “ekendaka na esika [moko] oyo emonanaka te . . . mpe efandaka kuna libela elongo na banzambe.”

Biblia elobi nini?

Ata na esika moko te, Liloba ya Nzambe, Biblia, elobi ete bato bazali na molimo oyo ekufaka te. Tangá lisolo ya Genese 2:7 (NW). Elobi boye: “Yehova Nzambe asalaki moto na mputulu ya mabelé mpe atyaki ye mpema ya bomoi na zolo, mpe moto akómaki molimo ya bomoi.” Maloba yango ezali polele mpe ezali mpasi te mpo na kokanga ntina na yango. Ntango Nzambe akelaki Adama, moto ya liboso, atyaki ye te eloko moko oyo emonanaka te. Biblia elobi ete “moto akómaki molimo ya bomoi.” Moto azalaki na molimo te. Kasi ye moko nde azalaki molimo.

Ntango Yehova akelaki mabelé mpe bato, akanaki te ete bato bákufaka. Mokano ya Nzambe ezalaki ete bato bázala na bomoi libela na libela na Paladiso awa na mabelé. Adama akufaki kaka mpo atosaki mobeko ya Nzambe te. (Genese 2:8, 15-17; 3:1-6; Yisaya 45:18) Ntango moto ya liboso akufaki, akendaki nde na mokili ya elimo? Te! Molimo, elingi koloba Adama, azongaki mputulu oyo Nzambe asalaki ye na yango.​—Genese 3:17-19.

Nkɔkɔ na biso Adama atikelá biso nyonso lisumu mpe liwa. (Baloma 5:12) Liwa yango ezali nsuka ya bomoi, kaka ndenge ezalaki mpo na Adama. (Nzembo 146:3, 4) Kutu, na kati ya babuku 66 ya Biblia, basaleli ata na esika moko te maloba “ekufaka te” to “oyo ezali na bomoi libela” mpo na kolobela “molimo.” Nzokande, Biblia elobi polele ete molimo, elingi koloba moto, akufaka. Molimo ekufaka.​—Mosakoli 9:5, 10; Ezekiele 18:4.

Biloko ya mokili ezali nde mabe?

Tokoloba boni mpo na likanisi ete biloko nyonso ya mokili, ata mabelé, ezali mabe? Bandimi ya Lingomba ya Mani (Manichéisme), oyo moto moko ya Perse na nkombo Mani abimisaki na ekeke ya misato ya ntango na biso (T.B.), nde babimisaki likanisi wana. Buku moko (The New Encyclopædia Britannica) elobi ete: “Manichéisme ezali lingomba oyo euti na bampasi oyo ezali kotungisa bato.” Mani azalaki kondima ete kozala moto ezali “kozala mopaya, ezali mpasi mpe mabe mpenza.” Alobaki mpe ete mpo na komilongola na bomoi yango ya “mpasi” molimo esengeli kaka kobima na nzoto, kotika mabelé mpe kokóma ekelamu ya elimo mpo na kofanda na mokili ya elimo.

Kasi, Biblia eyebisi biso ete mpo na Nzambe, ‘biloko nyonso oyo azalisaki,’ ntango akelaki mabelé ná bato, ezalaki “malamu mingi.” (Genese 1:31) Na ntango wana, ata eloko moko te ezalaki kokabola bato na Nzambe. Adama ná Eva bazalaki na boyokani malamu mpenza na Yehova, lokola oyo Yesu, moto ya kokoka, azalaki na yango na Tata na ye ya likoló.​—Matai 3:17.

Soki baboti na biso ya liboso, Adama ná Eva, básala lisumu te, mbɛlɛ bazalaki na boyokani malamu na Yehova Nzambe mpo na libela na paladiso awa na mabelé. Bomoi na bango ebandaki na Paladiso, mpo Biblia eyebisi biso ete: “Yehova Nzambe alonaki elanga na Edene, na Ɛsti, mpe kuna atyaki moto oyo asalaki.” (Genese 2:8, NW ) Kaka kuna na elanga yango ya Edene nde Eva akelamaki. Soki Adama ná Eva básala lisumu te, bango ná bana na bango ya kokoka balingaki kosala mosala na esengo tii ntango balingaki kokómisa mabelé mobimba paladiso. (Genese 2:21; 3:23, 24) Mbɛlɛ bato bafandi na Paladiso awa na mabelé mpo na libela.

Mpo na nini bato mosusu bakokende na likoló?

Okoki kotuna ete: ‘Kasi, Biblia elobi te ete bato bakokende na likoló?’ Ezali ya solo. Nsima ya lisumu ya Adama, Yehova azwaki mokano ya kotya Bokonzi ya likoló, oyo na kati ya yango bana mosusu ya Adama ‘bakoyangela mabelé’ elongo na Yesu Klisto. (Emoniseli 5:10; Baloma 8:17) Basengelaki kosekwa mpe kokende na likoló lokola bikelamu oyo ekoki kokufa te. Motango na bango nyonso ezali 144 000, mpe bato ya liboso na kati na bango ezali bayekoli ya sembo ya Yesu na ekeke ya liboso.​—Luka 12:32; 1 Bakolinti 15:42-44; Emoniseli 14:1-5.

Kasi, mokano ya Nzambe na ebandeli ezalaki te ete bayengebene bátika mabelé bákende na likoló. Kutu, ntango Yesu azalaki awa na mabelé, alobaki ete: “Moto moko te amatá na likoló longola kaka ye oyo autaki na likoló, Mwana ya moto.” (Yoane 3:13) Na nzela na “Mwana ya moto,” Yesu Klisto, Nzambe apesaki lisiko oyo epesi bato oyo bamonisi kondima na mbeka ya Yesu likoki ya kozwa bomoi ya seko. (Baloma 5:8) Kasi bamilio ya bato mosusu bakozwa bomoi ya seko epai wapi?

Mokano ya Nzambe ya ebandeli ekokokisama

Atako Nzambe azwaki ekateli ya kokamata bato mosusu bákende koyangela elongo na Yesu Klisto na Bokonzi ya likoló, yango elingi koloba te ete bato malamu nyonso bakokende na likoló. Yehova asalaki mabelé mpo ezala Paladiso, esika oyo bato basengeli kofanda. Mosika te, Nzambe akosala ete mokano na ye ya ebandeli ekokisama.​—Matai 6:9, 10.

Na boyangeli ya Yesu Klisto ná bato oyo bakoyangela elongo na ye, mabelé mobimba ekotonda na kimya mpe na esengo. (Nzembo 37:9-11) Bakufi oyo Nzambe abombá na makanisi na ye bakosekwisama mpe bakozala nzoto kolɔngɔnɔ. (Misala 24:15) Lokola bazali sembo epai ya Nzambe, bato ya botosi bakozwa eloko oyo baboti na biso ya ebandeli babungisaki​—bomoi ya seko mpe ya kokoka na kati ya paladiso awa na mabelé.​—Emoniseli 21:3, 4.

Yehova Nzambe azangaka te kokokisa mikano na ye. Na nzela ya mosakoli Yisaya, alobaki ete: “Kaka ndenge mbula ekonokaka, mpe mbula mpɛmbɛ eutaka na likoló mpe ezongaka kuna te soki naino epɔlisi mabelé te mpe ebotisi biloko mpe ebimisi milona te, mpe epesi mboto epai ya moloni mpe limpa epai ya molei te, liloba na ngai oyo ebimi na monɔkɔ na ngai mpe ekozala kaka bongo. Ekoki kozongela ngai mpamba te, kasi ekozanga te kokokisa oyo motema na ngai esepeli, ekolonga na likambo oyo natindaki yango.”​—Yisaya 55:10, 11, NW.

Buku ya Yisaya elakisi biso mwa moke ndenge bomoi ekozala na Paladiso awa na mabelé. Mofandi moko te ya Paladiso akoloba ete, “Ngai nazali na maladi.” (Yisaya 33:24) Banyama bakosala bato mabe te. (Yisaya 11:6-9) Bato bakotonga bandako kitoko mpe bakofanda wana, bakolona biloko oyo bakobanda kolya mpe kotonda. (Yisaya 65:21-25) Lisusu, Nzambe “akosilisa liwa mpo na libela, mpe Nkolo Mokonzi Yehova akolongola mpisoli na bilongi nyonso.”​—Yisaya 25:8, NW.

Mosika te, bato ya botosi bakozala na bomoi ya esengo ndenge wana. ‘Bakolongolama na boombo ya kopɔla mpe bakozwa bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.’ (Baloma 8:21) Ekozala mpenza esengo kozala na bomoi libela na libela na Paladiso oyo Nzambe alaki! (Luka 23:43) Yo mpe okoki kozala na Paladiso yango soki ozwi boyebi ya solosolo ya Biblia mpe omonisi kondima epai ya Yehova Nzambe mpe epai ya Yesu Klisto. Mpe yebá malamu ete elikya ya paladiso awa na mabelé ezali ndɔtɔ mpamba te.

[Elilingi na lokasa 5]

Adama ná Eva bakelamaki mpo bázala na bomoi na paladiso awa na mabelé libela na libela

[Bililingi na lokasa 7]

Na Paladiso awa na mabelé . . .

bato bakotonga bandako

bakolona bilanga ya vinyo

Yehova akopambola bango

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 4]

U.S. Fish & Wildlife Service, Washington, D.C./NASA

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto