Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g94 Janvier nk. 18-31
  • Osilá naino te komituna?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Osilá naino te komituna?
  • Lamuká!—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Osilá naino te komituna? Biyano ya Biblia
  • Makanisi na yo mpo na molimo mazali na bopusi likoló na bomoi na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Nini ekómelaka moto ntango akufi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Kondima na yo kati na lisekwa ezali mpenza makasi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Ozali na molimo oyo ekufaka te?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Makambo mosusu
Lamuká!—1994
g94 Janvier nk. 18-31

Osilá naino te komituna?

Ondimaka ete moto azali na molimo oyo mozangi kokufa, oyo elandaka kozala na bomoi nsima na liwa ya nzoto? Bamilió soko mpe bamiliare, ya bato na ntango na biso bakanisaka ete moto azali na molimo oyo, nsima na liwa, ekendeke na mokili mosusu to ebongwanaka eloko mosusu. Biblia elobi nini na ntina na molimo? Mituna ya ntina oyo mitunami sikawa mikongɛngisa yo. Okozwa biyano na kolukáká mikapo ya Biblia oyo mipesami to na kosaleláká lokasa 31.

1. Adama azalisamaki na likoló to na mabelé?​—Genese 1:26-28.

2. Adama azalisamaki mpo ete akufa to mpo akufa te?​—Genese 2:15-17.

3. Soki Adama asalaki lisumu te na kozangáká botosi, mbɛlɛ alingaki kokufa?​—Baloma 6:23.

4. Bomoi ya Adama emonisaki nini: ete azalaki mokufi to mokufi te?​—Genese 3:19; 5:5.

5. Wana asalaki lisumu, Adama abungisaki efandelo ya mabelé to ya likoló?​—Genese 1:26-⁠28.

6. Soki Yesu ayaki mpo na kobongisa oyo ebebaki na ntina na kokwea ya Adama, nini ekobongisama?​—Nzembo 37:29; Baloma 5:18, 19; Emoniseli 21:1-4.

7. Adama azalaki na biteni mibale oyo bikeseni, molimo mpe nzoto?​—Genese 2:7; 1 Bakolinti 15:45.

8. Soki ondimi ete Adama azalaki molimo mpe nzoto, eteni nini oyo esalaki lisumu: molimo to nzoto?​—Nzembo 51:1-4.

9. Soki oyanoli ete ezali nde molimo, mpo na nini nzoto esengelaki konyokwama?

10. Soki oyanoli ete ezali nde nzoto, mpo na nini molimo mosengelaki kobikisama?

11. Soki moto akendaka na likoló ntango akufi, lisumu mpe liwa, mbɛlɛ ekokaki kozala lipamboli, kasi elakeli mabe te lokola Biblia ezali kolobela yango?​—Baloma 5:12; 6:21-23.

12. Etumbu nini Adama azwaki wana asalaki lisumu: liwa to bomoi epai mosusu?​—Genese 2:16, 17; 3:19.

13. Etumbu ezali mpo na nzoto mpe etumbu mosusu mpo na molimo?​—Mosakoli 9:5, 10; Ezekiele 18:4.

14. Likanisi ya minyoko ya seko kati na lifelo ya mɔ́tɔ eutaki epai na Nzambe?​—Yilimia 7:31.

15. Engebene Paulo, lifuti ya lisumu ezali nini?​—Baloma 6:23.

16. Paulo azali nde kolobela minyoko ya seko kati na lifelo moko ya mɔ́tɔ?​—Baloma 6:7.

17. Soki lifelo ya mɔ́tɔ mpenza ezali, mpo na nini moto asengeli konyokwama seko, nzokande asalaki lisumu bobele na bomoi mokuse? Bosembo ya Nzambe ezali na nsé ya oyo ya moto?​—Baloma 9:14.

18. Basembwi ya ntango na kala bazalaki kondima ete bazalaki na molimo oyo mosengelaki kokende na likoló, soko mpe kati na lifelo ya mɔ́tɔ?​—Genese 37:35; Nzembo 89:48; Misala 2:34.

19. Elikya ya solosolo ya bakufi ezali nini?​—Yoane 5:28, 29; 11:23-26; Misala 24:15.

20. Soki milimo mizangi kokufa mizali te, ndenge nini bato mosusu (144 000) bakoyangela elongo na Klisto kati na makoló?​—1 Bakolinti 15:42-49, 53, 54; Emoniseli 14:1, 4; 20:4.a

Osilá naino te komituna? Biyano ya Biblia

Awa na nsé okokuta mikapo misusu ya Biblia oyo ezali bongo biyano na mituna mitunamaki na lokasa 18:

1. “Njambe ajalisaki moto na elilingi na ye . . . ajalisaki bango mobali mpe mwasi. . . . Njambe alobelaki bango ete: ‘Bobotaka mpe [bókóma mingi, NW] mpe botondisa [mabelé, NW] mpe botia yango na nse na bino.’”​—Genese 1:27, 28.

2. “Yɔ okoki kolia mbuma na njete yɔnsɔ na elanga, nde mbuma na njete na koyeba malamu mpe mabe okoki kolia tɛ. Jambi mokɔlɔ okolia yango okokufa sɔlɔ.”​—Genese 2:16, 17.

3. “Mpo ete lifuti lisumu likofutaka ezali kufa, kasi likabo Nzambe azali kopesa ezali bomoi ya seko na nzela ya Klisto Yesu, Nkolo na biso.”​—Baloma 6:23, NW.

4. “Na mitoki ya elongi na yo okolya limpa, kino okozonga na mputulu, mpo ete okamatamaki na yango. Mpo ete ozali mputulu mpe okozonga na mputulu.”​—Genese 3:19, NW.

5. Talá na 1.

6. “Tala! Efandelo na Njambe ejali na bato esika mɔkɔ. . . . Akolongola mpisoli yɔnsɔ na miso na bango, mpe kufa ekojala lisusu tɛ, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe tɛ; mpɔ ete makambo na liboso masili koleka.”​—Emɔnisɛli 21:3, 4.

7. “[Yehova] Njambe asalaki moto na mputulu na mokili, mpe apemaki kati na jolo na ye mpema na bomɔi, mpe moto akomaki molimo na bomɔi.” (Genese 2:7) Liloba “molimo” ebongoli liloba ya Liebele nèphèsh, “oyo ezali kopema.” “Ekomami ete: Adama ya liboso asalemaki molimo na bomoi.” Elobami te ete Adama “azwaki” molimo, kasi nde “asalemaki” molimo.​—1 Bakolinti 15:45, Jérusalem.

8. “Lisumu na ngai ejali liboso na ngai ntango yɔnsɔ. Nasali mabe epai na yɔ, ɛɛ bobɛlɛ epai na yɔ mɔkɔ, nasali mabe na miso na yɔ.”​—Njembo 51:3, 4.

9, 10. Mikapo mpo na yango mizali te.

11. “[Lisumu, NW] ekɔtaki na mokili mpɔ na moto mɔkɔ, mpe kufa ekɔtaki mpɔ na [lisumu, NW]. Kufa mpe epalangani epai na bato yɔnsɔ mpɔ ete bato yɔnsɔ basali [lisumu, NW].”​—Baloma 5:12.

12. Talá na 4.

13. “Bato na bomɔi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo tɛ . . . mpɔ ete ejali na mosala tɛ, to mwango tɛ, to mayɛlɛ tɛ, to boyebi tɛ kati na esika na bakufi, esika ekokɛnda yɔ.” (Mosakoli 9:5, 10) “Molimo na tata mpe molimo na mwana​—mijali na ngai; molimo oyo asali lisumu,​—ye akokufa.”​—Ejekiele 18:4.

14. “Batongi mpe bisika na likolo na Tofɛtɛ . . . ete batumba bana na bango babali mpe bana na bango basi kati na mɔtɔ. Nalakaki bango boye tɛ, eyaki ata kati na motema na ngai tɛ.”​—Yilimia 7:31.

15. Talá na 3.

16. “Mokufi asili kokangwa na masumu.”​—Baloma 6:7.

17. “Toloba nini? Ete Njambe akokataka na ekateli mabe? Sɔkɔ mokɛ tɛ!”​—Baloma 9:14.

18. “Ya solo, Davidi amataki na likoló te.”​—Misala 2:34, NW.

19. “Najali na elikia na Njambe, oyo bato oyo mpe bandimi yango, ete lisekwa ekojala na bato sembo mpe na bato sembo tɛ.”​—Misala 24:15.

20. “Ekoki ete njoto oyo na kopɔla elata kojanga-kopɔla mpe njoto oyo na kufa elata kojanga-kokufa.” Soki kojanga-kokufa ejali kolatisama, boye ejali elɔkɔ tobotamaka na yango tɛ. (1 Bakɔlinti 15:53) “Natalaki, mpe namɔni Mwana na Mpate atɛlɛmi na ngomba na Siona. Bato nkoto mokama na ntuku minei na minei batɛlɛmi na ye elɔngɔ . . . [Bango basombami kati na bato lokola mbuma na liboso mpo na Nzambe mpe mpo na Mwana na Mpate, NW].”​—Emɔnisɛli 14:1, 4.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Liloba “molimo mozangi kokufa” ezali ata na esika moko te kati na Biblia. Liloba “kozanga-kokufa” (athanasia, na greke) ezali komonana bobele mbala misato, mpe ezali na esika moko te oyo yango elobeli molimo. (1 Bakolinti 15:53, 54; 1 Timoté 6:16) Mpo na bandimbola mingi na ntina na ezalela mpe elikya ya solosolo mpo na bakufi, talá búku Comment raisonner à partir des Ecritures, lokasa 27 kino lokasa 32 (Ame), lokasa 123 kino lokasa 130 (Enfer), lokasa 135 kino lokasa 140 (Esprit) mpe lokasa 321 kino lokasa 328 (Résurrection). Búku yango ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto