Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g97 Janvier nk. 8-10
  • Moninga na biso oyo aleki malamu azali na mokili ya bilimu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Moninga na biso oyo aleki malamu azali na mokili ya bilimu
  • Lamuká!—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bademó balingaka ete tósambela bango
  • Losambo losengeli kopesama epai na Yehova
  • Bilimu mabe bikozala lisusu te
  • Mabe ekozala lisusu te na mikolo mizali koya
  • Bakonzi kati na bisika ya elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Botomboki kati na mokili na elimo
    Bilimu ya bakufi bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?
  • Banani bazalaka na nzoto ya elimo?
    Nzela ya bomoi ya seko—Osili komona yango?
  • Bimonaneli etali baoyo bafandaka na likoló
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
Makambo mosusu
Lamuká!—1997
g97 Janvier nk. 8-10

Moninga na biso oyo aleki malamu azali na mokili ya bilimu

BIBLIA ezali kopesa biso likanisi ya polele na ntina na baoyo bafandaka na mokili ya bilimu. Yehova Nzambe azali moto aleki monene kati na likoló. Yesu Klisto alandi nsima na Yehova na nguya mpe na bokonzi. Baanzelu ya sembo ya Yehova basalaka lokola baministre mpo na Nzambe mpe mpo na bato na ye awa na nsé. Satana mpe bademó na ye batɛmɛlaka Nzambe mpe bazimbisaka bato. Bakufi balali mpɔngi kati na kufa kino Nzambe akosekwisa bango.

Bademó balingaka ete tósambela bango

Lokola bakufi bazali na bomoi te, ntina ezali te ya kosambela bango. Kopesa mbeka na bakufi ezali bobele kolendisa lokuta ya Satana mpe ya bademó na ye.

Baanzelu ya Nzambe bazalaka na mposa ete tósambela bango? Soko moke te! Baanzelu ya sembo bapesaka nkembo na Nzambe mpe balendisaka bato ete básala bobele bongo. Mbala mibale, ntoma Yoane amekaki kosambela baanzelu, kasi bapamelaki ye, kolobáká ete: “Kebá! Kosala bongo te! . . . Sambelá Nzambe.”​—Emoniseli 19:10; 22:8, 9, NW.

Nzokande, na bokeseni na baanzelu ya sembo, Satana mpe bademó na ye balingaka ete básambelaka mpe bakumisaka bango. Yango emonanaki polele wana Satana amekaki Yesu ntango Yesu azalaki awa na mabelé. Biblia elobi ete: “Satana atambolisi ye [Yesu] lisusu na ngomba molai mingi mpe atalisi ye makonzi nyonso na mokili mpe nkembo na yango. Alobi na ye ete, Nakopesa yo oyo nyonso soko okokwea mpe okokumbamela ngai.”​—Matai 4:8, 9.

Yesu azongisaki ete: “Longwá na yo, Satana! Zambi ekomami ete, Okokumbamela Nkolo Nzambe na yo mpe okosalela bobele ye.” (Matai 4:10) Yesu ayebaki Mibeko ya Nzambe, na bongo aboyaki kobuka yango.​—Deteronome 6:13.

Atako Satana azalaki na likoki te ya kosala ete Yesu asambela ye, asili kolónga kosala yango epai na basusu. Ya solo, bato moke nde basambelaka Satana na bolingi na bango mpenza. Nzokande, na nzela ya myango lokola bobubi, lokuta, bokosi mpe bobángi, Satana mpe bademó na ye basili kozimbisa bato mingi longwa na losambo ya solo ya Yehova mpe na yango ntoma Yoane akomaki ete: “Mokili mobimba ezali kolala na kati na oyo mabe.” (1 Yoane 5:19) Baoyo bazali kosambela na lolenge lokeseni na Liloba ya Nzambe bazali kokumisa Satana, kasi Yehova te. Biblia ekebisi ete: “Ekokaba bango mbeka, bakokabela [bademó, NW] yango, bakokabela Nzambe te.”​—1 Bakolinti 10:20.

Losambo losengeli kopesama epai na Yehova

Losambo na biso losengeli kopesama bobele epai na Nzambe ye moko. Yehova alobaki na Mose ete: “Okozala na banzambe mosusu liboso na ngai te. Okosala ekeko mpo na yo te, soko elilingi na eloko na lola na likoló te, na mokili na nsé te, to na mai na nsé na mokili te. Okokumbamela yango te to kosalela yango te, mpo ete ngai [Yehova] Nzambe na yo nazali Nzambe na zuwa na kobatela.”​—Exode 20:3-5.

Atako Yehova azali na nkembo monene koleka, tokoki kobɛlɛma epai na ye. Moyekoli Yakobo akomaki ete: “Bóbɛlɛma epai na Nzambe mpe ye akobɛlɛma epai na bino.” (Yakobo 4:8) Ntoma Paulo akomaki ete: “[Nzambe] azali mpe mosika na moto na moto na biso te.” (Misala 17:27) Mpe ntoma Yoane akomaki ete: “Molende oyo ezali na biso mpo na ye ezali boye ete, soko tokolɔmba eloko nini [engebene, NW] mokano na ye [Yehova], ye akoyoka biso. Mpe, soko toyebi ete akoyoka biso wana ekolɔmbaka biso ye, toyebi ete tozwi bilɔmbeli yango bisili biso kolɔmba ye.”​—1 Yoane 5:14, 15.

Tóyeba ete Yoane akomaki ete Yehova akondima malɔmbɔ na biso soki tosɛngi “engebene mokano na ye.” Mpo na koyeba nini ezali bongo mokano ya Nzambe, tosengeli koyekola oyo Biblia ezali koteya. Batatoli ya Yehova bakozala na esengo ya kosalisa yo mpo ete ososola Biblia.

Wana ozali koyekola makambo mingi mpenza na ntina na Yehova, okozwa boyebi mingi na ntina na baoyo bafandaka na mokili ya bilimu. Boyebi yango elongolaka bato na biyambayamba, bindimeli, mpe makambo ya bonkɔ́kɔ oyo Satana azali kosalela mpo na kotya bato kati na bobángi mpe na boombo. Na nzela ya boyebi ya sikisiki ya Nzambe, okoyekola kotya motema epai na ye mpo asalisa yo ete opɛngola to olónga mikakatano ya bomoi ya mokolo na mokolo. Okoki kokóma moninga ya Nzambe. Mpe Nzambe akozala mpo na yo “ekimelo mpe nguya; amonani solo na kosunga na ntango na mpasi.”​—Nzembo 46:1.

Bilimu mabe bikozala lisusu te

Kobɛta ntembe soko moke te na likambo oyo ete bilimu malamu bikolónga bilimo mabe. Etumba esilaki kobima kati na mokili ya bilimu oyo esukolaki makoló na kolongoláká Satana mpe baninga na ye mabe. Mokanda ya Emoniseli elobi ete: “Etumba ebimaki kati na likoló; Mikaele [Yesu Klisto oyo asekwisami] na baanzelu na ye babunaki etumba na dalagona. Dalagona abunani, na baanzelu na ye, nde balóngaki te, mpe esika kati na likoló ezwami mpo na bango lisusu te. Dalagona yango monene abwakami, ye nyoka na kalakala, oyo abyangami [zábolo] mpe Satana, mozimbisi na bato na mokili mobimba; abwakami na nsé, baanzelu na ye mpe babwakami na ye elongo.”​—Emoniseli 12:7-9.

Etumba yango esukaki ndenge nini? Lisoló yango ekóbi ete: “Na bongo bósepela, ɛ likoló, mpe bino bafandi wana! Mawa na mokili mpe na mai monene! Mpo ete Satana akiteli bino na kongala mingi, awa eyebi ye ete azali na mwa elaka mokuse.” (Emoniseli 12:12) Baoyo bazali kati na likoló bakokaki kosepela, mpamba te Satana mpe bademó na ye bazalaki lisusu kuna te mpo na kobimisa mobulu. Nzokande, kobenganama na ye longwa na likoló, esili kobimisa mawa monene, mobulu monene epai na baoyo bazwami awa na mabelé. Tozali sikawa kobika kati na ntango yango ya mawa.​—2 Timoté 3:1-5.

Mabe ekozala lisusu te na mikolo mizali koya

Nzokande, Biblia ezali mpe kopesa elikya. Ezali kondimisa biso ete Zábolo azali “na mwa elaka mokuse” liboso ete abomama. Soki ntango yango ekoki, Yehova akosopa mapamboli kitoko likoló na baoyo nyonso bazali koluka kosala boninga elongo na ye awa na mabelé. Tótalela mwa ndambo ya bilaka na ye bitali mikolo mizali koya:

“Masango ikotondana na mokili ata kino likoló na nkeka.”​—Nzembo 72:16.

“Baponami na ngai bakosepela kino ntango molai mpo na misala na mabɔkɔ na bango. Bakosala mosala na mpamba te.”​—Yisaya 65:22, 23.

“Mofandi moko te akoloba ete: ‘Ngai nazali na maladi,’ ”​—Yisaya 33:24, “NW.”

“Bongo, miso na bakufeli miso makofungolama, mpe matoi na bimimi makozipolama; bongo motɛngumi akopombwa lokola mboloko, mpe lolemo na ebubu ekoyemba na esengo.”​—Yisaya 35:5, 6.

“[Nzambe] akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.”​—Emoniseli 21:4.

“Bayengebeni bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.”​—Nzembo 37:29.

Bobele Yehova, Nzambe ya solo, nde akoki kokokisa bilaka minene motindo oyo. Eloko moko te ekopekisa ye ete akokisa mokano na ye. “Mpo ete epai na Nzambe makambo nyonso makoki kosalama.”​—Luka 1:37.

[Bililingi na lokasa 9]

Soki okómi moninga ya Nzambe, ye akosalisa yo ete olónga mikakatano ya bomoi

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto