Libɔndisi mpo na banyokwami
NA NTANGO ya kala, ntango bato ya sembo bazalaki konyokwama, bazalaki kobondela Nzambe makasi. Kasi, bazalaki mpe koluka ndenge ya kosilisa mpasi yango; na ndakisa bazalaki kosalela mayele mpo na kokima bato oyo bazalaki konyokola bango. Na ndakisa, lokola Davidi atyelaki Yehova motema mpe asalaki milende, ayikelaki mikakatano oyo akutanaki na yango mpiko. Tokoloba nini mpo na biso lelo oyo?
Ntango ozali na mokakatano, na ntembe te olukaka ndenge ya kosilisa mokakatano yango. Na ndakisa, soki ozali na mosala te, osalaka makasi mpo na koluka mosala ya malamu oyo ekosalisa yo okokisaka bamposa ya libota na yo. (1 Timote 5:8) To ntango ozali kobɛla, olukaka lisalisi ya malamu. Kutu Yesu, moto oyo Nzambe apesaki nguya ya kobikisa bato na maladi ya lolenge nyonso, alobaki ete ‘babɛli bazalaka na mposa ya monganga.’ (Matai 9:12) Kasi, ekoki mpe kosalema ete mikakatano na yo ezali kosila noki te mpe ekobi kotungisa yo mwa ntango molai.
Ekozala malamu obondela Yehova Nzambe mpo na likambo yango. Na ndakisa, ntango tozali koluka mosala, soki tozali komitika na mabɔkɔ ya Yehova na nzela ya libondeli, yango ekosalisa biso tókwea te na motambo ya kondima mosala oyo eyokani te na mitinda ya Biblia. Ekosalisa biso mpe ‘tóbungisama nzela te uta na kondima’ mpo na lokoso mpe mpo na bolingo ya mbongo. (1 Timote 6:10) Ya solo, ntango tozali kozwa bikateli ya ntina na oyo etali mosala to libota to mpe ntango tozali koluka lisalisi mpo na maladi, tokoki kolanda toli ya Davidi oyo: “Kitisá mokumba na yo epai ya [Yehova] mpe ye akokumba yo; libela ye akotika te ete moyengebene atelengana.”—Nzembo 55:22.
Mabondeli oyo euti na motema ekosalisa biso mpe tólemba te na makanisi mpo tóbungisa elikya te. Ntoma Paulo, oyo azalaki moklisto ya solosolo, akomaki boye: “Na makambo nyonso na nzela ya libondeli mpe na lilɔmbɔ elongo na matɔndi tiká ete masɛngi na bino eyebana epai ya Nzambe.” Ndenge nini mabondeli oyo tosali na motema sembo ekoki kobɔndisa biso? “Kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makoki na bino ya kokanisa na nzela ya Klisto Yesu.” (Bafilipi 4:6, 7) Kimya ya Nzambe “eleki makanisi nyonso.” Na yango, ekoki kosalisa biso tótɛngatɛnga te ntango tozali kotungisama. Kimya yango ‘ekobatela mitema na biso mpe makoki na biso ya kokanisa,’ mpe bongo ekopekisa biso kosala makambo bisalelá kozanga kokanisa liboso, likambo oyo ekoki kobakisela biso mpasi.
Mabondeli ekoki ata mpe kosalisa biso na kosilisa mokakatano na biso. Ntango ntoma Paulo azalaki na bolɔkɔ na Loma, na komikitisa mpenza asɛngaki bandeko na ye baklisto bábondela mpo na ye. Mpo na nini Paulo asɛngaki bango bábondela mpo na ye? Akomelaki bango boye: “Nazali mpenzampenza kolendisa bino bósalaka bongo, mpo nazongisama epai na bino nokinoki.” (Baebele 13:19) Na maloba mosusu, Paulo ayebaki ete soki Yehova ayoki mabondeli oyo baninga na ye baklisto bazalaki kosala na etingya, yango ekosala ete abimisama na bolɔkɔ nokinoki.—Filemona 22.
Mabondeli ekoki kosilisa mpasi na biso? Ekoki kosilisa yango. Kasi, tosengeli kobosana te ete Yehova akoki mpe koyanola na mabondeli na biso na ndenge mosusu, kasi kaka te na ndenge oyo biso tolingi. Paulo abondelaki mbala mingi mpo na ‘nzubɛ oyo azalaki na yango na kati ya mosuni,’ oyo ntango mosusu ezalaki mpasi moko na nzoto. Kasi, na esika Nzambe alongola mpasi yango, alobaki na ye ete: “Boboto monene na ngai epai na yo ekoki bongo; mpo nguya na ngai ezali kokómisama ya kokoka na kati ya bolɛmbu.”—2 Bakolinti 12:7-9.
Na yango, ntango mosusu mpasi na biso ekosila mbala moko te. Nzokande, yango ekozala mpo na biso libaku ya komonisa ete totyelaka Tata na biso ya likoló motema. (Yakobo 1:2-4) Yebá malamu ete ata soki Yehova alongoli mpasi yango te, akoki ‘kobongisela mpe biso nzela ya kobimela mpo tózala na likoki ya koyikela yango mpiko.’ (1 Bakolinti 10:13) Esengeli koyeba malamu ete Yehova abengami “Nzambe ya kobɔndisama nyonso, oyo abɔndisaka biso na kati ya bolɔzi na biso nyonso.” (2 Bakolinti 1:3, 4) Nzambe akoki kopesa biso makoki ya koyika mpiko, mpe tozali na elikya ya bomoi ya seko.
Liloba ya Nzambe, Biblia, elaki ete Yehova “akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.” (Emoniseli 21:3, 4) Ezali nde mwa mpasi mpo na yo kondima ete mokili moko ezangi mpasi ekozala? Soki omesaná na bomoi ya bampasi, ekoki kozala mwa mpasi ondima yango. Nzokande, Nzambe alaki mpenza ete tokosikolama na kobanga mpe na bampasi, mpe mokano na ye ekokokisama.—Yisaya 55:10, 11.
[Bililingi na lokasa 9]
Kozanga elikya ebongwani esengo