Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 15/4 nk. 4-7
  • “Nzambe na kimya” azali komibanzabanza mpo na banyokwami

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Nzambe na kimya” azali komibanzabanza mpo na banyokwami
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Yehova azali komibanzabanza mpo na yo
  • Lolenge Nzambe azali kosunga baoyo bazali konyokwama
  • Mosika te​—Mokili mozangi monyoko!
  • Libɔndisi mpo na banyokwami
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Banyokwami bakosungama mokolo mosusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Yehova abikisaka moto oyo azali na mpasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Yehova ayokaka kolela na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 15/4 nk. 4-7

“Nzambe na kimya” azali komibanzabanza mpo na banyokwami

BIBLIA emonisi polele ete Davidi, moto na kala azwaki minyoko. Na boumeli ya bambula mingi azalaki mokimi; mokonzi mabe mpe ya motó makasi azalaki kolanda ye na etingya mpo na koboma ye. Na boumeli ya eleko wana ya monyoko, Davidi amibombaki na bisika bitangwi. Kasi asalaki eloko mosusu. Azalaki kobondela Yehova na etingya na ntina na monyoko na ye. Na nsima akomaki na ntina na komekama na ye ete: “Nangangi epai na [Yehova] na mongongo na ngai. Nakoloba mpasi na ngai liboso na ye mpe nakosolola na ye mpo na mpasi na ngai nyonso.”​—Nzembo 142:1, 2.

Lelo oyo, bamoko bakoki kosɛka ezaleli ya Davidi epai na Nzambe. Bakoki koloba ete libondeli ezali bobele mwango ya kotikala na kimya ya makanisi mpe na elobeli ya polele ezali bobele kolekisa ntango mpamba. Nzokande, ezaleli ya Davidi ya kotya motema epai na Nzambe ezangaki ntina te, mpamba te bayini na ye balongamaki solo. Na ntango amikundolaki makambo makómelaki ye, Davidi akomaki ete: “Mobola oyo abelelaki mpe [Yehova] ayokaki ye, abikisaki ye na mpasi na ye nyonso.” (Nzembo 34:6) Nzambe ya solo oyo epai na ye Davidi amibalolaki abéngami na mikapo mosusu ete “Nzambe na kimya.” (Bafilipi 4:9; Baebele 13:20) Akopesa nde lisungi na minyoko mpe akomemela biso kimya?

Yehova azali komibanzabanza mpo na yo

Yehova akangi miso te likoló na bampasi ya bato na ye. (Nzembo 34:15) Azali kotya likebi na bamposa ya basaleli na ye bobele wana bazali lisangá te kasi mpe na bamposa ya moto mokomoko oyo azali kobanga ye. Na mokolo ya bofungoli tempelo na Yelusaleme ya kala, Salomo abondelaki Yehova ete ayokamela “wana moto moko soko bato nyonso na yo, Yisalaele, bakobondela epai na yo to bakolɔmbaka yo, soko moto na moto ayebi mpasi na ye mpe mawa na ye.” (2 Ntango 6:29) Lokola Salomo andimaki yango, moto na moto azali na mpasi na ye moko oyo azali koyikela yango mpiko. Mpo na moto moko ekoki kozala maladi ya nzoto. Mpo na mosusu, ekoki kozala mpasi ya mayoki. Basusu bakoki konyokwama na ntina na liwa ya molingami moko. Kozanga mosala, mikakatano ya nkita, mpe mikakatano ya libota ezali mpe minyoko oyo mizali komonana mingi na ntango oyo ya mpasi.

Kanisá mwa moke likoló na ‘mpasi na yo mpe mawa na yo.’ Ntango mosusu ekoki kozala ete omiyokaki lokola Davidi, mokomi na nzembo, oyo akomaki ete: “Nataleli ete moto akoyoka mawa nde moko azali te, mpe ete moto akobɔndisa nde namoni moto te.” Nzokande, okoki komindimisa ete Nzambe azali komibanzabanza na ezalela na yo, mpamba te bobele na nzembo yango, Davidi akomaki na nsima ete: “Yehova akoyokaka babola; akoboyaka bato na ye te baoyo bakangami.”​—Nzembo 69:20, 33.

Soki tozwi maloba ya Davidi mpo na kokokisa yango epai na biso, tokoki kopema na kozaláká na elikya ete Mozalisi ya bato ayokaka mabondeli ya baoyo, na elobeli ya elilingi, bakangami na bolɔ́kɔ ya minyoko na bango. Lisusu, akokisaka bamposa na bango. Talelá maloba malandi oyo mazali komonisa mawa ya Yehova mpo na baoyo bazali konyokwama.

“Bokopesa mawa te na mwasi-akufeli-mobali, soko na mwana etike mpe te. Soko okopesa bango mawa mpe baleli epai na ngai mbɛlɛ nakoyoka kolela na bango solo, mpe nkanda na ngai ekopela.”​—Exode 22:22-24.

“Nzambe akolongisa baponami na ye te, baoyo bazali kobyanga ye moi na butu, mpe baoyo azali koyoka bango na motema molai?”​—Luka 18:7.

“Ye akobikisa mobola oyo akonganga mpe moto na mawa oyo azali na mosungi te. Akoyokela moto na bolɔzi mpe mobola mawa; akobikisa milimo na babola. Akosikola milimo na bango na kati na konyokola mpe na kongala; makila na bango ekozala na motuya na miso na ye.”​—Nzembo 72:12-14.

“Ye oyo amami bino [libota ya Nzambe awa na mabelé] azali komama kati na liso na [ngai].”​—Zekalia 2:8.

Mwa bandakisa oyo ezali komonisa komibanzabanza mozindo oyo Mozalisi na biso azali na yango mpo na bolamu ya bato na ye. Na yango, tozali na ntina malamu ya kolanda elendiseli ya ntoma Petelo ete: “Bóbwaka epai na ye makambo mazali kotungisa bino, zambi bino bozali mpo na ye.” (1 Petelo 5:7) Kasi lolenge nini Nzambe azali kosunga biso na ntango ya monyoko?

Lolenge Nzambe azali kosunga baoyo bazali konyokwama

Lokola touti komona yango, ntango Davidi anyokwamaki, abondelaki Nzambe na etingya mpo na kozwa litambwisi. Bobele na ntango yango, asalaki eloko moko mpo na kolɛmbisa mpasi yango, asalelaki mayele mpo na kokima baoyo balukaki koboma ye. Na yango, ezalela ya kotya motema epai na Yehova bakisá milende na ye moko epesaki Davidi likoki ya koyika mpiko na bampasi na ye. Tokoki kozwa liteya nini na likambo yango?

Soki tokutani na monyoko, ezali mabe te ete tósala makambo mabongi mpo na kosilisa mokakatano yango. Na ndakisa, soki moklisto azali na mosala te, akosala molende mpo na koluka mosala, boye te? To soki azali na maladi, akoluka lisungi ya monganga, boye te? Ɛɛ, ata Yesu oyo azalaki na nguya ya kobikisa lolenge nyonso ya maladi, andimaki ete ‘mobɛli azali na mposa ya monganga.’ (Matai 9:12; kokanisá na 1 Timoté 5:23.) Ya solo, mikakatano mosusu ekoki kosilisama te; kasi esengeli bobele koyikela yango mpiko. Atako bongo, moklisto ya solo atalelaka minyoko lokola litomba te, lokola basusu basalaka yango. (Kokanisá na 1 Mikonzi 18:28.) Nzokande, asalaka nyonso oyo ekoki na ye mpo na kosilisa monyoko na ye.

Atako bongo, bobele na ntango yango, elongobani mpenza ete tóyebisa Yehova mokakatano yango na nzela ya libondeli. Mpo na nini? Ya liboso, na komibaloláká epai na Mozalisi na biso, tozali kozwa lisungi mpo na “kotalela makambo maleki ntina.” (Bafilipi 1:10, NW) Na ndakisa, na ntango tozali koluka mosala, ezalela ya kotya motema mobimba epai na Nzambe ekosalisa biso na koboya mosala oyo eyokani te na mitindá ya Biblia. Lisusu, tokolinga te “kopɛngwa longwa na kondima” mpo na mposa ya mosolo. (1 Timoté 6:10) Ya solo, na ntango tozali kozwa makatami minene​—oyo matali mosala to mpe makambo nyonso mosusu ya bomoi⁠—tosengeli kolanda elendiseli ya Davidi oyo elobi ete: “Kitisá mokumba na yo epai na [Yehova] mpe ye akokumba yo; libela ye akotika te ete moyengebene atelengana.”​—Nzembo 55:22.

Libondeli ekoki lisusu kosalisa biso ete tóbatela bokatikati ya makanisi na biso, na ntina ete monyoko na biso ezindisa biso te. Ntoma Paulo akomaki ete: “Kati na makambo nyonso tika ete bisɛngeli na bino biyebana epai na Nzambe.” Litomba na yango ekozala nini? “Kimya na Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekosɛnzɛla mitema na bino mpe bikaniselo na bino kati na Klisto Yesu.” (Bafilipi 4:6, 7) Ɛɛ, kimya, kimya ya Nzambe. Kimya yango “eleki makanisi nyonso,” boye ekoki kobatela bokatikati na biso na ntango totungisami na mayoki ya mpasi. Ekobatela ‘mitema na biso mpe bikaniselo na biso,’ kosalisáká biso ete topɛngola kosala makambo na nkanda to na kozanga mayele, likambo oyo ekoki kobakisela biso mikakatano.​—Mosakoli 7:7.

Libondeli ekoki mpe kosala likambo mosusu. Ekoki kobongola makambo ete mátambola lolenge mosusu. Tótalela ndakisa moko ezwami na Biblia. Ntango ntoma Paulo azalaki na bolɔ́kɔ na Loma, alendisaki bandeko na ye baklisto ete bábɔndela mpo na ye. Mpo na nini? Akomelaki bango ete: “Nazali kopesa bino simbisi ete bósala bongo na koleka ete nabutwa epai na bino na mbango.” (Baebele 13:19) Paulo ayebaki ete mabondeli ya molende ya baninga na ye baklisto makokaki kobongola ntango oyo ye akokaki kobimisama na bolɔ́kɔ.​—Filemona 22.

Libondeli ekobongola nsuka ya monyoko na yo? Ekoki kosala yango. Nzokande, tosengeli koyeba ete mbala mosusu Yehova ayanolaka na mabondeli na biso na lolenge oyo tozali komizela na yango te. Na ndakisa, Paulo abondelaki mbala na mbala na ntina na “monzube kati na nzoto” na ye​—ekoki kozala mokakatano ya nzoto etaleli miso na ye. Na esika ete alongola mpasi yango, Nzambe alobaki na Paulo ete: “Ngɔlu na ngai ekoki na yo, zambi nguya na ngai ekokisami kati na bolɛmbu.”​—2 Bakolinti 12:7-9.

Boye, ntango mosusu bampasi na biso ekolongolama te. Kasi, tokozwa libaku ya komonisa kotya motema epai na Mozalisi na biso. (Misala 14:22) Lisusu, tokoki kozala na elikya ete atako Yehova alongoli monyoko yango te, ‘akobongisa ekimelo ete tókoka koyika mpiko.’ (1 Bakolinti 10:13) Ɛɛ, ntina malamu ezali mpo na yango Yehova abéngami “Nzambe na kobɔndisa nyonso. Ye akobɔndisa biso kati na bolɔzi na biso.” (2 Bakolinti 1:3, 4) Apesaka biso oyo tosengeli na yango mpo na koyika mpiko na kimya mingi.

Mosika te​—Mokili mozangi monyoko!

Mozalisi alaki ete na nzela ya Bokonzi na ye, mosika te, akosilisa minyoko ya bato. Akokokisa yango ndenge nini? Na kolongoláká Satana Zabolo, mobandisi ya monyoko mpe monguna ya libosoliboso ya kimya, oyo Biblia ebéngi ye ete “nzambe na mokili oyo.” (2 Bakolinti 4:4) Kasi mosika te boyangeli na ye likoló na bato ekozwa nsuka. Kolongolama na ye ekopesa nzela na mapamboli mazangi nsuka mpo na baoyo bazali kobanga Nzambe. Biblia elaki ete Yehova “akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.”​—Emoniseli 21:1-4.

Okanisi ete mokili mozangi minyoko mozali kitoko mingi koleka na boye ete ekoki kosalema te? Tomeseni mingi kozala na bomoi kati na minyoko na boye ete tozali na mokakatano ya kokanisa ete minyoko ekoki kozanga. Kasi kosikolama na bobangi, na mitungisi, na makámá ezali yango nde mokano ya Nzambe uta ebandeli ntango azalisaki moto, mpe mokano na ye ekolonga.​—Yisaya 55:10, 11.

Ezali wana elikya oyo Sonia, Fabiana, mpe Ana, oyo tolobélaki na lisoló ya liboso, bazwaki. Sonia, oyo bana na ye mibale ya mibali bakufaki na SIDA, azwaki lisungi mingi na elikya oyo Biblia emonisi ete ekokokisama​—lisekwa mpo na bato sembo mpe bato sembo te. (Misala 24:15) Alobi ete: “Likambo moko ezali solo ete elikya na biso eleki mpasi ezala ya lolenge nini.”

Wana azalaki naino na ndako ya kobɔkɔla bitike, Ana ayambaki Motatoli moko ya Yehova. Ana alobi boye: “Alakisaki ngai nkombo ya Nzambe kati na Biblia mpe nalelaki na esengo. Nazalaki mpenza na mposa ya lisungi, mpe nayaki koyeba ete Nzambe oyo azali komibanzabanza mpo na biso azali.” Nsima wana alongwaki na ndako ya kobɔkɔla bitike, Ana andimaki koyekola Biblia mpe ayekolaki makambo mingi matali bilaka ya Yehova. Na nsima amipesaki epai na Yehova mpe azwaki batisimo. Ana alobi ete: “Uta ntango yango nazali kolanda kotya motema epai na Yehova na nzela ya libondeli, mpe nabɔndisami na elikya ete akosunga ngai.”

Fabiana ye mpe abɔndisamaki mingi mpe azwaki kimya ya elimo mpo na monyoko na ye na koyekoláká bilaka ya Nzambe mpo na mikolo mizali koya. Alobi: “Koyekola solo ezwami na Biblia ezali lokola kolongwa na esika oyo ezali na molili tuu mpe kokɔta na esika ya pole, ya kongɛnga, mpe ya kosepelisa.”​—Kokanisá na Nzembo 118:5.

Kasi lolenge nini mpe ntango nini kimya ya solo na mokili mobimba ekoya? Tiká tótalela yango na masoló malandi.

[Etanda na lokasa 6]

Mitindo ndenge na ndenge ya minyoko

▪ Pene na ndambo moko likoló na minei ya bafandi na mokili bazali na bobola makasi, mpe bamilió mingi koleka bazali na bomoi ebongi te mpo na moto, yango ezali kotya bomoi na bango na likámá.

▪ Bana koleka milió 200 bazali kolya malamu te.

▪ Mbula na mbula pulúpulú ezali koboma pene na milió misato ya bana oyo bazali na nsé ya mbula mitano.

▪ Maladi oyo mapalanganaka na nzela ya mikrobe mabomaki bato soko milió 16,5 bobele na mobu 1993. Mpe lokola mikili mosusu bazali na lolenge ekeseni mpo na kokesenisa mitindo ya makɔnɔ, motángo ya solo ekoki kozala monene koleka.

▪ Ekanisami ete pene na bato milió 500 bazali na lolenge moko to mosusu ya mpasi ya motó.

▪ Motángo ya bato bazali komiboma mozali komata nokinoki epai na bilenge koleka epai na bato ya mbula nyonso mosusu.

▪ Zulunalo The Unesco Courier elobi ete: “Nzala mpe kozanga mosala esili kokóma litɔnɔ na mokili. Ezali na milió 35 ya bato bazangi mosala kati na mikili nsambo oyo mileki na bozwi, mpe bobele na mboka Brésil ezali na basáli milió 20 oyo mpo na bango kozala na mosala elimboli te ete bakozala na likoki ya komileisa.”

[Bililingi na lokasa 7]

Libondeli ekoki kosalisa biso ete tótya makanisi na biso na elaka ya Nzambe na ntina na mokili mozangi minyoko

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto