Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 1/3 lok. 29
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Masolo mosusu
  • Yehova azali likabo na ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • “Nakosilisa mposa ya molimo oyo elɛmbi”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • Mokanda ya Biblia nimero 24​—Yilimia
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • “Natye maloba na ngai na monɔkɔ na yo”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 1/3 lok. 29

Mituna ya batángi

Balevi bazalaki na libula te na Yisalaele ya kala, kasi mpo na nini Yilimia 32:7 elobi ete Hanamaele atɛkelaki ndeko na ye Yilimia oyo azalaki mpe Molevi elanga?

Mpo na Balevi, Yehova alobaki na Alona boye: “Okozala na libula na mokili na bango [Yisalaele] te, mpe okozala na ndambo ya biloko kati na bango te.” (Mituya 18:20) Atako bongo, bapesaki Balevi mboka 48 ná bisobe na yango mpo na koleisa bitonga, na Mokili ya Ndaka mobimba. Mboka ya Yilimia ezalaki Anatoto, moko na bamboka oyo bapesaki “bana ya Alona, banganga.”​—Yosua 21:13-19; Mituya 35:1-8; 1 Ntango 6:54, 60.

Levitike 25:32-34 (NW) eyebisi malako ya sikisiki oyo Yehova apesaki mpo na “lotomo ya kosomba” mabelé ya Balevi. Emonani ete libota mokomoko ya Balevi ezalaki na lotomo ya kozala na mabelé, kosalela yango to kotɛka yango. Yango emonisi ete bazalaki na lotomo ya kotɛka mpe kosomba mabelé.a Na makambo mingi, Balevi bazalaki na mabelé mpe bazalaki kosalela yango ndenge moko kaka na Bayisalaele mosusu.

Ekoki kozala ete Balevi bazalaki kozwa mabelé oyo batata na bango bazalaki kotikela bango. Kasi, kaka Bayisalaele oyo bazalaki Balevi nde bazalaki na “lotomo ya kosomba” mabelé na bamboka oyo bapesaki Balevi. Emonani mpe ete Balevi bakokaki kaka kotɛka to kosomba mapango na kati ya bamboka, kasi te “mabelé ya pembeni ya mboka na bango” mpamba te yango ezalaki “libula na bango seko.”​—Levitike 25:32, 34.

Na bongo, emonani ete elanga oyo Yilimia asombaki epai ya Hanamaele ezalaki na mabelé oyo bakokaki kotɛka yango. Ekoki kozala ete mabelé yango ezalaki na kati ya mboka. Yehova ye moko alobaki ete “elanga” yango ezalaki elanga ya Hanamaele mpe ete Yilimia azalaki na “lotomo ya kosomba” yango. (Yilimia 32:6, 7) Yehova alobaki ete likambo yango ezalaki elilingi mpo na komonisa Bayisalaele ete akokokisa elaka oyo apesaki bango ete nsima ya ntango oyo bakolekisa na boombo na Babilone, akozongisa bango lisusu na mabelé na bango.​—Yilimia 32:13-15.

Eloko moko te emonisi ete Hanamaele azwaki elanga oyo azalaki na yango na Anatoto na ndenge oyo Mibeko epekisaki. Eloko moko mpe te emonisi ete abukaki mobeko ya Yehova ndenge asɛngaki Yilimia asomba elanga yango na Anatota; eloko moko mpe te emonisi ete Yilimia asalelaki lotomo na ye na ndenge ya mabe ntango asombaki elanga wana.​—Yilimia 32:8-15.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na ekeke ya liboso ya ntango na biso (T.B.), Molevi Balanaba atɛkaki mabelé na ye mpe apesaki mbongo oyo azwaki mpo básalisa na yango bayekoli ya Klisto oyo bazalaki kokelela na Yelusaleme. Mabelé yango ekokaki kozala na Palestine to na Sipele. Ekoki mpe kozala kaka mwa esika moko ya kokunda bibembe oyo Balanaba asombaki na Yelusaleme.​—Misala 4:34-37.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto