Yehova azali likabo na ngai
“Ngai nazali likabo na yo mpe libula na yo na kati ya bana ya Yisraele.”—MIT. 18:20.
1, 2. (a) Ntango bakabolelaki Bayisraele libula ya mabele, ezalaki ndenge nini mpo na Balevi? (b) Elaka nini Yehova apesaki Balevi?
NTANGO Bayisraele bazwaki eteni monene ya Mokili ya Ndaka, Yosua abandaki kokabolela bato mabele na nzela ya kobwaka mbɛsɛ. Asalaki yango elongo na Nganga-nzambe monene Eleazare ná bankumu ya mabota. (Mit. 34:13-29) Balevi basengelaki te kozwa libula ya mabele ndenge mabota mosusu ezwaki. (Yos. 14:1-5) Mpo na nini libota ya Levi ezwaki likabo ya eteni ya mabele te na Mokili ya Ndaka? Babosanaki nde bango?
2 Tokozwa eyano na makambo oyo Yehova ayebisaki libota ya Levi. Mpo na komonisa ete abosanaki bango te, Yehova alobaki libota yango boye: “Ngai nazali likabo na yo mpe libula na yo na kati ya bana ya Yisraele.” (Mit. 18:20) Oyo nde maloba ya kokitisa motema: “Ngai nazali likabo na yo”! Okoyoka ndenge nini soki Yehova alobi na yo bongo? Na ebandeli okoki kokanisa ete: ‘Nabongi mpenza mpo Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alaka ngai likambo ya ndenge wana?’ Okoki mpe kokanisa boye: ‘Lelo oyo, Yehova akoki mpenza kozala likabo ya mokristo moko boye, moto ya kozanga kokoka?’ Mituna yango etali yo mpe bato oyo olingaka. Na yango, tótala soki maloba wana ya Nzambe elimboli nini. Yango ekosalisa biso tóyeba ndenge oyo Yehova akoki kozala likabo ya bakristo lelo oyo. Mingimingi ndenge oyo akoki kozala likabo na yo, ozala na elikya ya bomoi na likoló to na paradiso awa na mabele.
Yehova akokisaki bamposa ya Balevi
3. Mpo na nini Nzambe azwaki Balevi na mosala na ye?
3 Liboso Yehova apesa Bayisraele Mibeko, bakonzi ya mabota nde bazalaki banganga-nzambe na mabota na bango. Ntango Nzambe apesaki Mibeko, aponaki bato mosusu na libota ya Levi mpo bázala banganga-nzambe mpe basungi. Esalemaki bongo ndenge nini? Ntango Nzambe abomaki bana ya liboso ya Baezipito, asantisaki bana ya liboso ya Bayisraele, atyaki bango pembeni mpo bázala ya ye. Na nsima, Nzambe abongolaki mpenza makambo; alobaki boye: “Nazwi mpenza Balevi . . . na esika ya bana nyonso ya liboso kati na bana ya Yisraele.” Ntango batángaki bato, emonanaki ete bana mibali ya liboso ya Bayisraele balekaki motángo ya Balevi. Yango wana, Yehova ayebisaki Bayisraele oyo bazalaki Balevi te ete báfuta motuya ya lisiko mpo na bana oyo balekaki motángo ya Balevi. (Mit. 3:11-13, 41, 46, 47) Na yango, Balevi bakokaki kobanda kosalela Nzambe ya Yisraele.
4, 5. (a) Na ndenge nini Nzambe azalaki likabo ya Balevi? (b) Ndenge nini Nzambe azalaki kokokisa bamposa ya Balevi?
4 Mokumba yango elimbolaki nini mpo na Balevi? Yehova alobaki ete azali likabo na bango elingi koloba, na esika bázwa libula ya mabele, Yehova apesaki bango lokumu monene ya kosalela ye. “Bonganga-nzambe ya Yehova” nde ezalaki libula na bango. (Yos. 18:7) Bavɛrsɛ oyo ezali liboso mpe nsima ya Mitángo 18:20 emonisi ete atako bongo, bazangaki biloko ya kobikela te. (Tángá Mitángo 18:19, 21, 24.) Basengelaki kopesa Balevi “moko ya bandambo zomi nyonso na Yisraele [mpo] ezala libula mpo na mosala na bango.” Elimboli ete basengelaki kozwa moko ya bandambo zomi ya biloko oyo eboti na bilanga ya Bayisraele mpe ya banyama ya mboka oyo ebakisami. Bango moko Balevi mpe basengelaki kopesa moko ya bandambo zomi ya biloko oyo bazwi, “eloko na yango nyonso oyo eleki kitoko,” mpo na kosunga banganga-nzambe.a (Mit. 18:25-29) Banganga-nzambe bazalaki mpe kozwa “makabo nyonso mosantu” oyo Bayisraele bazalaki komemela Nzambe na esika na ye ya losambo. Na yango, banganga-nzambe bakokaki kondima ete Yehova akokokisa bamposa na bango.
5 Emonani ete Mibeko ya Moize elobelaki mpe moko ya bandambo zomi mosusu, oyo libota mokomoko esengelaki kotya pembeni mpo na kolya mpe kosepela na ntango ya mayangani mosantu mbula na mbula. (Mib. 14:22-27) Kasi, bazalaki mpe kosalela yango na ndenge mosusu. Mbula ya nsambo nyonso ezalaki mbula ya Sabata epai ya Bayisraele. Na nsuka ya mbula ya misato mpe ya motoba nyonso na eleko yango ya mbula nsambo, Bayisraele bazalaki kosalela moko ya bandambo zomi yango mpo na kosalisa babola mpe Balevi. Mpo na nini kosalisa mpe Balevi? Mpo bazalaki na “na likabo te mpe na libula te” na Yisraele.—Mib. 14:28, 29.
6. Atako Balevi bazwaki libula ya mabele te, bafandaki wapi?
6 Okoki komituna boye: ‘Soki Balevi bazwaki libula ya mabele te, bafandaki wapi?’ Nzambe azwaki bibongiseli mpo na bango. Apesaki bango bingumba 48 ná bisika na yango ya koleisa banyama matiti. Bingumba motoba kati na yango ezalaki bingumba ya ekimelo. (Mit. 35:6-8) Na yango, Balevi bazalaki na esika ya kofanda ntango bazalaki kosala te na esika mosantu ya Nzambe. Yehova akokisaki mpenza bamposa ya baoyo bamipesaki na mosala na ye. Na yango, ndenge nini Balevi bakokaki komonisa ete Yehova azali likabo na bango? Basengelaki kotya motema ete Yehova azali na nguya ya kokokisa bamposa na bango mpe ete alingi kosunga bango.
7. Balevi basengelaki kozala na nini mpo Yehova azala likabo na bango?
7 Mibeko elobelaki etumbu moko te oyo Moyisraele asengelaki kozwa soki aboyi kopesa moko ya bandambo zomi. Ntango bato bakómaki na bopɔtu mpo na kopesa moko ya bandambo zomi, banganga-nzambe mpe Balevi bazalaki kokelela. Esalemaki ndenge wana na mikolo ya Nehemia. Na yango, Balevi basengelaki kosala na bilanga na bango mpe basundolaki mosala ya Nzambe. (Tángá Nehemia 13:10.) Ezali polele ete Balevi bakokaki kozwa biloko ya kobikela kaka soki ekólo mobimba etosi Mibeko ya Yehova. Lisusu, bango moko banganga-nzambe ná Balevi basengelaki kozala na kondima epai ya Yehova mpe na bibongiseli oyo azwaki mpo na kokokisa bamposa na bango.
Balevi mosusu oyo Yehova azalaki mpe likabo na bango
8. Lobelá likambo oyo etungisaki Molevi Asafe.
8 Yehova azalaki likabo ya libota mobimba ya Balevi. Kasi, ekómaki ete Molevi mosusu ye moko asalela maloba “Yehova azali likabo na ngai” mpo na komonisa ete akangami na Nzambe mpe azali kotyela ye motema. (Bil. 3:24) Molevi moko oyo alobaki bongo azalaki moyembi mpe mokomi ya nzembo. Tokobenga ye Asafe, atako mbala mosusu azalaki nde na libota ya Asafe, Molevi oyo azalaki mokambi ya nzembo na mikolo ya Mokonzi Davidi. (1 Nt. 6:31-43) Nzembo 73 emonisi ete Asafe (to moko ya bakitani na ye) abulunganaki. Akómaki kolula bato mabe oyo bazalaki na bomɛngo mpe alobaki ete: “Ya solo mpenza, napɛtoli motema na ngai kaka mpamba mpe nasukoli mabɔkɔ na ngai kaka mpamba mpo na komonisa ete nazali na ngambo te.” Emonani lokola abosanaki mosala ya ntina oyo azalaki kosalela Yehova; abosanaki ete Yehova azali likabo na ye. Anyokwamaki na makanisi “kino ntango [akɔtaki] na esika mosantu monene ya Nzambe.”—Nz. 73:2, 3, 12, 13, 17.
9, 10. Mpo na nini Asafe alobaki ete Nzambe azali ‘likabo na ye mpo na ntango oyo etyami ndelo te’?
9 Na esika mosantu, Asafe abongolaki makanisi na ye. Mbala mosusu yo mpe okutaná na likambo ya ndenge wana. Ekoki kozala ete obosanaki mwa moke mikumba oyo ozali na yango na mosala ya Yehova mpe obandaki kotya makanisi na biloko ya mosuni oyo ozalaki kozanga. Kasi, koyekola Liloba ya Nzambe mpe koyangana na makita ya bokristo esalisaki yo obanda kotalela makambo ndenge Yehova atalelaka yango. Asafe asosolaki ndenge ekosukela bato mabe. Akanisaki bolamu oyo azalaki na yango mpe amonaki ete Yehova akosimba lobɔkɔ na ye ya mobali mpe akotambwisa ye. Na yango, Asafe akokaki koloba na Yehova ete: “Longola yo, nazali na esengo mosusu te na mabele.” (Nz. 73:23, 25) Na nsima, alobaki ete Nzambe azali likabo na ye. (Tángá Nzembo 73:26.) Atako Asafe alobaki ete ‘nzoto na ye mpe motema na ye elɛmbi,’ abakisaki ete Nzambe akozala ‘likabo na ye mpo na ntango oyo etyami ndelo te.’ Mokomi ya nzembo yango azalaki na elikya ete Yehova akokanisa ye mpo azalaki moninga na ye. Akobosana te mosala na ye ya sembo. (Mos. 7:1) Na ntembe te, yango ekitisaki Asafe motema mpenza! Ayembaki boye: “Mpo na ngai, kobɛlɛma na Nzambe ezali malamu. Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso azali esika na ngai ya kokima.”—Nz. 73:28.
10 Na yango, ntango Asafe alobaki ete Nzambe azali likabo na ye, azalaki kolobela kaka te bikolo ya mosuni oyo azalaki kozwa na ndenge azalaki Molevi. Alobelaki mingimingi nde mokumba na ye ya kosalela Nzambe mpe boninga oyo asalaki na Yehova, Nzambe oyo Oyo-Aleki-Likoló. (Yak. 2:21-23) Mpo na kobatela boninga yango, Asafe asengelaki kokoba kondimela Yehova mpe kotyela ye motema. Asafe asengelaki kokitisa motema mpe kondima ete, nsukansuka Nzambe akopesa ye mbano soki atosi mibeko na ye. Yo mpe okoki kotyela Mozwi-ya-Nguya-Nyonso motema ndenge wana.
11. Motuna nini Yirimia amitunaki, mpe ndenge nini Yehova ayanolaki ye?
11 Molevi mosusu oyo abengaki Yehova likabo na ye ezali mosakoli Yirimia. Tótala soki alingaki koloba nini na maloba wana. Yirimia azalaki kofanda na Anatote, engumba moko ya Balevi pene na Yerusaleme. (Yir. 1:1) Na eleko moko boye, Yirimia amitunaki boye: Mpo na nini bato mabe bazali na bomɛngo nzokande bayengebene bazali konyokwama? (Yir. 12:1) Ntango amonaki makambo oyo ezalaki kosalema na Yerusaleme mpe na Yuda, amemelaki Yehova likambo na ye. Yirimia ayebaki ete Yehova azali moyengebene. Yehova ayanolaki motuna ya Yirimia na ndenge atindaki ye asakola makambo oyo ekosalema mpe Yehova ye moko akokisaki esakweli yango. Na kolanda bisakweli ya Nzambe, baoyo batosaki malako ya Yehova babikaki; bato mabe bazalaki na bomɛngo kasi bakipaki makebisi te mpe bakufaki.—Yir. 21:9.
12, 13. (a) Nini etindaki Yirimia aloba ete: “Yehova azali libula na ngai,” mpe amonisaki ezaleli nini? (b) Mpo na nini mabota nyonso ya Yisraele esengelaki komonisa ezaleli ya kozela?
12 Na nsima, ntango Yirimia atalaki ndenge mboka na bango ebebaki, amiyokaki lokola moto oyo azali kotambola na molili. Ezalaki lokola nde Yehova ‘afandisi ye lokola bato oyo bakufá banda kala.’ (Bil. 1:1, 16; 3:6) Yirimia ayebisaki ekólo yango ya batomboki ete bázongela Tata na bango ya likoló, kasi mabe na bango elekaki mingi tii Yehova atikaki Yerusaleme mpe Yuda ebomama. Likambo yango esalaki Yirimia mpasi mingi, atako ye moko asalaki mabe te. Na kati ya mawa na ye, mosakoli yango akanisaki misala ya motema mawa ya Nzambe. Alobaki boye: “Tosili te.” Ya solo, misala ya motema mawa ya Yehova ezalaka ya sika ntɔngɔ nyonso! Nsima na yango nde Yirimia alobaki ete: “Yehova azali libula na ngai.” Azalaki kaka na mokumba na ye ya mosakoli ya Yehova.—Tángá Bileli 3:22-24.
13 Na boumeli ya mbula 70, Bayisraele bazangaki mokili. Mokili na bango etikalaki mpamba. (Yir. 25:11) Kasi maloba ya Yirimia ete “Yehova azali libula na ngai” emonisaki ete azalaki kotya elikya na motema mawa ya Nzambe, mpe yango esalisaki ye amonisa “ezaleli ya koyeba kozela.” Mabota nyonso ya Yisraele ebungisaki libula na bango; na yango, basengelaki komonisa ezaleli lokola oyo ya mosakoli Yirimia. Kaka Yehova nde azalaki elikya na bango. Nsima ya mbula 70, basaleli ya Nzambe bazongaki na mokili na bango mpe bazwaki libaku ya kosalela ye kuna.—2 Nt. 36:20-23.
Yehova akokaki kozala mpe likabo ya bato mosusu
14, 15. Longola Balevi, nani mosusu atikaki Yehova azala likabo na ye, mpe mpo na nini?
14 Asafe ná Yirimia, bango mibale bazalaki na libota ya Levi. Kasi, kaka bango nde bazalaki na libaku ya kosalela Yehova? Te! Elenge Davidi, oyo na nsima akómaki mokonzi ya Yisraele, abengaki Nzambe ‘likabo na ye na mokili ya bato ya bomoi.’ (Tángá Nzembo 142:1, 5.) Ntango Davidi akomaki nzembo yango, azalaki kofanda na ndako ya mokonzi te, kutu azalaki ata na ndako te. Abombanaki na mobenga moko mpo na kokima banguna na ye. Mbala soki mibale, Davidi akimaki na mibenga—moko pene na Adulame mpe mosusu na esobe ya Ene-gedi. Mbala mosusu akomaki Nzembo 142 ntango azalaki na moko ya mibenga yango.
15 Soki ezalaki bongo, Mokonzi Saulo nde azalaki kolandalanda Davidi mpo na koboma ye. Davidi akimaki na mobenga moko oyo ezalaki mpasi kokóma kuna. (1 Sa. 22:1, 4) Na esika wana ya mosika, mbala mosusu Davidi amonaki ete moninga moko te azali pene na ye mpo na kobatela ye. (Nz. 142:4) Na ntango yango nde Davidi abelelaki Nzambe.
16, 17. (a) Makambo nini etindaki Davidi ayoka ete azangi moto ya kosalisa ye? (b) Davidi alukaki lisalisi epai ya nani?
16 Liboso Davidi akoma Nzembo 142, mbala mosusu ayokaki nsango ya liwa ya Nganga-nzambe monene Ahimeleke. Kozanga ayeba yango, Ahimeleke asungaki Davidi ntango azalaki kokima Saulo. Mokonzi Saulo, oyo atondaki na zuwa, abomisaki Ahimeleke ná libota na ye mobimba. (1 Sa. 22:11, 18, 19) Davidi ayokaki ete azali na ngambo mpo na liwa na bango. Ezalaki lokola nde abomi nganga-nzambe oyo asalisaki ye. Soki ozalaki na esika ya Davidi, yo mpe olingaki koyoka bongo? Longola yango, Davidi azalaki mpe kotungisama mpo azalaki kopema te mpamba te Saulo azalaki se kolandalanda ye.
17 Mwa moke na nsima, mosakoli Samwele, oyo atyaki Davidi mafuta mpo akóma mokonzi, akufaki. (1 Sa. 25:1) Mbala mosusu, yango etindaki Davidi ayoka lisusu mpenza ete azali na moto ya kosalisa ye te. Atako bongo, Davidi ayebaki ete Yehova akosunga ye. Davidi azalaki na mokumba lokola oyo ya Balevi te, kasi asilaki kotyama mafuta mpo na kosala mosala ya ndenge mosusu, elingi koloba nsukansuka kokóma mokonzi ya libota ya Nzambe. (1 Sa. 16:1, 13) Na yango, Davidi afungwelaki Yehova motema mpe akobaki kozela litambwisi ya Nzambe. Yo mpe okoki, mpe osengeli komona Yehova ete azali likabo mpe ekimelo na yo wana ozali komipesa na mosala na ye.
18. Na ndenge nini bato oyo tolobeli na lisolo oyo bamonisaki ete Yehova azali likabo na bango?
18 Mpo na bato oyo tolobeli, Yehova azalaki likabo na bango na ndenge bazwaki mokumba na mosala na ye. Batyelaki Nzambe motema ete akokokisa bamposa na bango, wana bazali kosalela ye. Ezala Balevi to Bayisraele ya mabota mosusu, na ndakisa Davidi, bakokaki kotika Nzambe azala likabo na bango. Ndenge nini yo mpe okoki kotika Yehova azala likabo na yo? Tokolobela yango na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali ndenge oyo Yehova azalaki kokokisa bamposa ya banganga-nzambe, talá buku Étude perspicace des Écritures, Vol. 2, nk. 655-656.
Okopesa eyano nini?
• Na ndenge nini Yehova azalaki likabo ya Balevi?
• Asafe, Yirimia, mpe Davidi basalaki nini oyo emonisi ete Yehova azalaki likabo na bango?
• Osengeli komonisa ezaleli nini mpo Nzambe azala likabo na yo?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 8]
Balevi bazwaki libula ya mabele te. Yehova nde azalaki likabo na bango, mpo bazwaki lokumu monene ya kosalela ye
[Elilingi na lokasa 7]
Na ndenge nini Yehova azalaki likabo ya banganga-nzambe mpe Balevi?
[Elilingi na lokasa 9]
Nini esalisaki Asafe akoba komona Yehova ete azali likabo na ye?