Koboya kokɔta na politiki epekisaka baklisto komonisa bolingo?
KOZALA moklisto esɛngi kaka te kotánga Biblia, kosambela mpe koyemba mokolo ya lomingo. Yango esɛngi kosala misala mpo na Nzambe mpe mpo na bato. Biblia elobi boye: “Tólingaka, na maloba te mpe na lolemo te, kasi na misala mpe na solo.” (1 Yoane 3:18) Yesu azalaki mpenza komibanzabanza mpo na basusu; baklisto basengeli kolanda ndakisa na ye. Ntoma Paulo alendisaki baninga na ye bandimi ete bázalaka ntango nyonso na “mingi ya kosala na kati ya mosala ya Nkolo.” (1 Bakolinti 15:58) Kasi, mosala ya Nkolo ezali nini? Mosala yango ezali nde mpo na koluka kobongola makambo na guvɛrnema mpo babola ná bato mpamba bákóma malamu? Yango nde Yesu asalaki?
Bato mosusu balukaki ete Yesu akɔta na makambo ya politiki, kasi ye moko aboyaki. Ntango Satana apesaki makonzi nyonso ya mokili aboyaki; aboyaki mpe kokɔta na ntembe oyo bato bazalaki kotyana na likambo etali kofuta mpako; mpe ntango Bayuda mosusu balingaki kotya ye mokonzi, akimaki. (Matai 4:8-10; 22:17-21; Yoane 6:15) Nzokande, atako aboyaki kokɔta na makambo ya mokili, yango epekisaki ye te kosala makambo mpo na bolamu ya bato.
Yesu amipesaki na mosala oyo ekomemela bato bolamu ya libela. Ntango aleisaki bato nkóto mitano mpe abikisaki bato ya maladi, yango ememelaki kaka bato moke bolamu ya mwa ntango, kasi mateya na ye epesaki bato nyonso likoki ya kozwa mapamboli ya libela. Yesu ayebanaki lokola “Moteyi,” kasi te lokola mosalisi ya bato oyo bazalaki kokelela. (Matai 26:18; Malako 5:35; Yoane 11:28) Yesu alobaki boye: “Ezali mpo na yango nde nabotamaki, mpe ezali mpo na yango nde nayaki na mokili, mpo napesa litatoli na ntina etali solo.”—Yoane 18:37.
Nsango oyo eleki mateya ya politiki
Solo oyo Yesu ateyaki ezalaki mateya ya politiki te. Solo yango ezalaki kolobela Bokonzi oyo ye moko akozala Mokonzi na yango. (Luka 4:43) Bokonzi yango ezali guvɛrnema ya likoló, oyo ekozwa esika ya makonzi nyonso ya bato mpe ekomemela bato kimya ya libela. (Yisaya 9:6, 7; 11:9; Danyele 2:44) Yango nde elikya ya solosolo kaka moko mpo na bato. Kosakola elikya wana ya solosolo mpo na mikolo ekoya ezali komonisa bolingo koleka kolendisa bato bátyela baninga na bango bato elikya, boye te? Biblia elobi boye: “Kotya motema na yo epai na bazwi te, soki na mwana ya moto oyo auti na mputulu te, mpo ete azali na lobiko te. Soki [elimo, NW] ekolongwa, moto akozonga na mabelé lisusu; bobele na mokolo yango kokanisa na ye esili. Esengo na ye oyo Nzambe ya Yakobo azali lisungi na ye, mpe atye elikya epai ya [Yehova], Nzambe na ye.” (Nzembo 146:3-5) Yango wana, na esika Yesu atinda bayekoli na ye bákende kosakola ndenge oyo guvɛrnema esengeli kotambwisa makambo, alakisaki bango nde kosakola “nsango malamu . . . ya bokonzi.”—Matai 10:6, 7; 24:14.
Yango nde “mosala ya Nkolo” oyo baklisto basengeli kosala. Bokonzi ya Nzambe ekolonga kosilisa bobola mpamba te, lokola bato oyo ekoyangela basɛngisami ete bálinganaka, bozwi ya mokili ekozala te kaka na mabɔkɔ ya mwa bato moke. (Nzembo 72:8, 12, 13) Yango nde nsango malamu oyo ebongi mpenza kosakolama.
Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bazali kosala “mosala ya Nkolo” na mikili 235. Na kolanda etinda ya Yesu, bamemyaka baguvɛrnema nyonso. (Matai 22:21) Kasi, batosaka mpe maloba oyo alobaki na bayekoli na ye ete: “Bozali bato ya mokili te, kasi naponi bino na kati ya mokili.”—Yoane 15:19.
Nsima ya koyekola Biblia malamumalamu, bato mosusu oyo bazalaki koteya politiki na kati ya lingomba batikaki kosala yango. Na Italie, moto moko ya politiki oyo azalaki na ebongiseli moko ya politiki ya Lingomba ya Katolike (Action catholique), alobaki boye: “Namipesaki mpenza na politiki, mpe nazalaki komona ete mwana-mboka nyonso asengeli kokɔta na politiki mpe kobunda mpo na bolamu ya ekólo.” Ntango alongwaki na mosala ya guvɛrnɛrɛ ya engumba mpo akóma Motatoli ya Yehova mpe abanda kosakola Bokonzi ya Nzambe, alimbolaki ntina oyo milende ya bato ya politiki oyo balukaka bolamu ya basusu elongaka te. “Soki mokili ezali ndenge ezali lelo oyo, ezali te mpo bato ya malamu oyo bazali kobunda mpo na bolamu ya bato bazangi; kasi, ezali nde mpo milende oyo mwa bato moke ya sembo bazali kosala ezali kobebisama na bato mabe oyo baleki ebele.”
Atako baklisto ya solo baboyaka kokɔta na politiki mpo baponi nde kosakola elikya kaka moko ya solosolo mpo na bato, yango epekisaka bango te kosalisa basusu. Bato oyo baklisto bazali kosalisa mpo bándima Bokonzi ya Nzambe bazali koyekola kotika bizaleli ya mabe, kotosa bakonzi, kobongisa mabota na bango mpe kotika komipesa mobimba na biloko ya mokili. Oyo eleki ntina, Batatoli ya Yehova bazali kosalisa bato bákóma baninga ya Nzambe.
Basakoli ya Bokonzi ya Nzambe basalaka makambo mpo na bolamu ya bato na bisika oyo bafandi. Kasi, longola yango, basalisaka mpe bato bátya motema na guvɛrnema moko ya solosolo, oyo ekomemela bato nyonso oyo balingaka Nzambe kimya ya libela. Lokola baklisto bakɔtaka na makambo ya politiki te, bazali na bonsomi ya kopesa bato lelo oyo lisalisi ya malamu koleka, oyo ekoumela libela na libela.
[Etanda/Elilingi na lokasa 7]
Atikaki politiki mpo na kosakola Bokonzi ya Nzambe
Ntango Átila azalaki mwana moke, ayekolaki epai ya basango na engumba Belém, na Brésil, mateya ya lingomba oyo ezalaki kolakisa bato ndenge ya kolongwa na boombo ya bakonzi. Azalaki kosepela koyoka ete mokolo mosusu bampasi ya bato ekosila mpe akɔtaki na etuluku moko ya batomboki epai ayekolaki kotinda bato bábima na balabala mpo na kosɛnga bakonzi bábongisa makambo mpe kotinda bato báboya kotosa bakonzi.
Kasi, azalaki mpe koteya bana ya bato ya etuluku na bango ya batomboki na lisalisi ya buku moko oyo bakabelaki ye; buku yango ezalaki na motó ya likambo, Boyoka Moteyi Monene.a Buku yango ezalaki koteya bizaleli ya malamu mpe botosi epai ya bakonzi. Mateya yango etindaki Átila amituna ntina oyo bato oyo bandimaka mateya oyo etali kosikola bato balandaka te mitinda ya ntina mingi ya bizaleli malamu oyo Yesu apesaki, mpe mpo na nini basusu kati na bango babosanaka bato oyo bazali konyokwama soki bazwi bokonzi. Alongwaki na lisangani na bango ya batomboki. Mwa moke na nsima, Batatoli ya Yehova bakendaki kotala ye mpe bayebisaki ye makambo etali Bokonzi ya Nzambe. Akómaki koyekola Biblia mpe na nzela na yango, ayebaki ndenge oyo bampasi ya bato ekosila.
Na ntango wana, Átila akendeki koyangana na likita moko ya Bakatolike oyo elobelaki kondima mpe makambo ya politiki. Moteyi alimbolelaki bango ete “kondima ná politiki ezali nzela mibale oyo ezali komema kaka na esika moko.” Átila akendeki mpe koyangana na likita moko na Ndako ya Bokonzi. Makambo oyo amonaki kuna ekesanaki mpenza na oyo amonaki na likita ya Bakatolike! Moto moko te azalaki komɛla likaya, masanga, to koloba makambo ya nsoni. Azwaki ekateli ya kobanda kosakola elongo na Batatoli ya Yehova, mpe eumelaki te azwaki batisimo. Ayebi sikoyo ntina oyo mateya ya lingomba oyo etali kosikola bato, ekoki te kosilisa makambo oyo ezali kotungisa babola ndenge azalaki kokanisa.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Bililingi na lokasa 6]
Baklisto bakɔtaka na politiki te, kasi yango epekisaka bango te kosalisa basusu