Bakonzi ya mangomba basengeli nde koteya makambo ya politiki?
“EPISKƆPƆ-MOKONZI moko ya Canada ayebisaki bandimi oyo bakendaki na esika mosantu ete tokoki kosalisa babola soki tozali kokɔta na makambo ya politiki . . . Atako ebongiseli ya politiki eyokani na mokano ya Nzambe te, ‘tosengeli kokɔta na makambo ya politiki mpo na kosalisa babola.’”—Zulunalo Catholic News.
Bakonzi mingi ya mangomba bazali kolendisa likambo ya kokɔta na politiki; mpe mingi kati na bango bazali kokóma bakonzi ya politiki. Basusu bamekaki kokɔtisa mbongwana na politiki ya mboka na bango. Bakonzi mosusu ya mangomba bayebani mingi mpo babundaki mpo na kosilisa makambo lokola bokabwani kati na mindɛlɛ mpe bato moindo mpe boombo.
Kasi, bandimi mingi basepelaka te ntango basango ná bapastɛrɛ na bango bazali kokɔta na kowelana ya bato ya politiki. Lisolo moko ya zulunalo Christian Century oyo elobelaki likambo ya koteya makambo ya politiki na kati ya lingomba elobaki boye: “Mbala mosusu, kaka bandimi ya Protesta bango moko nde bazali koboya ete bakonzi na bango ya mangomba bákɔta na makambo ya politiki.” Bandimi mingi bamonaka ete lingomba ezali mosantu, yango wana esengeli te ete bákɔtisa yango na makambo ya politiki.
Likambo yango ezali kobimisa mwa mituna ya ntina oyo bato nyonso oyo balingaka ete makambo ebonga bakoki komituna. Bateyi ya mangomba ya boklisto bakoki nde kokɔtisa mbongwana na politiki?a Koteya makambo ya politiki na lingomba ezali nde ndenge oyo Nzambe abongisi mpo na kotya guvɛrnema ya malamu koleka mpe kobongisa makambo ya mokili? Lingomba ya boklisto esalemaki nde mpo na kokɔtisa mbongwana na makambo ya politiki?
Ndenge oyo politiki na nkombo ya Klisto ebandaki
Na buku Lingomba na ebandeli (na Lingelesi), Henry Chadwick, moto moko ya mayele na masolo ya kala, alobi ete bato nyonso bayebaki ete baklisto ya liboso “balukaka bokonzi ya mokili oyo te.” Bazalaki “lisangá moko ya bato oyo bakɔtaka na makambo ya politiki te, bazalaki bato ya mobulu te mpe balingaki kimya.” Buku Lisolo ya lingomba ya boklisto (na Lingelesi) elobi boye: “Baklisto nyonso bayebaki malamu ete moko te kati na bango akoki kosala na politiki . . . Tii na ebandeli ya ekeke ya misato, Hippolyte alobaki ete lingomba ya boklisto ezalaki kosɛnga na moto ya politiki oyo alingi kokóma moklisto ete atika naino mosala ya politiki.” Kasi mokemoke, masangá mingi ekómaki kokambama na bato oyo bazalaki na mposa ya bokonzi, mpe bakómaki komipesa batitre mineneminene. (Misala 20:29, 30) Bamosusu bazalaki na mposa bázala mbala moko bakonzi ya lingomba mpe bakonzi ya politiki. Ntango makambo ebongwanaki na mbalakaka na boyangeli ya Loma, bakonzi yango ya mangomba bazwaki libaku oyo bazalaki koluka.
Na mobu 312 ya ntango na biso (T.B.), Constantin, amperɛrɛ ya Loma, oyo azalaki mopakano, akómaki kosepela na lingomba ya boklisto. Likambo ya kokamwa, baepiskɔpɔ ya Lingomba bandimaki koyokana na amperɛrɛ oyo azalaki mopakano mpo na bokonzi ya politiki oyo apesaki bango. Henry Chadwick akomaki boye: “Lingomba ekómaki mokemoke kozwa bikateli tii na makambo ya minene ya politiki.” Lokola bakonzi ya mangomba bakómaki kokɔta na makambo ya politiki, yango ebotaki mbuma nini?
Ndenge oyo makambo ya politiki ebongolaki bakonzi ya mangomba
Augustin, moto monene ya teoloji na Lingomba ya Katolike na ekeke ya mitano, nde mpenza moto abandaki likanisi ya koloba ete Nzambe akoki kosalela bakonzi ya mangomba na makambo ya politiki. Abimisaki likanisi ete lingomba esengeli koyangela bikólo mpo na kopesa bato kimya. Kasi, Herbert Wells, moto moko ya mayele na masolo ya kala, akomaki boye: “Soki totali makambo oyo esalemaki na Mpoto banda na ekeke ya mitano tii na ekeke ya zomi na mitano, tokomona mpenza ete likanisi ete guvɛrnema ya Nzambe eyangela mokili na nzela ya bakonzi ya mangomba elongi te.” Mangomba ya boklisto elongaki te kotya kimya na mokili, ata kaka na Mpoto. Bato balongolaki motema na ebongiseli oyo bakanisaki liboso ete ezali mpenza ya boklisto. Mpo na nini likanisi yango elongaki te?
Bato mingi oyo bazalaki koloba ete bazali koteya mateya ya Klisto bakómaki koluka bokonzi ya politiki na mokano ya kobongisa makambo, kasi bamikɔtisaki nde na misala ya mabe. Martin Luther, oyo azalaki pastɛrɛ mpe mobongoli ya Biblia, ayebani mingi mpo na milende oyo asalaki mpo na kobongola makambo na Lingomba ya Katolike. Lokola azalaki kotɛmɛla makasi mpenza mateya ya Lingomba, bato oyo bazalaki kotombokela Lingomba mpo na makambo ya politiki bakómaki kosepela na ye mingi. Kasi, bato mingi bazalaki lisusu kosepela na Luther te ntango ye mpe akómaki kokɔta na makambo ya politiki. Liboso, azalaki kokɔtela bato ya mboka oyo batombokelaki bankumu oyo bazalaki konyokola bango. Kasi, ntango batomboki yango bakómaki kobimisa mobulu, alendisaki bankumu básalela makasi na bango mpo na kosilisa mobulu yango; bankumu bayokaki toli na ye mpe babomaki bankóto ya bato. Yango wana, bato ya mboka babengaki ye motɛki. Luther alendisaki mpe bankumu ntango batombokelaki amperɛrɛ oyo azalaki Mokatolike. Kutu, Baprotesta, nkombo oyo bakómaki kobenga balandi ya Luther, bazalaki nde lingomba ya politiki banda na ebandeli. Luther akómaki ndenge nini ntango akómaki na nguya mingi? Abebaki mpenza kobeba. Na ndakisa, atako azalaki liboso kotɛmɛla likambo ya kozongisa na makasi bato oyo balongwe na lingomba, na nsima, akómaki kolendisa baninga na ye oyo bazalaki bakonzi ya politiki ete bátumbaka na mɔtɔ bato oyo bazalaki koboya batisimo ya bana mike.
Jean Calvin azalaki mokonzi moko ya lingomba oyo ayebanaki mingi na Genève, kasi akómaki mpe moto monene ya politiki. Ntango Michel Servet amonisaki polele ete liteya ya Bosato euti na Biblia te, lokola Calvin azalaki moto monene ya politiki, apesaki mabɔkɔ mpo báboma Servet; bakakisaki ye na nzete mpe batumbaki ye. Bato yango bapesaki mpenza mateya ya Yesu mokɔngɔ!
Ekoki kozala ete bato yango babosanaki oyo Biblia elobi na 1 Yoane 5:19: “Mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe.” Bazalaki mpenza na mposa ya kobongisa makambo ya politiki ya ntango wana, to bazalaki nde na mposa ya kokóma bakonzi mpe ya kozala baninga ya bato minene? Ezala ata mpo na ntina nini, basengelaki kobosana te maloba oyo Yakobo, moyekoli ya Yesu, akomaki na lisalisi ya elimo santu ete: “Boyebi te ete boninga ná mokili ezali bonguna ná Nzambe? Na yango, moto nyonso oyo alingi kozala moninga ya mokili azali komikómisa monguna ya Nzambe.” (Yakobo 4:4) Yakobo ayebaki ete Yesu alobaki na ntina na bayekoli na ye ete: “Bazali bato ya mokili te, ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te.”—Yoane 17:14.
Atako bongo, bato mingi oyo bandimaka ete baklisto basengeli te kolanda makambo mabe ya mokili, bazali koboya kondima ete baklisto basengeli te kokɔta na makambo ya politiki, to kozala mpenza “bato ya mokili te.” Bato yango balobaka ete koboya kokɔta na makambo ya politiki epekisaka baklisto komonisela basusu bolingo ya solosolo. Na makanisi na bango, bakonzi ya mangomba basengeli kokanga monɔkɔ te ntango bazali komona mabe mpe kozanga bosembo oyo etondi na politiki, mpe basengeli ata kozwa bokonzi ya politiki mpo na kosilisa mabe yango. Kasi, tokoki nde koloba ete moto oyo aboyaka kokɔta na makambo ya mokili ndenge Yesu ateyaki akoki te komibanzabanza mpo na basusu? Moklisto oyo aboyi kokɔta na makambo ya politiki, oyo ezali kokabola bato, azali na ndenge mosusu oyo akoki kosalisa bato mosusu? Lisolo oyo elandi ekoyanola na mituna yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Buku moko elimboli politiki lokola “makambo nyonso oyo etali ndenge ya koyangela ekólo, mingimingi kowelana kati bato to mangomba ya politiki oyo ezali na bokonzi to ezali koluka kozwa bokonzi.”—Buku The New Oxford Dictionary of English.
[Elilingi na lokasa 4]
Bakonzi ya mangomba bayokanaki na bakonzi lokola Amperɛrɛ Constantin mpo na kozwa bokonzi ya politiki
[Eutelo ya bafɔtɔs]
Musée du Louvre, Paris
[Bililingi na lokasa 5]
Mpo na nini bakonzi minene ya mangomba balingaki makambo ya politiki?
Augustin
Luther
Calvin
[Eutelo ya bafɔtɔs]
Augustin: Fɔtɔ ya ICCD; Calvin: Liyemi ya Holbein, euti na buku The History of Protestantism (Vol. II)