Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 1/6 nk. 3-4
  • Ezali na ntina ozala mondimi ya lingomba moko boye?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ezali na ntina ozala mondimi ya lingomba moko boye?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Boyokani ya Nzambe ná bato na ntango ya kala
  • Kondima ya Noa ekweisi mokili
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Lisolo ya Noa mpe Mpela na mokili mobimba ezali kaka lisapo mpamba?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Ntina oyo Nzambe asepelaki na Noa mpe ntina oyo tosengeli kokeba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Omibongisi mpo na kobika?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 1/6 nk. 3-4

Ezali na ntina ozala mondimi ya lingomba moko boye?

‘MPO na kondima Nzambe, nazali na mposa te ya kozala mondimi ya lingomba moko boye to ya kokendaka na ndako-nzambe!’ Bato mingi balobaka bongo na likambo etali kozala mondimi ya lingomba moko boye. Kutu, bamosusu balobaka ete bamiyokaka penepene na Nzambe ntango bazali kotala biloko oyo akelá koleka soki bazali na ndako-nzambe. Lelo oyo, bato mingi bakómi na makanisi ete ezali kosɛnga kaka te moto azala na lingomba moko boye mpo andimela Nzambe.

Kasi, bato mosusu mpe bazali kokanisa ndenge mosusu. Mpo na bango, mpo moto andimama na Nzambe, ezali na ntina mingi azala mondimi ya lingomba moko boye mpe akendaka na ndako-nzambe. Na kotalela makanisi nyonso wana, tomoni ete likambo etali kozala mondimi ya lingomba moko boye to te ezali na ntina mingi mpo na moto nyonso; ezali kaka te likambo ya bato ya mayele oyo balukaka koyeba motángo ya bandimi mpe makambo mosusu ya mangomba. Lokola ezali kotalela boyokani na biso na Nzambe, omoni te ete ebongi mpenza tóyeba likanisi ya Nzambe na likambo yango? Na bongo, Biblia, Liloba ya Nzambe, elobi nini na likambo yango?

Boyokani ya Nzambe ná bato na ntango ya kala

Eleki sikoyo mbula soki 4 400, mpela moko monene ezindisaki mokili mobimba. Bato bakoki kobosana likambo wana te, mpe na mokili mobimba, bato na bato bazali na masapo oyo elobelaka likambo yango. Atako masapo yango ekeseni na makambo mikemike, nyonso emonisaka ete mwa bato moke ná banyama babikaki na mpela wana.

Bato oyo babikaki na Mpela, babikaki nde mpo bazalaki na makila malamu? Lisolo ya Biblia elobi bongo te. Likambo esengeli kobenda likebi na biso ezali ete Nzambe ayebisaki moto mokomoko te ete alingi kotinda Mpela. Ayebisaki nde Noa, mpe na nsima Noa ayebisaki bato ya ntango na ye ete etikali moke Mpela eya.​—Genese 6:13-16; 2 Petelo 2:5.

Mpo na kobika na mpela, esengelaki kozala na kati ya etuluku wana mpe kotosa malako oyo Nzambe apesaki Noa. Ezala banyama oyo babikaki na Mpela, babikaki mpo bakɔtaki na masuwa elongo na bato wana. Nzambe ayebisaki Noa polele makambo nyonso oyo esengelaki mpo na kobikisa banyama.​—Genese 6:17–7:8.

Bankama ya bambula na nsima, bankɔkɔ ya Noa, bana ya Semi, bakómaki baombo na Ezipito. Kasi, Nzambe azwaki mokano ya kolongola bango na boombo mpe komema bango na mokili oyo alakaki nkɔkɔ na bango Abalayama. Na ntango wana mpe, Nzambe ayebisaki mokano na ye na moto mokomoko te, ayebisaki naino bato oyo aponaki mpo na kozala batambwisi: Moize ná ndeko na ye Alona. (Exode 3:7-10; 4:27-31) Ntango baombo wana ya kala babimaki na Ezipito, Nzambe apesaki bango Mibeko na Ngomba Sinai mpe bakómaki ekólo Yisalaele.​—Exode 19:1-6.

Moyisalaele mokomoko abikaki mpo azalaki na kati ya bato wana oyo Nzambe asangisaki mpe mpo alandaki malako ya batambwisi oyo aponaki. Nzambe atikelaki Baezipito mosusu nzela ya kokɔta na kati ya bato wana oyo ye andimaki. Ntango Bayisalaele babimaki na Ezipito, bato wana bakendaki na bango, baponaki kozala na bato oyo basengelaki kozwa mapamboli ya Nzambe.​—Exode 12:37, 38.

Na ekeke ya liboso, Yesu abandaki kosakola, azalaki koyanganisa bato mpe kokómisa bango bayekoli na ye. Azalaki koteya bango nyonso elongo, atako azalaki mpe kotyela moto na moto likebi mpe kokokisa bamposa na ye. Yesu ayebisaki bayekoli na ye 11 ya sembo boye: “Bino bozali bato oyo bokangami na ngai makasi na kati ya komekama na ngai; mpe nazali kosala kondimana elongo na bino, ndenge mpe Tata na ngai asali kondimana elongo na ngai, mpo na bokonzi moko.” (Luka 22:28, 29) Na nsima, elimo santu ya Nzambe ekitelaki bayekoli ntango bazalaki bango nyonso esika moko.​—Misala 2:1-4.

Bandakisa nyonso wana ezali komonisa polele ete na ntango ya kala bato ya Nzambe bazalaki lisangá. Mwa bato moke oyo Nzambe azalaki kosolola na bango, na ndakisa Noa, Moize, Yesu, mpe bamosusu, azalaki mpe kotinda bango báyebisa bato mosusu makambo na ye. Likambo moko te ezali komonisa biso ete Nzambe azali kosala lisusu bongo te epai ya basaleli na ye na moi ya lelo. Kasi, yango ezali kobimisa motuna mosusu: Moto akoki kokɔta ata lingomba nini? Tokolobela likambo yango ya ntina mingi na lisolo oyo elandi.

[Elilingi na lokasa 4]

Banda kalakala, Nzambe atambwisaka bato na ye lokola lisangá

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto