Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 1/6 nk. 30-31
  • Tósala oyo ezali malamu na ntango ya mpasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tósala oyo ezali malamu na ntango ya mpasi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Masolo mosusu
  • Bisika na biso ya losambo
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Misala ya kobikisa ya Yehova na mikolo na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 1/6 nk. 30-31

Tósala oyo ezali malamu na ntango ya mpasi

NTOMA Paulo apesaki toli oyo: “Tiká tósala epai ya bato nyonso oyo ezali malamu, kasi mingimingi mpenza epai ya baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima.” (Bagalatia 6:10) Na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova basalaka nyonso mpo na kokokisa etinda wana na bomoi na bango, basalaka oyo ezali malamu epai ya bato nyonso, mingimingi epai ya baoyo bazali bandeko na bango na kati ya kondima. Yango emonanaka mbala na mbala na ntango mpasi ekómeli bandeko. Tózwa ndakisa ya makambo oyo euti kosalema na mikili misato.

Na Desɛmbɛ 2002, mopɛpɛ moko makasi, oyo ezalaki koleka na mbangu mpenza (kilomɛtrɛ 300 na ngonga moko) ebɛtaki esanga Guam. Bandako mingi ebukanaki, mosusu ekweaki mobimba. Kozanga koumela, bandeko ya masangá ya ekólo yango basalaki bikipi mpo na kosalisa mabota ya Batatoli oyo bandako to biloko na bango ebebaki mingi. Filiale ya Guam etindaki biloko mpe bandeko oyo bayebi mosala mpo na kobongisa bandako oyo ebebaki; filiale ya Hawaï mpe epesaki mabɔkɔ. Nsima ya mwa bapɔsɔ, ekipi moko ya basali ya mabaya eutaki na Hawaï mpe bayaki kosalisa bandeko na kotonga bandako; mpo na kopesa bango mabɔkɔ, bandeko ya Guam basɛngaki bakonje na misala. Elimo wana ya kosala na bomoko mpe na esengo ezalaki litatoli monene epai ya bato nyonso ya mboka wana.

Na kartye moko ya engumba Mandalay, na ekólo Myanmar, mɔtɔ epelaki na mbalakaka pene na Ndako moko ya Bokonzi. Ndako ya ndeko mwasi moko oyo atiká kosakola, ná libota na ye, ezalaki mpe pene wana. Lokola mopɛpɛ ezalaki kokende na ngámbo ya ndako na ye, akendaki mbangu kobenga bato na Ndako ya Bokonzi mpo na kosalisa ye. Akutaki bandeko mingi kuna mpamba te bazalaki kosala misala ya kobongisa Ndako ya Bokonzi. Bandeko bakamwaki ntango bamonaki ndeko mwasi yango mpamba te bazalaki koyeba te ete afandaka pene wana. Nokinoki, bandeko basalisaki ye na kobimisa biloko ya libota mobimba mpe kotya yango na esika ya malamu. Ntango mobali na ye, oyo azali Motatoli te, ayokaki ete mɔtɔ epeli pene na ndako na bango, ayaki noki mpenza, kasi akutaki bandeko bazali kosalisa libota na ye. Akamwaki mingi mpe atɔndaki bandeko; motema na ye mpe ekitaki, mpamba te mbala mingi miyibi bayibaka ntango makambo ya ndenge wana esalemaka. Boboto ya bandeko etindaki ndeko mwasi yango ná mwana na ye ya mobali bázonga na lisangá, mpe sikoyo bayanganaka na makita nyonso.

Na mbula eleki, na Mozambique, bato mingi banyokwamaki na nzala mpamba te elanga ezalaki makasi mpe bilanga ebotaki malamu te. Filiale ya Batatoli ya Yehova ya ekólo yango etindelaki nokinoki bandeko oyo bazalaki kokelela biloko ya kolya. Bazalaki kokabola biloko yango na Bandako ya Bokonzi, mbala mosusu nsima ya makita. Ndeko mwasi moko oyo abɔkɔlaka bana na ye ye moko alobaki boye: “Ntango nazalaki koya na makita nazalaki komitungisa mingi mpamba te nazalaki na eloko te ya kopesa bana ntango tokozonga na ndako.” Lisalisi oyo bandeko bapesaki elendisaki ye mpenza. Ndeko mwasi yango alobaki boye: “Namonaki yango lokola lisekwa!”

Lisusu, Batatoli ‘basalaka oyo ezali malamu’ na makambo ya elimo ntango basakolaka nsango ya Biblia oyo ezali kobɔndisa bato mpe kopesa bango elikya. Bandimaka likanisi ya moto moko ya bwanya na ntango ya kala, oyo alobaki ete: “Nde ye oyo akoyokamela [bwanya oyo euti na Nzambe] akofanda na kimya, mpe akobanga mabe te.”​—Masese 1:33.

[Bililingi na lokasa 31]

1, 2. Na Mozambique: Bazali kokabola biloko ya kolya epai ya bandeko oyo bakeleli

3, 4. Mopɛpɛ ya makasi ebebisi bandako mingi na Guam

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Mwana, na lobɔkɔ ya mwasi: Andrea Booher/​FEMA News Photo; mwasi, na likoló: AP Photo/​Pacific Daily News, Masako Watanabe

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto