Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/7 nk. 3-4
  • Makamwisi ya Yesu​—Makambo ya solo to masapo mpamba?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makamwisi ya Yesu​—Makambo ya solo to masapo mpamba?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Likambo oyo ekoki kosalema te elimboli nini?
  • Makamwisi​—Makambo ya solo to masapo mpamba?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mpo na nini kotyela makamwisi likebi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Makamwisi ya Yesu ekoki koteya yo nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Makamwisi ya Yesu​—Makambo ya solo to masapo ya mpamba?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/7 nk. 3-4

Makamwisi ya Yesu​—Makambo ya solo to masapo mpamba?

“BAMEMELAKI ye bato mingi oyo bazalaki na bademo; mpe abimisaki bilimo yango na liloba moko, mpe abikisaki baoyo nyonso bazalaki koyoka nzoto malamu te.” (Matai 8:16) “[Yesu] atɛlɛmaki mpe apamelaki mopɛpɛ mpe alobaki na mbu ete: ‘Fandá nyɛɛ! Tiká makɛlɛlɛ!’ Mpe mopɛpɛ ekitaki, mpe kimya moko monene ekɔtaki.” (Malako 4:39) Okanisi nini mpo na maloba oyo? Ondimaka ete ezali kolobela makambo ya solo, oyo esalemaki mpenza, to okanisaka ete ezali masese, masapo mpamba?

Lelo oyo, bato mingi bazalaka na ntembe makasi mpo na kondima ete makamwisi ya Yesu esalemaki mpenza. Na mikolo oyo, lokola bato bakómá kosalela masini monene babengi télescope mpe mikroskopɛ, kokende na bafize mpo na kotalatala likoló mpe kosalela mayele ya koyeba kobongola biloko mikemike oyo babengi gènes, oyo ezalaka na kati ya baselile, emonani ete ezali mpasi mpo bato bándima bansango ya makamwisi mpe makambo ya kokamwa oyo esalemi na nzambe moko boye.

Bato mosusu bakanisaka ete masolo ya makamwisi ezali ya solo te to ezali kaka masese. Mokomi ya buku moko oyo balobi ete ezali koluka koyeba Yesu “ya solosolo,” amonisi ete masolo ya makamwisi ya Klisto ezali kaka “bapiblisite” mpamba mpo na kopalanganisa mateya ya boklisto.

Bato mosusu bamonaka ete makamwisi ya Yesu ezali mpenza bokosi. Na bantango mosusu kutu, bafundaka ata Yesu ye moko ete azali mokosi. Justin le Martyr, moto ya ekeke ya mibale T.B., alobi ete bato oyo bazalaki koloba mabe mpo na Yesu “bakómaki kutu kobenga ye moto ya maji mpe mokosi ya bato.” Bato mosusu bazali koloba ete “soki Yesu asalaki makamwisi, ezali te mpo azalaki mosakoli Moyuda, kasi ezali mpo azalaki moto ya maji, moto oyo ayekolaki na batempelo ya bapakano.”

Likambo oyo ekoki kosalema te elimboli nini?

Mbala mosusu okokanisa boye: ntembe wana emonisi ete ntina mpenza ezali, oyo bato bazali koboya kondima makamwisi. Mpo na bango, ezali mpasi, ekoki kutu kosalema te, bándima likanisi oyo ete bilimo bakoki kosala makamwisi wana. Elenge moko, oyo azalaki koloba ete ayebi te soki Nzambe azali to te, alobaki boye: “Na mokuse, makamwisi esalemaka te.” Na nsima, azongelaki maloba ya David Hume, moto moko ya filozofi mpe mwana-mboka ya ekólo Écosse na ekeke ya 18, oyo akomaki boye: “Likamwisi eyokani te na mibeko oyo etambwisaka biloko oyo ezali na mokili.”

Nzokande, bato mingi bakowelela te koloba ete likambo moko boye ekoki kosalema te. Buku The World Book Encyclopedia elobi ete likamwisi ezali “likambo moko oyo bato bakoki kolimbola te soki bataleli mibeko oyo bayebi oyo etambwisaka biloko oyo ezali na mokili.” Na kotalela ndimbola wana, kotinda bafize na likoló, kosolola na telefone ya mabɔkɔ, mpe kotambwisa bampɛpo to bamasuwa na lisalisi ya basatelite elingaki kozala “makamwisi” mpo na bato mingi oyo bazalaki na bomoi eleki mbula nkama mpamba. Ya solo, ezali mpenza kozanga mayele koloba ete makamwisi ekoki kosalema te kaka mpo tokoki te kolimbola yango na kolanda makambo oyo toyebi sikoyo.

Soki totaleli mwa makambo na kati ya Makomami, oyo etali makamwisi oyo Yesu Klisto asalaki, tokomona nini? Makamwisi ya Yesu ezali makambo ya solo to masapo mpamba?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto