Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/8 nk. 3-4
  • Mpo na nini kotyela makamwisi likebi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini kotyela makamwisi likebi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Masolo mosusu
  • Makamwisi​—Makambo ya solo to masapo mpamba?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Osengeli nde kondima makamwisi oyo Biblia elobeli?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Makamwisi ya Yesu ekoki koteya yo nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Makamwisi ya Yesu​—Makambo ya solo to masapo mpamba?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/8 nk. 3-4

Mpo na nini kotyela makamwisi likebi?

“Makamwisi ebukaka mibeko ya siansi.”​—RICHARD DAWKINS, OYO AZALAKÁ PROFƐSƐRƐ YA SIANSI.

“Kondima makamwisi ezali mpenza likambo oyo ebongi. Ezali te likambo oyo ezali kotɛmɛla kondima ya moto, kasi, ezali nde komonisa ete Nzambe alingaka biloko oyo akelá mpe ndenge akobaka komibanzabanza mpo na biloko yango.”​—ROBERT A. LARMER, PROFƐSƐRƐ YA FILOZOFI.

“ONDIMAKA makamwisi?” Ndenge maloba oyo ezali awa na likoló emonisi yango, bato bazali na makanisi ndenge moko te. Kasi, eyano nini okoki kopesa na motuna yango?

Okoki kokakatana mpo na koloba ete “ɛɛ, nandimaka.” Ntango mosusu okoki kokanisa ete koyanola bongo ekomonisa ete ozali moto ya bibangabanga to okɔtá kelasi te. Bato mingi mpe bakanisaka bongo.

Epai mosusu, okoki kondima ete makamwisi esalemaka mpenza. Okoki kondima makamwisi oyo Biblia elobeli, na ndakisa likamwisi oyo Moize asalaki ntango akabolaki mai ya Mbu Motane. Okoki kondima ete lelo oyo mpe makamwisi esalemaka. Kutu, ankɛtɛ moko oyo euti kosalema kala mingi te emonisi ete “bato mingi ya mikili ya Mpoto, na ndakisa na États-Unis soki otuni bato minei, misato bakondima ete makamwisi ezali, mpe bato mingi mosusu (38%) ya Grande-Bretagne bandimaka makamwisi.” (The Cambridge Companion to Miracles, ebimisami na Graham Twelftree) Lisusu, kaka bakristo te nde bandimaka makamwisi. Buku moko (Britannica Encyclopedia of World Religions) elobi ete kondima makamwisi “ezali likambo ya mangomba nyonso.”

To okoki mbala mosusu koyanola ndenge bato mosusu bayanolaka: “Nayebi te, nakipaka makambo yango te! Makamwisi esalemá naino te na bomoi na ngai!” Kasi, mpo na nini osengeli mpenza kotyela makamwisi likebi?

Tózwa naino ndakisa oyo: Kanisá ete ozali na maladi oyo esilaka te. Soki otángi nsango na zulunalo moko ya minganga oyo elobaka makambo ya solo, mpe elobeli nkisi moko oyo ebimi sika, oyo ekoki kobikisa maladi na yo, omoni te ete ekobonga mpenza ozwa mwa ntango mpe osala makasi mpo na koluka koyeba soki ezali mpenza solo? Ndenge moko mpe, Biblia elaki ete mosika te, makamwisi mosusu ya minene ekosalema. Ekotalela bomoi ya moto nyonso awa na mabele. Omoni te ete ebongi mpenza kozwa mwa ntango to komipesa mpo na koluka koyeba soki elaka yango ezali solo?

Kasi, liboso tólobela elaka yango, tótalela naino makambo misato oyo esalaka ete bato mingi bátyela makamwisi ntembe.

[Etanda na lokasa 3]

LIKAMWISI EZALI NINI?

Ezali likambo moko oyo esalemaka, oyo elekaka nguya ya moto to ya biloko oyo ezali na mokili mpe balobaka ete eutaka na mokili ya bilimo.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto