Bokonzi ya Nzambe—Guvɛrnema oyo ezali kosala lelo oyo
“Ekobanda boni ebele ya bikólo oyo ezali na mimeseno, bozwi mpe nkita ndenge moko te eyokana? Bato mosusu bazali koloba ete kaka etumba oyo euti na planɛti mosusu nde ekotya bomoko na kati ya bato.”—The Age, zulunalo moko ya Australie.
ETUMBA moko ekouta mpenza na planɛti mosusu? Toyebi te soki etumba ya ndenge wana ekotya bomoko na kati ya bikólo nyonso ya mokili, kasi, bisakweli ya Biblia elobi ete likambo moko monene ezali koya, oyo ekosangisa bikólo nyonso ya mokili. Biblia elobi mpe ete likambo yango ekosalema na bikelamu oyo efandaka awa na mabelé te.
Davidi, mokonzi ya Yisalaele ya kala, asakolaki likambo yango oyo ekosalema na mokili. Na lisalisi ya elimo ya Nzambe akomaki boye: “Mikonzi ya nse bazali kotɛlɛma mpe mikóló bayangani myango elongo kotɛmɛla [Yehova] mpe Mopakolami na ye. Bango ete, Tóbuka nkanga na bango mpe tóbwaka nsinga na bango mosika.” (Nzembo 2:2, 3; Misala 4:25, 26) Omoni ete esakweli yango elobi ete bakonzi ya mokili bakosangana lokola moto moko mpo na kotɛmɛla Yehova, Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, ná mopakolami na ye, to Mokonzi oyo ye aponi, Yesu Klisto. Likambo yango ekosalema ndenge nini?
Na kotalela kolandana ya makambo ndenge Biblia eyebisaki yango mpe bisakweli oyo ekokisami, Yesu Klisto akómaki Mokonzi mpe abandaki koyangela na Bokonzi ya Nzambe na 1914.a Na ntango wana, bikólo nyonso ya mokili ezalaki na likanisi moko. Na esika ya kotosa Bokonzi ya Nzambe oyo eutaki kosalema, bikólo yango ebandaki kowelana na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba.
Ndenge nini Yehova Nzambe azali kotalela ezaleli oyo bakonzi ya mokili bazali komonisa? “Ye oyo afandi na likoló azali kosɛka, Nkolo akotánga bango eloko te. Akoloba na bango na nkanda na ye; akobangisa bango na kosilika na ye.” Na nsima, Yehova akoloba na Mwana na ye, Mokonzi oyo apakoli ete: “Lɔmbá ngai mpe nakopesa yo [bikólo] lokola libula na yo, mpe kino nsuka ya mokili ete ezala ya yo. Okotuta bango na lingenda ya ebende, okobuka bango lokola mbɛki ya moyemi.”—Nzembo 2:4, 5, 8, 9.
Yesu akotuta bikólo oyo ezali koboya bokonzi na ye na lingenda ya ebende na Armagedon to Hala–Magedona. Emoniseli, mokanda ya nsuka ya Biblia, ebengi likambo monene wana “etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,” mpe elobi ete “bakonzi ya mabelé mobimba oyo efandami” bazali koyangana mpo na etumba yango. (Emoniseli 16:14, 16) Na nguya ya bademo, bikólo ya mokili ekosangana na mokano moko: kobunda na Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.
Ntango oyo bato bakosangana mpo na kobundisa bokonzi ya Nzambe ekómi mpenza pene. Nzokande, “bomoko” na bango ekomemela bango litomba te. Kutu, kosangana na bango ekozala nde ebandeli ya makambo oyo ekosuka na kimya mpo na mokili mobimba oyo tozelaka banda kala. Na ndenge nini? Na etumba wana ya nsuka, Bokonzi ya Nzambe “ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso [ya mokili], mpe ekotikala lobiko na lobiko.” (Danyele 2:44) Bokonzi ya Nzambe nde guvɛrnema oyo ekokokisa mposa ya bato ya kozala na kimya na mokili mobimba, kasi ebongiseli moko ya bato te.
Mokambi ya guvɛrnema ya Nzambe
Ntango bato mingi ya sembo babondelaka ete: “Tiká bokonzi na yo eya. Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé,” basɛngaka nde Bokonzi wana. (Matai 6:10) Bokonzi ya Nzambe ezali na motema ya moto te, ezali nde guvɛrnema ya solo oyo esí esali makambo mingi ya malamu banda esalemaki na 1914. Tótalela mwa makambo ya ntina oyo ezali komonisa ete Bokonzi ya Nzambe ezali kosala lelo oyo.
Ya liboso, bokonzi yango ezali na ebongiseli moko ya malamu oyo ezali kosala mpenza, ebongiseli oyo etambwisami na Yesu Klisto, oyo afandi na kiti ya bokonzi. Na mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), Yehova Nzambe atyaki Yesu Klisto Mokonzi ya lisangá ya boklisto. (Baefese 1:22) Banda na ntango wana, Yesu azali kokokisa mokumba na ye ya mokonzi, mpe azali komonisa ete ayebi mpenza kotambwisa makambo. Na ndakisa, na ekeke ya liboso, ntango nzala ekɔtaki na Yudea, lisangá ezwaki bibongiseli nokinoki mpo na kosalisa baklisto. Mpo na kosalisa bandeko ya Antiokia, bakɔngɔlaki biloko mpe batindaki Balanaba ná Saulo bákende kotikela bango yango.—Misala 11:27-30.
Tokoki kolikya ete Yesu Klisto azali kosala makambo minene koleka sikoyo lokola guvɛrnema na ye ezali kosala. Ntango likama moko esalemi, ezala koningana ya mabelé, nzala, mpela, mopɛpɛ makasi, mɔtɔ ya volcan, Batatoli ya Yehova basalaka nokinoki mpo na kosalisa bandeko na bango mpe bato mosusu. Na ndakisa, na sanza ya Yanuali mpe ya Febwali 2001, ntango mabelé eninganaki makasi na ekólo Salvador, bandeko ya bisika ndenge na ndenge ya ekólo yango bamibongisaki mpo na kosalisa baoyo bazwaki likama, mpe Batatoli ya Yehova mosusu bautaki na Canada, na Guatemala, mpe na États-Unis bakendaki kosalisa bandeko na bango. Nsima ya mwa mikolo, batongaki bandako misato ya makita mpe bandako koleka 500 ya bandeko oyo ebebaki.
Bato oyo guvɛrnema ya Nzambe ekoyangela
Banda na 1914, ntango Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na likoló, ezali koyanganisa bato na yango na mokili mobimba. Yango ezali kokokisa esakweli moko monene ya Yisaya oyo elobi boye: “Ekozala ete na mikolo ya nsuka, ngomba ya ndako ya [Yehova] [losambo na ye ya solo oyo etombwani] ekokokisama likoló koleka ngomba nyonso, . . . mpe mabota nyonso bakokenda wana.” Esakweli yango emonisi ete bato ya “bikólo mingi” bakobuta na ngomba mpe bakondima mateya mpe mibeko ya Yehova.—Yisaya 2:2, 3.
Bato yango oyo bayei na losambo ya Yehova na ntango na biso basali lisangá moko monene ya bandeko baklisto koleka milio 6 oyo bafandi na mikili koleka 230. Na mayangani ya Batatoli ya Yehova oyo esangisaka bato oyo bautaka na mikili ndenge na ndenge, mbala mingi bato bakamwaka ntango bamonaka bolingo, kimya, mpe bomoko na kati ya ebele ya bato wana oyo batalelaka lisusu bokeseni ya bikólo, ya mimeseno, mpe ya minɔkɔ te. (Misala 10:34, 35) Esɛngaka guvɛrnema moko ya solo, oyo ezali kosala mosala mpe ezali makasi mpo elonga kosangisa bato ya ebele ya bikólo ndenge wana báfanda na kimya, boye te?
Bokonzi ya Nzambe mpe mateya
Guvɛrnema nyonso ezalaka na makambo oyo esɛngaka bapɛplɛ bákokisa, mpe moto nyonso oyo alingi kofanda na ekólo oyo guvɛrnema yango ezali koyangela asengeli kokokisa makambo yango. Ndenge moko mpe, ezali na makambo oyo Bokonzi ya Nzambe ezali kosɛnga na bato nyonso oyo balingi kozala bato na yango. Kasi, mpo na kosala ete ebele ya bato oyo bauti na bikólo ndenge na ndenge mpe bazali na mimeseno ndenge na ndenge bándima kotosa makambo yango ezali likambo moke te. Yango mpe ezali likambo mosusu oyo ezali komonisa ete Bokonzi ya Nzambe ezali mpenza; ezali na ebongiseli malamu ya koteya makambo oyo ezali kobongola makanisi mpe mitema ya bato.
Ndenge nini guvɛrnema ya Nzambe ezali kokokisa mosala monene wana? Na kolanda ndenge oyo bantoma bazalaki kosala, elingi koloba kosakola nsango malamu “ndako na ndako,” mpe koteya Liloba ya Nzambe epai ya moto nyonso oyo asepeli. (Misala 5:42; 20:20) Mateya yango ezali kobota mbuma nini? Na zulunalo moko oyo ebimaka na Canada, Jacques Johnson, sango moko ya Lingomba ya Katolike, alobelaki milende oyo asalaki mpo na kopekisa mwasi moko atika koyekola na Batatoli ya Yehova. Akomaki boye: “Nalɛmbaki nzoto mpe ngai moko namonaki ete nakolonga te. Nakómaki komona ete na boumeli ya basanza, basi wana Batatoli ya Yehova bakómisaki mwasi yango oyo azalaki kokoka kobima libándá te moninga na bango mpenza. Bazalaki kosalisa ye, kozwa ye lokola moninga na bango, mpe basalaki na ye boyokani makasi. Mosika te, akómaki mondimi ya molende na lingomba na bango mpe nakokaki kosala eloko moko te mpo na kopekisa ye.” Se ndenge nsango ya Biblia oyo Batatoli ya Yehova bazali koteya mpe etamboli na bango ya boklisto esimbaki motema ya mwasi wana oyo azalaki liboso Mokatolike, mitema ya bamilio ya bato na mokili mobimba ezali mpe kosimbama.
Mateya yango ya Bokonzi emonisaka mitinda ya Biblia mpe elakisaka bato etamboli ya malamu. Eteyaka bango bálingana mpe bápesana lokumu, ata soki bakeseni bikólo, mposo to minɔkɔ. (Yoane 13:34, 35) Lisusu, esalisaka bato bándima toli oyo: “Bótika kolanda ebongiseli ya makambo ya ntango oyo, kasi bóbongwana na kokómisáká makanisi na bino sika, mpo bómindimisa bino moko nini wana mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.” (Baloma 12:2) Bamilio ya bato batiki makambo mabe oyo bazalaki kosala mpe bazali kondima na esengo kotosa mibeko mpe mitinda ya guvɛrnema ya Nzambe; bazali sikoyo na kimya mpe esengo mpe na elikya malamu mpo na mikolo ezali koya.—Bakolose 3:9-11.
Zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali kosalisa mpenza mpo na kosangisa bato na mokili mobimba. Na lisalisi ya ebongiseli moko monene ya kobongola mpe bamasini ya kobimisa mikanda na minɔkɔ ebele, masolo mingi ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebimaka nzela moko na minɔkɔ 135, mpe batángi na yango koleka 95 likoló ya monkama na mokili mobimba bayekolaka mateya ndenge moko pɔsɔ na pɔsɔ, atako bato na bato na minɔkɔ na bango.
Mokomi moko ya Lingomba ya Mormons asalaki liste ya mongomba oyo, longola lingomba na bango, ezali mpenza kolonga na mosala ya kopalanganisa nsango malamu. Alobaki ete Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!, oyo Batatoli ya Yehova babimisaka, eleki bazulunalo nyonso oyo ebimisamaka mpo na kopalanganisa nsango malamu mpe alobaki boye: “Moto moko te akoki koloba ete Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to Lamuká ezali na bikomakoma!—kutu, esalisaka bato báfungola miso na ndenge oyo namoná mpenza te na mikanda ya mangomba mosusu. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ná Lamuká! ezali bazulunalo malamu oyo elobelaka makambo oyo ezali mpenza kosalema, bakomi na yango balandelaka makambo malamu liboso ya kokoma, mpe ezalaka na makambo ya solo.”
Ezali na ebele ya makambo oyo ezali komonisa ete Bokonzi ya Nzambe ezali mpenza. Na esengo mpe na molende mpenza, Batatoli ya Yehova basakolaka “nsango malamu oyo ya bokonzi” epai ya bazalani na bango mpe balendisaka bango bákóma bato ya bokonzi yango. (Matai 24:14) Elikya yango ezali kosepelisa yo? Yo mpe okoki kozwa mapamboli na kozala na kati ya bato oyo bazali koteyama makambo oyo Bokonzi yango ezali kosɛnga mpe bazali kosala makasi mpo na kokokisa yango. Kasi, likambo mosusu ya malamu koleka ezali ete okozala na elikya ya kofanda na mokili ya sika oyo Bokonzi yango ekoyangela, epai “boyengebene ekofanda.”—2 Petelo 3:13.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na kozwa bandimbola mosusu, talá buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, mokapo 10, “Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela,” nkasa 90-97, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 5]
Na 1914, bikólo ekɔtaki na etumba ya mokili mobimba
[Bililingi na lokasa 6]
Kotinda biloko mpo na kosalisa bandeko oyo bazwi likama emonisaka bolingo ya boklisto
[Elilingi na lokasa 7]
Batatoli ya Yehova ya mokili mobimba bayekolaka makambo ndenge moko