Yehova amonisaka nkembo na ye epai ya bato ya komikitisa
“Komikitisa mpe kobanga Yehova ememaka bozwi mpe nkembo mpe bomoi.”—MASESE 22:4, NW.
1, 2. (a) Ndenge nini Mokanda ya Misala emonisi ete Setefano azalaki “mobali moko oyo atondi na kondima mpe na elimo santu”? (b) Nini emonisi ete Setefano azalaki na komikitisa?
SETEFANO azalaki “mobali moko oyo atondi na kondima mpe na elimo santu.” Lisusu, “atondaki na boboto mpe na nguya.” Moyekoli yango ya Yesu oyo azalaki na bomoi na ekeke ya liboso, azalaki kosala makamwisi minene mpe bilembo minene na kati ya bato. Mokolo mosusu, etuluku moko ya bato balukaki kotyana na ye ntembe, “nzokande bakokaki te kotɛlɛma liboso ya bwanya mpe ya elimo oyo ye azalaki koloba na yango.” (Misala 6:5, 8-10) Emonani polele ete Setefano azalaki koyekola mpenza Liloba ya Nzambe, mpe alongisaki yango liboso ya bakonzi ya mangomba ya Bayuda ya ntango wana. Litatoli ya solo oyo apesaki, oyo ekomami na Misala mokapo 7, ezali komonisa ete azalaki mpenza koluka koyeba ndenge oyo mokano ya Nzambe ezali kokokisama.
2 Setefano azalaki te lokola bakonzi ya mangomba oyo, lokola bazalaki na lokumu mpe batángá mingi, bazalaki komona bato mosusu mpamba, ye azalaki na komikitisa. (Matai 23:2-7; Yoane 7:49) Atako ayebaki Biblia malamu, asepelaki mpenza na mokumba bapesaki ye ya “kokabolaka biloko ya kolya na bamesa” mpo bantoma bámipesa mobimba “na mabondeli mpe na mosala ya ministre ya liloba.” Bandeko bazalaki kosepela na Setefano, yango wana, azalaki na kati ya bato nsambo ya lokumu malamu oyo baponaki mpo na kokabolaka biloko ya kolya mokolo na mokolo. Na komikitisa mpenza, andimaki mokumba yango.—Misala 6:1-6.
3. Setefano amonaki likambo nini ya kokamwa oyo emonisaki ye boboto monene ya Nzambe?
3 Yehova amonaki ete Setefano azalaki na komikitisa, azalaki kosepela na makambo ya elimo mpe azalaki sembo. Ntango Setefano azalaki koloba liboso ya ebele ya bakonzi ya Bayuda na Sanedrina, banguna na ye “bamonaki ete elongi na ye ezalaki lokola elongi ya anzelu.” (Misala 6:15) Elongi na ye ezalaki ya momemi-nsango ya Nzambe, ezalaki na kimya oyo eutaka na Nzambe ya nkembo, Yehova. Nsima ya kopesa bazuzi ya Sanedrina litatoli ya solosolo, Setefano amonaki likambo moko ya kokamwa oyo emonisi boboto monene ya Nzambe. “Ye, lokola atondaki na elimo santu, atalaki mpenza na kati ya likoló mpe amonaki nkembo ya Nzambe mpe Yesu atɛlɛmi na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe.” (Misala 7:55) Emonaneli wana endimisaki lisusu Setefano ete Yesu azali mpenza Mwana ya Nzambe mpe Masiya. Elendisaki Setefano, oyo azalaki moto ya komikitisa, mpe endimisaki ye ete Yehova azalaki kosepela na ye.
4. Yehova amonisaka nkembo na ye epai ya banani?
4 Ndenge emonaneli oyo Nzambe alakisaki Setefano emonisi yango, Yehova amonisaka nkembo na ye mpe mokano na ye epai ya bato oyo babangaka ye, oyo bazali na komikitisa mpe bamonaka ete boyokani na bango ná ye ezali na motuya mingi. Biblia elobi ete “komikitisa mpe kobanga Yehova ememaka bozwi mpe nkembo mpe bomoi.” (Masese 22:4, NW) Yango wana, ezali na ntina mingi tóyeba nini mpenza babengi komikitisa, ndenge nini tokoki kolona ezaleli yango ya ntina mingi, mpe matomba nini tokozwa soki tozali komonisa yango na makambo nyonso ya bomoi na biso.
Nzambe azali na komikitisa
5, 6. (a) Komikitisa ezali nini? (b) Ndenge nini Yehova amonisi ezaleli ya komikitisa? (c) Komikitisa ya Yehova esengeli kotinda biso tósala nini?
5 Bato mosusu bakoki kokamwa ete Yehova Nzambe, oyo aleki likoló mpe na nkembo na molɔ́ngɔ́ mobimba, azali ndakisa eleki monene ya komikitisa. Mokonzi Davidi alobaki na Yehova boye: “Okopesa ngai nguba na yo ya lobiko, mpe lobɔkɔ na yo ya mobali ekosimba ngai, mpe komikitisa na yo ekotombola ngai.” (Nzembo 18:35, NW) Ntango Davidi alobaki ete Yehova azali na komikitisa, asalelaki liloba moko ya Liebele oyo elimboli mpenzampenza “kogumbama.” Longola liloba “komikitisa,” maloba mosusu oyo euti na liloba wana ezali, na ndakisa, “kokita,” “komisɔkisa.” Bandimbola yango emonisi ete Yehova amikitisaki na ndenge akitaki mpo na kozala moninga ya Davidi, moto ya kozanga kokoka, mpe aponaki ye mokonzi mpo azala momonisi na Ye. Lokola mwa maloba oyo ezali likoló ya Nzembo 18 emonisi yango, Yehova abatelaki Davidi mpe asungaki ye, abikisaki ye “na mabɔkɔ ya bayini na ye nyonso mpe na lobɔkɔ ya Saulo.” Davidi mpe ayebaki ete lokumu nyonso oyo akokaki kokóma na yango na bokonzi na ye ezalaki mpo Yehova amikitisaki mpo na kosalisa ye. Lokola Davidi ayebaki likambo wana, esalisaki ye abungisa komikitisa na ye te.
6 Ezali boni mpo na biso? Yehova ateyi biso solo, mpe ntango mosusu apesi biso mikumba ya minene na kati ya ebongiseli na ye to mpe azali kosalela biso na lolenge moko boye mpo na kokokisa mokano na ye. Ndenge nini tosengeli kotalela nyonso wana? Esengeli mpenza kotinda biso tómikitisa. Tosengeli kozala na botɔndi mpo na komikitisa ya Yehova mpe koboya komitombola, mpamba te soki tozali komitombola, tokosuka mabe.—Masese 16:18; 29:23.
7, 8. (a) Ndenge nini Yehova amonisaki komikitisa epai ya Manase? (b) Na ndenge nini Yehova mpe Manase bapesi ndakisa oyo tosengeli kolanda na likambo etali komikitisa?
7 Yehova amonisi ezaleli ya komikitisa mingi na ndenge amikómisaki moninga ya bato ya kozanga kokoka, kasi amonisaki mpe ete andimaka kolimbisa bato ya komikitisa mpe atombolaka bango. (Nzembo 113:4-7) Tózwa ndakisa ya Manase, mokonzi ya Yuda. Manase asalelaki mabe bokonzi na ye mpe akɔtisaki losambo ya lokuta mpe “asalaki mabe mingi na miso ya [Yehova] mpe apeliselaki ye nkanda na ye.” (2 Ntango 33:6) Nsukansuka, Yehova apesaki Manase etumbu na ndenge atikaki mokonzi ya Asulia alongola ye na kiti ya bokonzi. Na bolɔkɔ oyo batyaki ye, Manase “abondelaki elongi ya [Yehova], Nzambe na ye mpe amisɔkisaki mingi”; yango wana, Yehova azongisaki ye na kiti ya bokonzi na Yelusaleme, mpe Manase “ayebaki ete [Yehova] azali Nzambe.” (2 Ntango 33:11-13) Komikitisa oyo Manase amonisaki na nsuka esepelisaki Yehova, mpe Yehova ye moko amikitisaki na ndenge alimbisaki ye mpe azongisaki ye na kiti ya bokonzi.
8 Motema ya kolimbisa ya Yehova mpe kobongola motema ya Manase epesi biso mateya ya ntina mingi na likambo ya komikitisa. Tosengeli kobosanaka te ete ndenge oyo tozali kotalela bato oyo basali biso mabe mpe ezaleli na biso ntango tosali lisumu ekoki kosala ete Yehova asepela na biso to te. Soki tolimbisaka bato mabe oyo basali biso mpe tomikitisaka mpe tondimaka mabunga na biso, tokoki kolikya ete Yehova akolimbisa biso.—Matai 5:23, 24; 6:12.
Yehova amonisaka nkembo na ye epai ya bato ya komikitisa
9. Komikitisa ezali nde bolɛmbu? Limbolá.
9 Nzokande, tosengeli komikosa te na kokanisa ete komikitisa mpe bizaleli mosusu oyo ezali ndeko ya komikitisa ezali nde bolɛmbu to kokanga miso na mabe. Biblia ezali komonisa ete Yehova azali na komikitisa; kasi soki asepeli te na likambo moko, amonisaka yango mpe alakisaka nguya monene na ye. Mpo na komikitisa na ye, Yehova atyelaka bato ya komikitisa likebi, to apesaka bango lokumu; kasi azalaka mosika mpenza na bato ya lolendo. (Nzembo 138:6) Ndenge nini Yehova amonisi ete atyelaka basaleli na ye oyo bazali na komikitisa likebi?
10. Ndenge 1 Bakolinti 2:6-10 emonisi yango, Yehova amonisaka nini epai ya bato ya komikitisa?
10 Na ntango mpe na nzela oyo ye moko aponaki, Yehova amonisaki bato ya komikitisa makambo mingi oyo ezali kolakisa ndenge oyo mokano na ye ezali kokokisama. Makambo minene yango ebombami na miso ya bato ya lolendo oyo batyelaka bwanya ya bato motema to, na lolendo nyonso, bakangamaka na yango. (1 Bakolinti 2:6-10) Nzokande bato ya komikitisa, lokola bayebi mokano ya Yehova malamu, mitema na bango etindaka bango bákumisa Yehova mpamba te bamonaka mpe basepelaka mingi lisusu na nkembo na ye monene.
11. Ndenge nini bato mosusu na ekeke ya liboso bamonisaki ete bazalaki na komikitisa te, mpe yango ezangisaki bango makambo nini?
11 Na ekeke ya liboso, bato mingi, ata mpe baoyo bazalaki komibenga baklisto, bazalaki na komikitisa te mpe makambo etali mokano ya Nzambe oyo Paulo ayebisaki bango ebɛtisaki bango libaku. Soki Paulo azalaki “ntoma epai ya bikólo mosusu,” ezalaki te mpo na ekólo na ye, bakelasi atángaki, mbula na ye, to mpo asalaki makambo mingi ya malamu. (Baloma 11:13) Mbala mingi, bato oyo batalelaka makambo na liso ya elimo te bakanisaka ete Yehova atalaka makambo wana mpo na kopona moto oyo alingi kosalela mpo na kokokisa mokano na ye. (1 Bakolinti 1:26-29; 3:1; Bakolose 2:18) Nzokande, motema boboto ya Yehova mpe mokano na Ye ya sembo nde etindaki ye apona Paulo. (1 Bakolinti 15:8-10) Bato oyo Paulo abengaki “bantoma minene,” bakisa mpe bato mosusu oyo bazalaki kotɛmɛla ye, bazalaki kondima Paulo te, mpe ndenge oyo azalaki kolimbolela bango makambo ya Biblia. Lokola bazalaki na komikitisa te, yango epekisaki bango koyeba mpe kososola lolenge ya kokamwa oyo Yehova azali kokokisa mokano na ye. Biso tókeba mpo tótyola te totókanisa mabe te mpo na baoyo Yehova aponi kosalela mpo na kokokisa mokano na ye to tókanisela bango mabe.—2 Bakolinti 11:4-6.
12. Na ndenge nini ndakisa ya Moize ezali komonisa ete Yehova asepelaka na bato ya komikitisa?
12 Biblia elobeli mpe bato mingi ya komikitisa oyo bamonaki mwa moke nkembo ya Nzambe. Moize, ‘oyo azalaki na komikitisa’ koleka bato nyonso, amonaki nkembo ya Nzambe mpe azalaki moninga na ye. (Mituya 12:3) Na makambo ndenge na ndenge, Mozalisi akumisaki moto yango ya komikitisa, oyo azalaki mobateli ya mpate mbula 40, mingimingi na mokili ya Alabia. (Exode 6:12, 30) Na lisalisi ya Yehova, Moize akómaki molobeli ya ekólo Yisalaele mpe motambwisi na yango. Azalaki kosolola na Nzambe. Na emonaneli moko, amonaki “elilingi ya [Yehova].” (Mituya 12:7, 8; Exode 24:10, 11) Bato oyo bandimaki mosaleli mpe momonisi wana ya Nzambe, oyo azalaki na komikitisa, bazwaki mpe mapamboli. Biso mpe tokozwa mapamboli soki tondimi mpe totosi Yesu, mosakoli oyo aleki Moize, mpe “moombo ya sembo mpe ya mayele” oyo ye atye.—Matai 24:45, 46; Misala 3:22.
13. Na ekeke ya liboso, ndenge nini Yehova amonisaki nkembo na ye epai ya bato oyo bazalaki kaka babateli ya bampate?
13 Banani oyo “nkembo ya Yehova engɛngɛlaki bango” mpe baanzelu bayebisaki bango nsango malamu ya kobotama ya “Mobikisi moko . . . oyo azali Klisto Nkolo”? Ezalaki te bakonzi ya mangomba oyo bazalaki bato ya lolendo to bato minene mpe ya lokumu, kasi ezalaki bato oyo bazalaki kaka babateli ya bampate “oyo bazalaki kofanda libándá mpe kolekisa bokɛngɛli ya butu na kobatela bitonga na bango.” (Luka 2:8-11) Bato yango bazalaki na mayele mingi to mosala ya lokumu te. Kasi, Yehova amonaki bango mpe aponaki bango bázala bato ya liboso oyo bakoyoka nsango ya kobotama ya Masiya. Tomoni mpenza ete Yehova amonisaka nkembo na ye epai ya bato ya komikitisa mpe oyo babangaka ye.
14. Mapamboli nini Nzambe apesaka bato ya komikitisa?
14 Bandakisa yango ezali koteya biso nini? Ezali komonisa ete Yehova asepelaka na bato ya komikitisa mpe asalisaka bango báyeba mpe básosola mokano na ye. Yehova aponaka bato oyo ntango mosusu bato bakanisaki te mpe atindaka bango mpo na koyebisa mokano na ye ya nkembo. Likambo yango esengeli kolendisa biso tókoba kotalela Yehova, bisakweli na ye, mpe ebongiseli na ye mpo na koyeba ndenge oyo tosengeli kotambola. Tózala na elikya ete Yehova akokoba koyebisa basaleli na ye oyo bazali na komikitisa ndenge oyo azali kokokisa mokano na ye monene. Mosakoli Amosa alobaki boye: “Nkolo [Yehova] akosala likambo te bobele ete akoyebisa mwango na ye epai ya baombo na ye, bango basakoli.”—Amosa 3:7.
Loná ezaleli ya komikitisa mpo Nzambe asepela na yo
15. Mpo na nini tosengeli kosala makasi mpo na kobatela elimo ya komikitisa, mpe ndenge nini bomoi ya Saulo, mokonzi ya Yisalaele ezali komonisa ntina ya kosala yango?
15 Mpo Nzambe asepelaka na biso ntango nyonso, tosengeli kobatela ezaleli ya komikitisa. Soki moto azali na komikitisa lelo, yango elingi koloba te ete akozala na ezaleli yango libela. Moto akoki kobungisa ezaleli ya komikitisa mpe kokóma na lolendo, oyo etindaka moto na komitombola mpe nsukansuka, na mabe. Yango nde emonanaki epai ya Saulo, mokonzi ya liboso ya Yisalaele. Ntango baponaki ye mokonzi, amimonaki ete azali ‘moke na miso na ye mpenza.’ (1 Samwele 15:17) Nzokande, nsima ya koyangela mbula mibale mpamba, lolendo etindaki ye na kosala makambo oyo azalaki na ndingisa ya kosala te. Aboyaki kotosa makambo ndenge Yehova abongisaki, ete bambeka epesama na nzela ya mosakoli Samwele, mpe alukaki komilongisa na likambo asalaki ya kotumba mbeka ye moko. (1 Samwele 13:1, 8-14) Likambo yango ezalaki ebandeli ya ebele ya makambo mosusu oyo emonisaki ete azalaki na komikitisa te. Nzambe azalaki kosepela na ye lisusu te, elimo ya Nzambe elongwaki epai na ye, mpe nsukansuka akufaki liwa moko ya nsɔni. (1 Samwele 15:3-19, 26; 28:6; 31:4) Liteya mpo na biso ezali polele: Tosengeli kosala makasi mpo na kobatela ezaleli ya komikitisa mpe botosi mpe kobengana mpenza makanisi ya komitombola; na ndenge yango, tokosala te makambo na lolendo, oyo esalaka ete Yehova asepela lisusu na moto te.
16. Ndenge nini kokanisa boyokani na biso na Yehova mpe na bazalani na biso esalisaka biso na kolona ezaleli ya komikitisa?
16 Atako komikitisa etángami te na kati ya mbuma ya elimo ya Nzambe, ezali ezaleli malamu mingi oyo tosengeli kolona. (Bagalatia 5:22, 23; Bakolose 3:10, 12) Lokola komikitisa emonisaka makanisi na biso, elingi koloba ndenge oyo tomitalelaka mpe ndenge totalelaka basusu, esɛngaka molende mpo na kolona yango. Soki tozali kokanisa mpe komanyola likoló ya boyokani na biso na Yehova mpe baninga na biso, ekosalisa biso tóbatela ezaleli ya komikitisa. Na miso ya Nzambe, bato nyonso ya kozanga kokoka bazali lokola matiti oyo ekolaka mpo na mwa ntango, na nsima ekauki mpe ekufi. Bato bazali lokola mayoyo. (Yisaya 40:6, 7, 22) Tokanisi mpenza ete lititi moko ekoki komikumisa mpo ezali mwa molai koleka matiti mosusu? Liyoyo moko ekoki mpenza komikumisa mpo ekoki kopumbwa mwa mosika koleka mayoyo mosusu? Kozwa ata likanisi ya ndenge wana ezali bozoba. Yango wana, ntoma Paulo alobaki na baninga na ye baklisto boye: “Nani ayebisi yo ete okeseni na mosusu? Ɛɛ, eloko nini ozali na yango oyo bapesaki yo kopesa te? Nzokande, soki mpenza bapesaki yo yango kopesa, mpo na nini ozali komikumisa lokola nde bapesaki yo yango kopesa te?” (1 Bakolinti 4:7) Soki tozali komanyola na bavɛrsɛ ya Biblia lokola oyo touti kolobela, yango ekosalisa biso tólona ezaleli ya komikitisa mpe tómonisa yango.
17. Nini esalisaki mosakoli Danyele alona ezaleli ya komikitisa, mpe nini ekoki kosalisa biso tósala lokola ye?
17 Babengaki mosakoli Danyele ‘moto alingami mingi’ na Nzambe mpamba te ‘amikitisaki.’ (Danyele 10:11, 12) Nini esalisaki Danyele na kolona komikitisa? Ya liboso, azalaki kotyela Yehova motema mobimba, azalaki ntango nyonso kobondela ye. (Danyele 6:10, 11) Lisusu, Danyele azalaki moyekoli ya molende mpe ya sembo ya Liloba ya Nzambe, mpe yango esalisaki ye abosana te mokano monene ya Nzambe. Azalaki mpe kondima mabunga na ye, kasi te kaka oyo ya bato ya ekólo na bango. Lisusu, azalaki koluka mpenza ete Nzambe amonana sembo, kasi ye te. (Danyele 9:2, 5, 7) Tokoki nde kozwa liteya na ndakisa malamu mingi ya Danyele mpe kosala makasi mpo na kolona ezaleli ya komikitisa mpe komonisa yango na makambo nyonso ya bomoi na biso?
18. Bato oyo bazali na komikitisa lelo oyo bakozwa nkembo nini?
18 Masese 22:4 (NW) elobi ete: “Komikitisa mpe kobanga Yehova ememaka bozwi mpe nkembo mpe bomoi.” Ya solo, Yehova asepelaka na bato ya komikitisa, mpe yango ememelaka bango nkembo mpe bomoi. Asafa, mokomi moko ya nzembo, alɛmbaki mpenza na elimo mpe alingaki mpenza kotika mosala ya Nzambe, kasi na nsima, Yehova asungaki ye mpe alobaki na komikitisa ete: “Okotambolisaka ngai na toli na yo, mpe na nsima okoyamba ngai na nkembo na yo.” (Nzembo 73:24) Ezali boni mpo na biso lelo oyo? Bato oyo bazali na komikitisa bakozwa nkembo nini? Yehova akosepela na bango mpe akopambola bango; kasi, bakozala mpe na elikya ya komona kokokisama ya maloba ya Mokonzi Davidi oyo: “Bato ya [komikitisa] bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya ya solo.” Oyo nde elikya kitoko!—Nzembo 37:11.
Ozali koyeba lisusu?
• Na nini Setefano azali ndakisa ya moto ya komikitisa oyo Yehova amonisaki nkembo na Ye?
• Na ndenge nini Yehova Nzambe amonisi ezaleli ya komikitisa?
• Tángá bandakisa oyo ezali komonisa ete Yehova amonisaka nkembo na ye epai ya bato ya komikitisa.
• Ndenge nini ndakisa ya Danyele ezali kosalisa biso tólona ezaleli ya komikitisa?
[Etanda na lokasa 12]
Mobali ya mpiko mpe ya komikitisa
Na liyangani monene ya Bayekoli ya Biblia (lelo oyo Batatoli ya Yehova) oyo esalemaki na 1919, na Cedar Point, na etúká ya Ohio, na États-Unis, Joseph Rutherford, oyo azalaki na mbula 50 na ntango wana mpe azalaki kokamba mosala ya kosakola na mokili mobimba, apesaki nkombo mpo na koyamba bapaya, kosalisa bango na komema basakosi mpe kokende kolakisa bango bisika ya kolala. Nzokande, na mokolo ya nsuka ya liyangani, asalaki lisukulu moko ya kafukafu liboso ya bayangani 7 000, mpe na lisukulu yango alobaki boye: “Bozali baambasadɛrɛ ya Mokonzi ya bakonzi mpe ya Nkolo ya bankolo, bozali kosakola . . . bokonzi ya nkembo ya Nkolo na biso.” Atako Ndeko Rutherford azalaki moto ya kondima makasi, oyo ayebanaki ete azalaki koloba polele mpe na kobanga te makambo oyo ayebaki ete ezali solo, azalaki mpe na komikitisa liboso ya Nzambe. Likambo yango ezalaki komonana mingi na mabondeli na ye na Betele, na ntango bazalaki kotalela mokapo ya mokolo.
[Elilingi na lokasa 9]
Atako Setefano ayebaki Biblia malamu, andimaki na komikitisa nyonso kokabola biloko ya kolya
[Elilingi na lokasa 10]
Yehova asepelisaki na ezaleli ya komikitisa ya Manase
[Elilingi na lokasa 12]
Mpo na nini babengaki Danyele ete ‘moto alingami mingi’?