Nini esalaka ete bomoi ezala mpenza na ntina?
BATUNAKI Jesse, elenge moko ya mbula 17, ntina ya bomoi, mpe ye alobaki boye: “Lyá, mɛlá, sakaná, ndenge olingi, ntango ozali naino na bomoi.” Kasi, Suzy apesaki likanisi mosusu. Ye alobaki boye: “Mpo na ngai, moto ye moko nde apesaka bomoi na ye ntina na makambo oyo aponi kosala.”
Osí omituná soki ntina ya bomoi ezali nini? Bomoi ya bato nyonso ezali na ntina kaka moko? To nde Suzy alobaki solo ete moto na moto apesaka bomoi na ye ntina? Atako bato ya siansi babimisi biloko ndenge na ndenge oyo ebongisi bomoi na biso, tozali naino kaka koluka koyeba ntina ya bomoi. Na bomoi ya moto, ekómaka na ntango moko oyo amitunaka ete, ‘Mpo na nini tozali na bomoi?’
Bato ya siansi bazali kolukaluka eyano na motuna yango. Eyano nini basí bapesi? David Barash, profesɛrɛ moko ya pisikoloji mpe zoloji, alobi boye: “Ata na kati ya evolisyo, tomoni te ntina oyo tozali na bomoi.” Mpo na bato ya mayele ya bioloji oyo bandimaka evolisyo, bikelamu nyonso ya bomoi ezali kaka na ntina moko: kosala makasi mpo na kotikala na bomoi mpe kobotana. Yango wana, Profesɛrɛ Barash alobi boye: “Na kati ya molɔ́ngɔ́ oyo tozali koyeba ntina na yango te mpe etondi na makambo ya mpasi mpo na biso bato, biso moko nde tozali na mokumba ya kopona, na bonsomi nyonso mpe na mayele, makambo oyo tokoki kosala mpo bomoi na biso ezala na ntina.”
Moto oyo apesaka ntina na bomoi
Ntina ya bomoi ezali nde ete moto na moto apona ndenge oyo alingi komitambwisa? Na esika ya kotika biso na molili na kati ya molɔ́ngɔ́, kozanga ete tóyeba ntina ya bomoi, Biblia esilá koyebisa biso banda kala ete tozali na mokili mpo na ntina moko. Bomoi ebimaki yango moko te mpe na mbalakaka te. Biblia eyebisi biso ete Mozalisi abongisaki mabelé na boumeli ya bambula ebele liboso asala moto. Ata eloko moko te ebimá na mbalakaka. Asalaki makambo nyonso “malamu mingi.” (Genese 1:31; Yisaya 45:18) Mpo na nini? Mpamba te Nzambe azalaki na mokano moko mpo na bato.
Kasi, yango elingi koloba te ete Nzambe abongisá libela, na mokano na ye to na kati ya makila na biso, makambo nyonso oyo ekokómela mokomoko na biso. Atako bizaleli na biso mingi ezali ya makila, ebele ya makambo mosusu oyo tosalaka, biso moko nde toponaka yango. Biso nyonso tokoki kopona ndenge tolingi kotambwisa bomoi na biso.
Atako moto na moto akoki kopona makambo oyo alingi kosala na bomoi na ye, ekozala libunga monene soki toboyi kotalela Mozalisi ntango tozali kozwa bikateli. Kutu, bato mingi bamoni ete ntina mpenza ya bomoi ezali nde na boyokani na biso na Nzambe. Boyokani oyo ezali na kati ya Nzambe mpe ntina ya bomoi emonani mpenza na nkombo na ye, Yehova, oyo elimboli, “Ye oyo akómisaka.” (Exode 6:3; Nzembo 83:18) Elingi koloba, akokisaka mokemoke likambo nyonso oyo alaki mpe akokisaka ntango nyonso mikano na ye. (Exode 3:14; Yisaya 55:10, 11) Kanisá naino moke ndimbola ya nkombo yango. Nkombo Yehova ezali ndanga mpo na biso nyonso ete ye nde moto oyo apesaka bomoi na biso ntina ya solosolo.
Soki moto andimi ete Mozalisi azali, lolenge na ye ya kotalela bomoi ebongwanaka mpenza. Line, elenge mwasi moko ya mbula 19, alobaki boye: “Soki natali biloko ya kokamwa oyo Yehova akelá mpe ntina oyo akelá yango, namonaka ete akelaki ngai mpe na ntina.” Nzokande, Ambre alobaki boye: “Soki nayoki bato mosusu bazali koloba ete bayebi te soki Nzambe azali, nazalaka na botɔndi mpenza mpo ngai nayebi ete azali. Biloko oyo Yehova akelá emonisaka mpenza ete azali.” (Baloma 1:20) Ya solo, kondima ete Mozalisi azali ezali malamu, kasi esengeli mpe koluka kozala mpenza na boyokani na ye.
Kozala moninga ya Nzambe
Na likambo yango mpe, Biblia ekoki kosalisa biso. Mikapo ya liboso na Biblia emonisi mpenza ete Yehova Nzambe azali Tata ya bolingo. Na ndakisa, nsima ya kokela Adama ná Eva, atikaki bango te báluka bango moko koyeba soki ye azali nani. Azalaki mbala na mbala kosolola na bango. Ezali te ete atyaki bango na Edene mpo báluka bango moko ndenge bakomitambwisa, mpo ye asala makambo mosusu. Kasi, azalaki kopesa bango malako ya polele mpo bázala na bomoi ya malamu. Apesaki bango mosala moko ya malamu mpenza, mpe asalaki nyonso mpo bákoba koyekola makambo mosusu ya bomoi. (Genese 1:26-30; 2:7-9) Yango te makambo oyo moboti malamu mpe ya bolingo asengeli kosala mpo na bana na ye? Kanisá naino malamu. Elenge mosusu, nkombo na ye Danielle, alobaki boye: “Soki natali ndenge Yehova akelá mabelé mpe ndenge apesá biso makoki ya kosepela na biloko oyo ye akelá, namonaka mpenza ete akelaki biso mpo tózala na esengo.”
Longola yango, Yehova alingi ete bana na ye nyonso bázala na boyokani malamu mpenza na ye, ndenge tata nyonso ya malamu asalaka. Na likambo yango, Misala 17:27 eyebisi biso ete: “Azali mosika te na mokomoko na biso.” Yango ekoki kosalisa biso na nini? Ambre alobi boye: “Lokola nayebi Yehova, namonaka ete ata soki bato nyonso basundoli ngai, nakotikala ngai moko ata mokolo moko te. Ata na likambo nini, nakoki kozanga mosungi te.” Lisusu, soki oyebi Yehova, okomona ete azali na boboto, azali moyengebene mpe malamu. Okoki mpenza kotyela ye motema. Geoffrey alobaki boye: “Ntango kaka Yehova akómaki moninga na ngai ya motema, namonaki ete nazali na mosungi mosusu te oyo aleki ye.”
Nzokande, bato balobi makambo mingi ya mabe mpo na Yehova. Bazali kopesa ye foti mpo na bampasi oyo bato bazali kokutana na yango mpe mabe oyo mangomba ezali kosala. Balobi ete ata makambo mosusu ya mabe mingi oyo esalemi na mokili euti kaka epai na ye. Kasi, Deteronome 32:4, 5 elobi boye: “Nzela na ye nyonso boyengebene. . . . Bango basaleli ye mabe, bazali bana na ye lisusu te na ntina na libebi na bango.” Talá ntina oyo tosengeli mpenza koluka koyeba biso moko mokano ya Nzambe malamumalamu.—Deteronome 30:19, 20.
Mokano ya Nzambe ekokisami
Nzokande, ata soki biso toponi kosala nini, eloko moko te ekopekisa Nzambe kokokisa mokano na ye mpo na mabelé mpe mpo na bato. Tóbosana te ete Ye nde akelá biloko nyonso. Kasi, mokano ya Nzambe mpo na mabelé mpe mpo na bato ezali nini? Yesu Klisto alobelaki mokano yango na Lisolo Likoló ya Ngomba ntango alobaki ete: “Esengo na bato ya elimo ya boboto, mpo bakozwa libula ya mabelé.” Na nsima, amonisaki ntoma Yoane ete Nzambe akani mpenza “kobebisa baoyo bazali kobebisa mabelé.” (Matai 5:5; Emoniseli 11:18) Lokola Yesu azalaki elongo na Nzambe ntango azalaki kokela, ayebi ete mokano ya Nzambe banda ebandeli ezalaki ete bato ya kokoka báfanda libela na libela na paladiso awa na mabelé. (Genese 1:26, 27; Yoane 1:1-3) Toyebi mpe ete Nzambe abongwanaka te. (Malaki 3:6) Nzambe alaki boye: “Lokola mwango mobongisaki ngai, ekozala mpe bongo; lokola mokano mokanaki ngai, ekotɛma mpe bongo.”—Yisaya 14:24.
Na mikolo na biso, Yehova así abandi koyanganisa libota moko ya bato, oyo bazali na lokoso te, balukaka mpe matomba na bango moko te, kasi bazali kolinga Nzambe mpe bazalani na bango. (Yoane 13:35; Baefese 4:15, 16; Bafilipi 2:1-4) Ezali lisangá ya bato oyo bamipesi na bolingo na bango moko mpe bazali ntango nyonso kokende liboso mpo na kokokisa mokumba moko: kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe oyo ezali koya, liboso ete mokili oyo esuka. (Matai 24:14; 28:19, 20) Na mikili koleka 230, baklisto koleka milio motoba, bazali kosambela Yehova na bolingo mpe na bomoko.
Luká ete bomoi na yo ezala na ntina
Soki ozali na mposa ete bomoi na yo ezala mpenza na ntina, osengeli koyeba ete Yehova azali kobenga yo okɔta na lisangá ya basaleli na ye, elingi koloba “libota ya bayengebene” na ye. (Yisaya 26:2) Kasi, okoki komituna: ‘Bomoi ezali ndenge nini na lisangá yango? Nazali mpenza na mposa ya kozala na kati ya lisangá yango?’ Yoká makambo oyo bilenge mosusu balobi:
Quentin: “Lisangá ebatelaka ngai na makambo mabe ya mokili oyo. Koyeba ete Yehova amibanzabanzaka mpo na bomoi na ngai esalisaka ngai mpenza namona ete azali mpe alingi ngai nazala na esengo.”
Geoffrey: “Lisangá ezali esika eleki malamu epai nakoki kolendisama. Kuna, nazali na bandeko oyo basungaka mpe balendisaka ngai. Bango nde libota na ngai ya solosolo.”
Line: “Ezali na esengo mosusu te oyo ekokani na esengo ya kosalisa moto andima solo ya Biblia mpe azwa ekateli ya kosalela Yehova. Yango epesaka ngai mpenza esengo.”
Cyril: “Soki nayebaki Yehova te, bomoi na ngai elingaki kozala na ntina ata moke te. Nalingaki kozala kaka lokola ebele ya bato mosusu oyo bazali koyengayenga mpo na koluka bomoi ya malamu, kasi bazali kozwa yango te. Nzokande, Yehova apesi ngai libaku moko ya malamu koleka, ya kozala moninga na ye, mpe yango nde ezali kopesa bomoi na ngai ntina.”
Omoni te ete ekozala malamu yo mpe oluka koyeba Yehova mpo bomoi na yo ekóma na ntina? Soki opusani penepene na Mozalisi na yo, Yehova Nzambe, okomona ete bomoi na yo ekokóma mpenza na ntina.
[Bililingi na lokasa 31]
Soki moto azali na boyokani malamu na Nzambe, bomoi na ye ekómaka mpenza na ntina
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 29]
Fɔtɔ ya NASA