Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 1/10 nk. 16-20
  • Tómityela mokano ya malamu na bomoi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tómityela mokano ya malamu na bomoi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mokano na yo na bomoi ezali nini?
  • “Bomoi ya solosolo” ezali nini?
  • Makambo oyo tosengeli kobomela nzoto
  • ‘Tósalelaka mokili na makambo nyonso te’
  • Tótyaka mokano ya Nzambe na esika ya liboso
  • Motuna 1: Bomoi na ngai ezali mpenza na ntina?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Nzambe alingi ete tózala na bomoi ya ndenge nini?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Kosala mokano ya Nzambe lelo oyo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Bomoi oyo ezali na ntina, sikoyo mpe mpo na libela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 1/10 nk. 16-20

Tómityela mokano ya malamu na bomoi

“Tiká ete nyonso oyo ezali na mpema esanzola Yehova. Aleluya!”​—NZEMBO 150:6, NW.

1. Lobelá ndakisa ya elenge moko oyo azalaki koluka bomoi oyo ezali na ntina.

SEUNG JIN,a oyo akolaki na Corée, alobi boye: “Nayekolaki kelasi ya monganga mpo nazalaki na mposa ya kosalisa basusu. Nazalaki mpe kokanisa ete lokumu ya kozala monganga mpe mbongo oyo yango epesaka ekomemela ngai esengo. Ntango nayaki koyeba ete monganga akoki mpenza kosalisa bato ndenge nazalaki kokanisa te, nalɛmbaki nzoto. Nayekolaki kosala mayemi, kasi mayemi na ngai ezalaki mpenza kosalisa basusu te, mpe namonaki ete nazali koluka kaka bolamu na ngai moko. Nakómaki molakisi, kasi mosika te namonaki ete nazalaki kopesa basusu kaka boyebi ya mpamba, kasi te kolakisa bango ndenge ya kozala na esengo ya solosolo.” Lokola ebele ya bato mosusu, Seung Jin azalaki koluka bomoi oyo ezali na ntina.

2. (a) Kozala na mokano na bomoi elimboli nini? (b) Ndenge nini toyebi ete Mozalisi asalaki biso na ntina?

2 Kozala na bomoi oyo ezali na ntina elimboli kozala na mokano ya solosolo mpe koyeba nini mpenza tolingi kosala. Bato bakoki mpenza kozala na mokano ya ndenge wana? Ɛɛ! Lokola Nzambe apesá biso mayele, lisosoli mpe likoki ya kokanisa, yango emonisi ete azalaki na mokano moko ya malamu ntango akelaki biso. Na yango, tokoki koyeba ntina ya bomoi mpe kozala na esengo kaka soki tozali kokokisa mokano ya Mozalisi na biso.

3. Mokano ya Nzambe mpo na bato etali makambo nini?

3 Biblia ezali komonisa ete mokano ya Nzambe mpo na biso etali makambo mingi. Na ndakisa, lolenge ya kokamwa oyo tokelamá na yango ezali komonisa bolingo monene ya Nzambe. (Nzembo 40:5; 139:14) Na yango, kozala na bomoi oyo eyokani na mokano ya Nzambe elimboli kolinga basusu na motema moko, ndenge Nzambe alingaka bango. (1 Yoane 4:7-11) Elimboli mpe kolanda malako ya Nzambe, oyo ekosalisa biso tózala na bomoi oyo eyokani na mokano na ye.​—Mosakoli 12:13; 1 Yoane 5:3.

4. (a) Tosengeli kosala nini mpo tómityela mokano ya malamu na bomoi? (b) Wapi mokano eleki malamu oyo moto akoki komityela?

4 Mokano ya Nzambe ezalaki mpe ete bato bázala na esengo mpe na kimya na kati na bango mpe na bikelamu mosusu. (Genese 1:26; 2:15) Kasi, tosengeli kosala nini mpo tózala na esengo mpe na kimya? Lokola mwana moke, oyo azalaka na esengo mpe na kimya ntango baboti bazali pembeni na ye, biso mpe tokozala na bomoi oyo ezali na ntina soki tozali mpenza na boyokani ná Tata na biso ya likoló. (Baebele 12:9) Nzambe azali mpenza kosala ete tózala na boyokani na ye, mpamba te apesi biso likoki ya kopusana penepene na ye mpe ayokaka mabondeli na biso. (Yakobo 4:8; 1 Yoane 5:14, 15) Soki tozali ‘kotambola elongo na Nzambe’ na kondima mpe tokómi baninga na ye, tokoki kopesa Tata na biso ya likoló esengo mpe nkembo. (Genese 6:9; Masese 23:15, 16; Yakobo 2:23) Wana nde mokano eleki malamu oyo moto akoki komityela. Mokomi ya nzembo akomaki boye: “Tiká ete nyonso oyo ezali na mpema esanzola Yehova.”​—Nzembo 150:6.

Mokano na yo na bomoi ezali nini?

5. Mpo na nini kotya bamposa ya mosuni na esika ya liboso ezali bozoba?

5 Nzambe alingaka mpe tókokisaka bamposa na biso mpe oyo ya mabota na biso. Yango elimboli mpe kokokisa bamposa ya mosuni mpe ya elimo. Nzokande, yango ekosɛnga tózala na bokatikati, mpo bamposa ya mosuni emɛla te oyo ya elimo, mpamba te oyo ya elimo nde eleki ntina. (Matai 4:4; 6:33) Likambo ya mawa, bato mingi babomaka nzoto kaka mpo na koluka biloko ya mosuni. Nzokande, koluka kokokisa bamposa na biso nyonso kaka na biloko ya mosuni ezali bozoba. Ankɛtɛ moko oyo eutaki kosalema na Azia emonisaki ete bato ya mbongo mingi “bazali na kimya te atako bazali na lokumu mpe bazali kosala makambo minene.”​—Mosakoli 5:11.

6. Toli nini Yesu apesaki na likambo ya koluka bomɛngo?

6 Yesu alobelaki “nguya ya bokosi ya bomɛngo.” (Malako 4:19) Ndenge nini bomɛngo ekoki kokosa moto? Moto mosusu akoki kokanisa ete bomɛngo ekomemela ye esengo, kasi ezali bongo te. Salomo, mokonzi ya bwanya, alobaki boye: “Moto oyo alingaka mbongo, atondaka yango té.” (Mosakoli 5:9, Bible na lingala ya lelo oyo) Kasi, tokoki mpe kosalela Nzambe na molimo na biso mobimba na ntango tozali mpe kolanda mikano ya mosuni? Te. Yesu alobaki boye: “Moto moko te akoki kosala lokola moombo mpo na bankolo mibale; mpo to akoyina moko mpe akolinga mosusu, to akokangama na moko mpe akotyola mosusu. Bokoki te kosala lokola baombo mpo na Nzambe mpe mpo na Bomɛngo.” Yesu alendisaki bayekoli na ye bámibombela biloko ya motuya awa na mabelé te, kasi nde “biloko ya motuya na likoló,” elingi koloba, koluka kozala na nkombo malamu liboso ya Nzambe, oyo “ayebi makambo nini bozali na yango mposa liboso kutu ete bósɛnga ye.”​—Matai 6:8, 19-25.

7. Ndenge nini tokoki kosimba makasi “bomoi ya solosolo”?

7 Ntango ntoma Paulo akomelaki moninga na ye ya mosala Timote, apesaki toli oyo ebongi mpenza na likambo yango. Alobaki na Timote boye: “Pesá mitindo na baoyo bazali bato ya bomɛngo . . . bátya elikya na bango te na bomɛngo oyo ekoki kobunga lelo to lobi, kasi nde epai ya Nzambe, oyo apesaka biso biloko nyonso beboo mpo biso tósepela . . . , bázala lobɔkɔ pɛtɛɛ, bato bayebi kokaba, komibombeláká moboko kitoko na esika moko ya malamu mpo na mikolo oyo ezali koya, mpo básimba makasi bomoi ya solosolo.”​—1 Timote 6:17-19.

“Bomoi ya solosolo” ezali nini?

8. (a) Mpo na nini bato mingi babomaka nzoto mpo na kokóma na bomɛngo mpe na lokumu? (b) Likambo nini bato yango babosanaka?

8 Mpo na bato mingi, “bomoi ya solosolo” elimbolaka bomɛngo mpe bisengo. Zulunalo moko na Azia elobaki boye: “Bato mingi oyo batalaka bafilme to televizyo bakómaka kolula biloko oyo bamonaka mpe kolɔta biloko oyo bakoki kozwa.” Bato mingi batyaka makanisi na bango nyonso na koluka bozwi mpe lokumu. Mingi bakabaka bolenge na bango mpe nzoto na bango, basundolaka mabota na bango mpe bapesaka makambo ya elimo mokɔngɔ mpo na koluka biloko wana. Kaka bato moke nde bayebaka ete makambo wana oyo bamonaka na televizyo emonisaka kaka “elimo ya mokili,” elingi koloba makanisi oyo ezali kotambwisa ebele ya bato na mokili oyo mpe ezali kotinda bango bámitambwisa na ndenge oyo eyokani te na mokano ya Nzambe mpo na bato. (1 Bakolinti 2:12; Baefese 2:2) Yango wana, tokoki kokamwa te ete bato mingi bazali na esengo te lelo oyo.​—Masese 18:11; 23:4, 5.

9. Likambo nini bato bakoki kosala te, mpe mpo na nini?

9 Ezali boni mpo na bato oyo babomaka nzoto mpo na bolamu ya basusu, elingi koloba balukaka kosilisa nzala, maladi mpe mabe? Milende wana oyo basalaka ezali mpenza kosalisa bato. Kasi, ata soki basali ndenge nini, bakobongisa mokili oyo te. Mpo na nini? Mpo “mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe,” Satana, mpe alingi te ete mokili ebonga.​—1 Yoane 5:19.

10. Ntango nini bato ya sembo bakokóma na “bomoi ya solosolo”?

10 Ezali mpenza mawa mpo na moto oyo azali kotya elikya na ye nyonso kaka na bomoi oyo! Paulo akomaki boye: “Soki na bomoi oyo kaka nde totye elikya na kati ya Klisto, tozali mpenza bato ya mawa koleka bato nyonso.” Bato oyo bakanisaka ete nyonso esuki kaka na bomoi oyo balobaka ete: “Tiká tólya mpe tómɛla, mpo lobi tokokufa.” (1 Bakolinti 15:19, 32) Kasi, elikya ezali. Ezali na “likoló ya sika mpe na mabelé moko ya sika oyo tozali kozela engebene elaka na ye, mpe na kati na yango boyengebene ekofanda.” (2 Petelo 3:13) Na ntango wana, baklisto bakokóma na “bomoi ya solosolo,” elingi koloba “bomoi ya seko” na nzoto ya kokoka, ezala na likoló to awa na mabelé, ntango oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela na bolingo mpenza.​—1 Timote 6:12.

11. Mpo na nini kosala nyonso mpo matomba ya Bokonzi ekende liboso ezali mokano oyo eleki malamu?

11 Kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa mpo na libela mikakatano nyonso ya bato. Na yango, kosala nyonso mpo matomba ya Bokonzi ekende liboso nde mokano eleki malamu oyo moto akoki komityela. (Yoane 4:34) Soki tozali kosala bongo, tokozala mpenza na boyokani na Tata na biso ya likoló. Tokozala mpe na esengo ya kosala elongo na bamilio ya bandeko na biso, oyo bazali na mokano ndenge moko na oyo ya biso.

Makambo oyo tosengeli kobomela nzoto

12. Bokeseni nini ezali na kati ya bomoi oyo ná “bomoi ya solosolo”?

12 Biblia elobi ete mokili oyo “ezali koleka mpe ndenge moko mposa na yango.” Eloko moko te na mokili ya Satana ekotikala, ezala lokumu to bomɛngo ya mokili, “kasi moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.” (1 Yoane 2:15-17) Na bokeseni na bomɛngo, lokumu mpe bisengo ya mokili, oyo ekoki kobunga lelo to lobi, “bomoi ya solosolo,” elingi koloba bomoi ya seko na nse ya Bokonzi ya Nzambe, ezali ya libela, mpe yango nde tosengeli kobomela nzoto.

13. Ekateli nini ya malamu mwasi moko ná mobali na ye bazwaki?

13 Tózwa ndakisa ya Henry ná Suzanne. Bandimaka mpenza elaka ya Nzambe ete akosalisa moto nyonso oyo atyaka Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na ye. (Matai 6:33) Yango wana, na esika bango nyonso bábomaka nzoto na mosala mpo na kofutela ndako ya kitoko, baponaki kofutela ndako moko ya ntalo moke mpo bálekisaka ntango mingi na makambo ya elimo elongo na bana na bango mibale. (Baebele 13:15, 16) Moninga na bango moko ya motema akamwaki na ekateli wana. Alobaki na Suzanne boye: “Suzanne, soki bolingi kofanda na ndako ya kitoko, bosengeli kondima komipimela makambo mosusu.” Kasi, Henry ná Suzanne bayebaki ete kotya Yehova na esika ya liboso “ezali na elaka ya bomoi ya sikoyo mpe ya oyo ezali koya.” (1 Timote 4:8; Tito 2:12) Ntango bana na bango bakolaki, bakómaki babongisi-nzela ya molende. Bango nyonso libota mobimba bamonaka ete babungisá eloko moko te; kutu bazwaki matomba mingi na ndenge bamityelaki mokano ya kolanda “bomoi ya solosolo.”​—Bafilipi 3:8; 1 Timote 6:6-8.

‘Tósalelaka mokili na makambo nyonso te’

14. Makama nini ekoki kokómela biso soki tobosani ntina mpenza ya bomoi na biso?

14 Kasi, soki tobosani ntina mpenza ya bomoi na biso mpe totiki kosimba “bomoi ya solosolo,” yango ekozala likama monene. Tokoki ‘komemama na mitungisi mpe bomɛngo mpe bisengo ya bomoi oyo.’ (Luka 8:14) Mposa makasi ya kokóma na bomɛngo mpe “mitungisi ya bomoi” ekoki kotinda biso tómipesa mobimba na makambo ya mokili oyo. (Luka 21:34) Likambo ya mawa, bato mosusu bamipesi makasi na koluka bomɛngo mpe “babungisami nzela uta na kondima mpe bamitɔbɔlitɔbɔli na ebele ya bampasi,” mpe babebisi ata boyokani na bango na Yehova. Bakwei mpenza na likama monene mpo batiki ‘kosimba makasi bomoi ya seko’!​—1 Timote 6:9, 10, 12; Masese 28:20.

15. Matomba nini libota moko oyo ‘esalelaki mokili na makambo nyonso te’ bazwaki?

15 Paulo apesaki “baoyo bazali kosalela mokili” toli ete bázala “lokola baoyo bazali kosalela yango na makambo nyonso te.” (1 Bakolinti 7:31) Keith ná Bonnie balandaki mpenza toli yango. Keith alobi boye: “Nakómaki Motatoli ya Yehova ntango kaka nasilisaki kelasi ya monganga ya mino. Nasengelaki kopona. Nakokaki koyambaka bato ya maladi ebele mpe kokóma na mbongo mingi, kasi soki nasalaka bongo, nalingaki kotikala na ntango mingi te mpo na mosala ya Bokonzi. Naponaki koyambaka bato ya maladi moke kaka mpo nazala na ntango mingi mpo na makambo ya elimo mpe mpo na kokokisaka bamposa ya libota na ngai, oyo ekómaki na bana mitano. Atako tozalaki na mbongo mingi te, toyekolaki kosala mwa ekonzo, mpe tozalaki kozanga eloko te. Libota na biso ezalaki na boyokani makasi mpe na esengo mingi. Nsukansuka, biso nyonso tokómaki babongisi-nzela. Lelo oyo, bana na biso babalá, mpe misato babotá. Lokola bazali kotya mokano ya Yehova na esika ya liboso, mabota na bango mpe ezali na esengo.”

Tótyaka mokano ya Nzambe na esika ya liboso

16, 17. Pesá bandakisa ya bato ya makoki ndenge na ndenge oyo Biblia elobeli, mpe ntina oyo tokanisaka bango.

16 Biblia ezali na bandakisa ya bato oyo bazalaki kosala mokano ya Nzambe ná baoyo baboyaki kosala yango. Bato ya bileko, mimeseno mpe bikólo nyonso bakoki kozwa mateya na bandakisa wana. (Baloma 15:4; 1 Bakolinti 10:6, 11) Nimerode atongaki bingumba ya minene, mpe na ndenge yango atɛmɛlaki Yehova. (Genese 10:8, 9) Kasi, ebele ya bato mosusu mpe bapesaki ndakisa malamu. Na ndakisa, Moize atyaki te lokumu oyo azalaki na yango na Ezipito na esika ya liboso na bomoi na ye. Atalelaki nde mikumba oyo Nzambe apesaki ye “lokola bomɛngo ya monene koleka biloko ya motuya ya Ezipito.” (Baebele 11:26) Ndenge moko mpe, monganga Luka asalisaki Paulo ná baklisto mosusu na bamaladi na bango. Kasi, asalisaki bato mingi nde lokola mopalanganisi ya nsango malamu mpe moko ya bakomi ya Biblia. Paulo ayebani te lokola nganga-mayele na Mibeko, kasi lokola misionɛrɛ mpe “ntoma epai ya bikólo mosusu.”​—Baloma 11:13.

17 Tokanisaka Davidi libosoliboso te lokola mokambi ya basoda to mobɛti-miziki, kasi lokola ‘moto oyo asepelisaki motema ya Nzambe.’ (1 Samwele 13:14) Tokanisaka Danyele te mpo na mosala na ye na guvɛrnema ya Babilone, kasi na ndenge asalelaki Yehova lokola mosakoli ya sembo. Tokanisaka Esetele te lokola mwasi ya mokonzi ya Perse, kasi nde lokola mwasi ya mpiko mpe ya kondima. Tokanisaka Petelo, Andele, Yakobo mpe Yoane te lokola babomi-mbisi, kasi lokola bantoma ya Yesu. Yesu, ndakisa eleki monene, ayebani te lokola “mosali ya mabaya”, kasi lokola “Klisto.” (Malako 6:3; Matai 16:16) Bato nyonso wana bayebaki malamu ete ata soki bazalaki na mayele, bozwi mpe lokumu, basengelaki komipesa libosoliboso te na makambo ya mokili, kasi nde na mosala ya Nzambe. Bayebaki ete bakozwa matomba mingi koleka soki bamityeli mokano ya kozala basi mpe mibali oyo babangaka Nzambe.

18. Elenge moklisto moko amonaki malamu asalela bomoi na ye ndenge nini, mpe nini amonaki na nsima?

18 Seung Jin, oyo tolobeli na ebandeli, ayebaki mpe likambo yango. Alobi boye: “Na esika namipesa mobimba na mosala ya monganga, ya kosala mayemi to ya molakisi, namonaki malamu nakokisa ekateli oyo nazwaki ya komipesa na Nzambe. Nazali kosala sikoyo epai basakoli bazali mingi te mpe kosalisa bato bákɔta na nzela ya bomoi ya seko. Nazalaki kokanisa ete mosala ya mobongisi-nzela ezali mpenza na esengo te. Sikoyo, nazali na esengo koleka, lokola nazali kobongisa bomoto na ngai mpe makoki na ngai ya koteya bato ya ndenge nyonso. Namoni mpenza ete kokómisa mokano ya Yehova mokano na biso ezali bomoi oyo eleki malamu.”

19. Tosengeli kosala nini mpo bomoi na biso ezala na ntina?

19 Biso baklisto tozali na libaku malamu ya kozala na boyebi oyo ezali kobikisa bomoi ya bato mpe na elikya ya lobiko. (Yoane 17:3) Na yango, tosengeli te ‘koyamba boboto monene ya Nzambe mpo na kozanga kokokisa mokano na yango.’ (2 Bakolinti 6:1) Tósalela nde mikolo mpe bambula oyo totikali na yango mpo na kokumisa Yehova. Tiká ete tópalanganisa boyebi oyo ezali komema esengo lelo oyo mpe ekopesa bomoi ya seko. Soki tosali bongo, tokomona bosolo ya maloba ya Yesu oyo: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Misala 20:35) Mpe bomoi na biso ekozala mpenza na ntina.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Topesi bango bankombo mosusu.

Okoki kolimbola?

• Wapi mokano eleki malamu oyo tosengeli komityela?

• Mpo na nini koboma nzoto mpo na biloko ya mokili ezali bozoba?

• “Bomoi ya solosolo” oyo Nzambe alaki ezali nini?

• Ndenge nini tokoki kosalela bomoi na biso mpo na kokokisa mokano ya Nzambe?

[Bililingi na lokasa 18]

Baklisto basengeli koboma nzoto mpo na makambo ya ntina

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto