Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/10 nk. 3-7
  • Matomba ya koluka bozwi ya elimo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Matomba ya koluka bozwi ya elimo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bozwi ya elimo eleki nyonso
  • Biblia ezali koteya biso bomoi ya malamu koleka
  • Bozwi ya elimo ezali na matomba
  • Koluka bozwi ya elimo ezali mpenza na litomba?
  • Luká bomɛngo ya elimo mpo yango esilaka te
  • Bizaleli oyo ebongisaka mpenza bomoi
    Lamuká!—2014
  • Bozwi ekoki kopesa yo bolamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitinda oyo esilaka ngala te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Bomɛngo ya solosolo na mokili ya sika ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/10 nk. 3-7

Matomba ya koluka bozwi ya elimo

“Ye oyo alingaka mbongo atondaka yango té; pe oyo alingaka bomengo, azwaka na yango litomba té.”​—Mosakoli 5:10, Bible na lingala ya lelo oyo.

KOBOMA nzoto na mosala ekoki kolɛmbisa motó, mpe yango ekoki kobenda bamaladi, oyo mbala mosusu ekoki komema na liwa. Na mikili mingi, mabala mingi ezali kokufa. Makambo ya mabe wana ezali kouta mingimingi na mposa makasi ya bozwi ya mokili. Moto oyo azali na mposa makasi ya kokóma na bozwi mingi atondaka oyo azali na yango te, azalaka ntango nyonso na mposa ya kobakisa bozwi na ye, atako ezaleli yango ekoki komemela ye mikakatano. Buku moko elobi boye: “Na mboka na biso, bato mingi balingi kaka bázala na bozwi lokola Songolo, ata soki Songolo, mpo na kozwa mbongo yango, abomaka nzoto na ndenge oyo ekoki kobɛlisa ye maladi ya motema ntango azali naino elenge.”

Moto oyo azali na lokoso ya biloko ya mokili atondaka yango te, mpe yango ekoki kopekisa ye kosepela na makambo mosusu. Mbala mingi, bapiblisite esalelaka kaka bolɛmbu na biso bato na likambo yango. Batelevizyo mpe baradio etondi na bapiblisite oyo ezali ntango nyonso kotinda bato básomba biloko oyo ntango mosusu bazali ata na mposa na yango te, to mpe bazali na makoki ya kosomba yango te. Nyonso wana ekoki komemela bato mpasi.

Mposa makasi ya kozala na bozwi mingi ekoki mokemoke komemela biso mikakatano, ezala na nzoto to na makanisi. Na ndakisa, Mokonzi Salomo alobaki boye: “Motema ya kimya ekoyeisela mosuni bomoi.” (Masese 14:30) Nzokande, koboma nzoto na mosala, komitungisa na makanisi, mpe mposa ya kokóma na bozwi mingi ekoki komemela biso bamaladi mpe kosilisa esengo na biso. Mposa makasi ya biloko ya mokili ekoki mpe kobebisa boyokani na biso na bandeko mpe baninga. Soki moto azali koyokana te na bandeko na ye mpe na bato mosusu, akozala mpe na esengo te.

Bozwi ya elimo eleki nyonso

Eleki lelo bankama ya bambula, ntoma Paulo alobaki boye: “Bótika kolanda ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” (Baloma 12:2) Mokili elingaka bato oyo balandaka makambo na yango. (Yoane 15:19) Na bapiblisite balakisaka biloko oyo esepelisaka miso, matoi, lolemo, zolo na yo, mpo okóma na mposa makasi ya bozwi ya mokili. Bazali kosalela mingimingi “mposa ya miso” mpo na kopesa yo ná bato mosusu lokoso ya biloko ya mokili.​—1 Yoane 2:15-17.

Kasi, ezali na makambo oyo ezali na motuya koleka mbongo, lokumu mpe bozwi ya mokili oyo. Na ntango ya kala, Mokonzi Salomo azalaki na biloko nyonso oyo bato balukaka. Atongaki bandako, azalaki na bilanga ya ndunda mpe ya nzete ya mbuma, basali, bibwɛlɛ, bayembi ya basi mpe ya mibali, bakisa mpe ebele ya wolo ná palata. Salomo alekaki bato nyonso oyo bazalaki liboso na ye na bozwi. Azalaki na bozwi moko ya nsɔmɔ koleka. Salomo azalaki na nyonso oyo moto akoki kozala na mposa na yango. Nzokande, ntango atalaki nyonso oyo asalaki na bomoi na ye, alobaki boye: “Nyonso ezalaki bobele bisalasala mpe koluka kokwa mopɛpɛ.” ​—Mosakoli 2:1-11.

Na bwanya mingi oyo Yehova apesaki ye, Salomo ayebaki ete bozwi ya elimo nde ememelaka moto bolamu ya solosolo. Akomaki boye: “Tóyoka nsuka ya likambo mobimba: Tosá Nzambe mpe batelá mibeko na ye; yango ezali mosala ya bato nyonso.”​—Mosakoli 12:13.

Bozwi oyo ezali na kati ya Biblia, Liloba ya Nzambe, ezali na motuya koleka wolo ná palata. (Masese 16:16) Na kati na yango, okokuta solo oyo ezali na motuya lokola mabanga ya ntalo. Okosepela te koyeba solo yango? (Masese 2:1-6) Mozalisi na biso​—Liziba ya makambo nyonso ya malamu​—azali kolendisa yo osala bongo, mpe akosalisa yo. Ndenge nini?

Na nzela ya Liloba na ye, ya elimo na ye mpe ya ebongiseli na ye, Yehova azali kosalisa biso tóyeba solo ya motuya mingi. (Nzembo 1:1-3; Yisaya 48:17, 18; Matai 24:45-47; 1 Bakolinti 2:10) Soki ozali koyekola solo yango ya motuya mingi, okozwa bwanya ya kopona bomoi ya malamu. Kopona bomoi ya ndenge wana ezali likambo ya mpasi te mpamba te Yehova, Mozalisi na biso, ayebi mpenza makambo oyo ekoki komemela biso bolamu ya solosolo.

Biblia ezali koteya biso bomoi ya malamu koleka

Biblia ezali na toli to malako ya malamu mpenza mpe eleki nyonso. Bomoi oyo Biblia ezali koteya biso eleki nyonso. Batoli na yango esilaka ngala te. Ezali malamu mpo na bato ya bileko nyonso. Na ndakisa, Biblia ezali kopesa biso toli ya kozala makasi na mosala, kozala na bosembo, koyeba kosalela mbongo, mpe kozala gɔigɔi te.​—Masese 6:6-8; 20:23; 31:16.

Na ndakisa, Yesu alobaki boye: “Bótika komibombela biloko ya motuya na mabelé, epai nsɛlɛlɛ mpe koguga ebebisaka, mpe epai miyibi bakɔtaka na makasi mpe bayibaka. Nzokande, bómibombela biloko ya motuya na likoló, epai nsɛlɛlɛ mpe koguga ebebisaka te, mpe epai miyibi bakɔtaka na makasi te mpe bayibaka te.”​—Matai 6:19, 20.

Ata lelo, toli wana ezali malamu kaka ndenge ezalaki eleki lelo mbula 2 000. Na esika tómipesa na koluka biloko ya mokili, tokoki kozwa matomba lelo soki tozali koluka bomoi ya malamu koleka. Sɛkɛlɛ na yango ezali komibombela biloko ya motuya ya elimo, oyo epesaka bolamu mpe esengo ya solosolo. Ndenge nini tokoki kosala yango? Esengeli tótángaka Biblia, Liloba ya Nzambe mpe tósalelaka mateya na yango.

Bozwi ya elimo ezali na matomba

Soki tozali mpenza kosalela bozwi ya elimo na ndenge ya malamu, tokozwa matomba na nzoto, na makanisi mpe na elimo. Ndenge kaka ozone, oyo ezali mosika mpenza likoló ya mitó na biso, ebatelaka biso na ngɛngɛ makasi ya moi, batoli ya malamu esalisaka biso tóyeba mabe oyo ekoki koyela biso soki tozali na mposa makasi ya biloko ya mokili. Ntoma Paulo akomaki boye: “Baoyo balingaka kaka kozala bato ya bomɛngo bakweaka na kati ya komekama mpe na motambo mpe na bamposa mingi ya bozoba mpe oyo eyokisaka mpasi, oyo ezindisaka bato na kati ya libebi mpe na likama. Mpo bolingo ya mbongo ezali mosisa ya makambo mabe ya ndenge nyonso, mpe na kokolisáká bolingo wana bamosusu babungisami nzela uta na kondima mpe bamitɔbɔlitɔbɔli na ebele ya bampasi.”​—1 Timote 6:9, 10.

Kolinga biloko ya mokili etindaka moto akóma na lokoso ya mbongo, ya lokumu mpe ya bokonzi. Mbala mingi, ntango moto azali koluka makambo wana, asalelaka lokuta mpe mayele mabe. Komipesa na koluka biloko ya mokili ekoki kolya moto ntango, makasi mpe makoki na ye mosusu. Ekoki ata mpe kozangisa moto mpɔngi. (Mosakoli 5:12) Na ntembe te, mposa makasi ya biloko ya mokili ekoki kopekisa moto kokola na elimo. Yesu Klisto, moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo, amonisaki polele bomoi oyo eleki malamu: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.” (Matai 5:3) Ayebaki malamu ete bomɛngo ya elimo ememaka matomba ya libela mpe ete ezali na motuya mingi koleka bomɛngo ya mwa ntango moke ya mokili oyo.​—Luka 12:13-31.

Koluka bozwi ya elimo ezali mpenza na litomba?

Greg alobi boye: “Baboti na ngai bamekaki na ndenge nyonso kondimisa ngai ete bozwi ya elimo ezali na litomba moko te. Kasi, komipesa na makambo ya elimo ememeli ngai kimya mpenza, mpamba te yango ezali kosala ete naboma nzoto te na koluka bomɛngo ya mokili oyo, oyo ezali kopesa bato ebele ya mitungisi.”

Bozwi ya elimo ekolisaka mpe boninga na biso ná bato mosusu? Baninga ya solo ezali baoyo balingaka yo mpo na bomoto na yo, kasi te mpo na bozwi na yo. Biblia epesi toli oyo: “Ye oyo akotambola na bato ya mayele akozala na mayele.” (Masese 13:20) Lisusu, bwanya mpe bolingo nde ebongisaka libota, kasi bozwi te.​—Baefese 5:22–6:4.

Bizaleli ya malamu, tobotamaka na yango te. Tosengeli nde koyekola yango epai ya baninga na biso to na Biblia. Yango wana, mateya ya mokanda yango oyo ezali na bwanya oyo eleki nyonso ekoki mpenza kobongola lolenge oyo totalelaka biloko ya mokili oyo. Don, oyo liboso azalaki patrɔ na banki moko, alobaki boye: “Biblia esalisaki ngai nakóma kotalela makambo na ndenge mosusu, mpe nayekoli kosepela kaka na mwa moke oyo ekoki kokokisa bamposa na ngai.”

Luká bomɛngo ya elimo mpo yango esilaka te

Bozwi ya elimo etalelaka mingimingi bisengo ya mwa ntango mokuse te, kasi nde matomba ya libela. Paulo akomaki boye: “Biloko oyo emonanaka [ya mokili] ezali ya ntango mokuse, kasi biloko oyo emonanaka te [ya elimo] ezali ya seko.” (2 Bakolinti 4:18) Toboyi te, komipesa na bozwi ya mokili ekoki komemela moto matomba ya mwa ntango, kasi lokoso ekoki kosalisa moto mpo na ntango molai te. Bozwi ya elimo ekotikala libela na libela.​—Masese 11:4; 1 Bakolinti 6:9, 10.

Biblia eboyi mpenza elimo ya komipesa na bozwi ya mokili, oyo bato bakómi na yango mingi na ntango na biso. Ezali koteya biso tóyeba kobatela liso alima mpo na kobengana elimo ya lokoso, mpo likebi na biso etikala ntango nyonso na makambo oyo eleki ntina, elingi koloba bomɛngo ya elimo. (Bafilipi 1:10) Ezali komonisa ete lokoso ezali losambo oyo moto azali komisambela ye moko. Soki tozali kosalela makambo oyo tozali koyekola na Liloba ya Nzambe, tokozala malamu koleka. Mposa na biso ekozala lisusu te ya kozwa kasi nde ya kopesa. Talá ntina monene oyo tosengeli koboya lokoso ya biloko ya mokili mpo na kolanda bozwi ya elimo!

Ezali ya solo ete, na makambo mosusu, mbongo ekoki kobatela moto. (Mosakoli 7:12) Kasi, Biblia elobi ete: “Mbongo na yo ekoki kolimwa na mbalakaka, lokola nde ebimi mapapu mpe epumbwe mosika na likoló lokola mpongo.” (Masese 23:5, Today’s English Version) Bato babosani makambo mingi ya ntina lokola bokolɔngɔnɔ ya nzoto, mabota, ata mpe lisosoli ya malamu, kaka mpo na kolanda bozwi ya mokili mpe basukaki mabe mpenza. Nzokande, komipesa na makambo ya elimo ekokisaka bamposa na biso oyo eleki ntina, lokola mposa ya kozala na baninga, ya kozala na bomoi oyo ezali na ntina mpe mposa ya kosambela Yehova, Nzambe ya bolingo. Epesaka mpe elikya ya bomoi ya seko, na bomoto ya kokoka, awa na mabelé oyo ekobongwana paladiso​—likambo oyo Nzambe abongiseli biso.

Etikali moke, mposa ya bomɛngo oyo bato bazalaka na yango ekokokisama mpenza na mokili ya sika oyo Nzambe alaki. (Nzembo 145:16) Na ntango wana, mabelé mobimba “ekotonda na boyebi ya [Yehova].” (Yisaya 11:9) Bato nyonso bakozala na bozwi ya elimo. Mposa ya bozwi ya mokili ná mikakatano oyo yango ezali kobimisa ekolongwa mpo na libela. (2 Petelo 3:13) Makambo oyo ebongisaka bomoi ya moto​—bokolɔngɔnɔ ya nzoto, mosala ya malamu, kopema mpe kosakana na ndenge ebongi, boyokani malamu na libota, mpe boninga ya solosolo ná Nzambe​—ekomemela bato bolamu ya solosolo mpe mpo na libela.

[Etanda/Elilingi na lokasa 6]

Yebáká kosalela mbongo!

Luká koyeba bamposa na yo. Yesu ateyaki biso tóbondelaka boye: “Pesá biso mampa na biso ya mokolo engebene bamposa ya mokolo.” (Luka 11:3) Koluka te ete ozwa biloko nyonso oyo ezali kosepelisa yo. Kobosana te ete bomoi na yo euti te na biloko oyo ozali na yango.​—Luka 12:16-21.

Bongisáká liboso ndenge okosalela mbongo na yo. Kosombaka biloko bisombelá te. Biblia elobi boye: “Moto oyo abongisaka malamu makambo alingi kosala, azwaka bomengo; kasi oyo asalaka makambo noki-noki azwaka eloko moko té.” (Masese 21:5, Bible na lingala ya lelo oyo) Yesu apesaki bayoki na ye toli ete bátángaka naino motuya liboso ya kosala likambo.​—Luka 14:28-30.

Kebá na bidefadefa. Bombáká nde mbongo mpo na kosomba biloko na esika okɔtaka banyongo. Biblia elobi boye: “Modefi azali moombo ya modefisi.” (Masese 22:7) Soki oyebi komipekisa mpe ozali kosomba kaka biloko oyo ozali na makoki ya kosomba, okoki kobomba mbongo mpo na kosomba ata biloko ya ntalo.

Kobebisaka biloko mpambampamba te. Bateláká malamu biloko na yo; na ndenge yango ekoumela mpe okobanda kobebisa mbongo mpambampamba te. Yesu amonisaki ntina ya kobatela biloko na makambo oyo asalaki.​—Yoane 6:10-13.

Tyáká makambo oyo eleki ntina na esika ya liboso. Moto ya bwanya ‘akomisombela ntango’ mpo na kosala makambo oyo eleki ntina. ​—Baefese 5:15, 16.

[Etanda/Elilingi na lokasa 7]

Ndenge ya koyekola oyo eleki malamu

Makambo oyo tokutaná na yango, ezala ya malamu to ya mabe, ekoki mpenza koteya biso. Kasi, ezali solo ete makambo oyo moto akutanaka na yango na bomoi nde eteyaka ye mabe na malamu? Te, ezali na esika moko oyo tokoki kozwa mateya ya malamu mpenza. Mokomi ya nzembo amonisaki yango na libondeli na ye oyo: ‘Liloba na yo ezali mwinda ya makaka na ngai mpe pole ya nzela na ngai.’​—Nzembo 119:105.

Mpo na nini eleki malamu tólanda mateya ya Nzambe na esika tómekamekaka biso moko mpo na koyeba malamu to mabe ya likambo moko? Ntina ya liboso ezali ete ntango tozali komekameka tokoki kosala mabunga mingi, mpe yango ekomemela biso mikakatano ebele. Kosala bongo ezali mpe na ntina te. Nzambe alobaki na Bayisalaele boye: “Soki oyokaki malako na ngai! Mbɛlɛ kimya na yo ezalaki lokola ebale, mpe boyengebene na yo lokola mbonge ya mai-ya-monana.”​—Yisaya 48:18.

Ntina mosusu oyo mateya ya Liloba ya Nzambe eleki malamu ezali ete yango elobeli na bosikisiki mpenza makambo oyo bato ya kalakala bakutanaki na yango. Na ntembe te yo mpe omoni ete na esika tózongela mabunga oyo bato mosusu basalaki, eleki malamu tózwa liteya na makambo ya malamu to ya mabe oyo basalaki. (1 Bakolinti 10:6-11) Likambo eleki ntina ezali ete na Biblia, Nzambe apesi biso mibeko mpe mitinda ya malamu mingi, oyo tosengeli mpenza kotyela motema. ‘Mobeko ya [Yehova] ezali sembo . . . Litatoli ya [Yehova] ezali solo, ekopesa boyebi epai na ye oyo azangi yango.’ (Nzembo 19:7) Ya solo, ndenge ya koyekola oyo eleki malamu ezali ya koyoka bwanya ya Mozalisi na biso ya bolingo.

[Bililingi na lokasa 4]

Mokili elingi ete yo mpe omipesa na koluka bomɛngo

[Elilingi na lokasa 5]

Bozwi oyo ezali na kati ya Biblia, Liloba ya Nzambe, ezali na motuya koleka wolo ná palata

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto