Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/6 nk. 4-7
  • Mitinda oyo esilaka ngala te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mitinda oyo esilaka ngala te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mitinda nini?
  • Buku oyo ezali na mitinda ya malamu mpenza
  • Okozwela yango matomba?
  • Bizaleli oyo ebongisaka mpenza bomoi
    Lamuká!—2014
  • Bizaleli malamu
    Lamuká!—2019
  • Mitinda ezali se kobongwana
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Matomba ya koluka bozwi ya elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/6 nk. 4-7

Mitinda oyo esilaka ngala te

ESIKA nyonso oyo bato bafandi ezalaka na mibeko oyo basengeli kolanda. Na ntembe te, oyebi ete bizaleli lokola bosembo, boboto, motema mawa, mpe bolingo ezalaka na motuya mingi mpe mingi kati na biso tosepelaka kozala na bato oyo bazali na bizaleli yango.

Mitinda nini?

Na siɛklɛ ya liboso, Saulo, moto moko oyo atángaki kelasi mingi, amesanaki na mitinda ya bikólo misato​—ya Bayuda, ya Bagrɛki, mpe ya Baloma. Longola mimeseno ndenge na ndenge mpe mibeko kilikili oyo bikólo yango etyelaki bato na yango, Saulo amonaki ete moto nyonso atambwisamaka na lisosoli. Ntango Saulo akómaki moklisto mpe bakómaki kobenga ye ntoma Paulo, akomaki boye: “Ntango bato ya bikólo mosusu oyo bazalaka na mibeko te bazali kosala makambo ya mibeko bango moko ndenge bazalisamá, bato yango, atako bazalaka na mibeko te, bazali mobeko epai na bango moko. Bango nde bato oyo bazali komonisa ete makambo ya mibeko ekomamá na kati ya mitema na bango, wana lisosoli na bango ezali kopesa litatoli elongo na bango.”​—Baloma 2:14, 15.

Kasi, tosengeli kaka kotalela lisosoli mpo na kokesenisa mabe ná malamu? Ndenge mbala mosusu osilá komona yango, makambo mingi, ezala oyo moto asali ye moko to elongo na bato mosusu elongi te. Yango etindi bato mingi bámona ete mitinda ya malamu esengeli kouta na litambwisi moko oyo eleki nyonso. Bato mingi bakondima ete Mozalisi na biso nde abongi kopesa mitinda yango oyo esilaka ngala te. Na buku na ye (The Undiscovered Self), Profɛsɛrɛ Carl Jung alobaki boye: “Moto oyo asimbami na Nzambe te akoki te kotɛmɛla mimekano na makasi na ye moko.”

Makanisi yango eyokani na maloba ya mosakoli moko ya kala oyo alobaki boye: “Nzela ya moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.” (Yilimia 10:23) Mozalisi alobi na biso boye: “Ngai moto nalakisaka bino makambo oyo ezali malamu po na bino; ngai moto namemaka bino na nzela oyo bozali kolanda.”​—Ezaya [Yisaya] 48:17, Bible na Lingala ya lelo oyo.

Buku oyo ezali na mitinda ya malamu mpenza

Maloba yango euti na Biblia, buku ya mitinda oyo ekabolami na mokili mobimba koleka babuku mosusu. Bato mingi na mokili, ata baoyo bazali baklisto te to baoyo basambelaka te, balukaki bososoli mpe mayele na Makomami. Goethe, mokomi moko ya Allemagne, akomaki boye: “Nazalaki kolinga [Biblia] mpe kopesa yango motuya mpamba te ezalaki kosalisa ngai nakóma na bizaleli ya malamu.” Mohandas Gandhi, mokonzi ya Lingomba ya Hindu, alobaki boye: “Ata ndenge nini, bómɛlaka na liziba ya mai oyo bapesi bino na Lisolo Likoló ya Ngomba [eteni ya mateya ya Yesu oyo ezali na Biblia] . . . Mpamba te mateya ya Lisolo yango etaleli mokomoko na biso.”

Ntoma Paulo, oyo tolobelaki liboso, amonisaki ete Makomami Mosantu ezali na ntina mingi mpo na koteya mitinda ya malamu: “Makomami nyonso epemami na Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya.” (2 Timote 3:16) Ezali mpenza solo?

Tolendisi yo oluka koyeba yango. Talelá mitinda oyo ezali na lokasa elandi. Talá bizaleli ya malamu oyo ezali kolendisa. Kanisá ndenge oyo mateya yango ekoki kobongola bomoi na yo mpe boyokani na yo na bato mosusu.

Okozwela yango matomba?

Mitinda oyo ezali na etanda yango ezali kaka mwa ndambo ya batoli ya malamu oyo ezali na Makomami Mosantu. Longola yango, Liloba ya Nzambe ezali na batoli mingi oyo ezali kokebisa biso na makanisi, maloba, mpe misala oyo ekoki kobebisa bomoi na biso.​—Masese 6:16-19.

Ya solo, mateya ya Biblia ezali na eloko oyo bato ya mokili mobimba bazangi​—batoli oyo ekoki kopesa bato likoki ya kozala na bizaleli ya malamu koleka. Mbongwana monene ezali kosalema na bomoi ya baoyo bazali kondima mpe kosalela mateya yango. Makanisi na bango ezali kokóma malamu. (Baefese 4:23, 24) Bakómaka na mikano ya malamu. Koyekola mitinda ya Nzambe oyo ezali na Biblia esalisi bato mingi bálongola na mitema na bango ezaleli ya kolinga kaka bato oyo bazali mposo moko na bango, bátika kokanisela basusu mabe mpe koyina basusu. (Baebele 4:12) Makomami ná mitinda oyo ezali na kati na yango esalisi bato mingi bátika lolenge nyonso ya mobulu mpe bizaleli ya mabe mpe bákóma na bizaleli ya malamu.

Ya solo, mitinda ya Biblia esalisi bamilio ya bato bábwaka mimeseno mpe misala ya mabe lokola oyo ekómisaki mbindo bomoi ya bato mosusu. (1 Bakolinti 6:9-11) Mateya ya Biblia ezali kobongola bato ya ndenge yango; ezali kobongola, kaka bizaleli na bango te kasi mpe mitema na bango, bilikya na bango, mpe mabota na bango. Ata soki mokili ezali se kobeba, bato mingi bazali kobongola bomoto na bango. Mpe yango ekosuka te. Mpamba te Biblia elobi ete “matiti mazali kokauka, felele ezali kolɛmba, nde liloba ya Nzambe na biso ekotɛlɛma libela.”​—Yisaya 40:8.

Yo mpe olingi kozwa matomba na “liloba ya Nzambe na biso”? Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo oyeba mitinda ya Biblia mpe ozwela yango matomba. Soki osaleli mitinda yango na bomoi na yo lelo oyo, Nzambe akosepela na yo mpe na mikolo ezali koya okozwa bomoi ya seko, bomoi oyo etambwisami na mitinda esilaka ngala te oyo euti epai ya Nzambe.

[Etanda/​Bililingi na nkasa 6, 7]

MITINDA OYO ESILAKA NGALA TE

Lilako lileki malamu. “Makambo nyonso oyo bolingaka ete bato básalela bino, bino mpe bosengeli kosalela bango kaka bongo; wana nde, ya solo, ndimbola ya Mibeko mpe Basakoli.”​—Matai 7:12.

Kolinga mozalani. “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.” (Matai 22:39) “Bolingo esalaka mozalani mabe te; na yango, bolingo ezali nde kokokisama ya mibeko.”​—Baloma 13:10.

Komemya basusu mpe kopesa bango lokumu. “Na kati ya bolingo ya bondeko bózalaka na bolingo ya motema bino na bino. Mpo na kopesana lokumu bózala bato ya liboso.”​—Baloma 12:10.

Koluka kimya. “Bózalaka na kimya bino na bino.” (Malako 9:50) “Soki likoki ezali, na meko oyo yango etaleli bino, bózala na kimya elongo na bato nyonso.” (Baloma 12:18) “Tiká tólanda makambo oyo epesaka kimya.”​—Baloma 14:19.

Kolimbisa. “Limbisá biso banyongo na biso, ndenge biso mpe tosili kolimbisa bato oyo bazali na banyongo na biso.” (Matai 6:12) “Bózala na boboto na kati na bino, bóyokelanaka mawa mingi, kolimbisanáká na motema moko.”​—Baefese 4:32.

Kozala sembo. “Mwasi na yo azali lokola liziba esika mai ya kitoko ebimaka na se ya mabelé; melaka bobele mai ya liziba wana. . . . Sepela na mwasi oyo obalaki tango ozalaki elenge . . . Nzoto na ye ésepelisaka yo tango nyonso, bolingo na ye élangwisaka yo mokolo na mokolo. . . Po na nini komipesa na mwasi ya mobulu? Po na nini koluka bisengo epai ya mwasi mosusu?” (Batoli [Masese] 5:15-20, Bible na Lingala ya lelo oyo) “Moto oyo azali sembo na oyo eleki moke azali mpe sembo na mingi, mpe moto oyo azali moyengebene te na oyo eleki moke azali mpe moyengebene te na mingi.” (Luka 16:10) “Eloko oyo balukaka epai ya bakapita ezali ete moto amonana moto ya sembo.”​—1 Bakolinti 4:2.

Kozala moto ya kolongobana. “Nakozala nde pɛto awa ezali ngai na bipimeli mabe mpe na libenga ya mabanga ya bokosi?” (Mika 6:11) “Tondimi ya solo ete tozali na lisosoli ya sembo, mpo tozali na mposa ya komitambwisa na bosembo na makambo nyonso.”​—Baebele 13:18.

Kolobaka solo. “Bóyina mabe mpe bólinga malamu, bóbongisa kosambisa-sembo kati na ekuke.” (Amosa 5:15) “Bóloba solo moto na moto na mozalani na ye, bósambisa na kosambisa ya sembo mpe na kimya kati na bikuke na bino.” (Zekalia 8:16) “Sikoyo lokola bolongoli lokuta, bólobanaka solo mokomoko na bino elongo na mozalani na ye.”​—Baefese 4:25.

Kozala makasi na mosala. “Omoni moto oyo azali na etingya na mosala na ye? Ye akotɛlɛma liboso na mikonzi.” (Masese 22:29) “Bósalaka misala na bino kozanga kolekisa ntango mpambampamba.” (Baloma 12:11) “Nyonso oyo bozali kosala, bósala yango na molimo na bino mobimba lokola mpo na Yehova, kasi mpo na bato te.”​—Bakolose 3:23.

Kozala na boboto, na motema mawa mpe na motema malamu. “Bólata bolingo ya motema oyo euti na mawa, motema malamu, elimo ya komikitisa, boboto mpe motema molai.”​—Bakolose 3:12.

Kolonga mabe na kosaláká malamu. “Bókoba kolinga banguna na bino mpe kobondela mpo na baoyo bazali konyokola bino.” (Matai 5:44) “Komitika te ete mabe elonga yo, kasi kobá kolonga mabe na kosaláká malamu.”​—Baloma 12:21.

Kopesa Nzambe oyo eleki malamu. “‘Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.’ Wana nde komandema oyo eleki monene mpe ya liboso.”​—Matai 22:37, 38.

[Bililingi]

Kosalela mitinda ya Biblia ekoki kosalisa biso tózala na libala ya malamu, tóyokanaka malamu na libota, mpe tózala na baninga ya solosolo

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto